ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا * - فهرس التراجم

XML CSV Excel API
تنزيل الملفات يتضمن الموافقة على هذه الشروط والسياسات

ترجمة معاني سورة: آل عمران   آية:

سورة آل عمران - Al-Imrân (LIBOTA YA IMRANI)

الٓمٓ
1. Alif, Lâm, Mîm.(1)
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo 1.
التفاسير العربية:
ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡحَيُّ ٱلۡقَيُّومُ
2. Allah, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye, azali na bomoyi, amikoka naye moko.
التفاسير العربية:
نَزَّلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ بِٱلۡحَقِّ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَأَنزَلَ ٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
3. Akitiselaki yo(1) buku(2) na bosôló, ezali kondima na babuku ekitaka liboso. Mpe akitisi torah(3) mpe indjil.(4)
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
2 Kurani.
3 Torah: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Mûssa.
4 Indjil: Ezali buku oyo Allah akitisaki ераї ya Issa.
التفاسير العربية:
مِن قَبۡلُ هُدٗى لِّلنَّاسِ وَأَنزَلَ ٱلۡفُرۡقَانَۗ إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٞ ذُو ٱنتِقَامٍ
4. Babuku biye bizalaki bokambi mpona bato. Na sima tokitisaki bososoli (eye ezali kokabola bosôló na lokuta). Ya sôló baye bazali kopengwa na bilembo to mpe mikapo mia Allah, bakozala na etumbu ya makasi. Allah azali makasi atonda nguya nakopesa etumbu.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَخۡفَىٰ عَلَيۡهِ شَيۡءٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ
5. Ya sôló eloko moko te ebombami epai na Allah. Ezala na nsé to na likolo.
التفاسير العربية:
هُوَ ٱلَّذِي يُصَوِّرُكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡحَامِ كَيۡفَ يَشَآءُۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
6. Ye nde azali kopesa bino balolenge kowuta na mabumu ya bamama na bino yambo ete bobotama ndenge alingi. Nzambe mosusu azali te sé ye wa bokasi atonda bwányá.
التفاسير العربية:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ مِنۡهُ ءَايَٰتٞ مُّحۡكَمَٰتٌ هُنَّ أُمُّ ٱلۡكِتَٰبِ وَأُخَرُ مُتَشَٰبِهَٰتٞۖ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِمۡ زَيۡغٞ فَيَتَّبِعُونَ مَا تَشَٰبَهَ مِنۡهُ ٱبۡتِغَآءَ ٱلۡفِتۡنَةِ وَٱبۡتِغَآءَ تَأۡوِيلِهِۦۖ وَمَا يَعۡلَمُ تَأۡوِيلَهُۥٓ إِلَّا ٱللَّهُۗ وَٱلرَّٰسِخُونَ فِي ٱلۡعِلۡمِ يَقُولُونَ ءَامَنَّا بِهِۦ كُلّٞ مِّنۡ عِندِ رَبِّنَاۗ وَمَا يَذَّكَّرُ إِلَّآ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
7. Ye nde akitiseli yo buku kati na yango ezali na mikapo mia polele ya mibeko, mikapo wana nde mizali misisa ya buku, mpe mikapo misusu mizali na bokokani kati na yango. Na yango bato baye bazali na bokono ya libungi o mitema mia bango, bazali sé kolanda mikapo miye mikokana mpona koluka bomekano to mpe koluka ndimbola na yango, kasi moto moko te ayebi ndimbola na yango, sé ye moko Allah. Nzoka nde, banganga Nzambe (Allah) baye batonda mayele balobaka ete: Biso tondimi na yango. Nyoso ewuti epai na Nkolo na biso, sé bato baye bazali na mayele nde bazali kokanisa mpe kondima na yango.
التفاسير العربية:
رَبَّنَا لَا تُزِغۡ قُلُوبَنَا بَعۡدَ إِذۡ هَدَيۡتَنَا وَهَبۡ لَنَا مِن لَّدُنكَ رَحۡمَةًۚ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ
8. Eh Nkolo wa biso! Kobongola bosôló o mitema mia biso te, sima ya kokamba biso. Mpe pesa biso ngolu nayo. Ya sôló yo ozali mopesi.
التفاسير العربية:
رَبَّنَآ إِنَّكَ جَامِعُ ٱلنَّاسِ لِيَوۡمٖ لَّا رَيۡبَ فِيهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
9. Eh Nkolo wa biso! Yo okosangisa bato o mokolo mwa mbano moye mokozala na ntembe te; ya sôló Allah azangisaka elaka naye te.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَن تُغۡنِيَ عَنۡهُمۡ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُهُم مِّنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗاۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمۡ وَقُودُ ٱلنَّارِ
10. Ya sôló baye bapengwa, misolo na bango na bana na bango ekosalisa bango na eloko te epai na Allah. Mpe bango bakozala bankoni ya lifelo.
التفاسير العربية:
كَدَأۡبِ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡۗ وَٱللَّهُ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
11. Ndenge ezalaki na bomeseni ya falo na bato naye, ndenge moko na baye bazalaki liboso na bango. Bazuaki bilembo mpe mikapo mia biso na lokuta. Mpe baboyaki kondima na yango, mpe Allah azuaki bango na masumu na bango. Allah azali makasi mpona kopesa etumbu.
التفاسير العربية:
قُل لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ سَتُغۡلَبُونَ وَتُحۡشَرُونَ إِلَىٰ جَهَنَّمَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
12. Loba na baye bapengwa ete: Bokobetama mpe bokokitisama, na sima bokosangisama o kati ya lifelo. Mpe oyo nde esika ya mabe ya kofanda!
التفاسير العربية:
قَدۡ كَانَ لَكُمۡ ءَايَةٞ فِي فِئَتَيۡنِ ٱلۡتَقَتَاۖ فِئَةٞ تُقَٰتِلُ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَأُخۡرَىٰ كَافِرَةٞ يَرَوۡنَهُم مِّثۡلَيۡهِمۡ رَأۡيَ ٱلۡعَيۡنِۚ وَٱللَّهُ يُؤَيِّدُ بِنَصۡرِهِۦ مَن يَشَآءُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَعِبۡرَةٗ لِّأُوْلِي ٱلۡأَبۡصَٰرِ
13. Ezalaki ya sôló elembo mpe ekamwiseli mpona bino okati ya mapinga mibale makutanaki na bitumba; moko ezalaki kobunda mpona Allah, mosusu ezalaki na bopengwi. Na sima mapinga ya bandimi ekomaki komimona ete bakomaki mbala mibale koleka. Allah asalisaka oyo ye alingi na elonga naye moko. Ya sôló wana ezali liteya mpona bato bazali na miso ya komona.
التفاسير العربية:
زُيِّنَ لِلنَّاسِ حُبُّ ٱلشَّهَوَٰتِ مِنَ ٱلنِّسَآءِ وَٱلۡبَنِينَ وَٱلۡقَنَٰطِيرِ ٱلۡمُقَنطَرَةِ مِنَ ٱلذَّهَبِ وَٱلۡفِضَّةِ وَٱلۡخَيۡلِ ٱلۡمُسَوَّمَةِ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ وَٱلۡحَرۡثِۗ ذَٰلِكَ مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَٱللَّهُ عِندَهُۥ حُسۡنُ ٱلۡمَـَٔابِ
14. Engengisami mpona bato mposa ya basi, mpe ya bana, mpe bankita ya wolo mpe palata, mpe na bampunda, mpe an’âm(1), mpe bilanga. Wana nyoso bisengo ya mokili, nzoka nde bozongi ya malamu mpe ya kitoko ezali epai Allah.
1 An’âm: Lisanga ya bibuele biye: Chameau, ngombe, ntaba, meme.
التفاسير العربية:
۞ قُلۡ أَؤُنَبِّئُكُم بِخَيۡرٖ مِّن ذَٰلِكُمۡۖ لِلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا وَأَزۡوَٰجٞ مُّطَهَّرَةٞ وَرِضۡوَٰنٞ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
15. Loba: Bolingi nalakisa bino eloko ya malamu koleka maye bozali na yango? Mpona baye babangi (Allah) bazali na paladiso ya nkembo, epayi ya Nkolo wa bango, okati na yango mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati mpe bakozala na basi baye bapetuama, mpe esengo kowuta epai na Allah. Allah azali komona bawumbu naye.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَآ إِنَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَقِنَا عَذَابَ ٱلنَّارِ
16. Baye bazali koloba: Nkolo wa biso! Ya sôló tondimi, limbisa masumu ma biso, mpe tia biso mosika na etumbu ya lifelo.
التفاسير العربية:
ٱلصَّٰبِرِينَ وَٱلصَّٰدِقِينَ وَٱلۡقَٰنِتِينَ وَٱلۡمُنفِقِينَ وَٱلۡمُسۡتَغۡفِرِينَ بِٱلۡأَسۡحَارِ
17. Baye bazali kokanga mitema, mpe bato ya bosembo, mpe bato ya botosi, mpe baye babimisaka mpona Allah, mpe baye basengaka Allah bolimbilisi yambo ete ntongo etana.
التفاسير العربية:
شَهِدَ ٱللَّهُ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَأُوْلُواْ ٱلۡعِلۡمِ قَآئِمَۢا بِٱلۡقِسۡطِۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
18. Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلدِّينَ عِندَ ٱللَّهِ ٱلۡإِسۡلَٰمُۗ وَمَا ٱخۡتَلَفَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۗ وَمَن يَكۡفُرۡ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
19. Ya sôló, lingomba liye lindimami epai ya Allah lizali Islam (komisokia). Mpe baye bazuaki buku liboso(1) bakabwanaki te, sé na tango boyebi ekomelaki bango na likunya kati na bango. Oyo akopengwa na mikapo mia Allah, ya sôló Allah afutaka na lombango.
1 Kati na bayuda mpe bakliáto.
التفاسير العربية:
فَإِنۡ حَآجُّوكَ فَقُلۡ أَسۡلَمۡتُ وَجۡهِيَ لِلَّهِ وَمَنِ ٱتَّبَعَنِۗ وَقُل لِّلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡأُمِّيِّـۧنَ ءَأَسۡلَمۡتُمۡۚ فَإِنۡ أَسۡلَمُواْ فَقَدِ ٱهۡتَدَواْۖ وَّإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا عَلَيۡكَ ٱلۡبَلَٰغُۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
20. Mpe soki basuanisi yo, loba na bango ete: Namisoki mobimba epai na Allah, na baye banso balandi ngai. Mpe loba na baye bazuaki buku mpe na baye batanga te: Bomisoki? Soki bamisoki, basili kokambama. Mpe soki bapesi mokongo, yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango. Mpe Allah azali komona bawumbu naye.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَيَقۡتُلُونَ ٱلَّذِينَ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡقِسۡطِ مِنَ ٱلنَّاسِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
21. Ya sôló baye bazali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe bazali koboma bantoma mpamba, mpe bazali koboma baye bazali kotinda na bosembo, o kati ya bato pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
22. Bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé, mpe o’mokolo ya suka, mpe bakozalaka na mosungi te.
التفاسير العربية:
أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ أُوتُواْ نَصِيبٗا مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ يُدۡعَوۡنَ إِلَىٰ كِتَٰبِ ٱللَّهِ لِيَحۡكُمَ بَيۡنَهُمۡ ثُمَّ يَتَوَلَّىٰ فَرِيقٞ مِّنۡهُمۡ وَهُم مُّعۡرِضُونَ
23. Ozali komona te mpona baye bapesamaki buku ndenge basalaki, soki babengami ete bakata makambo kati na bango na buku ya Allah, sima basusu kati na bango bapesi mokongo mpe bakimi?
التفاسير العربية:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لَن تَمَسَّنَا ٱلنَّارُ إِلَّآ أَيَّامٗا مَّعۡدُودَٰتٖۖ وَغَرَّهُمۡ فِي دِينِهِم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
24. Na bongo nde balobaki ete: Móto ekozwa biso sé mikolo mike ya kotanga. Mpe lokuta na bango ekosaki bango na lingomba na bango, na ntina na maye bazalaki kosala ya mabe.
التفاسير العربية:
فَكَيۡفَ إِذَا جَمَعۡنَٰهُمۡ لِيَوۡمٖ لَّا رَيۡبَ فِيهِ وَوُفِّيَتۡ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
25. Mpe ekozala ndenge kani tango tokosangisa bango o mokolo moye mokozala na ntembe te, mpe molimo na molimo akofutama engebene na maye asalaki? Mpe bakobubama te.
التفاسير العربية:
قُلِ ٱللَّهُمَّ مَٰلِكَ ٱلۡمُلۡكِ تُؤۡتِي ٱلۡمُلۡكَ مَن تَشَآءُ وَتَنزِعُ ٱلۡمُلۡكَ مِمَّن تَشَآءُ وَتُعِزُّ مَن تَشَآءُ وَتُذِلُّ مَن تَشَآءُۖ بِيَدِكَ ٱلۡخَيۡرُۖ إِنَّكَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
26. Loba ete: Eh Allah! Mokonzi ya bakonzi, opesaka bokonzi na nani olingi, mpe olongalaka bokonzi na nani olingi, opesaka nguya na nani olingi. Mpe okitisaka nani olingi, bolamu nyoso ezali na maboko nayo, ya sôló ozali na bokasi likolo ya biloko binso.
