Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: At-Tawbah   Ayah:

At-Tawbah (TUBELA)

بَرَآءَةٞ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦٓ إِلَى ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّم مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
1. Allah na motindami naye ba wangani basambeli bikeko baye bozuaki na bango elaka.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَسِيحُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَرۡبَعَةَ أَشۡهُرٖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُمۡ غَيۡرُ مُعۡجِزِي ٱللَّهِ وَأَنَّ ٱللَّهَ مُخۡزِي ٱلۡكَٰفِرِينَ
2. Botambola na mokili sanza minei mpe boyeba ete bokokitisa bokasi ya Allah te, kasi ya soló, Allah akosambwisa bapagano.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَذَٰنٞ مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦٓ إِلَى ٱلنَّاسِ يَوۡمَ ٱلۡحَجِّ ٱلۡأَكۡبَرِ أَنَّ ٱللَّهَ بَرِيٓءٞ مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ وَرَسُولُهُۥۚ فَإِن تُبۡتُمۡ فَهُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۖ وَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُمۡ غَيۡرُ مُعۡجِزِي ٱللَّهِۗ وَبَشِّرِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
3. Mpe mbela ewuti epai ya Allah na motindami waye epai na bato тропа mokolo ya hajj ya monene (mobembo esantu o mboka makkah), ya solo, Allah na motindami waye bazali mosika na basambeli ya bikeko. Soki botubeli, ezali malamu тропа bino, тре soki boboyi mpe bopesi mikongo, boyeba ete ya sólo, bokokitisa bokasi ya Allah te. Mpe pesa sango ya etumbu ya makasi epai ya baye baboyi kondima. (bapengwi.)
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَّا ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّم مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ ثُمَّ لَمۡ يَنقُصُوكُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَمۡ يُظَٰهِرُواْ عَلَيۡكُمۡ أَحَدٗا فَأَتِمُّوٓاْ إِلَيۡهِمۡ عَهۡدَهُمۡ إِلَىٰ مُدَّتِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
4. Longola sé epai ya bapagano baye bokamataki na bango elaka mpe sima balongoli тропа bino eloko te, mpe basalisaki banguna te тропа kobundisa bino mpe kosala bino mabe te, bokokisela bango elaka na bango kino tango oyo boyokanaki na bango ekoka. Pamba te ya sôló, Allah alingaka baye babangaka.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِذَا ٱنسَلَخَ ٱلۡأَشۡهُرُ ٱلۡحُرُمُ فَٱقۡتُلُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ حَيۡثُ وَجَدتُّمُوهُمۡ وَخُذُوهُمۡ وَٱحۡصُرُوهُمۡ وَٱقۡعُدُواْ لَهُمۡ كُلَّ مَرۡصَدٖۚ فَإِن تَابُواْ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ فَخَلُّواْ سَبِيلَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
5. Mpe soki basanza esantu bileki, boboma bapagano о bisika binso bokokuta bango. Bokanga bango mpe bofandela bango, bokengele bango na bisika nyoso oyo batiyelaka bino mitambo. Kasi soki batiki mpe batubeli, mpe batelemisi losambo mpe bafuti zakat botungisa bango lisusu te, mpo ete ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِنۡ أَحَدٞ مِّنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ ٱسۡتَجَارَكَ فَأَجِرۡهُ حَتَّىٰ يَسۡمَعَ كَلَٰمَ ٱللَّهِ ثُمَّ أَبۡلِغۡهُ مَأۡمَنَهُۥۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَعۡلَمُونَ
6. Mpe soki moko o kati ya basangisi nzambe asengi nayo obatela ye epai nayo, yamba ye mpo akoka koyoka liloba lia Allah. Sima komisa ye na esika naye ya kimia, mpo bazali baye bayebi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَيۡفَ يَكُونُ لِلۡمُشۡرِكِينَ عَهۡدٌ عِندَ ٱللَّهِ وَعِندَ رَسُولِهِۦٓ إِلَّا ٱلَّذِينَ عَٰهَدتُّمۡ عِندَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِۖ فَمَا ٱسۡتَقَٰمُواْ لَكُمۡ فَٱسۡتَقِيمُواْ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُتَّقِينَ
