Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: An-Noor   Ayah:

An-Nûr (BONGENGI)

سُورَةٌ أَنزَلۡنَٰهَا وَفَرَضۡنَٰهَا وَأَنزَلۡنَا فِيهَآ ءَايَٰتِۭ بَيِّنَٰتٖ لَّعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
1. Oyo nde suratu (eteni) eye tokitisaki yango, mpe totiyaki ezala mobeko, mpe tokitisaki mikapo o kati na yango mizali polele mpo bokoka kokanisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلزَّانِيَةُ وَٱلزَّانِي فَٱجۡلِدُواْ كُلَّ وَٰحِدٖ مِّنۡهُمَا مِاْئَةَ جَلۡدَةٖۖ وَلَا تَأۡخُذۡكُم بِهِمَا رَأۡفَةٞ فِي دِينِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ تُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۖ وَلۡيَشۡهَدۡ عَذَابَهُمَا طَآئِفَةٞ مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
2. Mosali ekobo ya mwasi mpe mosali ekobo ya mobali, bobeta bango fimbo mokama moko, kasi boyokela bango mawa te tango bozali kokweisela bango mibeko mia lingomba lia Allah, soki solo bozali kondima na Allah mpe mokolo ya suka, mpe ndambu ya bandimi bazala tango etumbu ezali kopesamela bango mibale.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلزَّانِي لَا يَنكِحُ إِلَّا زَانِيَةً أَوۡ مُشۡرِكَةٗ وَٱلزَّانِيَةُ لَا يَنكِحُهَآ إِلَّا زَانٍ أَوۡ مُشۡرِكٞۚ وَحُرِّمَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
3. Mosali ekobo ya mobali akoki kobala te sé mosali ekobo ya mwasi to mopengwi ya mwasi, mpe mosali ekobo ya mwasi akoki kobala te sé mosali ekobo ya mobali to mopengwi yamobali, kasi wana eboyami тропа bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَأۡتُواْ بِأَرۡبَعَةِ شُهَدَآءَ فَٱجۡلِدُوهُمۡ ثَمَٰنِينَ جَلۡدَةٗ وَلَا تَقۡبَلُواْ لَهُمۡ شَهَٰدَةً أَبَدٗاۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
4. Мре baye bazali kofunda(1) basi ya malamu sé pamba boye, тре bayei na banzeneneke minei te, bobeta bango fimbo ntuku mwambe, mpe bondima lisusu matatoli na bango te. Mpe bango nde babebisi.
1 Kofunda: Awa elakisi: Baye oyo bazali koloba na basi ya malamu ete basali ekobo.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَّا ٱلَّذِينَ تَابُواْ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ وَأَصۡلَحُواْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
5. Longola sé baye batubeli o sima na yango mpe babongisi. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ أَزۡوَٰجَهُمۡ وَلَمۡ يَكُن لَّهُمۡ شُهَدَآءُ إِلَّآ أَنفُسُهُمۡ فَشَهَٰدَةُ أَحَدِهِمۡ أَرۡبَعُ شَهَٰدَٰتِۭ بِٱللَّهِ إِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
6. Mpe тропа baye oyo bafundi(2) basi na bango bango moko, kasi bazali na banzeneneke te, esengeli na moko kati na bango kotatola mbala minei na nkombo ya Allah ete azali koloba bosembo.
2 Bafundi: Awa elakisi: Mibali oyo bazali koloba na basi na bango ete basali ekobo.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلۡخَٰمِسَةُ أَنَّ لَعۡنَتَ ٱللَّهِ عَلَيۡهِ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
7. Mpe litatoli ya mitano ekozala ete: Botutu ya Allah ekozala likolo naye soki alobaki lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَدۡرَؤُاْ عَنۡهَا ٱلۡعَذَابَ أَن تَشۡهَدَ أَرۡبَعَ شَهَٰدَٰتِۭ بِٱللَّهِ إِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
8. Kasi etumbu ekolongua тропа ye soki atatoli mbala minei na nkombo ya Allah, ya sólo mobali naye akosi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلۡخَٰمِسَةَ أَنَّ غَضَبَ ٱللَّهِ عَلَيۡهَآ إِن كَانَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
9. Mpe ya mbala ya mitano ezali ete: Kanda ya Allah ekozala likolo naye (mwasi) soki (mobali) azali kati ya balobi solo.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ وَأَنَّ ٱللَّهَ تَوَّابٌ حَكِيمٌ
10. Мре soki mpo na bolamu ya Allah na mawa naye likolo na bino te ya soló Allah azali moyambi tubela atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ جَآءُو بِٱلۡإِفۡكِ عُصۡبَةٞ مِّنكُمۡۚ لَا تَحۡسَبُوهُ شَرّٗا لَّكُمۖ بَلۡ هُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۚ لِكُلِّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُم مَّا ٱكۡتَسَبَ مِنَ ٱلۡإِثۡمِۚ وَٱلَّذِي تَوَلَّىٰ كِبۡرَهُۥ مِنۡهُمۡ لَهُۥ عَذَابٌ عَظِيمٞ
11. Ya soló baye bay aki na lokuta (kopanza yango kati na mboka) ezali lisanga ya bato kati na bino, bomona yango mabe te kasi ezali malamu тропа bino, moko na moko kati na bango azui lisumu naye, kasi oyo kati na bango azui eteni ya monene, akozua etumbu ya monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّوۡلَآ إِذۡ سَمِعۡتُمُوهُ ظَنَّ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتُ بِأَنفُسِهِمۡ خَيۡرٗا وَقَالُواْ هَٰذَآ إِفۡكٞ مُّبِينٞ
12. Mpona nini te tango boyokaki yango,(1) bandimi ya mibali na ya basi esengeli bakanisa malamu kati na bango, mpe baloba: Oyo ezali lokuta ya polele.