التفاسير العربية:
تُولِجُ ٱلَّيۡلَ فِي ٱلنَّهَارِ وَتُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِي ٱلَّيۡلِۖ وَتُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَتُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّۖ وَتَرۡزُقُ مَن تَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٖ
27. Okotisaka butu kati na moyi mpe okotisaka moyi kati na butu. Mpe obimisaka moto ya bomoyi kowuta na liwa mpe obimisaka moto ya liwa kowuta na bomoyi. Mpe opesaka bozui nayo na moto oyo olingi, na motango moyebani te.
التفاسير العربية:
لَّا يَتَّخِذِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلۡكَٰفِرِينَ أَوۡلِيَآءَ مِن دُونِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَۖ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَلَيۡسَ مِنَ ٱللَّهِ فِي شَيۡءٍ إِلَّآ أَن تَتَّقُواْ مِنۡهُمۡ تُقَىٰةٗۗ وَيُحَذِّرُكُمُ ٱللَّهُ نَفۡسَهُۥۗ وَإِلَى ٱللَّهِ ٱلۡمَصِيرُ
28. Esengeli te na bandimi kotika bandeko na bango bandimi, mpona kozua bapagano bazala baninga na bango. Oyo akosala lolenge wana akozala na eloko te epai na Allah, sé soki bozali koluka komibatela mpo na bango. Allah azali kokebisa bino mpona ye moko. Mpe epai naye Allah nde bozongi ezali.
التفاسير العربية:
قُلۡ إِن تُخۡفُواْ مَا فِي صُدُورِكُمۡ أَوۡ تُبۡدُوهُ يَعۡلَمۡهُ ٱللَّهُۗ وَيَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
29. Loba ete: Soki bobombi maye mazali kati ya mitema mia bino to bobimisi yango polele, Allah ayebi yango. Mpe ayebi maye mazali na likolo mpe na nsé. Mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
التفاسير العربية:
يَوۡمَ تَجِدُ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا عَمِلَتۡ مِنۡ خَيۡرٖ مُّحۡضَرٗا وَمَا عَمِلَتۡ مِن سُوٓءٖ تَوَدُّ لَوۡ أَنَّ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَهُۥٓ أَمَدَۢا بَعِيدٗاۗ وَيُحَذِّرُكُمُ ٱللَّهُ نَفۡسَهُۥۗ وَٱللَّهُ رَءُوفُۢ بِٱلۡعِبَادِ
30. Mokolo molimo nyonso ekozua makambo ya malamu maye esalaki. Mazali komonana na maye manso esalaki ya mabe, akolikia ata sókó ezalaka kati ya oyo na oyo kuna ndelo ya mosika, mpe Allah azali kokebisa bino mpona ye moko mpe Allah atondi na ngolu mpona bawumbu naye.
التفاسير العربية:
قُلۡ إِن كُنتُمۡ تُحِبُّونَ ٱللَّهَ فَٱتَّبِعُونِي يُحۡبِبۡكُمُ ٱللَّهُ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡ ذُنُوبَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
31. Loba ete: Soki bolingi Allah, bolanda ngai.(1) Allah akolinga bino mpe akolimbisa masumu ma bino. mpe Allah azali molimbisi moyoki mawa.
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
التفاسير العربية:
قُلۡ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَۖ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡكَٰفِرِينَ
32. Loba ete: Botosa Allah na motindami naye, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló Allah alingaka bapengwi te.
التفاسير العربية:
۞ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰٓ ءَادَمَ وَنُوحٗا وَءَالَ إِبۡرَٰهِيمَ وَءَالَ عِمۡرَٰنَ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
33. Ya sôló, Allah aponaki Âdam, mpe Nûh, mpe libota ya Ibrâhîm mpe libota ya Imrân, likolo ya mokili.
التفاسير العربية:
ذُرِّيَّةَۢ بَعۡضُهَا مِنۢ بَعۡضٖۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
34. Bakitani na bakitani kati na bango, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
التفاسير العربية:
إِذۡ قَالَتِ ٱمۡرَأَتُ عِمۡرَٰنَ رَبِّ إِنِّي نَذَرۡتُ لَكَ مَا فِي بَطۡنِي مُحَرَّرٗا فَتَقَبَّلۡ مِنِّيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
35. Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi.
التفاسير العربية:
فَلَمَّا وَضَعَتۡهَا قَالَتۡ رَبِّ إِنِّي وَضَعۡتُهَآ أُنثَىٰ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا وَضَعَتۡ وَلَيۡسَ ٱلذَّكَرُ كَٱلۡأُنثَىٰۖ وَإِنِّي سَمَّيۡتُهَا مَرۡيَمَ وَإِنِّيٓ أُعِيذُهَا بِكَ وَذُرِّيَّتَهَا مِنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ ٱلرَّجِيمِ
36. Mpe tango abotaki ye, alobaki ete: Eh Nkolo! Naboti ye mwana mwasi. Mpe Allah ayebaki mbotama wana, kasi mwana mwasi azali lokola mwana mobali te. Na yango napesi ye nkombo ya Maryam, mpe ngai ya sôló nati ye na libota naye, na nsé ya libateli nayo likolo na satana oyo alakelama mabe.
التفاسير العربية:
فَتَقَبَّلَهَا رَبُّهَا بِقَبُولٍ حَسَنٖ وَأَنۢبَتَهَا نَبَاتًا حَسَنٗا وَكَفَّلَهَا زَكَرِيَّاۖ كُلَّمَا دَخَلَ عَلَيۡهَا زَكَرِيَّا ٱلۡمِحۡرَابَ وَجَدَ عِندَهَا رِزۡقٗاۖ قَالَ يَٰمَرۡيَمُ أَنَّىٰ لَكِ هَٰذَاۖ قَالَتۡ هُوَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۖ إِنَّ ٱللَّهَ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٍ
37. Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb(1) epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te.
1 Esika oyo ye Maryam azalaki ко fanda pona mabondeli.
التفاسير العربية:
هُنَالِكَ دَعَا زَكَرِيَّا رَبَّهُۥۖ قَالَ رَبِّ هَبۡ لِي مِن لَّدُنكَ ذُرِّيَّةٗ طَيِّبَةًۖ إِنَّكَ سَمِيعُ ٱلدُّعَآءِ
38. Na tango wana, Zakariya asengi Nkolo wa ye, alobaki ete: Nkolo, pesa ngai libota ya malamu kowuta epai nayo. Ya sôló ozali moyoki Mabondeli.
2 Bótala mokapo 37.
التفاسير العربية:
فَنَادَتۡهُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَهُوَ قَآئِمٞ يُصَلِّي فِي ٱلۡمِحۡرَابِ أَنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكَ بِيَحۡيَىٰ مُصَدِّقَۢا بِكَلِمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَسَيِّدٗا وَحَصُورٗا وَنَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
39. Ba anzelu babengaki ye tango ye atelemaki azali kosambela na kati ya Mihrab,(2) balobaki naye ete: Ya sôló Allah apesi yo sango elamu ya mbotama ya Yahya, ye oyo akondima na liloba ya Allah. Mpe akozala mokonzi mpe moto ya kilikili te, mpe moto ya ekobo te, mpe akozala ntoma o’kati ya bato ya malamu.
2 Bótala mokapo 37.
التفاسير العربية:
قَالَ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَقَدۡ بَلَغَنِيَ ٱلۡكِبَرُ وَٱمۡرَأَتِي عَاقِرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكَ ٱللَّهُ يَفۡعَلُ مَا يَشَآءُ
40. Mpe alobi ete: Eh Nkolo! Ndenge nini nakozua mwana mpe ngai nasili kokoma mobange, mpe mwasi na ngai abotaka te? (Allah) alobi: Ndenge wana nde, Allah asalaka oyo alingi.
التفاسير العربية:
قَالَ رَبِّ ٱجۡعَل لِّيٓ ءَايَةٗۖ قَالَ ءَايَتُكَ أَلَّا تُكَلِّمَ ٱلنَّاسَ ثَلَٰثَةَ أَيَّامٍ إِلَّا رَمۡزٗاۗ وَٱذۡكُر رَّبَّكَ كَثِيرٗا وَسَبِّحۡ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِبۡكَٰرِ
41. (Zakariya) alobaki ete: Nkolo! Pesa ngai elembo na yango. (Allah) alobi ete: Elembo nayo ete mikolo misato okosolola na bato te sé na bilembo. Na sima okanisa Nkolo wayo mingi, mpe sanzola ye na ntongo mpe mpokua.
التفاسير العربية:
وَإِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰكِ وَطَهَّرَكِ وَٱصۡطَفَىٰكِ عَلَىٰ نِسَآءِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
42. Mpe lisusu kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló Allah aponi yo mpe apetoli yo, mpe atomboli yo yambo ya basi banso ya mokili.(1)
1 Na ndembe naye.
التفاسير العربية:
يَٰمَرۡيَمُ ٱقۡنُتِي لِرَبِّكِ وَٱسۡجُدِي وَٱرۡكَعِي مَعَ ٱلرَّٰكِعِينَ
43. Eh Maryam! Zala na botosi epai na Nkolo nayo, gumbama mpe fukama (o tia elongi nayo na mabele) elongo moko na bagumbami.
التفاسير العربية:
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهِ إِلَيۡكَۚ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يُلۡقُونَ أَقۡلَٰمَهُمۡ أَيُّهُمۡ يَكۡفُلُ مَرۡيَمَ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ يَخۡتَصِمُونَ
44. Wana ezali basango mabombami tozali kopesa yo yango. Mpe ozalaki te epai na bango tango bazalaki ko buaka bikomeli bia bango mpona koyeba nani akozua mokumba ya kobokolo Maryam, mpe yo ozalaki te tango bazalaki kosuana.
التفاسير العربية:
إِذۡ قَالَتِ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَٰمَرۡيَمُ إِنَّ ٱللَّهَ يُبَشِّرُكِ بِكَلِمَةٖ مِّنۡهُ ٱسۡمُهُ ٱلۡمَسِيحُ عِيسَى ٱبۡنُ مَرۡيَمَ وَجِيهٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
45. kanisa tango ba anzelu balobaki: Eh Maryam! Ya sôló, Allah azali kopesa yo sango elamu ya liloba kowuta epai naye (Allah), nkombo naye ekozala Masiya Issa, mwana ya Maryam, akozala na lokumu awa na nsé mpe na lola, mpe azali moko kati na baye bazali penepene (na Allah).
التفاسير العربية:
وَيُكَلِّمُ ٱلنَّاسَ فِي ٱلۡمَهۡدِ وَكَهۡلٗا وَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
46. Mpe Akoloba na bato wuta mbotama naye, mpe tango akokola, mpe azali kati na bato ya malamu.
التفاسير العربية:
قَالَتۡ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي وَلَدٞ وَلَمۡ يَمۡسَسۡنِي بَشَرٞۖ قَالَ كَذَٰلِكِ ٱللَّهُ يَخۡلُقُ مَا يَشَآءُۚ إِذَا قَضَىٰٓ أَمۡرٗا فَإِنَّمَا يَقُولُ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
47. (Maryam) alobi: (Nkolo ya sôló ndenge nini nakobota mpe ngai nasangani na mobali te?). Alobi: (Anzelu) (ndenge wana nde Allah akelaka maye alingi. Soki azwi mokano ya likambo, akoloba: “Zala”, Mpe lizalisami.
التفاسير العربية:
وَيُعَلِّمُهُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَٱلتَّوۡرَىٰةَ وَٱلۡإِنجِيلَ
48. Mpe akotangisa ye buku, mpe bwanya, mpe torah(1) mpe indjil.(1)
1 Bótala mokapo 2.
التفاسير العربية:
وَرَسُولًا إِلَىٰ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ أَنِّي قَدۡ جِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ أَنِّيٓ أَخۡلُقُ لَكُم مِّنَ ٱلطِّينِ كَهَيۡـَٔةِ ٱلطَّيۡرِ فَأَنفُخُ فِيهِ فَيَكُونُ طَيۡرَۢا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُبۡرِئُ ٱلۡأَكۡمَهَ وَٱلۡأَبۡرَصَ وَأُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۖ وَأُنَبِّئُكُم بِمَا تَأۡكُلُونَ وَمَا تَدَّخِرُونَ فِي بُيُوتِكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لَّكُمۡ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
49. Mpe motindami epai ya bana Isalayele, (akoloba na bango été): Ya sôló, ngai nayeli bino elembo mpe ekamwiseli kowuta epayi na Nkolo wa bino. Ete ngai nakosalela bino mabele ya potopoto na lolenge ya ndeke, mpe nakofula na kati mpe ekokoma ndeke na ndingisa ya Allah. Mpe na kobikisa bato bakufa miso, mpe ya bokono ya maba. Mpe na kosekwisa bawa na ndingisa ya Allah. Mpe nakoyebisa bino bilei nini bokolia mpe bankita bozali kosangisa yango okati ya bandako na bino. Ya sôló nyoso wana ezali elembo mpe mateya mpona bino, soki ya sôló bozali bandimi.
