ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا * - فهرس التراجم

XML CSV Excel API
تنزيل الملفات يتضمن الموافقة على هذه الشروط والسياسات

ترجمة معاني سورة: الفتح   آية:

سورة الفتح - Al-Fath (ELONGA ENENE)

إِنَّا فَتَحۡنَا لَكَ فَتۡحٗا مُّبِينٗا
1. Ya soló, topesaki yo elonga moko ya monene.
التفاسير العربية:
لِّيَغۡفِرَ لَكَ ٱللَّهُ مَا تَقَدَّمَ مِن ذَنۢبِكَ وَمَا تَأَخَّرَ وَيُتِمَّ نِعۡمَتَهُۥ عَلَيۡكَ وَيَهۡدِيَكَ صِرَٰطٗا مُّسۡتَقِيمٗا
2. Mpo Allah alimbisa masumu nayo oyo eleka na oyo ekoya sima, mpe mpo akokisela yo bolamu mpe akamba yo о nzela ya semba.
التفاسير العربية:
وَيَنصُرَكَ ٱللَّهُ نَصۡرًا عَزِيزًا
3. Mpo ete Allah apesa yo lisungi ya makasi.
التفاسير العربية:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنزَلَ ٱلسَّكِينَةَ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ لِيَزۡدَادُوٓاْ إِيمَٰنٗا مَّعَ إِيمَٰنِهِمۡۗ وَلِلَّهِ جُنُودُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَكِيمٗا
4. Ye nde akitisaka kimia о mitema mia bandimi mpo ebakisela bango kondima likolo ya kondima na bango, mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
التفاسير العربية:
لِّيُدۡخِلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا وَيُكَفِّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عِندَ ٱللَّهِ فَوۡزًا عَظِيمٗا
5. Mpo akotisa bandimi ya mibali na ya basi okati ya Iola oyo ezali koleka na nsé na yango míngala, bakozalaka libela kati na yango, mpe bakozimisa masumu na bango. Mpe wana ekozala elonga monene epai ya Allah.
التفاسير العربية:
وَيُعَذِّبَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ وَٱلۡمُشۡرِكَٰتِ ٱلظَّآنِّينَ بِٱللَّهِ ظَنَّ ٱلسَّوۡءِۚ عَلَيۡهِمۡ دَآئِرَةُ ٱلسَّوۡءِۖ وَغَضِبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡ وَلَعَنَهُمۡ وَأَعَدَّ لَهُمۡ جَهَنَّمَۖ وَسَآءَتۡ مَصِيرٗا
6. Мре apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi baye bazali kosalela Allah mabe, ndenge moko mpe lokola basangisi Allah ya mibali mpe ya basi bazali kokanisela Allah mabe, makanisi yango ya mabe ekokwela bango, mpe Allah asilikeli bango, mpe alakeli bango botutu, mpe alengeleli bango lifelo. Mpe oyo bozongi ya mabe.
التفاسير العربية:
وَلِلَّهِ جُنُودُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمًا
7. Mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya atonda bwanya.
التفاسير العربية:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ شَٰهِدٗا وَمُبَشِّرٗا وَنَذِيرٗا
8. Ya soló totindaki yo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi.
التفاسير العربية:
لِّتُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَتُعَزِّرُوهُ وَتُوَقِّرُوهُۚ وَتُسَبِّحُوهُ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلًا
9. Mpo ete bondimela Allah na motindami wa ye, mpe bopesa ye lisungi mpe bopesa ye lokumu (Muhammad), mpe bosanzola ye (Allah) tongo mpe mpokwa.
التفاسير العربية:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُبَايِعُونَكَ إِنَّمَا يُبَايِعُونَ ٱللَّهَ يَدُ ٱللَّهِ فَوۡقَ أَيۡدِيهِمۡۚ فَمَن نَّكَثَ فَإِنَّمَا يَنكُثُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦۖ وَمَنۡ أَوۡفَىٰ بِمَا عَٰهَدَ عَلَيۡهُ ٱللَّهَ فَسَيُؤۡتِيهِ أَجۡرًا عَظِيمٗا
10. Ya sólo, baye bazali kolapa epai nayo (ndayi), bazali kolapa nde na Allah, loboko ya Allah ezali likolo ya maboko na bango. Kasi oyo akobebisa, asili komibebisa ye moko, mpe oyo akokokisa elaka eye alakaki Allah, akofuta ye lifuta linene.