7. Ndenge nini basambeli ya bikeko bakozala na elaka epai ya Allah na motindami waye longola sé baye boyokanaki na bango pembeni ya ndako esantu? Tango inso bakomisembola epai na bino, bino mpe bozala semba epai na bango. Ya sólo, Allah alingaka babangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَيۡفَ وَإِن يَظۡهَرُواْ عَلَيۡكُمۡ لَا يَرۡقُبُواْ فِيكُمۡ إِلّٗا وَلَا ذِمَّةٗۚ يُرۡضُونَكُم بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَتَأۡبَىٰ قُلُوبُهُمۡ وَأَكۡثَرُهُمۡ فَٰسِقُونَ
8. Ndenge nini soki balongi bino, bazali kotosa lisusu elaka te, mpe bondeko te oyo ezali kati na bino na bango? Mpe bazali kosepelisa bino na lolemu na bango, nzoka nde mitema na bango mizali koboya. Kasi ebele na bango bazali bato mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱشۡتَرَوۡاْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ ثَمَنٗا قَلِيلٗا فَصَدُّواْ عَن سَبِيلِهِۦٓۚ إِنَّهُمۡ سَآءَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
9. Bazali koteka mikapo mia Allah na talo ya шоке mpe kokanga nzela naye. Ya soló, maye bazali kosala mazali mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا يَرۡقُبُونَ فِي مُؤۡمِنٍ إِلّٗا وَلَا ذِمَّةٗۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُعۡتَدُونَ
10. Babatelaka elaka te, bondeko mpe te ya makila oyo ezali okati na bango na bandimi. Kasi bango nde babebisi ya mibeko.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن تَابُواْ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَوُاْ ٱلزَّكَوٰةَ فَإِخۡوَٰنُكُمۡ فِي ٱلدِّينِۗ وَنُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
11. Soki batubeli, batelemisi losambo mpe babimisi zakat, bakomi bandeko na bino o kati ya lingomba. Mpe tozali kolimbola mikapo mpo bato bayeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِن نَّكَثُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُم مِّنۢ بَعۡدِ عَهۡدِهِمۡ وَطَعَنُواْ فِي دِينِكُمۡ فَقَٰتِلُوٓاْ أَئِمَّةَ ٱلۡكُفۡرِ إِنَّهُمۡ لَآ أَيۡمَٰنَ لَهُمۡ لَعَلَّهُمۡ يَنتَهُونَ
12. Mpe soki babebisi ndai na bango na sima ya koyokana, babundisi lingomba lia bino, bobundisa bakonzi ya bopagano mpo ete ya sólo, bango bazali na botosi te na bandai na bango. Tango mosusu bakotika.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَا تُقَٰتِلُونَ قَوۡمٗا نَّكَثُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُمۡ وَهَمُّواْ بِإِخۡرَاجِ ٱلرَّسُولِ وَهُم بَدَءُوكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٍۚ أَتَخۡشَوۡنَهُمۡۚ فَٱللَّهُ أَحَقُّ أَن تَخۡشَوۡهُ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
13. Boye bozali kobundisa te baye bazangi botosi na bandai na Bango, mpe bakani kobimisa motindami mpe bango nde babandi bino liboso? Boye bozali kobanga bango? Kasi Allah nde esengeli bobanga ye soki bozali bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَٰتِلُوهُمۡ يُعَذِّبۡهُمُ ٱللَّهُ بِأَيۡدِيكُمۡ وَيُخۡزِهِمۡ وَيَنصُرۡكُمۡ عَلَيۡهِمۡ وَيَشۡفِ صُدُورَ قَوۡمٖ مُّؤۡمِنِينَ
14. Bobundisa bango Allah akopesa bango etumbu na maboko na bino mpe akokitisa bango mpe akolongisa bino likolo na bango. Mpe akobikisa mitema mia bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيُذۡهِبۡ غَيۡظَ قُلُوبِهِمۡۗ وَيَتُوبُ ٱللَّهُ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
15. Мре akolongola nkanda o mitema mia bango, mpe Allah alimbisaka oyo alingi, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَمۡ حَسِبۡتُمۡ أَن تُتۡرَكُواْ وَلَمَّا يَعۡلَمِ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ مِنكُمۡ وَلَمۡ يَتَّخِذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَا رَسُولِهِۦ وَلَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَلِيجَةٗۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
16. Boye, bozali kokanisa ete bokotikama bongo mpe Allah ameki naino te baye babundi o kati na bino, mpe bazui balingami basusu te na batika Allah na motindami naye mpe na bandimi? Mpe Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا كَانَ لِلۡمُشۡرِكِينَ أَن يَعۡمُرُواْ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ شَٰهِدِينَ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِم بِٱلۡكُفۡرِۚ أُوْلَٰٓئِكَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ وَفِي ٱلنَّارِ هُمۡ خَٰلِدُونَ