التفاسير العربية:
وَمُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيَّ مِنَ ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَلِأُحِلَّ لَكُم بَعۡضَ ٱلَّذِي حُرِّمَ عَلَيۡكُمۡۚ وَجِئۡتُكُم بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
50. Mpe nandimi na maye mazuamaki na torah(1) mpe nakopesa bino ndingisa mpona kolia maye bapekisaki bino. Mpe nayeli bino elembo kowuta na Nkolo wa bino. Mpe bobanga Allah mpe botosa ngai.
1 Buku oyo ekitaki epaí ya Mûssa.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱللَّهَ رَبِّي وَرَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ هَٰذَا صِرَٰطٞ مُّسۡتَقِيمٞ
51. Ya sôló, Allah azali Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Bobondela ye, oyo nde nzela ya semba.
التفاسير العربية:
۞ فَلَمَّآ أَحَسَّ عِيسَىٰ مِنۡهُمُ ٱلۡكُفۡرَ قَالَ مَنۡ أَنصَارِيٓ إِلَى ٱللَّهِۖ قَالَ ٱلۡحَوَارِيُّونَ نَحۡنُ أَنصَارُ ٱللَّهِ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَٱشۡهَدۡ بِأَنَّا مُسۡلِمُونَ
52. Mpe tango Issa amonaki bopengwi na bango, alobaki ete: Banani bakosunga ngai na nzela ya Allah? Bayekoli naye bayanolaki na koloba été: Biso tozali basungi nayo na nzela ya Allah tondimi na Allah. Mpe yo (Issa) zala nzeneneke na biso ete ya sôló tosili komisokia.
التفاسير العربية:
رَبَّنَآ ءَامَنَّا بِمَآ أَنزَلۡتَ وَٱتَّبَعۡنَا ٱلرَّسُولَ فَٱكۡتُبۡنَا مَعَ ٱلشَّٰهِدِينَ
53. Nkolo na biso tondimi na maye okitisaki mpe tolandi motindami. Tia biso elongo na batatoli ya sôló.
التفاسير العربية:
وَمَكَرُواْ وَمَكَرَ ٱللَّهُۖ وَٱللَّهُ خَيۡرُ ٱلۡمَٰكِرِينَ
54. Mpe basalaki likita ya mabe, Allah mpe asalaki likita, kasi Allah nde azali likolo ya makita nyoso.
التفاسير العربية:
إِذۡ قَالَ ٱللَّهُ يَٰعِيسَىٰٓ إِنِّي مُتَوَفِّيكَ وَرَافِعُكَ إِلَيَّ وَمُطَهِّرُكَ مِنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَجَاعِلُ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوكَ فَوۡقَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِۖ ثُمَّ إِلَيَّ مَرۡجِعُكُمۡ فَأَحۡكُمُ بَيۡنَكُمۡ فِيمَا كُنتُمۡ فِيهِ تَخۡتَلِفُونَ
55. Kanisa(1) tango Allah alobaki: Eh Issa! Ya sôló, ngai nakozwa yo mpe nakomatisa yo epai na ngai mpe na kopetola yo okati ya bapagano. Mpe na kotia baye balandi yo likolo ya bapagano, kino suka ya molongo, sima epai na ngai nde bino nioso bokozonga. Mpe na ko sambisa bino okati ya maye bozalaki na bokabwani.
1 Muhammad.
التفاسير العربية:
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَأُعَذِّبُهُمۡ عَذَابٗا شَدِيدٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
56. Kasi mpona baye bapengwi, nakopesa bango etumbu ya makasi okati ya mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bakozua basalisi te.
التفاسير العربية:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَيُوَفِّيهِمۡ أُجُورَهُمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ
57. Mpe mpona baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, akopesa bango lifuta na bango. Mpe Allah alingaka babubi te.
التفاسير العربية:
ذَٰلِكَ نَتۡلُوهُ عَلَيۡكَ مِنَ ٱلۡأٓيَٰتِ وَٱلذِّكۡرِ ٱلۡحَكِيمِ
58. Wana ezali kati ya mikapo tozali kotangela yo mpe Emoniseli ya bwányá.
التفاسير العربية:
إِنَّ مَثَلَ عِيسَىٰ عِندَ ٱللَّهِ كَمَثَلِ ءَادَمَۖ خَلَقَهُۥ مِن تُرَابٖ ثُمَّ قَالَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
59. Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki.
التفاسير العربية:
ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ
60. Bosembo ezali nde epai na Nkolo nayo. Kasi kozala te elongo na baye bazali na koyimayima.
التفاسير العربية:
فَمَنۡ حَآجَّكَ فِيهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَكَ مِنَ ٱلۡعِلۡمِ فَقُلۡ تَعَالَوۡاْ نَدۡعُ أَبۡنَآءَنَا وَأَبۡنَآءَكُمۡ وَنِسَآءَنَا وَنِسَآءَكُمۡ وَأَنفُسَنَا وَأَنفُسَكُمۡ ثُمَّ نَبۡتَهِلۡ فَنَجۡعَل لَّعۡنَتَ ٱللَّهِ عَلَى ٱلۡكَٰذِبِينَ
61. Kasi oyo akotia yo ntembe, mpe kosuanisa yo na ntina na (Issa) mpe yo osili kozua boyebi, loba na bango ete: Boya tokutana, mpe tobenga bana na biso mpe bana na bino, basi na biso mpe basi na bino, biso mpe bino, na sima tomisenga ete botutu ya Allah ekitela bato ya lokuta kati na biso.
التفاسير العربية:
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡقَصَصُ ٱلۡحَقُّۚ وَمَا مِنۡ إِلَٰهٍ إِلَّا ٱللَّهُۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
62. Ya sôló, oyo nde masapo ya bosembo. Mpe ezali na Nzambe mosusu te sé Allah. Ya sôló, Allah ye nde azali na bokasi, atonda bwanya.
التفاسير العربية:
فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُفۡسِدِينَ
63. Mpe soki bapesi mikongo, ya sôló mpenza Allah ayebi babebisi.
التفاسير العربية:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ تَعَالَوۡاْ إِلَىٰ كَلِمَةٖ سَوَآءِۭ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمۡ أَلَّا نَعۡبُدَ إِلَّا ٱللَّهَ وَلَا نُشۡرِكَ بِهِۦ شَيۡـٔٗا وَلَا يَتَّخِذَ بَعۡضُنَا بَعۡضًا أَرۡبَابٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِۚ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَقُولُواْ ٱشۡهَدُواْ بِأَنَّا مُسۡلِمُونَ
64. Loba: Eh bino bato baye bozua buku! Boya na liloba moko oyo ekosangisa biso na bino ete: Tobondela Nzambe mosusu te sé Allah, mpe tosangisa ye na eloko te, mpe tozua ba Nkolo misusu te na botıki Allah. Soki bapesi mokongo, boloba na bango ete: Bozala banzeneneke ete biso nde tozali bandimi.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تُحَآجُّونَ فِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَمَآ أُنزِلَتِ ٱلتَّوۡرَىٰةُ وَٱلۡإِنجِيلُ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِهِۦٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
65. Eh bino bato bozua buku! Mpona nini bozali kosuana mpona Ibrâhîm? Mpe bino boyebi ete torah(1) mpe indjil(1) mikitaki sé sima naye (Ibrâhîm)? Boye bino bozali kososola te?
1 Bótala na mokapo 3.
التفاسير العربية:
هَٰٓأَنتُمۡ هَٰٓؤُلَآءِ حَٰجَجۡتُمۡ فِيمَا لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞ فَلِمَ تُحَآجُّونَ فِيمَا لَيۡسَ لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
66. Tala bino, bozali kosuana na likambo oyo bino boyebi, kasi mpona nini bozali kosuana na likambo oyo boyebi te? Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
التفاسير العربية:
مَا كَانَ إِبۡرَٰهِيمُ يَهُودِيّٗا وَلَا نَصۡرَانِيّٗا وَلَٰكِن كَانَ حَنِيفٗا مُّسۡلِمٗا وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
67. Ibrâhîm azalaki moyuda mpe moklisto te. Kasi azalaki nde hanifa(1) mondimi, mpe azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah).
1 Kolongua na bosangisi Allah тропа komisokia na Allah ye moko.
التفاسير العربية:
إِنَّ أَوۡلَى ٱلنَّاسِ بِإِبۡرَٰهِيمَ لَلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُ وَهَٰذَا ٱلنَّبِيُّ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۗ وَٱللَّهُ وَلِيُّ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
68. Ya sôló bato bakotuta ntolo mpona Ibrâhîm, bazali ba oyo balandaki ye na ntoma oyo (Muhammad) na bandimi. Allah nde azali mobateli ya bandimi.
التفاسير العربية:
وَدَّت طَّآئِفَةٞ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ لَوۡ يُضِلُّونَكُمۡ وَمَا يُضِلُّونَ إِلَّآ أَنفُسَهُمۡ وَمَا يَشۡعُرُونَ
69. Lisanga ya bato kati na baye bazwa buku balukaka kopengwisa bino, bakopengwisa sé milimo mia bango moko, nzoka nde bazali koyeba te.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَأَنتُمۡ تَشۡهَدُونَ
70. Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah mpe bino bozali banzeneneke?
التفاسير العربية:
يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَلۡبِسُونَ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُونَ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
71. Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kosangisa mabe na bosôló, mpe bozali kobomba bosôló mpe bozali na kati ya koyeba?
التفاسير العربية:
وَقَالَت طَّآئِفَةٞ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ ءَامِنُواْ بِٱلَّذِيٓ أُنزِلَ عَلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَجۡهَ ٱلنَّهَارِ وَٱكۡفُرُوٓاْ ءَاخِرَهُۥ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
72. Mpe lisanga ya bato kati na baye bazua buku, balobi na bato na bango ete: Bondima na maye ekitisama epai ya bandimi(1) na ebandeli ya mokolo, mpe soki ekomi na mpokwa bopengwa na yango, mpo ete bango bazonga.
1 Bandimi: Bazali baye bamisoki na Allah (bamizilima).
التفاسير العربية:
وَلَا تُؤۡمِنُوٓاْ إِلَّا لِمَن تَبِعَ دِينَكُمۡ قُلۡ إِنَّ ٱلۡهُدَىٰ هُدَى ٱللَّهِ أَن يُؤۡتَىٰٓ أَحَدٞ مِّثۡلَ مَآ أُوتِيتُمۡ أَوۡ يُحَآجُّوكُمۡ عِندَ رَبِّكُمۡۗ قُلۡ إِنَّ ٱلۡفَضۡلَ بِيَدِ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ
73. Bondima na bato mosusu te sé na oyo alandi lingomba na bino. Loba: Ya sôló, lisungi na nzela ya semba ezali oyo ya Allah. Mpo ete moko te azua mpe lokola bino, to atelemela bino na yango epai ya Nkolo na bino? Loba: Ya sôló bolamu ezali na maboko ya Allah, apesaka yango na oyo ye alingi, mpe Allah atonda bomengo azali na boyebi koleka.
التفاسير العربية:
يَخۡتَصُّ بِرَحۡمَتِهِۦ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
74. (Allah) apesaka ngolu naye na nani alingi. Mpe Allah nde atonda bolamu koleka.
التفاسير العربية:
۞ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مَنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِقِنطَارٖ يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّنۡ إِن تَأۡمَنۡهُ بِدِينَارٖ لَّا يُؤَدِّهِۦٓ إِلَيۡكَ إِلَّا مَا دُمۡتَ عَلَيۡهِ قَآئِمٗاۗ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَالُواْ لَيۡسَ عَلَيۡنَا فِي ٱلۡأُمِّيِّـۧنَ سَبِيلٞ وَيَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
75. Mpe ezali okati ya baye bazua buku, soki obombi eloko epai naye, akobatela yango kino okoya kozua. Mpe ezali na basusu, soki obombi mwa lopata epai naye, akozongisa yango te kino okolemba na kotelema mpe kotambola epai naye, mpamba te bango balobaka ete: Baye batanga te bakosala biso eloko te. Mpe bazali kobukela Allah lokuta mpe bango bazali kati na koyeba.
التفاسير العربية:
بَلَىٰۚ مَنۡ أَوۡفَىٰ بِعَهۡدِهِۦ وَٱتَّقَىٰ فَإِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
76. Ya sôló, oyo akokokisa elaka naye mpe abangi,(1) ya sôló Allah alingaka babangi.
1 Allah.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَشۡتَرُونَ بِعَهۡدِ ٱللَّهِ وَأَيۡمَٰنِهِمۡ ثَمَنٗا قَلِيلًا أُوْلَٰٓئِكَ لَا خَلَٰقَ لَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ وَلَا يُكَلِّمُهُمُ ٱللَّهُ وَلَا يَنظُرُ إِلَيۡهِمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَلَا يُزَكِّيهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
77. Ya sôló, baye bazali koteka elaka oyo bazwaki na Allah na ntalo moke, mpe bazali kolapa ndayi (ya lokuta), bango wana nde bakozala na eloko te na mokolo ya suka. Mpe Allah akolobisa bango te, mpe akotala bango te mokolo ya suka. Mpe akopetola bango te. Mpe bakozala na etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
وَإِنَّ مِنۡهُمۡ لَفَرِيقٗا يَلۡوُۥنَ أَلۡسِنَتَهُم بِٱلۡكِتَٰبِ لِتَحۡسَبُوهُ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَمَا هُوَ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَيَقُولُونَ هُوَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ وَمَا هُوَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۖ وَيَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
78. Mpe ya sôló, okati na bango basusu bazali kolekisa lolemu na bango mpona kotanga buku mpo bandimela bango ete bazali bato ya buku, kasi wana ewuti kati na buku te. Mpe bazali koloba ewuti epai ya Allah kasi yango ezali ya Allah te, mpe bazali koloba lokuta mpona Allah mpe bango bazali na kati ya koyeba.