التفاسير العربية:
سَيَقُولُ لَكَ ٱلۡمُخَلَّفُونَ مِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ شَغَلَتۡنَآ أَمۡوَٰلُنَا وَأَهۡلُونَا فَٱسۡتَغۡفِرۡ لَنَاۚ يَقُولُونَ بِأَلۡسِنَتِهِم مَّا لَيۡسَ فِي قُلُوبِهِمۡۚ قُلۡ فَمَن يَمۡلِكُ لَكُم مِّنَ ٱللَّهِ شَيۡـًٔا إِنۡ أَرَادَ بِكُمۡ ضَرًّا أَوۡ أَرَادَ بِكُمۡ نَفۡعَۢاۚ بَلۡ كَانَ ٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرَۢا
11. Okati na baye bafandaka na bamboka baye batikalaki na sima balobaki ete: Mabota mpe bozui na biso bikangisaki biso na sima, limbisa biso, bazali koloba na balolemu na bango oyo ezali na mitema mia bango te, loba: Nani azali na makoki ya kosalisa bino epai ya Allah soki alingi kopesa bino bolamu to mpasi? Kasi Allah ayebi maye manso bozali kosala.
التفاسير العربية:
بَلۡ ظَنَنتُمۡ أَن لَّن يَنقَلِبَ ٱلرَّسُولُ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ إِلَىٰٓ أَهۡلِيهِمۡ أَبَدٗا وَزُيِّنَ ذَٰلِكَ فِي قُلُوبِكُمۡ وَظَنَنتُمۡ ظَنَّ ٱلسَّوۡءِ وَكُنتُمۡ قَوۡمَۢا بُورٗا
12. Kasi bozalaki kokanisa ete motindami na bandimi bakozongela lisusu mabota na bango te? Lolenge babongiselaki bino na mitema mpe bozalaki kokanisa mabe, mpe bozali bato mabe.
التفاسير العربية:
وَمَن لَّمۡ يُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ فَإِنَّآ أَعۡتَدۡنَا لِلۡكَٰفِرِينَ سَعِيرٗا
13. Mpe oyo akondima na Allah na motindami naye te, ya soló tolengeli etumbu ya makasi тропа bapengwi.
التفاسير العربية:
وَلِلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ يَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُ وَيُعَذِّبُ مَن يَشَآءُۚ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
14. Bokonzi ya likolo na ya mabele ezali ya Allah. Alimbisaka oyo alingi mpe apesaka etumbu na oyo alingi. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu.
التفاسير العربية:
سَيَقُولُ ٱلۡمُخَلَّفُونَ إِذَا ٱنطَلَقۡتُمۡ إِلَىٰ مَغَانِمَ لِتَأۡخُذُوهَا ذَرُونَا نَتَّبِعۡكُمۡۖ يُرِيدُونَ أَن يُبَدِّلُواْ كَلَٰمَ ٱللَّهِۚ قُل لَّن تَتَّبِعُونَا كَذَٰلِكُمۡ قَالَ ٱللَّهُ مِن قَبۡلُۖ فَسَيَقُولُونَ بَلۡ تَحۡسُدُونَنَاۚ بَلۡ كَانُواْ لَا يَفۡقَهُونَ إِلَّا قَلِيلٗا
15. Baye batikalaki na sima bazali koloba ete: Soki bolingi kokende kozua biloko ya banguna biye basundoli, botika biso tolanda bino, balingi kobalola liloba lia Allah. Loba: Bolanda biso te, wana nde Allah asilaki koloba тропа bino liboso, тре bakoloba ete: Bosali biso nde likunya. Nzoka nde bazali na mayele токе.
التفاسير العربية:
قُل لِّلۡمُخَلَّفِينَ مِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ سَتُدۡعَوۡنَ إِلَىٰ قَوۡمٍ أُوْلِي بَأۡسٖ شَدِيدٖ تُقَٰتِلُونَهُمۡ أَوۡ يُسۡلِمُونَۖ فَإِن تُطِيعُواْ يُؤۡتِكُمُ ٱللَّهُ أَجۡرًا حَسَنٗاۖ وَإِن تَتَوَلَّوۡاْ كَمَا تَوَلَّيۡتُم مِّن قَبۡلُ يُعَذِّبۡكُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا
16. Loba na bato ya mboka oyo batikali na sima ete: Kala mingi te bokobengama тро bökende kobunda na bato ya makasi, to batosa na komisokia na lingomba. Мре soki botosi, Allah akopesa bino lifuta kitoko, kasi soki bopesi mokongo ndenge bosalaki liboso, akopesa bino etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
لَّيۡسَ عَلَى ٱلۡأَعۡمَىٰ حَرَجٞ وَلَا عَلَى ٱلۡأَعۡرَجِ حَرَجٞ وَلَا عَلَى ٱلۡمَرِيضِ حَرَجٞۗ وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ يُدۡخِلۡهُ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ وَمَن يَتَوَلَّ يُعَذِّبۡهُ عَذَابًا أَلِيمٗا