17. Esengeli te na basambeli ya binzambe nzambe kokota na bandako esantu ya Allah, na matatoli ya bopagano ya polele bazali na yango, bango wana misala mia bango misili kobeba, mpe bakozalaka libela o kati ya moto.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا يَعۡمُرُ مَسَٰجِدَ ٱللَّهِ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَأَقَامَ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتَى ٱلزَّكَوٰةَ وَلَمۡ يَخۡشَ إِلَّا ٱللَّهَۖ فَعَسَىٰٓ أُوْلَٰٓئِكَ أَن يَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُهۡتَدِينَ
18. Kasi baye bazali na ndingisa ya kokota na bandako esantu ya Allah. Sé baye bandimi na Allah, na mokolo ya suka, mpe batelemisi losambo mpe babimisi zakat, mpe babangi mususu te sé Allah, baye wana bakozala elongo na bakambami.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ أَجَعَلۡتُمۡ سِقَايَةَ ٱلۡحَآجِّ وَعِمَارَةَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ كَمَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَجَٰهَدَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ لَا يَسۡتَوُۥنَ عِندَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
19. Boye, bolingi kotia moto oyo azali komelisa bapaya ya hajj mayi mpe azali kobongisa ndako esantu ya Allah, lolenge moko na moto oyo andimi na Allah mpe na mokolo ya suka mpe abundi o nzela ya Allah? Bakokani te epaí ya Allah, kasi Allah akambaka babubi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ أَعۡظَمُ دَرَجَةً عِندَ ٱللَّهِۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
20. Baye bandimaki mpe batiki (Makkah), mpe babundi o nzela ya Allah na misoio mia bango mpe na milimo mia bango, baleki kozala na esika ya likolo epai ya Allah mpe bango nde balongi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يُبَشِّرُهُمۡ رَبُّهُم بِرَحۡمَةٖ مِّنۡهُ وَرِضۡوَٰنٖ وَجَنَّٰتٖ لَّهُمۡ فِيهَا نَعِيمٞ مُّقِيمٌ
21. Nkolo wa bango azali kopesa bango sango elamu ya ngolu naye, mpe esengo naye mpe bilanga ya lola mpo na bango, kati na yango kofanda ya kitoko.
Arabic explanations of the Qur’an:
خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥٓ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
22. Libela o kati na yango mpe ya soló, lifuta linene likozuamaka sé epai ya Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَتَّخِذُوٓاْ ءَابَآءَكُمۡ وَإِخۡوَٰنَكُمۡ أَوۡلِيَآءَ إِنِ ٱسۡتَحَبُّواْ ٱلۡكُفۡرَ عَلَى ٱلۡإِيمَٰنِۚ وَمَن يَتَوَلَّهُم مِّنكُمۡ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلظَّٰلِمُونَ
23. Eh bino baye bondima! Bozua baboti ba bino na bandeko ba bino lokola balingami te soki baponi bopengwi batiki bondimi. Mpe kati na bino oyo akozua bango lokola balingami, bango nde babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلۡ إِن كَانَ ءَابَآؤُكُمۡ وَأَبۡنَآؤُكُمۡ وَإِخۡوَٰنُكُمۡ وَأَزۡوَٰجُكُمۡ وَعَشِيرَتُكُمۡ وَأَمۡوَٰلٌ ٱقۡتَرَفۡتُمُوهَا وَتِجَٰرَةٞ تَخۡشَوۡنَ كَسَادَهَا وَمَسَٰكِنُ تَرۡضَوۡنَهَآ أَحَبَّ إِلَيۡكُم مِّنَ ٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَجِهَادٖ فِي سَبِيلِهِۦ فَتَرَبَّصُواْ حَتَّىٰ يَأۡتِيَ ٱللَّهُ بِأَمۡرِهِۦۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
24. Loba: Soki baboti ba bino, na bana ba bino na bandeko na bino, na basi na bino na mabota na bino, na misolo mia bino miye bozui na mombongo moye bozali na bobangi ete ekweya, na bandako kitoko bozali na yango, bilingami mingi epai na bino koleka Allah na motindami waye na kobunda na nzela naye, bozelakino Allah akoya na mitindo (mikano) mia ye, mpe Allah akambaka babebisi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَقَدۡ نَصَرَكُمُ ٱللَّهُ فِي مَوَاطِنَ كَثِيرَةٖ وَيَوۡمَ حُنَيۡنٍ إِذۡ أَعۡجَبَتۡكُمۡ كَثۡرَتُكُمۡ فَلَمۡ تُغۡنِ عَنكُمۡ شَيۡـٔٗا وَضَاقَتۡ عَلَيۡكُمُ ٱلۡأَرۡضُ بِمَا رَحُبَتۡ ثُمَّ وَلَّيۡتُم مُّدۡبِرِينَ
25. Allah asilaki ya soló, kolongisa bino obisika ebele, na o mokolo mwa (bitumba) bia Huna’ín,(1) tango bosepelaki na motango monene mwa bino, kasi yango esalisaki bino na eloko te. Mabele ekomelaki bino шоке na maye bozalaki kokanisa. Sima bopesaki mikongo mpe bokimaki.