التفاسير العربية:
مَا كَانَ لِبَشَرٍ أَن يُؤۡتِيَهُ ٱللَّهُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحُكۡمَ وَٱلنُّبُوَّةَ ثُمَّ يَقُولَ لِلنَّاسِ كُونُواْ عِبَادٗا لِّي مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِن كُونُواْ رَبَّٰنِيِّـۧنَ بِمَا كُنتُمۡ تُعَلِّمُونَ ٱلۡكِتَٰبَ وَبِمَا كُنتُمۡ تَدۡرُسُونَ
79. Esengeli te na moto oyo Allah apesi buku, mpe bwanya mpe bontoma, sima aloba na bato ete: Bozala bawumbu na ngai kasi bawumbu ya Allah te, kasi: Bozala ba nganga ya mayele mpo ete bozali kotangisa buku mpe na oyo bozalaki kotanga.
التفاسير العربية:
وَلَا يَأۡمُرَكُمۡ أَن تَتَّخِذُواْ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ وَٱلنَّبِيِّـۧنَ أَرۡبَابًاۚ أَيَأۡمُرُكُم بِٱلۡكُفۡرِ بَعۡدَ إِذۡ أَنتُم مُّسۡلِمُونَ
80. Mpe atinda bino te(1) mpo ete bozua ba anzelu mpe bantoma bankolo na bino. Akotinda bino na bopengwi na tango bozalaki baye bamisoki?
1 Ntoma.
التفاسير العربية:
وَإِذۡ أَخَذَ ٱللَّهُ مِيثَٰقَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ لَمَآ ءَاتَيۡتُكُم مِّن كِتَٰبٖ وَحِكۡمَةٖ ثُمَّ جَآءَكُمۡ رَسُولٞ مُّصَدِّقٞ لِّمَا مَعَكُمۡ لَتُؤۡمِنُنَّ بِهِۦ وَلَتَنصُرُنَّهُۥۚ قَالَ ءَأَقۡرَرۡتُمۡ وَأَخَذۡتُمۡ عَلَىٰ ذَٰلِكُمۡ إِصۡرِيۖ قَالُوٓاْ أَقۡرَرۡنَاۚ قَالَ فَٱشۡهَدُواْ وَأَنَا۠ مَعَكُم مِّنَ ٱلشَّٰهِدِينَ
81. Mpe tango Allah azuaki elaka oyo na bantoma ete: Na tango inso, nakopesa bino buku mpe bwanya, mpe na sima motindami mosusu akoya mpona kondima na maye bozali na yango, esengeli na bino kondima naye mpe kosalisa ye alobi na bango: Boye bondimi mpe bozui mokano na ngai? Bazongisi ete: Tondimi, mpe bozala banzeneneke ngai mpe nazali elongo na bino na kati ya banzeneneke.
التفاسير العربية:
فَمَن تَوَلَّىٰ بَعۡدَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
82. Mpe oyo akopesa mokongo sima na yango, bango nde bato mabe.
التفاسير العربية:
أَفَغَيۡرَ دِينِ ٱللَّهِ يَبۡغُونَ وَلَهُۥٓ أَسۡلَمَ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ طَوۡعٗا وَكَرۡهٗا وَإِلَيۡهِ يُرۡجَعُونَ
83. Bazali koluka lingomba mususu, mpe batiki lingomba ya Allah ya sôló, ye oyo bikelamu binso bizali na likolo mpe na nsé, bazali komikitisa, balinga balinga te, mpe epai naye nde bakozongisama.
التفاسير العربية:
قُلۡ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَمَآ أُنزِلَ عَلَيۡنَا وَمَآ أُنزِلَ عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطِ وَمَآ أُوتِيَ مُوسَىٰ وَعِيسَىٰ وَٱلنَّبِيُّونَ مِن رَّبِّهِمۡ لَا نُفَرِّقُ بَيۡنَ أَحَدٖ مِّنۡهُمۡ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ
84. Loba: Tondimi na Allah, mpe tondimi na maye makitisameli biso, ndenge moko na maye makitisamaki epai na Ibrâhîm, na Ismâïl, na Is’hâq, mpe Ya’qûb mpe mabota, tondimi mpe na maye mapesamaki epai na Mûssa mpe Issa mpe bantoma, kowuta epai na Nkolo na bango, tokotia bokeseni moko te kati na bango, mpe epai naye(1) nde to misoki.
1 Allah.
التفاسير العربية:
وَمَن يَبۡتَغِ غَيۡرَ ٱلۡإِسۡلَٰمِ دِينٗا فَلَن يُقۡبَلَ مِنۡهُ وَهُوَ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
85. Na moto oyo akozua lingomba mosusu, mpe atiki islamu, bakondimela ye yango te. Mpe na mokolo ya suka akozala elongo moko na bazangi.
التفاسير العربية:
كَيۡفَ يَهۡدِي ٱللَّهُ قَوۡمٗا كَفَرُواْ بَعۡدَ إِيمَٰنِهِمۡ وَشَهِدُوٓاْ أَنَّ ٱلرَّسُولَ حَقّٞ وَجَآءَهُمُ ٱلۡبَيِّنَٰتُۚ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
86. Ndenge nini Allah akokamba bato baye bapengwi na sima ya kondima, mpe bamoni ete motindami azali na bosôló, mpe bilembo biyelaki bango? Mpe Allah akambaka babubi te.
التفاسير العربية:
أُوْلَٰٓئِكَ جَزَآؤُهُمۡ أَنَّ عَلَيۡهِمۡ لَعۡنَةَ ٱللَّهِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ وَٱلنَّاسِ أَجۡمَعِينَ
87. Ba oyo wana lifuta lia bango ya sôló bakozua botutu bwa Allah, na ya ba anzelu na ya bato banso.
التفاسير العربية:
خَٰلِدِينَ فِيهَا لَا يُخَفَّفُ عَنۡهُمُ ٱلۡعَذَابُ وَلَا هُمۡ يُنظَرُونَ
88. Libela na kati na yango (lifelo). Bakokutola bango etumbu te, mpe bakopemisama ata moke te.
التفاسير العربية:
إِلَّا ٱلَّذِينَ تَابُواْ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ وَأَصۡلَحُواْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
89. Longola sé ba oyo basali tubela sima na yango mpe babongisi. Ya sôló, Allah azali molimbisi atonda mawa.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بَعۡدَ إِيمَٰنِهِمۡ ثُمَّ ٱزۡدَادُواْ كُفۡرٗا لَّن تُقۡبَلَ تَوۡبَتُهُمۡ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلضَّآلُّونَ
90. Ya sôló baye bapengwi sima ya bondimi bwa bango, sima bakobi na bopengwi, tubela na bango ekondimama te. Mpe bango nde babungi.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَمَاتُواْ وَهُمۡ كُفَّارٞ فَلَن يُقۡبَلَ مِنۡ أَحَدِهِم مِّلۡءُ ٱلۡأَرۡضِ ذَهَبٗا وَلَوِ ٱفۡتَدَىٰ بِهِۦٓۗ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
91. Ya sôló, baye bapengwi mpe liwa lizui bango na bopengwi, bakondimelaka te moko kati na bango ata soki bapesi mabele etondi na wolo ekokangola ye te, mpe bakozala na etumbu enene mpe bakozala na basungi te.
التفاسير العربية:
لَن تَنَالُواْ ٱلۡبِرَّ حَتَّىٰ تُنفِقُواْ مِمَّا تُحِبُّونَۚ وَمَا تُنفِقُواْ مِن شَيۡءٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ بِهِۦ عَلِيمٞ
92. Bokozwa bolamu te kino bokobimisa ya malamu okati ya maye bolingaka. Mpe na nyoso oyo bobimisaka, ya sôló Allah ayebi yango.
التفاسير العربية:
۞ كُلُّ ٱلطَّعَامِ كَانَ حِلّٗا لِّبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ إِلَّا مَا حَرَّمَ إِسۡرَٰٓءِيلُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ مِن قَبۡلِ أَن تُنَزَّلَ ٱلتَّوۡرَىٰةُۚ قُلۡ فَأۡتُواْ بِٱلتَّوۡرَىٰةِ فَٱتۡلُوهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
93. Bilei binso bindimamaki kolia mpona bana ya isalayele, longola sé biye isalayele amipekisaki yambo ete torah(1) ekita, loba na bango ete: Boya na torah mpe botanga yango soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
1 Bótala na mikapo 3, 48 na 65.
التفاسير العربية:
فَمَنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
94. Mpe oyo akobukela Allah lokuta sima na yango, bango wana bazali babubi.
التفاسير العربية:
قُلۡ صَدَقَ ٱللَّهُۗ فَٱتَّبِعُواْ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِيمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
95. Loba: Allah olobi bosembo ete: Bolanda bosôló ya lingomba ya Ibrâhîm na kati ya bomoko ya Allah, kasi (Ibrâhîm) azalaki te elongo na baye basangisaki (Allah).
التفاسير العربية:
إِنَّ أَوَّلَ بَيۡتٖ وُضِعَ لِلنَّاسِ لَلَّذِي بِبَكَّةَ مُبَارَكٗا وَهُدٗى لِّلۡعَٰلَمِينَ
96. Ya sôló, ndako ya yambo oyo etiamaki na mokili mpona bato, ezali ndako esantu ya Makkah, oyo epambolama, yango ezali nzela ya bokambi mpona mokili mobimba.
التفاسير العربية:
فِيهِ ءَايَٰتُۢ بَيِّنَٰتٞ مَّقَامُ إِبۡرَٰهِيمَۖ وَمَن دَخَلَهُۥ كَانَ ءَامِنٗاۗ وَلِلَّهِ عَلَى ٱلنَّاسِ حِجُّ ٱلۡبَيۡتِ مَنِ ٱسۡتَطَاعَ إِلَيۡهِ سَبِيلٗاۚ وَمَن كَفَرَ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَنِيٌّ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
97. Kati na yango bilembo bizali, ndakisa esika eye Ibrâhîm atelemaki. Oyo akokota na kati na yango abatelami. Mpe esengeli na bato kosala hajj pona Allah na ndako wana, mpo na moto oyo azui makoki ya kokoma kuna. Kasi oyo akoboya, ya sôló, Allah atonda bomengo koleka mokili mobimba.
التفاسير العربية:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَٱللَّهُ شَهِيدٌ عَلَىٰ مَا تَعۡمَلُونَ
98. Loba: Eh bino baye bozua buku! Mpona nini bozali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe Allah azali nzeneneke na maye bozali kosala?
التفاسير العربية:
قُلۡ يَٰٓأَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ لِمَ تَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ مَنۡ ءَامَنَ تَبۡغُونَهَا عِوَجٗا وَأَنتُمۡ شُهَدَآءُۗ وَمَا ٱللَّهُ بِغَٰفِلٍ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
99. Loba: Eh baye bozua buku! Mpona nini bozali kopekisa bandimi na nzela ya (Allah) mpona koluka kotia mbilinga mbilinga mpe bino bozali banzeneneke? Mpe Allah abosani te na maye bozali kosala.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تُطِيعُواْ فَرِيقٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ يَرُدُّوكُم بَعۡدَ إِيمَٰنِكُمۡ كَٰفِرِينَ
100. Eh bino bandimi! Soki botosi lisanga kati ya baye bazua buku liboso, bakozongisa bino na bopengwi sima ya kondima na bino.
التفاسير العربية:
وَكَيۡفَ تَكۡفُرُونَ وَأَنتُمۡ تُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ ءَايَٰتُ ٱللَّهِ وَفِيكُمۡ رَسُولُهُۥۗ وَمَن يَعۡتَصِم بِٱللَّهِ فَقَدۡ هُدِيَ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
101. Ndenge nini bino bokopengwa mpe bino boyokaka mikapo mia Allah mizali kotangama, mpe bozali na motindami naye okati na bino? Oyo akomipesa na Allah ye wana nde asili kokambama na nzela ya nsemba.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ حَقَّ تُقَاتِهِۦ وَلَا تَمُوتُنَّ إِلَّا وَأَنتُم مُّسۡلِمُونَ
102. Eh bino baye bondimi! Bobanga Allah bobangi ya sôló, mpe liwa ekuta bino te sé bozali Na kati ya komisokia.
التفاسير العربية:
وَٱعۡتَصِمُواْ بِحَبۡلِ ٱللَّهِ جَمِيعٗا وَلَا تَفَرَّقُواْۚ وَٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ إِذۡ كُنتُمۡ أَعۡدَآءٗ فَأَلَّفَ بَيۡنَ قُلُوبِكُمۡ فَأَصۡبَحۡتُم بِنِعۡمَتِهِۦٓ إِخۡوَٰنٗا وَكُنتُمۡ عَلَىٰ شَفَا حُفۡرَةٖ مِّنَ ٱلنَّارِ فَأَنقَذَكُم مِّنۡهَاۗ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ لَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ
103. Mpe bokangama lisanga o singa ya Allah mpe bokabwana te. Bokanisa bolamu bwa Allah eye apesi bino na tango bozalaki koyinana bino na bino, mpe akangisi mitema na bino, mpe na bolamu naye, bokomaki bandeko. Mpe bozalaki pembeni ya libulu ya mòtò na sima abikisaki bino na yango. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo ete bokambama na nzela ya semba.
