Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Hashr   Ayah:

Al-Hashr (BOBIMISAMI)

سَبَّحَ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
1. Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa bokasi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَخۡرَجَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مِن دِيَٰرِهِمۡ لِأَوَّلِ ٱلۡحَشۡرِۚ مَا ظَنَنتُمۡ أَن يَخۡرُجُواْۖ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُم مَّانِعَتُهُمۡ حُصُونُهُم مِّنَ ٱللَّهِ فَأَتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِنۡ حَيۡثُ لَمۡ يَحۡتَسِبُواْۖ وَقَذَفَ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلرُّعۡبَۚ يُخۡرِبُونَ بُيُوتَهُم بِأَيۡدِيهِمۡ وَأَيۡدِي ٱلۡمُؤۡمِنِينَ فَٱعۡتَبِرُواْ يَٰٓأُوْلِي ٱلۡأَبۡصَٰرِ
2. Ye nde abimisaki bapengwi baye bazua buku na bandako na bango na bobimisami ya liboso. Bokanisaki te ete bakobima, mpe bakanisaki ete bozui na bango ekobatela bango liboso ya Allah, mpe Allah abimelaki bango na epai oyo bazalaki kolikia te, mpe akotisaki kobanga na mitema mia bango. Babukaki bandako na bango bango moko, mpe na maboko ya bandimi, bososola na yango liteya, eh bato ya mayele!
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡلَآ أَن كَتَبَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمُ ٱلۡجَلَآءَ لَعَذَّبَهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ عَذَابُ ٱلنَّارِ
3. Soki ezalaka elaka oyo Allah akomela bango te, mbele topesaki bango etumbu ya makasi na mokili, mpe o mokolo ya suka bakozalaka na etumbu ya moto.
Arabic explanations of the Qur’an:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ شَآقُّواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۖ وَمَن يُشَآقِّ ٱللَّهَ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
4. Wana mpo ete: Batiaki tembe na Allah na motindami naye. Мре oyo akotia tembe na Allah, ya soló Allah azali makasi na bopesi etumbu.
1 Línat: Ezali: Nagh’la, Bótala nagh’la na suratu Al-An’ám: 99.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا قَطَعۡتُم مِّن لِّينَةٍ أَوۡ تَرَكۡتُمُوهَا قَآئِمَةً عَلَىٰٓ أُصُولِهَا فَبِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَلِيُخۡزِيَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
5. Nzete ya línat(1) nyoso oyo bokataki, na oyo botikaki ya kotelema ezali sé na bolingi ya Allah, mpe mpo Allah afuta bato ya mabe.
1 Línat: Ezali: Nagh’la, Bótala nagh’la na suratu Al-An’ám: 99.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَآ أَفَآءَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ مِنۡهُمۡ فَمَآ أَوۡجَفۡتُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ خَيۡلٖ وَلَا رِكَابٖ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يُسَلِّطُ رُسُلَهُۥ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
6. Biloko na bango oyo batikaki, mpe Allah apesaki yango epai ya motindami naye na bitumba te, mpe bobimisaki punda te, ebwele moko mpe te, kasi Allah apesaka elonga na batindami naye likolo ya nani alingi. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَّآ أَفَآءَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡقُرَىٰ فَلِلَّهِ وَلِلرَّسُولِ وَلِذِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِ كَيۡ لَا يَكُونَ دُولَةَۢ بَيۡنَ ٱلۡأَغۡنِيَآءِ مِنكُمۡۚ وَمَآ ءَاتَىٰكُمُ ٱلرَّسُولُ فَخُذُوهُ وَمَا نَهَىٰكُمۡ عَنۡهُ فَٱنتَهُواْۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۖ إِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