1 Huna’ín: Ezali ngomba, esika oyo ba mizilima ba kutanaki na etumba na ba sangisi Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ أَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَىٰ رَسُولِهِۦ وَعَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَأَنزَلَ جُنُودٗا لَّمۡ تَرَوۡهَا وَعَذَّبَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۚ وَذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلۡكَٰفِرِينَ
26. Sima, Allah akitisaki kimia naye epai ya motindami wa ye mpe epai ya bandimi. Mpe akitisaki basoda naye baye bomonaki bango te, mpe apesaki etumbu na bapengwi. Mpe wana nde lifuta lia bapengwi.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ يَتُوبُ ٱللَّهُ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
27. Sima, Allah andimaka tubela ya oyo alingi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡمُشۡرِكُونَ نَجَسٞ فَلَا يَقۡرَبُواْ ٱلۡمَسۡجِدَ ٱلۡحَرَامَ بَعۡدَ عَامِهِمۡ هَٰذَاۚ وَإِنۡ خِفۡتُمۡ عَيۡلَةٗ فَسَوۡفَ يُغۡنِيكُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦٓ إِن شَآءَۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
28. Eh bino bandimi! Ya sólo, bapagano bazali mbindo, (basambeli bikeko) bapusana pena na ndako esantu te o sima ya mobu mwa bango moye. Kasi soki bozali kobanga kimobola, Allah akopesaka bino bomengo na bolamu bwaye soki alingi, ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
قَٰتِلُواْ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَلَا بِٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَلَا يُحَرِّمُونَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَلَا يَدِينُونَ دِينَ ٱلۡحَقِّ مِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ حَتَّىٰ يُعۡطُواْ ٱلۡجِزۡيَةَ عَن يَدٖ وَهُمۡ صَٰغِرُونَ
29. Bobundisa baye bazali kondima na Allah te, na mokolo ya suka te, mpe bazali kopekisa te maye Allah na motindami waye bapekisa, mpe bazali коропа lingomba lia lokuta. Batiki oyo ya bosôló, o kati ya baye bapesama buku (bayuda na baklišto), kino bakofuta lomande na maboko na bango na sima ya koyoka soni.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ عُزَيۡرٌ ٱبۡنُ ٱللَّهِ وَقَالَتِ ٱلنَّصَٰرَى ٱلۡمَسِيحُ ٱبۡنُ ٱللَّهِۖ ذَٰلِكَ قَوۡلُهُم بِأَفۡوَٰهِهِمۡۖ يُضَٰهِـُٔونَ قَوۡلَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَبۡلُۚ قَٰتَلَهُمُ ٱللَّهُۖ أَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
30. Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló!
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱتَّخَذُوٓاْ أَحۡبَارَهُمۡ وَرُهۡبَٰنَهُمۡ أَرۡبَابٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِ وَٱلۡمَسِيحَ ٱبۡنَ مَرۡيَمَ وَمَآ أُمِرُوٓاْ إِلَّا لِيَعۡبُدُوٓاْ إِلَٰهٗا وَٰحِدٗاۖ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ سُبۡحَٰنَهُۥ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
31. Bazui bakonzi ya mangomba na bango na masiya mwana ya Maryam lokola banzambe na botiki Allah. Kasi batindamaki te sé babondela nzambe moko oyo azali na mosangani te sé ye mei (Allah), nkembo naye oyo azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
يُرِيدُونَ أَن يُطۡفِـُٔواْ نُورَ ٱللَّهِ بِأَفۡوَٰهِهِمۡ وَيَأۡبَى ٱللَّهُ إِلَّآ أَن يُتِمَّ نُورَهُۥ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡكَٰفِرُونَ
32. Balingi kozimisa bongengi bwa Allah na minoko mia bango, kasi Allah azali sé kokolisa bongengi bwa ye, ata soki bapengwi bazali koboya.