1 Boyokaki yango: Lokuta oyo bakoselaki Aïcha mama ya bandimi (Allah asepela naye) ete asalaki ekobo.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّوۡلَا جَآءُو عَلَيۡهِ بِأَرۡبَعَةِ شُهَدَآءَۚ فَإِذۡ لَمۡ يَأۡتُواْ بِٱلشُّهَدَآءِ فَأُوْلَٰٓئِكَ عِندَ ٱللَّهِ هُمُ ٱلۡكَٰذِبُونَ
13. Mpona nini bamemaki te mpona yango banzeneneke minei? Kasi soki bamemi banzeneneke te, baye wana epai ya Allah bazali bato ya lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ لَمَسَّكُمۡ فِي مَآ أَفَضۡتُمۡ فِيهِ عَذَابٌ عَظِيمٌ
14. Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te o kati na mokili mpe o mokolo ya suka, etumbu makasi elingaki kozua bino mpona maye bosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِذۡ تَلَقَّوۡنَهُۥ بِأَلۡسِنَتِكُمۡ وَتَقُولُونَ بِأَفۡوَاهِكُم مَّا لَيۡسَ لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞ وَتَحۡسَبُونَهُۥ هَيِّنٗا وَهُوَ عِندَ ٱللَّهِ عَظِيمٞ
15. Tango bino moko bozali kobota yango na balolemo na bino mpe bozali koloba yango na minoko na bino oyo bozali na boyebi na yango te mpe bozali kornona yango шоке, kasi yango epai ya Allah ezali monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡلَآ إِذۡ سَمِعۡتُمُوهُ قُلۡتُم مَّا يَكُونُ لَنَآ أَن نَّتَكَلَّمَ بِهَٰذَا سُبۡحَٰنَكَ هَٰذَا بُهۡتَٰنٌ عَظِيمٞ
16. Mpe тропа nini tango boyokaki yango, bolobaki te ete tokoki kolobela yango te. Lokumu nayo (Allah) oyo ezali lokuta monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَعِظُكُمُ ٱللَّهُ أَن تَعُودُواْ لِمِثۡلِهِۦٓ أَبَدًا إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
17. Allah azali koteya bino mpo bozongela lisusu makambo ya ndenge oyo te, soki bozali bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِۚ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
18. Mpe Allah alimboleli bino mikapo polele. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُحِبُّونَ أَن تَشِيعَ ٱلۡفَٰحِشَةُ فِي ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
19. Ya soló, baye balingaka sé kopanza mabe o kati ya bandimi, bakozalaka na etumbu ya makasi awa na mokili mpe na mokolo mwa suka. Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ وَأَنَّ ٱللَّهَ رَءُوفٞ رَّحِيمٞ
20. Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te, ya sólo Allah azali wa ngolu atonda mawa.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّبِعُواْ خُطُوَٰتِ ٱلشَّيۡطَٰنِۚ وَمَن يَتَّبِعۡ خُطُوَٰتِ ٱلشَّيۡطَٰنِ فَإِنَّهُۥ يَأۡمُرُ بِٱلۡفَحۡشَآءِ وَٱلۡمُنكَرِۚ وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ مَا زَكَىٰ مِنكُم مِّنۡ أَحَدٍ أَبَدٗا وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يُزَكِّي مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
21. Eh bino baye bondima! В olanda makolo (nzela) ya satana te, oyo akolanda makolo naye, (boyeba ete) ya sólo, ye atindaka na mobulu mpe na mabe mpe soki Allah alingelaka bino bolamu na mawa naye te, alingaki kopetola moto o kati na bino te, kasi Allah apetolaka oyo alingi, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا يَأۡتَلِ أُوْلُواْ ٱلۡفَضۡلِ مِنكُمۡ وَٱلسَّعَةِ أَن يُؤۡتُوٓاْ أُوْلِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينَ وَٱلۡمُهَٰجِرِينَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۖ وَلۡيَعۡفُواْ وَلۡيَصۡفَحُوٓاْۗ أَلَا تُحِبُّونَ أَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
22. Mpe bato ya bomengo mpe ya bolamu kati na bino balapa te ete bakosalisa lisusu bandeko ba bango te, babola mpe te, bakosalisa mpe ba oyo babimi na nzela ya Allah te, esengeli na bango kolimbisa mpe kobosana, bokosepela te ete Allah alimbisa bino? Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَرۡمُونَ ٱلۡمُحۡصَنَٰتِ ٱلۡغَٰفِلَٰتِ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ لُعِنُواْ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