17. Mabe ezali te na mokufi miso, moto ya tengu na moto ya bokono, kasi oyo akotosa Allah na motindami naye, akokotisa ye na Iola oyo ezali koleka na nsé na yango mingala, kasi oyo akoboya kotosa, Allah akopesa ye etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
۞ لَّقَدۡ رَضِيَ ٱللَّهُ عَنِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ إِذۡ يُبَايِعُونَكَ تَحۡتَ ٱلشَّجَرَةِ فَعَلِمَ مَا فِي قُلُوبِهِمۡ فَأَنزَلَ ٱلسَّكِينَةَ عَلَيۡهِمۡ وَأَثَٰبَهُمۡ فَتۡحٗا قَرِيبٗا
18. Allah asilaki kosepela na bandimi tango bazuaki mokano ya kolapa liboso nayo na nsé ya nzete, mpe (Allah) ayebaki maye mazali o mitema mia bango, sima akitisaki kimia likolo na bango mpe apesaki bango elonga ya pembeni.
التفاسير العربية:
وَمَغَانِمَ كَثِيرَةٗ يَأۡخُذُونَهَاۗ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمٗا
19. Мре bomengo ebele mpo bazua yango, тре Allah azali na bokasi atonda bwanya.
التفاسير العربية:
وَعَدَكُمُ ٱللَّهُ مَغَانِمَ كَثِيرَةٗ تَأۡخُذُونَهَا فَعَجَّلَ لَكُمۡ هَٰذِهِۦ وَكَفَّ أَيۡدِيَ ٱلنَّاسِ عَنكُمۡ وَلِتَكُونَ ءَايَةٗ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ وَيَهۡدِيَكُمۡ صِرَٰطٗا مُّسۡتَقِيمٗا
20. Allah alakaki bino bomengo ebele bokozua yango, mpe awelisaki yango тропа bino, тре alongolaki maboko ya bato likolo na bino, тре mpo ezala elembo тропа bandimi, тре akamba bino o nzela ya semba.
التفاسير العربية:
وَأُخۡرَىٰ لَمۡ تَقۡدِرُواْ عَلَيۡهَا قَدۡ أَحَاطَ ٱللَّهُ بِهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٗا
21. Мре alaki bino (bomengo) mosusu oyo bokokaki kozua yango te, kasi Allah azingaki yango na nguya. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
التفاسير العربية:
وَلَوۡ قَٰتَلَكُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوَلَّوُاْ ٱلۡأَدۡبَٰرَ ثُمَّ لَا يَجِدُونَ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا
22. Mpe soki bapengwi babundisi bino, bakokima bango moko mpe bakozua lisungi te mpe mobateli te.
التفاسير العربية:
سُنَّةَ ٱللَّهِ ٱلَّتِي قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلُۖ وَلَن تَجِدَ لِسُنَّةِ ٱللَّهِ تَبۡدِيلٗا
23. Wana ezali mobeko ya Allah uta kala, mpe okokuta mbongwana te na mobeko ya Allah.
التفاسير العربية:
وَهُوَ ٱلَّذِي كَفَّ أَيۡدِيَهُمۡ عَنكُمۡ وَأَيۡدِيَكُمۡ عَنۡهُم بِبَطۡنِ مَكَّةَ مِنۢ بَعۡدِ أَنۡ أَظۡفَرَكُمۡ عَلَيۡهِمۡۚ وَكَانَ ٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرًا
24. Mpe ye nde alongolaki maboko na bango likolo na bino mpe alongolaki maboko na bino likolo na bango na nsé ya lubwaku ya makka, na tango oyo asilaki kolongisa bino likolo na bango. Mpe Allah azalaki kornona maye bozalaki kosala.
التفاسير العربية:
هُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّوكُمۡ عَنِ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ وَٱلۡهَدۡيَ مَعۡكُوفًا أَن يَبۡلُغَ مَحِلَّهُۥۚ وَلَوۡلَا رِجَالٞ مُّؤۡمِنُونَ وَنِسَآءٞ مُّؤۡمِنَٰتٞ لَّمۡ تَعۡلَمُوهُمۡ أَن تَطَـُٔوهُمۡ فَتُصِيبَكُم مِّنۡهُم مَّعَرَّةُۢ بِغَيۡرِ عِلۡمٖۖ لِّيُدۡخِلَ ٱللَّهُ فِي رَحۡمَتِهِۦ مَن يَشَآءُۚ لَوۡ تَزَيَّلُواْ لَعَذَّبۡنَا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡهُمۡ عَذَابًا أَلِيمًا