Arabic explanations of the Qur’an:
هُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ رَسُولَهُۥ بِٱلۡهُدَىٰ وَدِينِ ٱلۡحَقِّ لِيُظۡهِرَهُۥ عَلَى ٱلدِّينِ كُلِّهِۦ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُشۡرِكُونَ
33. Yende atindaki motindami naye na bokambi mpe na lingomba lia bosôló, mpo été ezala likolo ya mangomba nyoso, ata soki basambeli ya bikeko (basangisi) bazali koyina yango.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلۡأَحۡبَارِ وَٱلرُّهۡبَانِ لَيَأۡكُلُونَ أَمۡوَٰلَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡبَٰطِلِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۗ وَٱلَّذِينَ يَكۡنِزُونَ ٱلذَّهَبَ وَٱلۡفِضَّةَ وَلَا يُنفِقُونَهَا فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٖ
34. Eh bandimi! Ya soló, ebele ya bakonzi ya lingomba epai ya bayuda na ba klišto, bazali kolia misolo mia bato na lokuta, mpe bazali kobundisa nzela ya Allah, mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَوۡمَ يُحۡمَىٰ عَلَيۡهَا فِي نَارِ جَهَنَّمَ فَتُكۡوَىٰ بِهَا جِبَاهُهُمۡ وَجُنُوبُهُمۡ وَظُهُورُهُمۡۖ هَٰذَا مَا كَنَزۡتُمۡ لِأَنفُسِكُمۡ فَذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَكۡنِزُونَ
35. Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na moto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ عِدَّةَ ٱلشُّهُورِ عِندَ ٱللَّهِ ٱثۡنَا عَشَرَ شَهۡرٗا فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ يَوۡمَ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ مِنۡهَآ أَرۡبَعَةٌ حُرُمٞۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُۚ فَلَا تَظۡلِمُواْ فِيهِنَّ أَنفُسَكُمۡۚ وَقَٰتِلُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ كَآفَّةٗ كَمَا يُقَٰتِلُونَكُمۡ كَآفَّةٗۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُتَّقِينَ
36. Ya sólo, motango ya basanza epai ya Allah mozali (sanza) zomi na mibale okati ya makomi ma Allah, uta mokolo akela likolo na nsé, okati na yango (sanza) minei mizali esantu, wana ezali lingomba lia semba, mpe bobuba milimo na bino te okati na yango, mpe bobundisa basangisi Allah mobimba, ndenge bazali kobundisi bino, тре boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا ٱلنَّسِيٓءُ زِيَادَةٞ فِي ٱلۡكُفۡرِۖ يُضَلُّ بِهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُحِلُّونَهُۥ عَامٗا وَيُحَرِّمُونَهُۥ عَامٗا لِّيُوَاطِـُٔواْ عِدَّةَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ فَيُحِلُّواْ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُۚ زُيِّنَ لَهُمۡ سُوٓءُ أَعۡمَٰلِهِمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
37. Ya sólo, kozongisa mikolo ya sanza esantu sima, ezali kobakisa bopengwi, na yango nde ezali kobungisa ba oyo bapengwa. Mobu moye bamoni yango pamba mpe mobu mosusu babulisi yango, pona kobebisa motango ya basanza esantu biye Allah atia, boye nde bazali kornona pamba maye Allah atia yango esantu, babongiseli bango misala mabe liboso na bango na bonzenga. Kasi Allah akambaka bapengwi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَا لَكُمۡ إِذَا قِيلَ لَكُمُ ٱنفِرُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ٱثَّاقَلۡتُمۡ إِلَى ٱلۡأَرۡضِۚ أَرَضِيتُم بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا مِنَ ٱلۡأٓخِرَةِۚ فَمَا مَتَٰعُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا قَلِيلٌ
38. Eh bino baye bondima! Mpona nini soki bayebisi bino bobima na nzela ya Allah, bozali kofanda na nsé. Boye bolingi bomoyi bwa mokili koleka oyo ya mokolo ya suka? Bisengo bia mokili bizali mike, oyo ya lobi nde bileki.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَّا تَنفِرُواْ يُعَذِّبۡكُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا وَيَسۡتَبۡدِلۡ قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ وَلَا تَضُرُّوهُ شَيۡـٔٗاۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
39. Soki bokei kobunda te, akopesa bino etumbu ya makasi mpe akokela bato basusu o esika na bino mpe eloko moko ya mabe ekosala ye te. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَّا تَنصُرُوهُ فَقَدۡ نَصَرَهُ ٱللَّهُ إِذۡ أَخۡرَجَهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ثَانِيَ ٱثۡنَيۡنِ إِذۡ هُمَا فِي ٱلۡغَارِ إِذۡ يَقُولُ لِصَٰحِبِهِۦ لَا تَحۡزَنۡ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَنَاۖ فَأَنزَلَ ٱللَّهُ سَكِينَتَهُۥ عَلَيۡهِ وَأَيَّدَهُۥ بِجُنُودٖ لَّمۡ تَرَوۡهَا وَجَعَلَ كَلِمَةَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلسُّفۡلَىٰۗ وَكَلِمَةُ ٱللَّهِ هِيَ ٱلۡعُلۡيَاۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٌ
40. Soki bopesi ye lisungi te, (Muhammad) Allah asilaki kolongisa ye. Tango bapengwi babimisaki ye, ya mibale bango babale, tango bazalaki kati ya libanga, tango azali koloba na moyekoli naye: Kobanga te, ya soló, Allah azali elongo na biso, Allah akitisaki lisungi lia ye epai naye, mpe asalisi ye na mapinga baye bomonaki bango te, mpe atiyaki liloba lia bapengwi nanse, mpe liloba lia Allah lizala likolo, mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱنفِرُواْ خِفَافٗا وَثِقَالٗا وَجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِكُمۡ وَأَنفُسِكُمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
41. Bökende moko moko to na lisanga kobunda na nzela na Allah na misolo na bino mpe na nzoto na bino, wana ezali malamu тропа bino soki bozali koyeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَوۡ كَانَ عَرَضٗا قَرِيبٗا وَسَفَرٗا قَاصِدٗا لَّٱتَّبَعُوكَ وَلَٰكِنۢ بَعُدَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلشُّقَّةُۚ وَسَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَوِ ٱسۡتَطَعۡنَا لَخَرَجۡنَا مَعَكُمۡ يُهۡلِكُونَ أَنفُسَهُمۡ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
42. Soki bozui (ya bitumba) ezalaki pete, mpe mobembo ezalaki pembeni kasi balandaki yo, kasi etamboli ya mosika epekisaki bango mikakatano, mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah été: Soki tozalaka na makasi, tolingaki kobima elongo na bino. Bazali komibebisa sé bango moko. Mpe Allah ayebi ya soló, bazali babuki lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
عَفَا ٱللَّهُ عَنكَ لِمَ أَذِنتَ لَهُمۡ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَكَ ٱلَّذِينَ صَدَقُواْ وَتَعۡلَمَ ٱلۡكَٰذِبِينَ
43. Allah alimbisa yo na maye opesaki bango ndingisa, kino oyeba bato ya bosóló, mpe oyeba babuki lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ أَن يُجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُتَّقِينَ
44. Baye bandimi па Allah mpe na mokolo ya suka basenga yo nzela te liboso ya kokende kobunda o nzela ya Allah na misolo na bango na banzoto na bango. Allah nde moyebi wa babangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا يَسۡتَـٔۡذِنُكَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَٱرۡتَابَتۡ قُلُوبُهُمۡ فَهُمۡ فِي رَيۡبِهِمۡ يَتَرَدَّدُونَ
45. Ya soló, baye bazali kosenga yo nzela, bandimi na Allah te, mpe na mokolo ya suka te, mpo mitema mia bango mitondi na ntembe, тропа ntembe wa bango bazali sé koyimayima.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ وَلَوۡ أَرَادُواْ ٱلۡخُرُوجَ لَأَعَدُّواْ لَهُۥ عُدَّةٗ وَلَٰكِن كَرِهَ ٱللَّهُ ٱنۢبِعَاثَهُمۡ فَثَبَّطَهُمۡ وَقِيلَ ٱقۡعُدُواْ مَعَ ٱلۡقَٰعِدِينَ
46. Kasi soki balingaka kobima (тропа kobunda), balingaki komilengele тропа yango. Kasi Allah asepelaki te na kobima na bango. Mpe avandisi bango. Mpe ayebisaki bango: Botikala elongo na baye batikalaki.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَوۡ خَرَجُواْ فِيكُم مَّا زَادُوكُمۡ إِلَّا خَبَالٗا وَلَأَوۡضَعُواْ خِلَٰلَكُمۡ يَبۡغُونَكُمُ ٱلۡفِتۡنَةَ وَفِيكُمۡ سَمَّٰعُونَ لَهُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ
47. Soki babimaka elongo na bino, balingaki sé kotiela bino mobulu o mapinga mpe kobakisela bino mabe, mpe koluka kokabola. Mpe kati na bino ezali na bato bazali koyoka bango, kasi Allah ayebaka babubi.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَقَدِ ٱبۡتَغَوُاْ ٱلۡفِتۡنَةَ مِن قَبۡلُ وَقَلَّبُواْ لَكَ ٱلۡأُمُورَ حَتَّىٰ جَآءَ ٱلۡحَقُّ وَظَهَرَ أَمۡرُ ٱللَّهِ وَهُمۡ كَٰرِهُونَ
48. Ya soló, basilaki kotiya songi songi liboso, mpe bakangeli yo makambo kino bosóló boyaki, mpe bokasi na mibeko mia Allah mimonanaki, mpe bango bazali koboya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِنۡهُم مَّن يَقُولُ ٱئۡذَن لِّي وَلَا تَفۡتِنِّيٓۚ أَلَا فِي ٱلۡفِتۡنَةِ سَقَطُواْۗ وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمُحِيطَةُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
49. Мре kati na bango, basusu bazali koloba: Pesa ngai ndingisa (ya kotikala), kasi komeka ngai te! Kaši basilaki kokweya na kati yakomekama, mpe ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapangano.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِن تُصِبۡكَ حَسَنَةٞ تَسُؤۡهُمۡۖ وَإِن تُصِبۡكَ مُصِيبَةٞ يَقُولُواْ قَدۡ أَخَذۡنَآ أَمۡرَنَا مِن قَبۡلُ وَيَتَوَلَّواْ وَّهُمۡ فَرِحُونَ