23. Ya sôló, baye bazali kofinga mpe kopanzela basi ya malamu baye bakanisaka kosala mabe te (ekobo), okati ya bandimi ya basi, bapesami botutu awa o nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe bakozalaka na etumbu ekasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَوۡمَ تَشۡهَدُ عَلَيۡهِمۡ أَلۡسِنَتُهُمۡ وَأَيۡدِيهِمۡ وَأَرۡجُلُهُم بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
24. O mokolo moye; balolemo, maboko mpe makolo na bango makotatolaka maye bazalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَوۡمَئِذٖ يُوَفِّيهِمُ ٱللَّهُ دِينَهُمُ ٱلۡحَقَّ وَيَعۡلَمُونَ أَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡحَقُّ ٱلۡمُبِينُ
25. Mokolo mona Allah akopesaka bango lifuta na bango na bosembo, mpe bakoyebaka ete ya sólo, Allah azali wa bosôló polele koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلۡخَبِيثَٰتُ لِلۡخَبِيثِينَ وَٱلۡخَبِيثُونَ لِلۡخَبِيثَٰتِۖ وَٱلطَّيِّبَٰتُ لِلطَّيِّبِينَ وَٱلطَّيِّبُونَ لِلطَّيِّبَٰتِۚ أُوْلَٰٓئِكَ مُبَرَّءُونَ مِمَّا يَقُولُونَۖ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَرِزۡقٞ كَرِيمٞ
26. Basi ya mabe тропа mibali ya mabe mpe mibali ya mabe тропа basi ya mabe, lolenge moko basi ya malamu тропа mibali ya malamu, mpe mibali ya malamu тропа basi ya malamu. Bango wana nde bazali mosika na makambo ya mabe oyo bato bazali koloba, bazali na bolimbisi mpe bozui ya malamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَدۡخُلُواْ بُيُوتًا غَيۡرَ بُيُوتِكُمۡ حَتَّىٰ تَسۡتَأۡنِسُواْ وَتُسَلِّمُواْ عَلَىٰٓ أَهۡلِهَاۚ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
27. Eh, bino baye bondima! Bokota na bandako oyo bizali bandako bia bino te, kino ete bosenga ndingisa, mpe bopesa mbote ya boboto epai ya bato na yango. Wana ezali malamu тропа bino mpo bokoka kokanisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن لَّمۡ تَجِدُواْ فِيهَآ أَحَدٗا فَلَا تَدۡخُلُوهَا حَتَّىٰ يُؤۡذَنَ لَكُمۡۖ وَإِن قِيلَ لَكُمُ ٱرۡجِعُواْ فَٱرۡجِعُواْۖ هُوَ أَزۡكَىٰ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ عَلِيمٞ
28. Soki bokuti moto o kati na yango te, bokota te, kino bapesa bino ndingisa, mpe soki bayebisi bino ete bozonga, bozonga, wana ezali malamu тропа bino. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٌ أَن تَدۡخُلُواْ بُيُوتًا غَيۡرَ مَسۡكُونَةٖ فِيهَا مَتَٰعٞ لَّكُمۡۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تُبۡدُونَ وَمَا تَكۡتُمُونَ
29. Epekisami na bino te kokota o bandako biye bato bazali na kati te mpe bolamu na bino ezali nakati. Mpe Allah ayebi maye bozali kobimisa polele mpe maye bozali kobomba.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُل لِّلۡمُؤۡمِنِينَ يَغُضُّواْ مِنۡ أَبۡصَٰرِهِمۡ وَيَحۡفَظُواْ فُرُوجَهُمۡۚ ذَٰلِكَ أَزۡكَىٰ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ خَبِيرُۢ بِمَا يَصۡنَعُونَ
30. Loba na bandimi bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango, wana ezali malamu тропа bango. Ya soló, Allah azali na basango ya maye bazali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقُل لِّلۡمُؤۡمِنَٰتِ يَغۡضُضۡنَ مِنۡ أَبۡصَٰرِهِنَّ وَيَحۡفَظۡنَ فُرُوجَهُنَّ وَلَا يُبۡدِينَ زِينَتَهُنَّ إِلَّا مَا ظَهَرَ مِنۡهَاۖ وَلۡيَضۡرِبۡنَ بِخُمُرِهِنَّ عَلَىٰ جُيُوبِهِنَّۖ وَلَا يُبۡدِينَ زِينَتَهُنَّ إِلَّا لِبُعُولَتِهِنَّ أَوۡ ءَابَآئِهِنَّ أَوۡ ءَابَآءِ بُعُولَتِهِنَّ أَوۡ أَبۡنَآئِهِنَّ أَوۡ أَبۡنَآءِ بُعُولَتِهِنَّ أَوۡ إِخۡوَٰنِهِنَّ أَوۡ بَنِيٓ إِخۡوَٰنِهِنَّ أَوۡ بَنِيٓ أَخَوَٰتِهِنَّ أَوۡ نِسَآئِهِنَّ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُنَّ أَوِ ٱلتَّٰبِعِينَ غَيۡرِ أُوْلِي ٱلۡإِرۡبَةِ مِنَ ٱلرِّجَالِ أَوِ ٱلطِّفۡلِ ٱلَّذِينَ لَمۡ يَظۡهَرُواْ عَلَىٰ عَوۡرَٰتِ ٱلنِّسَآءِۖ وَلَا يَضۡرِبۡنَ بِأَرۡجُلِهِنَّ لِيُعۡلَمَ مَا يُخۡفِينَ مِن زِينَتِهِنَّۚ وَتُوبُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ جَمِيعًا أَيُّهَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