7. Bozui ya banguna oyo Allah apeși motindami naye na bitumba, ezali тропа Allah na motindami naye, mpe тропа libota, mpe bana bitike na babola mpe na moleki nzela, (oyo azangi) mpo ete bozui yango etambola kaka te kati na bino bai bomengo. Mpe oyo motindami Ayeli bino bozua yango. Mpe oyo apekisi bino botika. Mpe bobanga Allah, ya sólo, Allah azali makasi na bopesi etumbu.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِلۡفُقَرَآءِ ٱلۡمُهَٰجِرِينَ ٱلَّذِينَ أُخۡرِجُواْ مِن دِيَٰرِهِمۡ وَأَمۡوَٰلِهِمۡ يَبۡتَغُونَ فَضۡلٗا مِّنَ ٱللَّهِ وَرِضۡوَٰنٗا وَيَنصُرُونَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلصَّٰدِقُونَ
8. Mpona babola baye bakimaki batiki bandako na bango na bomengo na bango тропа koluka bolamu epai na Allah na bosepeli naye, тре basalisaki Allah na motindami naye. Bango wana nde bazali bato ya bosembo.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ تَبَوَّءُو ٱلدَّارَ وَٱلۡإِيمَٰنَ مِن قَبۡلِهِمۡ يُحِبُّونَ مَنۡ هَاجَرَ إِلَيۡهِمۡ وَلَا يَجِدُونَ فِي صُدُورِهِمۡ حَاجَةٗ مِّمَّآ أُوتُواْ وَيُؤۡثِرُونَ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡ وَلَوۡ كَانَ بِهِمۡ خَصَاصَةٞۚ وَمَن يُوقَ شُحَّ نَفۡسِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
9. (Mpe basusu) baye bavandaki liboso na mboka, mpe nakati ya bondimi, balingaki baye bakimaki epai na bango, bazalaki na mpasi токе te na mitema mpona koyamba bango na maye bapesaki bango, mpe balingi bango koleka banzoto na bango moko ata bazali na bozangi ya koleka, oyo akomibatela na moyimi ya nzoto naye moko, bango nde bazali na elonga.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ جَآءُو مِنۢ بَعۡدِهِمۡ يَقُولُونَ رَبَّنَا ٱغۡفِرۡ لَنَا وَلِإِخۡوَٰنِنَا ٱلَّذِينَ سَبَقُونَا بِٱلۡإِيمَٰنِ وَلَا تَجۡعَلۡ فِي قُلُوبِنَا غِلّٗا لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ رَبَّنَآ إِنَّكَ رَءُوفٞ رَّحِيمٌ
10. Mpona baye bayaki sima na bango, bazali koloba: Nkolo limbisa biso na bandeko na biso oyo bandima liboso na biso, mpe kobebisa mitema mia biso te mpona baye bandima, Nkolo na biso ozali moyoki otonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ أَلَمۡ تَرَ إِلَى ٱلَّذِينَ نَافَقُواْ يَقُولُونَ لِإِخۡوَٰنِهِمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ لَئِنۡ أُخۡرِجۡتُمۡ لَنَخۡرُجَنَّ مَعَكُمۡ وَلَا نُطِيعُ فِيكُمۡ أَحَدًا أَبَدٗا وَإِن قُوتِلۡتُمۡ لَنَنصُرَنَّكُمۡ وَٱللَّهُ يَشۡهَدُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
11. Boye ozali kornona te mpona baye bazali koloba na bandeko na bango baye bapengwa kati na bato ya buku: Soki babengani bino, tokokende elongo na bino mpe tokotosa moto te sé bino, mpe soki babundisi bino, tokosalisa bino, Ya soló, Allah ayebi ete bazali bato ya lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَئِنۡ أُخۡرِجُواْ لَا يَخۡرُجُونَ مَعَهُمۡ وَلَئِن قُوتِلُواْ لَا يَنصُرُونَهُمۡ وَلَئِن نَّصَرُوهُمۡ لَيُوَلُّنَّ ٱلۡأَدۡبَٰرَ ثُمَّ لَا يُنصَرُونَ
12. Soki babenganami, bakolanda bango te, mpe soki babundisami, bakosalisa bango te, ata soki bakendaki kosalisa bango bakosuka sé na kokima, sima bakosungama te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَأَنتُمۡ أَشَدُّ رَهۡبَةٗ فِي صُدُورِهِم مِّنَ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ
13. Mpe bazali na kobanga mingi na mitema тропа bino koleka Allah, mpo ete bazali bato oyo bayebi kososola te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا يُقَٰتِلُونَكُمۡ جَمِيعًا إِلَّا فِي قُرٗى مُّحَصَّنَةٍ أَوۡ مِن وَرَآءِ جُدُرِۭۚ بَأۡسُهُم بَيۡنَهُمۡ شَدِيدٞۚ تَحۡسَبُهُمۡ جَمِيعٗا وَقُلُوبُهُمۡ شَتَّىٰۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَعۡقِلُونَ
14. Bakobundisaka bino mobimba te, sé babendani bendani na bamboka ya mike mike biye bibatelami, to mpe sima ya mapango, kimonguna kati na bango na bango ezali makasi, okomona bango ete bazali ya kosangana nzoka nde mitema na bango mizali ya kokabwana, wana mpo ete bazali na mayele te.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَمَثَلِ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ قَرِيبٗاۖ ذَاقُواْ وَبَالَ أَمۡرِهِمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