التفاسير العربية:
وَلۡتَكُن مِّنكُمۡ أُمَّةٞ يَدۡعُونَ إِلَى ٱلۡخَيۡرِ وَيَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
104. Mpe ezala okati na bino, umma(1) bazali kobenga na bolamu mpe bazali kotinda na kosala bolamu mpe bazali kopekisa mabe. Mpe bango nde balongi.
1 Umma: Lisanga ya bato. Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo 158.
التفاسير العربية:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ تَفَرَّقُواْ وَٱخۡتَلَفُواْ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡبَيِّنَٰتُۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
105. Kasi bozala te lokola ba oyo basuanaki mpe bakabwanaki sé na tango ndimbola bisilaki ko komela bango. Bango wana nde bazali na etumbu ya monene.
التفاسير العربية:
يَوۡمَ تَبۡيَضُّ وُجُوهٞ وَتَسۡوَدُّ وُجُوهٞۚ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ٱسۡوَدَّتۡ وُجُوهُهُمۡ أَكَفَرۡتُم بَعۡدَ إِيمَٰنِكُمۡ فَذُوقُواْ ٱلۡعَذَابَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ
106. Mokolo oyo bilongi bikongenga mpe bilongi bisusu bikoyinda. Kasi mpona ba oyo bilongi bikoyinda (bako tunama), bopengwi lisusu sima ya kondima na bino? Na bongo bozua etumbu na ntina na bopengwi na bino.
التفاسير العربية:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ ٱبۡيَضَّتۡ وُجُوهُهُمۡ فَفِي رَحۡمَةِ ٱللَّهِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
107. Kasi mpona ba oyo bilongi na bango bikongenga, bakozala o’kati ya ngolu(1) ya Allah epai kuna bakozala seko na seko.
1 Na lola.
التفاسير العربية:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱللَّهِ نَتۡلُوهَا عَلَيۡكَ بِٱلۡحَقِّۗ وَمَا ٱللَّهُ يُرِيدُ ظُلۡمٗا لِّلۡعَٰلَمِينَ
108. Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo yango na bosôló. Mpe Allah alingaka kobuba te na Mokili.
التفاسير العربية:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
109. Mpe manso mazali olikolo mpe na nsé mazali ya Allah. Mpe Epai na Allah Makambo manso makozongisama.
التفاسير العربية:
كُنتُمۡ خَيۡرَ أُمَّةٍ أُخۡرِجَتۡ لِلنَّاسِ تَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَتَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَتُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِۗ وَلَوۡ ءَامَنَ أَهۡلُ ٱلۡكِتَٰبِ لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۚ مِّنۡهُمُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَأَكۡثَرُهُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
110. Bino bozali umma(2) ya malamu oyo ebimisamaki okati ya bato: Mpamba te botindaka bato basala malamu, mpe bopekisaka bato kosala mabe mpe bondimi na Allah. Kasi soki Baye Bazwa Buku bandimaka, nde ezalaki malamu mpona bango. Moke kati na bango bazali bandimi, kasi ebele nde bazali bato mabe.
2 Umma: Awa elakisi lisanga ya bato. Bótala mpe suratu Al-Baqarah 128.
التفاسير العربية:
لَن يَضُرُّوكُمۡ إِلَّآ أَذٗىۖ وَإِن يُقَٰتِلُوكُمۡ يُوَلُّوكُمُ ٱلۡأَدۡبَارَ ثُمَّ لَا يُنصَرُونَ
111. Bakokoka te komonisa bino mpasi ya minene, sé ya mikemike. Mpe soki babundisi bino, suka suka bakopesa mokongo mpe bakokima, mpe bakosalisama te.
التفاسير العربية:
ضُرِبَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلذِّلَّةُ أَيۡنَ مَا ثُقِفُوٓاْ إِلَّا بِحَبۡلٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَحَبۡلٖ مِّنَ ٱلنَّاسِ وَبَآءُو بِغَضَبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَضُرِبَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلۡمَسۡكَنَةُۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَانُواْ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلۡأَنۢبِيَآءَ بِغَيۡرِ حَقّٖۚ ذَٰلِكَ بِمَا عَصَواْ وَّكَانُواْ يَعۡتَدُونَ
112. Bisika binso bazuamaki, babetamaki mpe bakitisamaki, sé soki ezali boyokani kowuta epai na Allah mpe boyokani kowuta epai na Bato. Nkanda ya Allah ezali likolo na bango, mpe bampasi na bampasi, mpo ete baboyaki kondima na mikapo mia Allah mpe bazali koboma ba ntoma mpamba. Mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo.
التفاسير العربية:
۞ لَيۡسُواْ سَوَآءٗۗ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ أُمَّةٞ قَآئِمَةٞ يَتۡلُونَ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ ءَانَآءَ ٱلَّيۡلِ وَهُمۡ يَسۡجُدُونَ
113. Bazali nyoso ndenge moko te. Na kati na baye bazwa buku, ezali na umma(1) moko etelemaka na butu mpona kotanga buku ya Allah, mpe bazali kofukamela ye.
1 Umma: Awa ezali lisanga, bótala suratu Al-Baqarah mokapo 128.
التفاسير العربية:
يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَيَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَيُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡخَيۡرَٰتِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
114. Bandimaka na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe batindaka kosala malamu mpe bapekisaka kosala mabe, mpe bazalaka na lombango mpona kosala misala ya malamu. Bango wana nde bazali elongo moko na bato ya malamu.
التفاسير العربية:
وَمَا يَفۡعَلُواْ مِنۡ خَيۡرٖ فَلَن يُكۡفَرُوهُۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُتَّقِينَ
115. Mpe maye manso ya malamu bakosala makoboyama te, mpe Allah ayebi babangi.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَن تُغۡنِيَ عَنۡهُمۡ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُهُم مِّنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗاۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
116. Ya sôló baye bapengwi, bomengo na bongo na bana na bango ekosalisa bango na eloko moko te epai na Allah. Bango nde bato ya môtô mpe bakozala kuna seko.
التفاسير العربية:
مَثَلُ مَا يُنفِقُونَ فِي هَٰذِهِ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا كَمَثَلِ رِيحٖ فِيهَا صِرٌّ أَصَابَتۡ حَرۡثَ قَوۡمٖ ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَأَهۡلَكَتۡهُۚ وَمَا ظَلَمَهُمُ ٱللَّهُ وَلَٰكِنۡ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
117. Ndakisa ya maye bazali kobimisa yango mpona bomoyi ya nsé, ezali lokola mopepe ya malili makasi ebebisi elanga ya libota moko oyo basalaki lisumu na milimo mia bango moko, mpe Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُواْ بِطَانَةٗ مِّن دُونِكُمۡ لَا يَأۡلُونَكُمۡ خَبَالٗا وَدُّواْ مَا عَنِتُّمۡ قَدۡ بَدَتِ ٱلۡبَغۡضَآءُ مِنۡ أَفۡوَٰهِهِمۡ وَمَا تُخۡفِي صُدُورُهُمۡ أَكۡبَرُۚ قَدۡ بَيَّنَّا لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِۖ إِن كُنتُمۡ تَعۡقِلُونَ
118. Eh Bino bandimi! Tika ete bozua sÓkÓ moke te baninga libanda na bino, balembaka te na kotia potopoto kati na bino, basili kolakisa bino kimonguna kowuta na minoko na bango, kasi oyo bazali kobomba na mitema ezali mabe koleka. Na boye tosili kolimbolela bino bilembo, soki bokozala na bososoli.
التفاسير العربية:
هَٰٓأَنتُمۡ أُوْلَآءِ تُحِبُّونَهُمۡ وَلَا يُحِبُّونَكُمۡ وَتُؤۡمِنُونَ بِٱلۡكِتَٰبِ كُلِّهِۦ وَإِذَا لَقُوكُمۡ قَالُوٓاْ ءَامَنَّا وَإِذَا خَلَوۡاْ عَضُّواْ عَلَيۡكُمُ ٱلۡأَنَامِلَ مِنَ ٱلۡغَيۡظِۚ قُلۡ مُوتُواْ بِغَيۡظِكُمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
119. Bino nde bozali kolinga bango mpe bango balingi bino te: Mpe bozali kondima na buku mobimba na yango, mpe soki bakutani na bino, balobaka: Tondimi (na Allah), kasi soki batikali bango na bango, bazali kosua misapi na bango mpona kolakisa nkanda. Loba: Bokufa na mitema mabe na bino na koyina. Ya sôló, Allah ayebi mabombami ya mitema.
التفاسير العربية:
إِن تَمۡسَسۡكُمۡ حَسَنَةٞ تَسُؤۡهُمۡ وَإِن تُصِبۡكُمۡ سَيِّئَةٞ يَفۡرَحُواْ بِهَاۖ وَإِن تَصۡبِرُواْ وَتَتَّقُواْ لَا يَضُرُّكُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـًٔاۗ إِنَّ ٱللَّهَ بِمَا يَعۡمَلُونَ مُحِيطٞ
120. Soki bolamu (ya Allah) ezui bino basiliki, mpe soki mpasi ezui bino basepeli. Kasi soki bokangi mitema mpe bobangi (Allah), likita na bango ya mabe ekosala bino eloko moko te. Ya sôló, Allah ayebi maye manso bazali kosala.
التفاسير العربية:
وَإِذۡ غَدَوۡتَ مِنۡ أَهۡلِكَ تُبَوِّئُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ مَقَٰعِدَ لِلۡقِتَالِۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
121. Mpe tango otikaki libota nayo na ntongo, okei mpona kolakisa bandimi bisika bakotelema mpona kobunda. Mpe Allah azali Moyoki atonda boyebi.
التفاسير العربية:
إِذۡ هَمَّت طَّآئِفَتَانِ مِنكُمۡ أَن تَفۡشَلَا وَٱللَّهُ وَلِيُّهُمَاۗ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
122. Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango.
التفاسير العربية:
وَلَقَدۡ نَصَرَكُمُ ٱللَّهُ بِبَدۡرٖ وَأَنتُمۡ أَذِلَّةٞۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
123. Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr.(1) Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi.
1 Badr: Ezali esika oyo bitumba elekaki kati na ba mizilima na ba pagano. Ezalaki na mbula ya mibale ya hidjira (mbula ya islamu).
التفاسير العربية:
إِذۡ تَقُولُ لِلۡمُؤۡمِنِينَ أَلَن يَكۡفِيَكُمۡ أَن يُمِدَّكُمۡ رَبُّكُم بِثَلَٰثَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُنزَلِينَ
124. Tango ozali koyebisa na bandimi été: Ekoki na bino te été Nkolo na bino akitisa ba anzelu nkoto misatu mpona kosunga bino?
التفاسير العربية:
بَلَىٰٓۚ إِن تَصۡبِرُواْ وَتَتَّقُواْ وَيَأۡتُوكُم مِّن فَوۡرِهِمۡ هَٰذَا يُمۡدِدۡكُمۡ رَبُّكُم بِخَمۡسَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُسَوِّمِينَ
125. Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba.
التفاسير العربية:
وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشۡرَىٰ لَكُمۡ وَلِتَطۡمَئِنَّ قُلُوبُكُم بِهِۦۗ وَمَا ٱلنَّصۡرُ إِلَّا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ
126. Mpe Allah atiaki yango te sé mpona kopesa bino sango elamu mpe mpona kokitisa mitema mia bino. Mpe elonga ewutaka sé na Allah, Nkolo bokasi atonda bwanya.
التفاسير العربية:
لِيَقۡطَعَ طَرَفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَوۡ يَكۡبِتَهُمۡ فَيَنقَلِبُواْ خَآئِبِينَ
127. Mpo akoka kokweisa mpe kobebisa basusu baye bapengwi to akitisa bango mpe bayoka nsoni.
التفاسير العربية:
لَيۡسَ لَكَ مِنَ ٱلۡأَمۡرِ شَيۡءٌ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡ أَوۡ يُعَذِّبَهُمۡ فَإِنَّهُمۡ ظَٰلِمُونَ
128. Ozali na eloko moko te na kati ya likambo oyo, to akolimbisa(1) bango to akopesa bango etumbu, mpo ete bazali bato mabe.