50. Soki bolamu bozui yo bamoni yango mabe, soki mabe mazui yo balobi: Soki tomilengeleke te oyo ezui ye, elingaki ezua biso mpe bapesi mikongo bakei na kosepela.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُل لَّن يُصِيبَنَآ إِلَّا مَا كَتَبَ ٱللَّهُ لَنَا هُوَ مَوۡلَىٰنَاۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
51. Loba: Mpasi ekoki kozua biso te, sé eye Allah akomela biso, ye nde mobateli wa biso, mpe epai ya Allah esengeli na bandimi komipesa.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلۡ هَلۡ تَرَبَّصُونَ بِنَآ إِلَّآ إِحۡدَى ٱلۡحُسۡنَيَيۡنِۖ وَنَحۡنُ نَتَرَبَّصُ بِكُمۡ أَن يُصِيبَكُمُ ٱللَّهُ بِعَذَابٖ مِّنۡ عِندِهِۦٓ أَوۡ بِأَيۡدِينَاۖ فَتَرَبَّصُوٓاْ إِنَّا مَعَكُم مُّتَرَبِّصُونَ
52. Loba: Boye bozali kozela nini тропа biso okati ya bolamu mibale ya malamu (elonga to kokufa тропа Allah)? Kasi biso tozali kozela тропа bino, été Allah apesa bino etumbu to, ewuta na maboko na biso. Na yango bozela, biso mpe tozali kozela elongo na bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
قُلۡ أَنفِقُواْ طَوۡعًا أَوۡ كَرۡهٗا لَّن يُتَقَبَّلَ مِنكُمۡ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
53. Loba: Bopesa na kosepela to nakoyina, bakondimela bino yango te, ya soló, bozalaki bato mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا مَنَعَهُمۡ أَن تُقۡبَلَ مِنۡهُمۡ نَفَقَٰتُهُمۡ إِلَّآ أَنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَبِرَسُولِهِۦ وَلَا يَأۡتُونَ ٱلصَّلَوٰةَ إِلَّا وَهُمۡ كُسَالَىٰ وَلَا يُنفِقُونَ إِلَّا وَهُمۡ كَٰرِهُونَ
54. Makabo na bango endimamaki te mpo baboyaki kondima na Allah na motindami naye, mpe basambelaka te, sé batelema na bolembu, mpe babimisaka mabonza na esengo te.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلَا تُعۡجِبۡكَ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُهُمۡۚ إِنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ لِيُعَذِّبَهُم بِهَا فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَتَزۡهَقَ أَنفُسُهُمۡ وَهُمۡ كَٰفِرُونَ
55. Bomengo na bana na bango bikamwisa yo te. Kasi Allah alingi kopesa bango etumbu тропа yango o kati ya mokili, тре alongóla milimo mia bango тре bazali o kati na bopengwi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ إِنَّهُمۡ لَمِنكُمۡ وَمَا هُم مِّنكُمۡ وَلَٰكِنَّهُمۡ قَوۡمٞ يَفۡرَقُونَ
56. Мре bazali kolapa па Allah, (bato ya bilongi mibale) ete bazali penza bato ba bino, kasi bazali na bino te, mpe ya soló bango bazali kobanga bino.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَوۡ يَجِدُونَ مَلۡجَـًٔا أَوۡ مَغَٰرَٰتٍ أَوۡ مُدَّخَلٗا لَّوَلَّوۡاْ إِلَيۡهِ وَهُمۡ يَجۡمَحُونَ
57. Soki bazuaka esika ya bokimi to lidusu o nsé ya ngomba, to esika ya kokotela, balingaki bakima epai wana bango banso na lombango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِنۡهُم مَّن يَلۡمِزُكَ فِي ٱلصَّدَقَٰتِ فَإِنۡ أُعۡطُواْ مِنۡهَا رَضُواْ وَإِن لَّمۡ يُعۡطَوۡاْ مِنۡهَآ إِذَا هُمۡ يَسۡخَطُونَ
58. Mpe basusu kati na bango bazali kotongo yo тропа mabonza. Soki bapesi bango yango, basepeli, mpe soki bapesi bango te, basiliki.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَوۡ أَنَّهُمۡ رَضُواْ مَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَقَالُواْ حَسۡبُنَا ٱللَّهُ سَيُؤۡتِينَا ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ وَرَسُولُهُۥٓ إِنَّآ إِلَى ٱللَّهِ رَٰغِبُونَ
59. Mpe soki bango ya sólo, basepelaki na maye Allah na motindami waye bapesaki bango mpe balobi été: Allah akoki na biso. Allah akopesa biso bolamu bwaye, mpe motindami naye, ya sólo epai ya Allah nde tokozongisa makambo na baposa ya biso.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ إِنَّمَا ٱلصَّدَقَٰتُ لِلۡفُقَرَآءِ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱلۡعَٰمِلِينَ عَلَيۡهَا وَٱلۡمُؤَلَّفَةِ قُلُوبُهُمۡ وَفِي ٱلرِّقَابِ وَٱلۡغَٰرِمِينَ وَفِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِۖ فَرِيضَةٗ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