15. Bazali lokola na baye bazali liboso na bango kala te, bamekaki maye bazalaki kosala, kasi bakozuaka etumbu ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَمَثَلِ ٱلشَّيۡطَٰنِ إِذۡ قَالَ لِلۡإِنسَٰنِ ٱكۡفُرۡ فَلَمَّا كَفَرَ قَالَ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّنكَ إِنِّيٓ أَخَافُ ٱللَّهَ رَبَّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
16. Bazali lokola satana tango alobaka na moto ete: Pengwa, mpe soki moto apengwi, alobi naye: Ya soló, nawangani yo. Ya sólo nazali kobanga Allah Nkolo ya mokili.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَكَانَ عَٰقِبَتَهُمَآ أَنَّهُمَا فِي ٱلنَّارِ خَٰلِدَيۡنِ فِيهَاۚ وَذَٰلِكَ جَزَٰٓؤُاْ ٱلظَّٰلِمِينَ
17. Mpe esukelaki bango ete: Bango nyoso mibale bakozalaka na moto libela kati na yango. Wana nde ekozala lifuta lia babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَلۡتَنظُرۡ نَفۡسٞ مَّا قَدَّمَتۡ لِغَدٖۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
18. Eh bino bandimi! Bobanga Allah, moto nyoso atalisa molimo naye eloko nini esili kolengele тропа lobi, тре bobanga Allah. Ya sólo, Allah ayebi maye bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ نَسُواْ ٱللَّهَ فَأَنسَىٰهُمۡ أَنفُسَهُمۡۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
19. Mpe bozala lokola baye babosana Allah te (Allah) asali ete bamibosana bango moko. Bango nde bato mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا يَسۡتَوِيٓ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۚ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
20. Bato ya moto mpe bato ya lola bakozalaka lolenge moko te. Kasi bato ya lola nde balongi.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَوۡ أَنزَلۡنَا هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ عَلَىٰ جَبَلٖ لَّرَأَيۡتَهُۥ خَٰشِعٗا مُّتَصَدِّعٗا مِّنۡ خَشۡيَةِ ٱللَّهِۚ وَتِلۡكَ ٱلۡأَمۡثَٰلُ نَضۡرِبُهَا لِلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَتَفَكَّرُونَ
21. Soki tokitisaka kurani oyo likolo ya ngomba olingaki kornona yango ezali kopasuka na bobangi Allah, tozali kobete bandakisa wana тропа bato bakoka kokanisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱللَّهُ ٱلَّذِي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِۖ هُوَ ٱلرَّحۡمَٰنُ ٱلرَّحِيمُ
22. Ye Allah oyo nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, moyebi ya mabombami na maye mazali polele, ye wa ngolu atonda boboto.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱللَّهُ ٱلَّذِي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡقُدُّوسُ ٱلسَّلَٰمُ ٱلۡمُؤۡمِنُ ٱلۡمُهَيۡمِنُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡجَبَّارُ ٱلۡمُتَكَبِّرُۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
23. Ye Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye, mokonzi mosantu, azali kimia mobateli, akonza kala, azali nguya, azali sukisa, atonda lolendo, nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱللَّهُ ٱلۡخَٰلِقُ ٱلۡبَارِئُ ٱلۡمُصَوِّرُۖ لَهُ ٱلۡأَسۡمَآءُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ يُسَبِّحُ لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
24. Ye Allah mokeli,mopesi eloko nyoso lolenge na yango, azali na bankombo kitoko, maye mazali о likolo mpe na nsé mazali kokumisa ye, тре ye azali na nguya atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Hashr
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Translations’ Index

Translation of the meanings of the Noble Qur’an into the Lingala language, translated by Zakaria Muhammad Balngogo.

close