31. Мре loba na bandimi ya (basi), bakitisa miso ma bango mpe babatela mitakala mia bango mpe balakisa bonzenga na bango te sé oyo ekoki komonana, mpe bakanga kitambala na bango ya monene kino ezipa bantolo na bango, kasi bonzenga ma bango balakisa yango sé epai ya mibali na bango, to epai ya batata na bango to batata ya mibali na bango to bana na bango to epai ya bana ya mibali na bango, to bandeko na bango to bana ya bandeko na bango ya mibali, to bana ya bandeko na bango ya basi, to bandimi ya basi, to bawumbu na bango, to basali ya mibali baye kimobali na bango esalaka te, to bana ya mike baye bayebi makambo ya basi te, mpe babeta makolo na bango makasi te na mabele тропа komonisa oyo ebombami na bonzenga na bango mpe botubela epai ya Allah bino banso, eh bino bandimi mpo ete bolonga.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَنكِحُواْ ٱلۡأَيَٰمَىٰ مِنكُمۡ وَٱلصَّٰلِحِينَ مِنۡ عِبَادِكُمۡ وَإِمَآئِكُمۡۚ إِن يَكُونُواْ فُقَرَآءَ يُغۡنِهِمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦۗ وَٱللَّهُ وَٰسِعٌ عَلِيمٞ
32. Mpe bobalisa banzemba kati na bino mpe bawumbu na bino ya malumu (basi mpe mibali), soki bazali na misolo te, Allah akopesa bango misolo ebele na bolingi bwa ye, mpe Allah azali mofungoli monene atondo boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلۡيَسۡتَعۡفِفِ ٱلَّذِينَ لَا يَجِدُونَ نِكَاحًا حَتَّىٰ يُغۡنِيَهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦۗ وَٱلَّذِينَ يَبۡتَغُونَ ٱلۡكِتَٰبَ مِمَّا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُمۡ فَكَاتِبُوهُمۡ إِنۡ عَلِمۡتُمۡ فِيهِمۡ خَيۡرٗاۖ وَءَاتُوهُم مِّن مَّالِ ٱللَّهِ ٱلَّذِيٓ ءَاتَىٰكُمۡۚ وَلَا تُكۡرِهُواْ فَتَيَٰتِكُمۡ عَلَى ٱلۡبِغَآءِ إِنۡ أَرَدۡنَ تَحَصُّنٗا لِّتَبۡتَغُواْ عَرَضَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۚ وَمَن يُكۡرِههُّنَّ فَإِنَّ ٱللَّهَ مِنۢ بَعۡدِ إِكۡرَٰهِهِنَّ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
33. Мре тропа baye bazui naino makoki ya libala te, ba mibatela kino Allah akopesa bango bozui na ngolu naye, mpe baye okati ya bawumbu na bino baye balingi boyokani na bino, na ntina ete basikolama, tika ete boyokana na bango soki boyebi ete bolamu ezali kati na bango, тре bopesa bango misolo mia Allah miye apesa bino. Botinda te na makasi bilenge basi bawumbu bábino baye basepeli komibatela ete basala ekobo, na posa ete bozua bomengo ya bomoi ya nsé. Oyó okati na bino akosalisa bango ekobo na makasi, sima ya kotinda bango na makasi, ya soló Allah, azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ ءَايَٰتٖ مُّبَيِّنَٰتٖ وَمَثَلٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلِكُمۡ وَمَوۡعِظَةٗ لِّلۡمُتَّقِينَ
34. Mpe tosilaki kokitisela bino mikapo mia polele, mpe topesaki ndakisa ya baye oyo balekaki liboso na bino mpe mateya тропа babangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ ٱللَّهُ نُورُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ مَثَلُ نُورِهِۦ كَمِشۡكَوٰةٖ فِيهَا مِصۡبَاحٌۖ ٱلۡمِصۡبَاحُ فِي زُجَاجَةٍۖ ٱلزُّجَاجَةُ كَأَنَّهَا كَوۡكَبٞ دُرِّيّٞ يُوقَدُ مِن شَجَرَةٖ مُّبَٰرَكَةٖ زَيۡتُونَةٖ لَّا شَرۡقِيَّةٖ وَلَا غَرۡبِيَّةٖ يَكَادُ زَيۡتُهَا يُضِيٓءُ وَلَوۡ لَمۡ تَمۡسَسۡهُ نَارٞۚ نُّورٌ عَلَىٰ نُورٖۚ يَهۡدِي ٱللَّهُ لِنُورِهِۦ مَن يَشَآءُۚ وَيَضۡرِبُ ٱللَّهُ ٱلۡأَمۡثَٰلَ لِلنَّاسِۗ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
35. Allah azali bongengi ya likolo na mabele, bongengi naye ezali lokola ndako ezali na mwinda, mwinda yango efandi na sani ya molangi, oyo ezali kongenga lokola monzoto ezali kopesa bongengi kowuta na nzete ya zaîtûn(1) oyo epambwama enyele mpe eloli te, ezali na mafuta mazali kopesa bongengi ata soki moto ezui yango te, bongengi likolo na bongengi. Allah akambaka o bongengi naye moto nani alingi, mpe Allah abetaka ndakisa epai ya bato, mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso.
