ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا * - فهرس التراجم

XML CSV Excel API
تنزيل الملفات يتضمن الموافقة على هذه الشروط والسياسات

ترجمة معاني سورة: الإنشقاق   آية:

سورة الإنشقاق - Al-Inshiqâq (BOPASUKI)

إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنشَقَّتۡ
1. Ntango mapata mako pasuka,
التفاسير العربية:
وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
2. Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala,
التفاسير العربية:
وَإِذَا ٱلۡأَرۡضُ مُدَّتۡ
3. Mpe ntango mabele makolalisama,
التفاسير العربية:
وَأَلۡقَتۡ مَا فِيهَا وَتَخَلَّتۡ
4. Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba,
التفاسير العربية:
وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
5. Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala,
التفاسير العربية:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ إِنَّكَ كَادِحٌ إِلَىٰ رَبِّكَ كَدۡحٗا فَمُلَٰقِيهِ
6. Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye.
التفاسير العربية:
فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ
7. Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali.
التفاسير العربية:
فَسَوۡفَ يُحَاسَبُ حِسَابٗا يَسِيرٗا
8. Akosambisama na ndenge ya malamu.
التفاسير العربية:
وَيَنقَلِبُ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورٗا
9. Mpe akozonga o’libota naye na esengo.
التفاسير العربية:
وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ وَرَآءَ ظَهۡرِهِۦ
10. Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye,
التفاسير العربية:
فَسَوۡفَ يَدۡعُواْ ثُبُورٗا
11. Akomisengela mabe,
التفاسير العربية:
وَيَصۡلَىٰ سَعِيرًا
12. Мре akozikisama okati ya moto ya makasi,
التفاسير العربية:
إِنَّهُۥ كَانَ فِيٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا
13. Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye.
التفاسير العربية:
إِنَّهُۥ ظَنَّ أَن لَّن يَحُورَ
14. Azalaki kokanisa te ete akosekwisama.
التفاسير العربية:
بَلَىٰٓۚ إِنَّ رَبَّهُۥ كَانَ بِهِۦ بَصِيرٗا
15. Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye.
التفاسير العربية:
فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلشَّفَقِ
16. Te na lapi na ngonga ya mpokwa,
التفاسير العربية:
وَٱلَّيۡلِ وَمَا وَسَقَ
17. Mpe na lapi na butu na molili na yango,
التفاسير العربية:
وَٱلۡقَمَرِ إِذَا ٱتَّسَقَ
18. Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba,
التفاسير العربية:
لَتَرۡكَبُنَّ طَبَقًا عَن طَبَقٖ
19. Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni.
التفاسير العربية:
فَمَا لَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
20. Mpona nini bazali kondima te,
التفاسير العربية:
وَإِذَا قُرِئَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقُرۡءَانُ لَا يَسۡجُدُونَۤ۩
21. Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango?
التفاسير العربية:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُكَذِّبُونَ
22. Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta.
التفاسير العربية:
وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يُوعُونَ
23. Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba.
التفاسير العربية:
فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
24. Pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
التفاسير العربية:
إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونِۭ
25. Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te.
التفاسير العربية:
 
ترجمة معاني سورة: الإنشقاق
فهرس السور رقم الصفحة
 
ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - فهرس التراجم

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

إغلاق