25. Bango nde bapengwi mpe bapekisaki bino kokota na masdjid esantu (ya makkah), mpe bapekisi bibwele ya mbeka ekoma na esika yango ya kosasa, soki тропа bandimi ya basi na ya mibali baye boyebaki bango te, na kati ya banguna mpe na koboma, mpe bolingaki kozua mbeba na bango na kozanga koyeba, mpo ete Allah akotisa nani alingi okati ya ngolu naye. Mpe soki (bandimi) bayebanaki, nde topesaki bapengwi kati na bango etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
إِذۡ جَعَلَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلۡحَمِيَّةَ حَمِيَّةَ ٱلۡجَٰهِلِيَّةِ فَأَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ وَعَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَأَلۡزَمَهُمۡ كَلِمَةَ ٱلتَّقۡوَىٰ وَكَانُوٓاْ أَحَقَّ بِهَا وَأَهۡلَهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٗا
26. Tango bapagano batiaki kanda ya kozanga koyeba o mitema mia bango, kasi Allah akitisaki kimia naye likolo na motindami naye, mpe likolo ya bandimi, mpe atindaki bango na kokangama na liloba ya bobangi Allah, mpe esengelaki na bango kokangama na yango mpo ete ezali ya bango. Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso.
التفاسير العربية:
لَّقَدۡ صَدَقَ ٱللَّهُ رَسُولَهُ ٱلرُّءۡيَا بِٱلۡحَقِّۖ لَتَدۡخُلُنَّ ٱلۡمَسۡجِدَ ٱلۡحَرَامَ إِن شَآءَ ٱللَّهُ ءَامِنِينَ مُحَلِّقِينَ رُءُوسَكُمۡ وَمُقَصِّرِينَ لَا تَخَافُونَۖ فَعَلِمَ مَا لَمۡ تَعۡلَمُواْ فَجَعَلَ مِن دُونِ ذَٰلِكَ فَتۡحٗا قَرِيبًا
27. Allah ya soló, asilaki kokokisela motindami naye ndoto na bosembo ete: Bokokota na masdjid ensatu (ya Makkah) na bolingi ya Allah na kimia nyoso, basuki na bino ya kokokolama to ya kokutolama bobanga te, mpe ayebaki maye boyebaki te. Mpe lisusu apesi bino elonga ya pembeni.
التفاسير العربية:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ رَسُولَهُۥ بِٱلۡهُدَىٰ وَدِينِ ٱلۡحَقِّ لِيُظۡهِرَهُۥ عَلَى ٱلدِّينِ كُلِّهِۦۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدٗا
28. Yende atindaki motindami naye na bokambami, mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo ya mangomba manso. Мре Allah akoki lokola nzeneneke.
التفاسير العربية:
مُّحَمَّدٞ رَّسُولُ ٱللَّهِۚ وَٱلَّذِينَ مَعَهُۥٓ أَشِدَّآءُ عَلَى ٱلۡكُفَّارِ رُحَمَآءُ بَيۡنَهُمۡۖ تَرَىٰهُمۡ رُكَّعٗا سُجَّدٗا يَبۡتَغُونَ فَضۡلٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَرِضۡوَٰنٗاۖ سِيمَاهُمۡ فِي وُجُوهِهِم مِّنۡ أَثَرِ ٱلسُّجُودِۚ ذَٰلِكَ مَثَلُهُمۡ فِي ٱلتَّوۡرَىٰةِۚ وَمَثَلُهُمۡ فِي ٱلۡإِنجِيلِ كَزَرۡعٍ أَخۡرَجَ شَطۡـَٔهُۥ فَـَٔازَرَهُۥ فَٱسۡتَغۡلَظَ فَٱسۡتَوَىٰ عَلَىٰ سُوقِهِۦ يُعۡجِبُ ٱلزُّرَّاعَ لِيَغِيظَ بِهِمُ ٱلۡكُفَّارَۗ وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ مِنۡهُم مَّغۡفِرَةٗ وَأَجۡرًا عَظِيمَۢا
29. Muhammad motindami ya Allah, mpe baye bazali naye (bayekoli naye) bazali makasi epai ya bapengwi, bazali na mawa kati na bango. Okomona bango bazali kogumbama mpe kofukama тропа koluka ngrásia mpe bosepeli epai ya Allah, bilembo na bango bizali na bilongi na bango osima ya kofukama, wana nde lolenge na bango esila kokomama okati ya torah, ndenge moko okati ya Indjil lokola molona ewuti kobima na mabele na bonzenga na yango sima etelemi likolo na nzete na yango ezali kokamwisa baloni, mpo na makasi na bango (Allah) atumbolaka kanda ya bapagano. Allah alaki baye bandimi mpe basali malamu bolimbisi mpe lifuta ya monene.
التفاسير العربية:
 
ترجمة معاني سورة: الفتح
فهرس السور رقم الصفحة
 
ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - فهرس التراجم

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

إغلاق