1 Allah.
التفاسير العربية:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ يَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُ وَيُعَذِّبُ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
129. Manso mazali o’likolo na nsé mazali ya Allah. Alimbisaka na oyo alingi. Mpe apesaka etumbu na oyo alingi, mpe Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَأۡكُلُواْ ٱلرِّبَوٰٓاْ أَضۡعَٰفٗا مُّضَٰعَفَةٗۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
130. Eh bino bandimi! Bolia misolo mia ekotama te na bobakisi misolo mia bino, mpe bobanga Allah mpo bokoka kolonga.
التفاسير العربية:
وَٱتَّقُواْ ٱلنَّارَ ٱلَّتِيٓ أُعِدَّتۡ لِلۡكَٰفِرِينَ
131. Mpe bobanga mòtò ya lifelo oyo ebongisamaki mpona bapagano.
التفاسير العربية:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
132. Mpe botosa Allah na motindami, mpo ete boyokama mawa.
التفاسير العربية:
۞ وَسَارِعُوٓاْ إِلَىٰ مَغۡفِرَةٖ مِّن رَّبِّكُمۡ وَجَنَّةٍ عَرۡضُهَا ٱلسَّمَٰوَٰتُ وَٱلۡأَرۡضُ أُعِدَّتۡ لِلۡمُتَّقِينَ
133. Bowela kosala misala ya malamu miye mikopesa bino bolimbisi epai na Nkolo wa bino, mpe paradizu eye monene na yango ezali lokola likolo mpe mabele, Eye ebongisamaki mpona babangi.(1)
1 Allah.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ يُنفِقُونَ فِي ٱلسَّرَّآءِ وَٱلضَّرَّآءِ وَٱلۡكَٰظِمِينَ ٱلۡغَيۡظَ وَٱلۡعَافِينَ عَنِ ٱلنَّاسِۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
134. Baye babimisaka na tango ya bisengo mpe na tango ya mpasi, mpe baye bakokaka kokanga nkanda te mpe baye balimbisaka bato, Mpe Allah alingaka bato ya bolamu.
التفاسير العربية:
وَٱلَّذِينَ إِذَا فَعَلُواْ فَٰحِشَةً أَوۡ ظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ ذَكَرُواْ ٱللَّهَ فَٱسۡتَغۡفَرُواْ لِذُنُوبِهِمۡ وَمَن يَغۡفِرُ ٱلذُّنُوبَ إِلَّا ٱللَّهُ وَلَمۡ يُصِرُّواْ عَلَىٰ مَا فَعَلُواْ وَهُمۡ يَعۡلَمُونَ
135. Mpe baye bazali soki basali mbeba to bamisali mabe, bakanisi Allah mpe basengi bolimbisi mpona yango, mpe moko te alimbisaka masumu bobele Allah, mpe batingamaka te na maye bazalaki kosala ya mabe, na bango bazali na kati ya koyeba.
التفاسير العربية:
أُوْلَٰٓئِكَ جَزَآؤُهُم مَّغۡفِرَةٞ مِّن رَّبِّهِمۡ وَجَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَنِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ
136. Bango wana nde lifuta na bango ezali bolimbisi kowuta epai ya Nkolo na bango, mpe baparadizu wapi epai mingala mizali kotiola, bakozala libela na kati, oyo nde lifuta ya basali malamu.
التفاسير العربية:
قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِكُمۡ سُنَنٞ فَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
137. Makambo ebele esilaki koleka liboso na bino, botambola na mokili mpe bomona ndenge nini bato ya mabe basukaki.
التفاسير العربية:
هَٰذَا بَيَانٞ لِّلنَّاسِ وَهُدٗى وَمَوۡعِظَةٞ لِّلۡمُتَّقِينَ
138. Oyo ezali mateya ya polele mpona bato, mpe lisungi na malendisi mpona babangi.(1)
1 Allah.
التفاسير العربية:
وَلَا تَهِنُواْ وَلَا تَحۡزَنُواْ وَأَنتُمُ ٱلۡأَعۡلَوۡنَ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
139. Botika babeta bino te mpe bomikitisa te mpo bozali likolo na bango, soki ya sôló bozali bandimi.
التفاسير العربية:
إِن يَمۡسَسۡكُمۡ قَرۡحٞ فَقَدۡ مَسَّ ٱلۡقَوۡمَ قَرۡحٞ مِّثۡلُهُۥۚ وَتِلۡكَ ٱلۡأَيَّامُ نُدَاوِلُهَا بَيۡنَ ٱلنَّاسِ وَلِيَعۡلَمَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَيَتَّخِذَ مِنكُمۡ شُهَدَآءَۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ
140. Soki bozoki mpota, bango mpe bazoki lokola. Na boye tozali kotambuisa mikolo okati na bato mpo ete Allah ayeba bandimi, mpe azua okati na bino baye bawei mpona kobunda na nzela naye, mpe Allah alingaka bato ya mabe te.
التفاسير العربية:
وَلِيُمَحِّصَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَيَمۡحَقَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
141. Mpe mpo ete Allah apetola bandimi mpe alimwisa bapagano.
التفاسير العربية:
أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تَدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ وَلَمَّا يَعۡلَمِ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ مِنكُمۡ وَيَعۡلَمَ ٱلصَّٰبِرِينَ
142. Bozali kolikia kokota na lola mpe naino Allah ameki te ba nani kati na bino babundaki, mpe banani bakangi mitema?
التفاسير العربية:
وَلَقَدۡ كُنتُمۡ تَمَنَّوۡنَ ٱلۡمَوۡتَ مِن قَبۡلِ أَن تَلۡقَوۡهُ فَقَدۡ رَأَيۡتُمُوهُ وَأَنتُمۡ تَنظُرُونَ
143. Mpe bozalaki kolikia liwa yambo ete eyela bino. Kasi bosilaki komona yango, mpe bozali kotala.
التفاسير العربية:
وَمَا مُحَمَّدٌ إِلَّا رَسُولٞ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهِ ٱلرُّسُلُۚ أَفَإِيْن مَّاتَ أَوۡ قُتِلَ ٱنقَلَبۡتُمۡ عَلَىٰٓ أَعۡقَٰبِكُمۡۚ وَمَن يَنقَلِبۡ عَلَىٰ عَقِبَيۡهِ فَلَن يَضُرَّ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۚ وَسَيَجۡزِي ٱللَّهُ ٱلشَّٰكِرِينَ
144. Mpe Muhammad azali sé motindami. Mpe batindami ebele balekaki liboso(1) naye. Soki akufi to babomi ye na bitumba, bokozonga lisusu na bopagano? Oyo kati na bino akozonga na bopagano, ekotungisa Allah na eloko moko te, mpe Allah akofuta baye bazali kotondo ye botondi.
1 “Ebele balekaki liboso naye”: Elakisi: Na kati ya batindami, ezali na baye bakufa mpe ezali na baye Allah atombola o likolo.
التفاسير العربية:
وَمَا كَانَ لِنَفۡسٍ أَن تَمُوتَ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِ كِتَٰبٗا مُّؤَجَّلٗاۗ وَمَن يُرِدۡ ثَوَابَ ٱلدُّنۡيَا نُؤۡتِهِۦ مِنۡهَا وَمَن يُرِدۡ ثَوَابَ ٱلۡأٓخِرَةِ نُؤۡتِهِۦ مِنۡهَاۚ وَسَنَجۡزِي ٱلشَّٰكِرِينَ
145. Mpe moko te akoki kokufa sé ezala na mokano ya Allah mpe elaka eye asilaki kotiela ye. Mpe oyo akolinga lifuta lia mokili, tokopesa ye yango Mpe oyo akolinga lifuta lia mokolo ya suka tokopesa ye yango, mpe tokofutaka baye bazali kotondo Allah botondi.
التفاسير العربية:
وَكَأَيِّن مِّن نَّبِيّٖ قَٰتَلَ مَعَهُۥ رِبِّيُّونَ كَثِيرٞ فَمَا وَهَنُواْ لِمَآ أَصَابَهُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَمَا ضَعُفُواْ وَمَا ٱسۡتَكَانُواْۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلصَّٰبِرِينَ
146. Mpe ebele kati ya bantoma babundaki elongo na balandi ye, ebele ya banganga Nzambe, babangaki te na oyo ezuaki bango o kati ya nzela ya Allah, mpe balembaki te mpe batikaki ntaka te, mpe Allah alingaka bakangi mitema.
التفاسير العربية:
وَمَا كَانَ قَوۡلَهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَإِسۡرَافَنَا فِيٓ أَمۡرِنَا وَثَبِّتۡ أَقۡدَامَنَا وَٱنصُرۡنَا عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
147. Liloba na bango ezalaki sé ete: Eh Nkolo! Limbisa biso masumu na biso mpe maye tolutisi ndelo na yango, mpe lendisa matambi na biso mpe pesa biso elonga likolo na baye bapengwi.
التفاسير العربية:
فَـَٔاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ ثَوَابَ ٱلدُّنۡيَا وَحُسۡنَ ثَوَابِ ٱلۡأٓخِرَةِۗ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
148. Mpe Allah apesaki bango mbano ya malamu awa na nsé mpe ya kitoko koleka o mokolo ya suka. Mpe Allah alingi bato ya malamu.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تُطِيعُواْ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يَرُدُّوكُمۡ عَلَىٰٓ أَعۡقَٰبِكُمۡ فَتَنقَلِبُواْ خَٰسِرِينَ
149. Eh bino bandimi! Soki botosi bapengwi, bakozongisa bino na bopagano mpe bokozanga.
التفاسير العربية:
بَلِ ٱللَّهُ مَوۡلَىٰكُمۡۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلنَّٰصِرِينَ
150. Allah azali mosungi wa bino. Mpe ye azali mosungi ya malamu.
التفاسير العربية:
سَنُلۡقِي فِي قُلُوبِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلرُّعۡبَ بِمَآ أَشۡرَكُواْ بِٱللَّهِ مَا لَمۡ يُنَزِّلۡ بِهِۦ سُلۡطَٰنٗاۖ وَمَأۡوَىٰهُمُ ٱلنَّارُۖ وَبِئۡسَ مَثۡوَى ٱلظَّٰلِمِينَ
151. Tokotia kobanga na mitema ya bapagano mpo ete bango basangisaki Allah na maye bazalaki na bilembetele na yango te kowuta epai naye. Na yango efandelo na bango ekozala okati ya môtô, oyo nde esika ya mabe mpona bato ya mabe!
التفاسير العربية:
وَلَقَدۡ صَدَقَكُمُ ٱللَّهُ وَعۡدَهُۥٓ إِذۡ تَحُسُّونَهُم بِإِذۡنِهِۦۖ حَتَّىٰٓ إِذَا فَشِلۡتُمۡ وَتَنَٰزَعۡتُمۡ فِي ٱلۡأَمۡرِ وَعَصَيۡتُم مِّنۢ بَعۡدِ مَآ أَرَىٰكُم مَّا تُحِبُّونَۚ مِنكُم مَّن يُرِيدُ ٱلدُّنۡيَا وَمِنكُم مَّن يُرِيدُ ٱلۡأٓخِرَةَۚ ثُمَّ صَرَفَكُمۡ عَنۡهُمۡ لِيَبۡتَلِيَكُمۡۖ وَلَقَدۡ عَفَا عَنكُمۡۗ وَٱللَّهُ ذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
152. Ya sôló, Allah akokisaki elaka naye epai na bino, tango bobomaki bango ebele na ndingisa naye(1), kino tango bolembaki, mpe bokomaki kosuana, mpe bozangaki botosi na tango eye alakisaki bino maye bolingaka. Kati na bino basusu balingaki mokili, mpe basusu balingaki mokolo ya suka. Azongisaki bino sima liboso na bango mpo ete ameka bino mpe asila kolimbisa bino. Kasi Allah nde atonda bolamu likolo ya bandimi.