1 Zaîtûn: Bótala na suratu Al-An’ám mokapo: 99
Arabic explanations of the Qur’an:
فِي بُيُوتٍ أَذِنَ ٱللَّهُ أَن تُرۡفَعَ وَيُذۡكَرَ فِيهَا ٱسۡمُهُۥ يُسَبِّحُ لَهُۥ فِيهَا بِٱلۡغُدُوِّ وَٱلۡأٓصَالِ
36. Kati na bandako oyo(1) Allah apesaki ndingisa ya kotelemisa yango mpo batanga nkombo naye na kati mpe basanzola ye na kati tongo mpe nsima ya nzanga,
1 Bandako oyo: Ezali ba masádjid (mosquee).
Arabic explanations of the Qur’an:
رِجَالٞ لَّا تُلۡهِيهِمۡ تِجَٰرَةٞ وَلَا بَيۡعٌ عَن ذِكۡرِ ٱللَّهِ وَإِقَامِ ٱلصَّلَوٰةِ وَإِيتَآءِ ٱلزَّكَوٰةِ يَخَافُونَ يَوۡمٗا تَتَقَلَّبُ فِيهِ ٱلۡقُلُوبُ وَٱلۡأَبۡصَٰرُ
37. Mibali oyo mombongo mpe koteka ezali kobosanisa bango bokundoli ya Allah te, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat bazali kobanga mokolo moye mitema, mpe miso mikobaluka.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِيَجۡزِيَهُمُ ٱللَّهُ أَحۡسَنَ مَا عَمِلُواْ وَيَزِيدَهُم مِّن فَضۡلِهِۦۗ وَٱللَّهُ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٖ
38. Mpo Allah afuta bango na lolenge ya malamu, тропа maye basalaki mpe abakisela bango bolamu bwa ye, Allah apesaka bozui na oyo alingi ezali na motango te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَعۡمَٰلُهُمۡ كَسَرَابِۭ بِقِيعَةٖ يَحۡسَبُهُ ٱلظَّمۡـَٔانُ مَآءً حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَهُۥ لَمۡ يَجِدۡهُ شَيۡـٔٗا وَوَجَدَ ٱللَّهَ عِندَهُۥ فَوَفَّىٰهُ حِسَابَهُۥۗ وَٱللَّهُ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
39. Mpe baye bapengwa, misala mia bango mizali lokola elilingi nakati ya esobe. Oyo mposa ya mayi eleki ye akolanda yango mpe akokuta eloko te, mpe akokuta Allah nde akopesa ye mbano naye. Mpe Allah azali lombango na kofuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَوۡ كَظُلُمَٰتٖ فِي بَحۡرٖ لُّجِّيّٖ يَغۡشَىٰهُ مَوۡجٞ مِّن فَوۡقِهِۦ مَوۡجٞ مِّن فَوۡقِهِۦ سَحَابٞۚ ظُلُمَٰتُۢ بَعۡضُهَا فَوۡقَ بَعۡضٍ إِذَآ أَخۡرَجَ يَدَهُۥ لَمۡ يَكَدۡ يَرَىٰهَاۗ وَمَن لَّمۡ يَجۡعَلِ ٱللَّهُ لَهُۥ نُورٗا فَمَا لَهُۥ مِن نُّورٍ
40. (Misala mia bapengwi) lokola molili ya ebale ya mozindo mpe mayi ebele mbonge ezipi yango, mbonge likolo na mbonge ezipani na londende, molili na molili, soki moko abimisi loboko naye, azali kokoka kokesenisa yango te, mpe oyo akozua bongengi bwa Allah te, akozala mpe na bangengi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ يُسَبِّحُ لَهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱلطَّيۡرُ صَٰٓفَّٰتٖۖ كُلّٞ قَدۡ عَلِمَ صَلَاتَهُۥ وَتَسۡبِيحَهُۥۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِمَا يَفۡعَلُونَ
41. Boye bozali kornona te ete: Ya soló, biloko nyoso biye bizali na likolo mpe na nsé bizali kokumisa Allah, mpe bandeke bazali kopepe mapapu na bango? Mpe ekelamu nyoso eyebi lolenge yalosambo naye mpe kokumisa naye. Allah ayebi malamu maye bazali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلِلَّهِ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَإِلَى ٱللَّهِ ٱلۡمَصِيرُ
42. Mpe Allah nde Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, mpe epai na Allah nde bozongi bozali.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ يُزۡجِي سَحَابٗا ثُمَّ يُؤَلِّفُ بَيۡنَهُۥ ثُمَّ يَجۡعَلُهُۥ رُكَامٗا فَتَرَى ٱلۡوَدۡقَ يَخۡرُجُ مِنۡ خِلَٰلِهِۦ وَيُنَزِّلُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مِن جِبَالٖ فِيهَا مِنۢ بَرَدٖ فَيُصِيبُ بِهِۦ مَن يَشَآءُ وَيَصۡرِفُهُۥ عَن مَّن يَشَآءُۖ يَكَادُ سَنَا بَرۡقِهِۦ يَذۡهَبُ بِٱلۡأَبۡصَٰرِ
43. Boye ozali kornona te ya soló, Allah azali kotindika mapata, sima asangisi yango, sima asali lisusu ete ekoma liboke? Okomona mbula ebimi wana. Mpe azali kokitisa kowuta o likolo ya mapata matelemi lokola bangomba, mbula ya mabanga. Ekozuaka baye oyo alingi, alongolaka yango na oyo alingi. Bongengi ya mokalali na yango ezali makasi lokola ekoki koboma miso.
Arabic explanations of the Qur’an:
يُقَلِّبُ ٱللَّهُ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَعِبۡرَةٗ لِّأُوْلِي ٱلۡأَبۡصَٰرِ
44. Allah azali kobalusa butu mpe moyi. Ya soló, wana ezali liteya тропа bato ya mayele.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱللَّهُ خَلَقَ كُلَّ دَآبَّةٖ مِّن مَّآءٖۖ فَمِنۡهُم مَّن يَمۡشِي عَلَىٰ بَطۡنِهِۦ وَمِنۡهُم مَّن يَمۡشِي عَلَىٰ رِجۡلَيۡنِ وَمِنۡهُم مَّن يَمۡشِي عَلَىٰٓ أَرۡبَعٖۚ يَخۡلُقُ ٱللَّهُ مَا يَشَآءُۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
45. Allah nde mokeli wa banyama binso kowuta na mayi, bisusu bizali kotambola na libumu na yango, mpe bisusu bizali kotambola na makolo mibale, mpe kati na yango biye bizali kotambola na makolo minei, Allah akelaka oyo alingi. Ya solo, Allah azali na bokoki тропа biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّقَدۡ أَنزَلۡنَآ ءَايَٰتٖ مُّبَيِّنَٰتٖۚ وَٱللَّهُ يَهۡدِي مَن يَشَآءُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
46. Tosilaki kokitisa mikapo miye mizali polele. Mpe Allah akambaka oyo alingi o nzela ya semba.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَقُولُونَ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَبِٱلرَّسُولِ وَأَطَعۡنَا ثُمَّ يَتَوَلَّىٰ فَرِيقٞ مِّنۡهُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَۚ وَمَآ أُوْلَٰٓئِكَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ
47. Mpe bakolobaka(1): Tondimi na Allah na motindami, mpe totosi, sima na yango basusu kati na bango baboyi bapesi mikongo. Kasi bazali bandimi te.
1 Mpe bakolobaka: Elingi koloba: Bato ya bilongi mibale.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا دُعُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ لِيَحۡكُمَ بَيۡنَهُمۡ إِذَا فَرِيقٞ مِّنۡهُم مُّعۡرِضُونَ
48. Mpe tango bakobenga bango baya epai na Allah na motindami wa ye, mpo akata (makambo) kati na bango, okomona basusu kati na bango baboyi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِن يَكُن لَّهُمُ ٱلۡحَقُّ يَأۡتُوٓاْ إِلَيۡهِ مُذۡعِنِينَ
49. Kasi soki ezali тропа litomba na bango, bazali koyela ye na botosi.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَفِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ أَمِ ٱرۡتَابُوٓاْ أَمۡ يَخَافُونَ أَن يَحِيفَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡ وَرَسُولُهُۥۚ بَلۡ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
50. Boye mitema mia bango mizali na bokono to bazali kotiya tembe? To bazali kobanga ete Allah na motindami naye babuba bango, kasi bango nde bazali babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا كَانَ قَوۡلَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ إِذَا دُعُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ لِيَحۡكُمَ بَيۡنَهُمۡ أَن يَقُولُواْ سَمِعۡنَا وَأَطَعۡنَاۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
51. Ya soló, liloba ya bandimi ezalaka soki babengi bango epai ya Allah na motindami waye mpo akata (makambo) kati na bango, bakoloba: Toyoki mpe totosi, mpe baye wana nde balongi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَيَخۡشَ ٱللَّهَ وَيَتَّقۡهِ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
52. Mpe oyo akotosa Allah na motindami waye, mpe abangi Allah, mpe azali na bomo naye, baye wana nde balongi.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ وَأَقۡسَمُواْ بِٱللَّهِ جَهۡدَ أَيۡمَٰنِهِمۡ لَئِنۡ أَمَرۡتَهُمۡ لَيَخۡرُجُنَّۖ قُل لَّا تُقۡسِمُواْۖ طَاعَةٞ مَّعۡرُوفَةٌۚ إِنَّ ٱللَّهَ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
53. Bazali kolapa bandayi ya polele ete soki otindi bango (тропа kobunda) bakobimaka, loba: Bolapa te botosi (ya bino ya lokuta) eyebani. Allah ayebi na malamu maye bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلۡ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَۖ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا عَلَيۡهِ مَا حُمِّلَ وَعَلَيۡكُم مَّا حُمِّلۡتُمۡۖ وَإِن تُطِيعُوهُ تَهۡتَدُواْۚ وَمَا عَلَى ٱلرَّسُولِ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