1 Allah.
التفاسير العربية:
۞ إِذۡ تُصۡعِدُونَ وَلَا تَلۡوُۥنَ عَلَىٰٓ أَحَدٖ وَٱلرَّسُولُ يَدۡعُوكُمۡ فِيٓ أُخۡرَىٰكُمۡ فَأَثَٰبَكُمۡ غَمَّۢا بِغَمّٖ لِّكَيۡلَا تَحۡزَنُواْ عَلَىٰ مَا فَاتَكُمۡ وَلَا مَآ أَصَٰبَكُمۡۗ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
153. Tango bokimaki (kobunda) bozongaki sima te mpona kosalisa ata moto moko, mpe motindami (Muhammad) azali kobenga bino. Mpe (Allah) apesaki bino mawa likolo na mawa mpo ete boyoka mpasi te na mitema mpona biloko bozangaki kozua, mpe na makambo mazuaki bino. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
التفاسير العربية:
ثُمَّ أَنزَلَ عَلَيۡكُم مِّنۢ بَعۡدِ ٱلۡغَمِّ أَمَنَةٗ نُّعَاسٗا يَغۡشَىٰ طَآئِفَةٗ مِّنكُمۡۖ وَطَآئِفَةٞ قَدۡ أَهَمَّتۡهُمۡ أَنفُسُهُمۡ يَظُنُّونَ بِٱللَّهِ غَيۡرَ ٱلۡحَقِّ ظَنَّ ٱلۡجَٰهِلِيَّةِۖ يَقُولُونَ هَل لَّنَا مِنَ ٱلۡأَمۡرِ مِن شَيۡءٖۗ قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَمۡرَ كُلَّهُۥ لِلَّهِۗ يُخۡفُونَ فِيٓ أَنفُسِهِم مَّا لَا يُبۡدُونَ لَكَۖ يَقُولُونَ لَوۡ كَانَ لَنَا مِنَ ٱلۡأَمۡرِ شَيۡءٞ مَّا قُتِلۡنَا هَٰهُنَاۗ قُل لَّوۡ كُنتُمۡ فِي بُيُوتِكُمۡ لَبَرَزَ ٱلَّذِينَ كُتِبَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقَتۡلُ إِلَىٰ مَضَاجِعِهِمۡۖ وَلِيَبۡتَلِيَ ٱللَّهُ مَا فِي صُدُورِكُمۡ وَلِيُمَحِّصَ مَا فِي قُلُوبِكُمۡۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
154. Sima ya ba mpasi, (Allah) akitiseli bino kimia, mpe mpongi ezuaki lisanga kati na bino, kasi basusu kati na bino bazuaki mpasi o mitema mia bango, mpe bakaniselaki Allah makanisi ya mabe, makanisi ya bopagano ya kala, bazali koloba ete: Litomba nini tozali na yango Bazali kobimisela yo te maye mabombami o mitema mia bango, bazali koloba ete: Soki tozalaki na litomba na likambo oyo, nde banguna bakokaki te koboma biso na esika oyo. Loba: Ata soki bofandaki na bandako na bino, baye mikolo na bango ya liwa ekoki bakobima, mpe bakei na bisika bibongisamaki mpona liwa na bango. Yango ezali komekama mpo Allah ayeba maye mazali okati ya mitema na bino, mpe mpo apetola maye mazali o mitema na bino. Mpe Allah ayebi mpenza maye mafandi na mitema.mpona likambo oyo? Loba na bango ete: Ya sôló likambo yango nyoso lizali mpona Allah.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ تَوَلَّوۡاْ مِنكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡتَقَى ٱلۡجَمۡعَانِ إِنَّمَا ٱسۡتَزَلَّهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ بِبَعۡضِ مَا كَسَبُواْۖ وَلَقَدۡ عَفَا ٱللَّهُ عَنۡهُمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٌ حَلِيمٞ
155. Baye okati na bino bazongaki sima mokolo mampinga mibale ya bitumba makutanaki, satana nde akosi bango na komekama na maye bazuaki na ntina ya masumu na bango. Allah asili kolimbisa bango. Ya sôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَقَالُواْ لِإِخۡوَٰنِهِمۡ إِذَا ضَرَبُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَوۡ كَانُواْ غُزّٗى لَّوۡ كَانُواْ عِندَنَا مَا مَاتُواْ وَمَا قُتِلُواْ لِيَجۡعَلَ ٱللَّهُ ذَٰلِكَ حَسۡرَةٗ فِي قُلُوبِهِمۡۗ وَٱللَّهُ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
156. Eh bino bandimi! Bozala lokola bapagano te baye balobaki na bandeko na bango soki basali mobembo to bazali na kati ya bitumba ete: Soki batikalaki epai na biso, nde bakufaki te to mpe babomamaki te. Allah, atie yango ezala mpasi mpe likama o’mitema mia bango. Mpe Allah apesaka bomoyi mpe liwa, mpe Allah azali komona maye bozali kosala.
التفاسير العربية:
وَلَئِن قُتِلۡتُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَوۡ مُتُّمۡ لَمَغۡفِرَةٞ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَحۡمَةٌ خَيۡرٞ مِّمَّا يَجۡمَعُونَ
157. Mpe soki bobomami na nzela ya Allah to soki bokufi, bolimbisi mpe ngolu ya Allah yango nde ezali malamu koleka manso bazali kozua awa na mokili.
التفاسير العربية:
وَلَئِن مُّتُّمۡ أَوۡ قُتِلۡتُمۡ لَإِلَى ٱللَّهِ تُحۡشَرُونَ
158. Soki bokufi to bobomami, kasi epai ya Allah nde bokosangisama.
التفاسير العربية:
فَبِمَا رَحۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ لِنتَ لَهُمۡۖ وَلَوۡ كُنتَ فَظًّا غَلِيظَ ٱلۡقَلۡبِ لَٱنفَضُّواْ مِنۡ حَوۡلِكَۖ فَٱعۡفُ عَنۡهُمۡ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ وَشَاوِرۡهُمۡ فِي ٱلۡأَمۡرِۖ فَإِذَا عَزَمۡتَ فَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَوَكِّلِينَ
159. Mpe mpona ngolu ya Allah atia na motema nayo, ozalaki mpete mpe malamu na bango. Kasi soki ozalaki na makambo ya makasi mpe motema makasi nde bakimaki nyonso pembeni nayo. Limbisa bango mpe sengela bango bolimbisi, mpe yokana na bango (liboso ozwa mokano) na likambo. Mpe soki ozwi mokana tia elikia epai ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye batiaka elikia naye.
التفاسير العربية:
إِن يَنصُرۡكُمُ ٱللَّهُ فَلَا غَالِبَ لَكُمۡۖ وَإِن يَخۡذُلۡكُمۡ فَمَن ذَا ٱلَّذِي يَنصُرُكُم مِّنۢ بَعۡدِهِۦۗ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
160. Soki Allah apesi bino lisungi, moko te akoki kolonga bino. Soki asundoli bino, nani mosusu sima naye akosunga bino? Epai ya Allah nde bandimi batia elikia.
التفاسير العربية:
وَمَا كَانَ لِنَبِيٍّ أَن يَغُلَّۚ وَمَن يَغۡلُلۡ يَأۡتِ بِمَا غَلَّ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ ثُمَّ تُوَفَّىٰ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا كَسَبَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
161. Ntoma azali te oyo akolekisa ndelo na bozui (biloko ya bitumba), mpe oyo akolekisa ndelo na bozui, akoya na oyo alekisaki ndelo mokolo ya suka, sima moto na moto akozua mbano eye molimo mwa ye mosalaki, bakobubama te.
التفاسير العربية:
أَفَمَنِ ٱتَّبَعَ رِضۡوَٰنَ ٱللَّهِ كَمَنۢ بَآءَ بِسَخَطٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَمَأۡوَىٰهُ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
162. Boye oyo azali kotambola engebene na mibeko mia Allah azali lokola moto oyo nkanda ya Allah ezali likolo naye? Mpe esika naye ekozala na lifelo, oyo nde bozongi ya mabe!
التفاسير العربية:
هُمۡ دَرَجَٰتٌ عِندَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِمَا يَعۡمَلُونَ
163. Bazali na lokumu ndenge moko te epai na Allah, mpe Allah azali komona maye bazali kosala.
التفاسير العربية:
لَقَدۡ مَنَّ ٱللَّهُ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ إِذۡ بَعَثَ فِيهِمۡ رَسُولٗا مِّنۡ أَنفُسِهِمۡ يَتۡلُواْ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِهِۦ وَيُزَكِّيهِمۡ وَيُعَلِّمُهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَإِن كَانُواْ مِن قَبۡلُ لَفِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٍ
164. Ya sôló, Allah apesi lokumu likolo ya bandimi tango atindi epai na bango motindami kowuta na kati na bango, azali kotangela bango mikapo mia ye, mpe azali kopetola bango mpe kotangisa mpe kolakisa bango buku mpe bwanya. Mpe ata soki kala bazalaki na kati ya libungi ya polele.
التفاسير العربية:
أَوَلَمَّآ أَصَٰبَتۡكُم مُّصِيبَةٞ قَدۡ أَصَبۡتُم مِّثۡلَيۡهَا قُلۡتُمۡ أَنَّىٰ هَٰذَاۖ قُلۡ هُوَ مِنۡ عِندِ أَنفُسِكُمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
165. Nini! Tango mpasi ezui bino, boyeba ete bomonisaki bango mpasi mbala mibale na oyo ezui bino, na sima bolobaki ete: Oyo ewuti wapi? Loba na bango ete: Ewuti epai na bino moko, ya sôló Allah azali na nguya ya biloko binso.
التفاسير العربية:
وَمَآ أَصَٰبَكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡتَقَى ٱلۡجَمۡعَانِ فَبِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَلِيَعۡلَمَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
166. Mpe oyo ezuaki bino mokolo mampinga mibale makutanaki na ndingisa ya Allah, mpo ayeba banani bazali bandimi.
التفاسير العربية:
وَلِيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ نَافَقُواْۚ وَقِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ قَٰتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَوِ ٱدۡفَعُواْۖ قَالُواْ لَوۡ نَعۡلَمُ قِتَالٗا لَّٱتَّبَعۡنَٰكُمۡۗ هُمۡ لِلۡكُفۡرِ يَوۡمَئِذٍ أَقۡرَبُ مِنۡهُمۡ لِلۡإِيمَٰنِۚ يَقُولُونَ بِأَفۡوَٰهِهِم مَّا لَيۡسَ فِي قُلُوبِهِمۡۚ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يَكۡتُمُونَ
167. Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ قَالُواْ لِإِخۡوَٰنِهِمۡ وَقَعَدُواْ لَوۡ أَطَاعُونَا مَا قُتِلُواْۗ قُلۡ فَٱدۡرَءُواْ عَنۡ أَنفُسِكُمُ ٱلۡمَوۡتَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
168. Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
التفاسير العربية:
وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَمۡوَٰتَۢاۚ بَلۡ أَحۡيَآءٌ عِندَ رَبِّهِمۡ يُرۡزَقُونَ
169. Mpe bokanisa te ete: Baye babomami na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali nde na bomoyi pembeni na Nkolo wa bango. Batondi na bomengo.
التفاسير العربية:
فَرِحِينَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ وَيَسۡتَبۡشِرُونَ بِٱلَّذِينَ لَمۡ يَلۡحَقُواْ بِهِم مِّنۡ خَلۡفِهِمۡ أَلَّا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
170. Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te.
التفاسير العربية:
۞ يَسۡتَبۡشِرُونَ بِنِعۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَفَضۡلٖ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
171. Bazali na Esengo na bolamu ya Allah mpe na lokumu naye, mpe ya sôló, Allah akobungisa te mbano ya bandimi.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ ٱسۡتَجَابُواْ لِلَّهِ وَٱلرَّسُولِ مِنۢ بَعۡدِ مَآ أَصَابَهُمُ ٱلۡقَرۡحُۚ لِلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ مِنۡهُمۡ وَٱتَّقَوۡاْ أَجۡرٌ عَظِيمٌ
172. Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ قَالَ لَهُمُ ٱلنَّاسُ إِنَّ ٱلنَّاسَ قَدۡ جَمَعُواْ لَكُمۡ فَٱخۡشَوۡهُمۡ فَزَادَهُمۡ إِيمَٰنٗا وَقَالُواْ حَسۡبُنَا ٱللَّهُ وَنِعۡمَ ٱلۡوَكِيلُ
173. Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.
التفاسير العربية:
فَٱنقَلَبُواْ بِنِعۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَفَضۡلٖ لَّمۡ يَمۡسَسۡهُمۡ سُوٓءٞ وَٱتَّبَعُواْ رِضۡوَٰنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ ذُو فَضۡلٍ عَظِيمٍ
174. Mpe bazongaki na bolamu mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe likama moko ya banguna ezuaki bango te, mpe balandaki maye mazali kosepelisa Allah, mpe Allah atonda bomengo koleka.
التفاسير العربية:
إِنَّمَا ذَٰلِكُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ يُخَوِّفُ أَوۡلِيَآءَهُۥ فَلَا تَخَافُوهُمۡ وَخَافُونِ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
175. Ya sôló, satana nde azali kobangisa bino na Lisungi ya bato naye, bobanga bango te, kasi bobanga ngai soki bino bozali bandimi.
التفاسير العربية:
وَلَا يَحۡزُنكَ ٱلَّذِينَ يُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡكُفۡرِۚ إِنَّهُمۡ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۚ يُرِيدُ ٱللَّهُ أَلَّا يَجۡعَلَ لَهُمۡ حَظّٗا فِي ٱلۡأٓخِرَةِۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٌ
176. Koyoka mpasi o’motema te mpona baye bakei na lombango na kati ya bopengwi. Ya sôló, bango bakopesa Allah mpasi soki moke te. Allah akani kopesa bango eloko soki moko te o’mokolo ya suka. Bango bakozua etumbu monene.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱشۡتَرَوُاْ ٱلۡكُفۡرَ بِٱلۡإِيمَٰنِ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
177. Ya sôló, baye basombi bopagano o’esika ya bondimi, batungisi Allah na eloko soki moko te, mpe bango nde bazui etumbu enene.
التفاسير العربية:
وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّمَا نُمۡلِي لَهُمۡ خَيۡرٞ لِّأَنفُسِهِمۡۚ إِنَّمَا نُمۡلِي لَهُمۡ لِيَزۡدَادُوٓاْ إِثۡمٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ مُّهِينٞ
178. Baye bapengwi, bakanisa te ete ngonga eye totikela bango ezali nkita epai na bango. Kasi topesi bango tango, mpo babakisa masumu mpe bango bakozua etumbu elongobani.