54. Loba: Botosa Allah mpe botosa motindami, mpe soki bapesi mokongo, (motindami) akozala na mokumba sé oyo bapesi ye, bino mpe bozali na mikumba na bino, mpe soki botosi ye bokokambama. Mpe motindami azali sé тропа kokomisa sango ya polele.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنكُمۡ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَيَسۡتَخۡلِفَنَّهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ كَمَا ٱسۡتَخۡلَفَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ وَلَيُمَكِّنَنَّ لَهُمۡ دِينَهُمُ ٱلَّذِي ٱرۡتَضَىٰ لَهُمۡ وَلَيُبَدِّلَنَّهُم مِّنۢ بَعۡدِ خَوۡفِهِمۡ أَمۡنٗاۚ يَعۡبُدُونَنِي لَا يُشۡرِكُونَ بِي شَيۡـٔٗاۚ وَمَن كَفَرَ بَعۡدَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
55. Allah asila kolaka epai ya baye bandimi okati na bino, mpe bazali kosala misala ya malamu, bango nde bakozala bakitani o kati na mabele, lolenge akitanisaki baye bazalaki liboso na bango, mpe a kolendisa тропа bango ligomba na bango oyo asepeli тропа bango тре akobongolaka sima ya kobanga na bango ya kala ezala kimiya. Babondelaka ngai kasi basangisaka ngai na eloko te, mpe oyo akopengwa sima na yango, bango nde babebisi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
56. Mpe botelemisa losambo mpe bobimisa zakat, тре botosa motindami, mpo ete bozua ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا تَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَمَأۡوَىٰهُمُ ٱلنَّارُۖ وَلَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
57. Kokanisa te ete bapagano bakolonga bokonzi ya Allah kati na mabele. Mpe esika na bango nde moto, oyo ezali esika ya mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لِيَسۡتَـٔۡذِنكُمُ ٱلَّذِينَ مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُكُمۡ وَٱلَّذِينَ لَمۡ يَبۡلُغُواْ ٱلۡحُلُمَ مِنكُمۡ ثَلَٰثَ مَرَّٰتٖۚ مِّن قَبۡلِ صَلَوٰةِ ٱلۡفَجۡرِ وَحِينَ تَضَعُونَ ثِيَابَكُم مِّنَ ٱلظَّهِيرَةِ وَمِنۢ بَعۡدِ صَلَوٰةِ ٱلۡعِشَآءِۚ ثَلَٰثُ عَوۡرَٰتٖ لَّكُمۡۚ لَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ وَلَا عَلَيۡهِمۡ جُنَاحُۢ بَعۡدَهُنَّۚ طَوَّٰفُونَ عَلَيۡكُم بَعۡضُكُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖۚ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
58. Eh bino baye bondima! Bawumbu na bino basenga bino ndingisa yambo ya kokotela bino, ndenge moko mpe ba oyo kati na bino bakokisi naino mibu ya mikolo te, mbala misato: Liboso ya sambela ya ntongo, mpe na ngonga ya nzanga tango bozali kolongola bilamba na nzoto, mpe sima ya sambela ya butu, wana nde bangonga misato ya bolumbu pona bino, kasi ezali mabe te тропа bino na bango kokende kotalana sima ya bangonga oyo etangami awa, lolenge wana nde Allah azali kolimbola mikapo mia ye polele тропа bino. Allah azali moyebi atondo bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا بَلَغَ ٱلۡأَطۡفَٰلُ مِنكُمُ ٱلۡحُلُمَ فَلۡيَسۡتَـٔۡذِنُواْ كَمَا ٱسۡتَـٔۡذَنَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمۡ ءَايَٰتِهِۦۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
59. Мре soki bana kati na bino bakoli, basenga ndingisa ndenge bayambo babango mpe bazalaka kosenga ndingisa, ndenge wana nde Allah azali kolimbolela bino mikapo mia ye. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلۡقَوَٰعِدُ مِنَ ٱلنِّسَآءِ ٱلَّٰتِي لَا يَرۡجُونَ نِكَاحٗا فَلَيۡسَ عَلَيۡهِنَّ جُنَاحٌ أَن يَضَعۡنَ ثِيَابَهُنَّ غَيۡرَ مُتَبَرِّجَٰتِۭ بِزِينَةٖۖ وَأَن يَسۡتَعۡفِفۡنَ خَيۡرٞ لَّهُنَّۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
60. Mpe тропа basi baye bakomisa mibu miye bakoki lisusu kobala te, ezali lisumu te soki balingi kolongola bilamba(1) bia bango na polele, kasi na ndenge yakotika bonzenga nyoso polele te, mpe soki basaleli nsoni ezali malamu тропа bango. Allah azali moyoki mpe moyebi.
1 Kolongola bilamba: Awa ezali kolongola kitambala ya munene oyo ezipaka tolo.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّيۡسَ عَلَى ٱلۡأَعۡمَىٰ حَرَجٞ وَلَا عَلَى ٱلۡأَعۡرَجِ حَرَجٞ وَلَا عَلَى ٱلۡمَرِيضِ حَرَجٞ وَلَا عَلَىٰٓ أَنفُسِكُمۡ أَن تَأۡكُلُواْ مِنۢ بُيُوتِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ ءَابَآئِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ أُمَّهَٰتِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ إِخۡوَٰنِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ أَخَوَٰتِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ أَعۡمَٰمِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ عَمَّٰتِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ أَخۡوَٰلِكُمۡ أَوۡ بُيُوتِ خَٰلَٰتِكُمۡ أَوۡ مَا مَلَكۡتُم مَّفَاتِحَهُۥٓ أَوۡ صَدِيقِكُمۡۚ لَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٌ أَن تَأۡكُلُواْ جَمِيعًا أَوۡ أَشۡتَاتٗاۚ فَإِذَا دَخَلۡتُم بُيُوتٗا فَسَلِّمُواْ عَلَىٰٓ أَنفُسِكُمۡ تَحِيَّةٗ مِّنۡ عِندِ ٱللَّهِ مُبَٰرَكَةٗ طَيِّبَةٗۚ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّكُمۡ تَعۡقِلُونَ
61. Epekisami te тропа mokufi miso, na moto ya tengu, na moto ya bokono, na bino na bino na libota moko ete bolia na bandako ya bino, to bandako ya batata na bino, to bandako ya bamama na bino, to bandako ya bandeko na bino ya mibali, to bandako ya bandeko na bino ya basi, to ya batata kulutu na batata leki na bino, to ya batata mwasi na bino, to ya banoko na bino, to ya bamama kulutu na bino mpe bamama leki na bino, to na bandako oyo bosimbi bafungola na yango, to ya baninga na bino, ezali mabe te тропа bino kólia na lisanga to ya kokabuana, mpe soki bokoti na bandako bopesana mbote (ya kimia) losako ya mapamboli mpe ya kitoko mowuta epai na Allah. Ndenge wana nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye mpo ete bososola.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَإِذَا كَانُواْ مَعَهُۥ عَلَىٰٓ أَمۡرٖ جَامِعٖ لَّمۡ يَذۡهَبُواْ حَتَّىٰ يَسۡتَـٔۡذِنُوهُۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَسۡتَـٔۡذِنُونَكَ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۚ فَإِذَا ٱسۡتَـٔۡذَنُوكَ لِبَعۡضِ شَأۡنِهِمۡ فَأۡذَن لِّمَن شِئۡتَ مِنۡهُمۡ وَٱسۡتَغۡفِرۡ لَهُمُ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
62. Bandimi ya soló, bazali baye bandimi na Allah na motindami naye, mpe soki bafandi naye тропа likambo ya lisanga(1), bakoki kokende te kino bako senga ye nzela. Ya sólo, ba oyo bazali kosenga yo nzela bango nde bandimi ya sólo na Allah na motindami naye. Mpe soki basengi yo nzela тропа mwa likambo na bango ndimela na oyo olingi kati na bango mpe sengela bango bolimbisi epai na Allah. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
1 Likambo ya lisanga: Elakisa: Makambo oyo etali bolamo ya bandimi na lingomba.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّا تَجۡعَلُواْ دُعَآءَ ٱلرَّسُولِ بَيۡنَكُمۡ كَدُعَآءِ بَعۡضِكُم بَعۡضٗاۚ قَدۡ يَعۡلَمُ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ يَتَسَلَّلُونَ مِنكُمۡ لِوَاذٗاۚ فَلۡيَحۡذَرِ ٱلَّذِينَ يُخَالِفُونَ عَنۡ أَمۡرِهِۦٓ أَن تُصِيبَهُمۡ فِتۡنَةٌ أَوۡ يُصِيبَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٌ
63. Bozua ebengeli ya motindami te lokola ebengeli kati na bino na bino. Allah asili koyeba ba oyo kati na bino bamibendaka na kobatama, baye bazali kotelemela mibeko naye bakeba ete komekama eyela bango to etumbu ya makasi ezua bango.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَآ إِنَّ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ قَدۡ يَعۡلَمُ مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ وَيَوۡمَ يُرۡجَعُونَ إِلَيۡهِ فَيُنَبِّئُهُم بِمَا عَمِلُواْۗ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمُۢ
64. Boyeba ete ya soló, maye manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah, ya soló, ayebi malamu maye bozali na yango, mpe mokolo moye bakozongisama epai naye, akoyebisa bango na maye basalaki mpe Allah nde moyebi wa makambo manso.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: An-Noor
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Translations’ Index

Translation of the meanings of the Noble Qur’an into the Lingala language, translated by Zakaria Muhammad Balngogo.

close