التفاسير العربية:
مَّا كَانَ ٱللَّهُ لِيَذَرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ عَلَىٰ مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ حَتَّىٰ يَمِيزَ ٱلۡخَبِيثَ مِنَ ٱلطَّيِّبِۗ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُطۡلِعَكُمۡ عَلَى ٱلۡغَيۡبِ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يَجۡتَبِي مِن رُّسُلِهِۦ مَن يَشَآءُۖ فَـَٔامِنُواْ بِٱللَّهِ وَرُسُلِهِۦۚ وَإِن تُؤۡمِنُواْ وَتَتَّقُواْ فَلَكُمۡ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
179. Allah akotika bandimi te na lolenge bozali na yango, kino akabola mabe na malamu. Allah akolakisa bino mabombami te, kasi Allah akopona o’kati ya batindami naye oyo ye alingi. Bondima na Allah na batindami naye, mpe soki bondimi mpe bobangi (Allah), bokozala na lifuta linene.
التفاسير العربية:
وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ يَبۡخَلُونَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ هُوَ خَيۡرٗا لَّهُمۖ بَلۡ هُوَ شَرّٞ لَّهُمۡۖ سَيُطَوَّقُونَ مَا بَخِلُواْ بِهِۦ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ وَلِلَّهِ مِيرَٰثُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ
180. Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka, bomengo wana, bikozinga bango, mpe nkita ya likolo mpe ya mabele nyonso ezali ya Allah. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
التفاسير العربية:
لَّقَدۡ سَمِعَ ٱللَّهُ قَوۡلَ ٱلَّذِينَ قَالُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ فَقِيرٞ وَنَحۡنُ أَغۡنِيَآءُۘ سَنَكۡتُبُ مَا قَالُواْ وَقَتۡلَهُمُ ٱلۡأَنۢبِيَآءَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَنَقُولُ ذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡحَرِيقِ
181. Ya sôló, Allah asili koyoka maloba ya baye balobaki: Ya sôló, Allah azali mobola mpe biso tozali bazui. Tobombi maloba na bango. Mpe bango bazalaki koboma ba ntoma mpamba mpe tokoyebisa bango: Bomeka etumbu ya móto ya makasi.
التفاسير العربية:
ذَٰلِكَ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيكُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَيۡسَ بِظَلَّامٖ لِّلۡعَبِيدِ
182. Wana na ntina mpenza oyo maboko na bino masalaki kala, mpe ya sôló Allah akobuba te bawumbu naye.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ قَالُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ عَهِدَ إِلَيۡنَآ أَلَّا نُؤۡمِنَ لِرَسُولٍ حَتَّىٰ يَأۡتِيَنَا بِقُرۡبَانٖ تَأۡكُلُهُ ٱلنَّارُۗ قُلۡ قَدۡ جَآءَكُمۡ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِي بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَبِٱلَّذِي قُلۡتُمۡ فَلِمَ قَتَلۡتُمُوهُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
183. Baye balobaka: Ya sôló tozui elaka epai ya Allah ete tokoki kondima ata na motindami moko te kino na tango akomemela biso libonza móto elia yango, Loba: Batindami liboso na ngai bayelaki bino bilembo mpe maye botunaki bango, Kasi boni bobomaki bango, soki bino bozali bato ya bosembo?
التفاسير العربية:
فَإِن كَذَّبُوكَ فَقَدۡ كُذِّبَ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِكَ جَآءُو بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَٱلزُّبُرِ وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُنِيرِ
184. Mpe soki bazui yo moto ya lokuta, ya sôló basilaki kozwa batindami liboso nayo bato ya lokuta, bayelaki bango bilembo bia polele, mpe malendisi mpe buku ya bongengi.
التفاسير العربية:
كُلُّ نَفۡسٖ ذَآئِقَةُ ٱلۡمَوۡتِۗ وَإِنَّمَا تُوَفَّوۡنَ أُجُورَكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۖ فَمَن زُحۡزِحَ عَنِ ٱلنَّارِ وَأُدۡخِلَ ٱلۡجَنَّةَ فَقَدۡ فَازَۗ وَمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَآ إِلَّا مَتَٰعُ ٱلۡغُرُورِ
185. Molimo nyoso mokomeka liwa. Kasi mokolo mwa lisekwa, bokozua lifuta lia bino. Na oyo bakotia ye mosika na móto mpe bakotisi ye na paradizu, ye wana nde alongi. Bomoyi ya mokili ezali sé bisengo ya tango moke.
التفاسير العربية:
۞ لَتُبۡلَوُنَّ فِيٓ أَمۡوَٰلِكُمۡ وَأَنفُسِكُمۡ وَلَتَسۡمَعُنَّ مِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِكُمۡ وَمِنَ ٱلَّذِينَ أَشۡرَكُوٓاْ أَذٗى كَثِيرٗاۚ وَإِن تَصۡبِرُواْ وَتَتَّقُواْ فَإِنَّ ذَٰلِكَ مِنۡ عَزۡمِ ٱلۡأُمُورِ
186. Ya sôló, bokomekama mingi kati na bozui na bino mpe na banzoto na bino. Mpe bokoyoka maloba ebele ya mabe kowuta epai ya baye bazua buku liboso na bino, ndenge moko na basambeli ya bikeko. Mpe soki bokangi mitema, mpe bobangi (Allah). Ya sôló, wana ezali lolenge ya malamu ya kosilisa makambo.
التفاسير العربية:
وَإِذۡ أَخَذَ ٱللَّهُ مِيثَٰقَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ لَتُبَيِّنُنَّهُۥ لِلنَّاسِ وَلَا تَكۡتُمُونَهُۥ فَنَبَذُوهُ وَرَآءَ ظُهُورِهِمۡ وَٱشۡتَرَوۡاْ بِهِۦ ثَمَنٗا قَلِيلٗاۖ فَبِئۡسَ مَا يَشۡتَرُونَ
187. Mpe tango Allah azuaki elaka epai ya baye bazuaki buku mpo balimbola yango polele epai ya bato, mpe babomba ata eloko moko te na kati na yango, bazui yango babwaki sima ya mikongo na bango mpe bateki yango na ntalo moke, mombongo nini ya mabe oyo basali?
التفاسير العربية:
لَا تَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ يَفۡرَحُونَ بِمَآ أَتَواْ وَّيُحِبُّونَ أَن يُحۡمَدُواْ بِمَا لَمۡ يَفۡعَلُواْ فَلَا تَحۡسَبَنَّهُم بِمَفَازَةٖ مِّنَ ٱلۡعَذَابِۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
188. Ya sôló kokanisa te ete baye bazali kosepela na maye (ya mabe) bazali kosala, mpe bazali kolinga ete bato bakumisa bango na maye basali te, kokanisa te ete bango bakolonga na etumbu. Kasi, bakozala na etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
وَلِلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
189. Mpe maye manso mazali o’likolo mpe na nsé, mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
التفاسير العربية:
إِنَّ فِي خَلۡقِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱخۡتِلَٰفِ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ
190. Ya sôló, na kati ya bokeli likolo mpe mabele, mpe bokeseni ya butu na moyi, ezali bilembo mpona bato ya mayele.
التفاسير العربية:
ٱلَّذِينَ يَذۡكُرُونَ ٱللَّهَ قِيَٰمٗا وَقُعُودٗا وَعَلَىٰ جُنُوبِهِمۡ وَيَتَفَكَّرُونَ فِي خَلۡقِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ رَبَّنَا مَا خَلَقۡتَ هَٰذَا بَٰطِلٗا سُبۡحَٰنَكَ فَقِنَا عَذَابَ ٱلنَّارِ
191. Baye bazali kokanisa Allah ya kotelema mpe kofanda, mpe ya kolala na mipanzi na bango, mpe bazali kososolo okati ya bokeli likolo mpe mabele eh Nkolo na biso! Maye manso tozali komona okeli yango mpamba te, nkembo nayo, mpe bikisa biso na etumbu ya móto.
التفاسير العربية:
رَبَّنَآ إِنَّكَ مَن تُدۡخِلِ ٱلنَّارَ فَقَدۡ أَخۡزَيۡتَهُۥۖ وَمَا لِلظَّٰلِمِينَ مِنۡ أَنصَارٖ
192. Eh Nkolo wa biso! Oyo okotisi ye na móto, ye wana nde osili kosambwisa ye, mpe bato mabe bakozua lisungi te.
التفاسير العربية:
رَّبَّنَآ إِنَّنَا سَمِعۡنَا مُنَادِيٗا يُنَادِي لِلۡإِيمَٰنِ أَنۡ ءَامِنُواْ بِرَبِّكُمۡ فَـَٔامَنَّاۚ رَبَّنَا فَٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَكَفِّرۡ عَنَّا سَيِّـَٔاتِنَا وَتَوَفَّنَا مَعَ ٱلۡأَبۡرَارِ
193. Eh Nkolo wa biso! Ya sôló toyoki mobeleli azali kobelela mpona bondimi ete: Bondima na Nkolo na bino mpe tondimi. Nkolo na biso, limbisa biso masumu ma biso mpe longola mabe ma biso, mpe boma biso elongo na bato ya malamu.
التفاسير العربية:
رَبَّنَا وَءَاتِنَا مَا وَعَدتَّنَا عَلَىٰ رُسُلِكَ وَلَا تُخۡزِنَا يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۖ إِنَّكَ لَا تُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
194. Eh Nkolo na biso! Pesa biso maye olakaki biso epai ya batindami nayo, mpe kosambwisa biso te na mokolo ya suka. Mpamba te ozangisaka elaka nayo te.
التفاسير العربية:
فَٱسۡتَجَابَ لَهُمۡ رَبُّهُمۡ أَنِّي لَآ أُضِيعُ عَمَلَ عَٰمِلٖ مِّنكُم مِّن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰۖ بَعۡضُكُم مِّنۢ بَعۡضٖۖ فَٱلَّذِينَ هَاجَرُواْ وَأُخۡرِجُواْ مِن دِيَٰرِهِمۡ وَأُوذُواْ فِي سَبِيلِي وَقَٰتَلُواْ وَقُتِلُواْ لَأُكَفِّرَنَّ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَلَأُدۡخِلَنَّهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ ثَوَابٗا مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ عِندَهُۥ حُسۡنُ ٱلثَّوَابِ
195. Mpe Nkolo wa bango Andimelaki bango ete: Ya sôló ngai na kobungisa te mosala ya moko kati na bino, mobali to mpe mwasi bino na bino, kasi mpona ba oyo babimaki na nzela ya Allah, mpe babimisaki bango na ba ndako na bango, mpe banyokwamaki na nzela ya ngaï, mpe babundaki, mpe babomamaki na nzela na yango, na kolongola masumu na bango nyonso, mpe na kokotisa bango na lola wapi epai mingala mizali kotiola, lifuta kowuta epai ya Allah. Mpe Allah azali na lifuta ya malamu.
التفاسير العربية:
لَا يَغُرَّنَّكَ تَقَلُّبُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
196. baye bapengwi, bakosa yo te na lolenge ya misala mia bango okati ya bamboka.
التفاسير العربية:
مَتَٰعٞ قَلِيلٞ ثُمَّ مَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
197. Esengo ya moke, sima esika na bango ya kofanda ekozala móto, oyo nde esika ya mabe.
التفاسير العربية:
لَٰكِنِ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ رَبَّهُمۡ لَهُمۡ جَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا نُزُلٗا مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِۗ وَمَا عِندَ ٱللَّهِ خَيۡرٞ لِّلۡأَبۡرَارِ
198. Kasi baye babangi Nkolo wa bango, bakozala na kati ya lola eye mingala mizali kotiola o’nse na yango seko na seko, efandelo kowuta epai ya Allah. Mpe maye mazuami epai ya Allah mazali kitoko mpona bato ya malamu.
التفاسير العربية:
وَإِنَّ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ لَمَن يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكُمۡ وَمَآ أُنزِلَ إِلَيۡهِمۡ خَٰشِعِينَ لِلَّهِ لَا يَشۡتَرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ ثَمَنٗا قَلِيلًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡۗ إِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
199. Mpe ya sôló baye bazuaki buku, na kati na bango basusu bandimi na Allah, mpe na maye ekitaki epai na bino, mpe na maye ekiti epai na bango, bazali kobanga Allah. Mpe bazali koteka te mikapo mia Allah na ntalo moke. Bango wana lifuta na bango lizali epai ya Nkolo wa bango. Ya sôló Allah afutaka na lombango.
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱصۡبِرُواْ وَصَابِرُواْ وَرَابِطُواْ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
200. Eh bino bandimi! Boyika mpiko mpe botingama na koyika mpiko, mpe botingama na bitumba, mpe bobanga Allah mpo ete bolonga.
التفاسير العربية:
 
ترجمة معاني سورة: آل عمران
فهرس السور رقم الصفحة
 
ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - فهرس التراجم

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

إغلاق