60. Ya sólo, makabo mazali тропа babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe тропа kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe тропа kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe тропа baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe тропа baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe тропа mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِنۡهُمُ ٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ ٱلنَّبِيَّ وَيَقُولُونَ هُوَ أُذُنٞۚ قُلۡ أُذُنُ خَيۡرٖ لَّكُمۡ يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَيُؤۡمِنُ لِلۡمُؤۡمِنِينَ وَرَحۡمَةٞ لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنكُمۡۚ وَٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ رَسُولَ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
61. Mpe basusu kati na bango bazali komonisa ntoma pasi mpe bazali koloba: Afungoli litoyi naye тропа kolanda nyoso tozali koloba, loba: Litoyi yango ezali тропа bolamu na bino, azali kondima na Allah mpe azali na makanisi ya malamu likolo ya bandimi. Mpe azali mawa тропа basusu. Kati na bino bazali na kondima kasi baye bazali konyokolo motindami ya Allah, bakozua etumbu ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَكُمۡ لِيُرۡضُوكُمۡ وَٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥٓ أَحَقُّ أَن يُرۡضُوهُ إِن كَانُواْ مُؤۡمِنِينَ
62. Bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kosepelisa bino, kasi Allah na motindami waye nde esengeli basepelisa soki bazali bandimi ya solo.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّهُۥ مَن يُحَادِدِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَأَنَّ لَهُۥ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدٗا فِيهَاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡخِزۡيُ ٱلۡعَظِيمُ
63. Boye boyebi te ete ya sólo, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo ye akozalaka na móto mwa lifelo, libela kati na yango? Wana nde ekozala etumbu ya monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَحۡذَرُ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ أَن تُنَزَّلَ عَلَيۡهِمۡ سُورَةٞ تُنَبِّئُهُم بِمَا فِي قُلُوبِهِمۡۚ قُلِ ٱسۡتَهۡزِءُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ مُخۡرِجٞ مَّا تَحۡذَرُونَ
64. Bazali kobanga bato ya bilongi mibale été suratu ekitela bango, mpo ekundola makambo maye mazali o mitema mia bango. Loba: Bosala litio, ya soló, Allah nde mobimisi ya maye bozali kobangela.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُمۡ لَيَقُولُنَّ إِنَّمَا كُنَّا نَخُوضُ وَنَلۡعَبُۚ قُلۡ أَبِٱللَّهِ وَءَايَٰتِهِۦ وَرَسُولِهِۦ كُنتُمۡ تَسۡتَهۡزِءُونَ
65. Mpe soki otuni bango, bakolobaka: Ya sólo, tozali nde kosolola mpe kosakana. Loba: Boye Allah, na mikapo mia ye, mpe na motindami waye bozali kotiola?
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا تَعۡتَذِرُواْ قَدۡ كَفَرۡتُم بَعۡدَ إِيمَٰنِكُمۡۚ إِن نَّعۡفُ عَن طَآئِفَةٖ مِّنكُمۡ نُعَذِّبۡ طَآئِفَةَۢ بِأَنَّهُمۡ كَانُواْ مُجۡرِمِينَ
66. Bokolimbisama te, bosilaki ya sólo, kopengwa o sima ya bondimi bwa bino, soki tolimbisi basusu kati na bino, tokopesa etumbu na basusu. Ya sólo, bango bazalaki batomboki.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتُ بَعۡضُهُم مِّنۢ بَعۡضٖۚ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡمُنكَرِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَقۡبِضُونَ أَيۡدِيَهُمۡۚ نَسُواْ ٱللَّهَ فَنَسِيَهُمۡۚ إِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
67. Basi mpe mibali ya bilongi mibale bango na bango, bazali kotinda na mabe, mpe bazali kopekisa bolamu. Mpe bazali kokanga maboko na bango тропа kosala bolamu, babosani Allah, mpe atiki bango. Ya sólo, bango bazali babebisi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡكُفَّارَ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ هِيَ حَسۡبُهُمۡۚ وَلَعَنَهُمُ ٱللَّهُۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ مُّقِيمٞ
68. Allah alaki basi mpe mibali ya bilongi mibale, na bapengwi, bakozalaka libela o móto ya lifelo, wana ekoki na bango. Mpe Allah alakeli bango botutu, mpe bakozalaka na etumbu ya suka te.
Arabic explanations of the Qur’an:
كَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ كَانُوٓاْ أَشَدَّ مِنكُمۡ قُوَّةٗ وَأَكۡثَرَ أَمۡوَٰلٗا وَأَوۡلَٰدٗا فَٱسۡتَمۡتَعُواْ بِخَلَٰقِهِمۡ فَٱسۡتَمۡتَعۡتُم بِخَلَٰقِكُمۡ كَمَا ٱسۡتَمۡتَعَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُم بِخَلَٰقِهِمۡ وَخُضۡتُمۡ كَٱلَّذِي خَاضُوٓاْۚ أُوْلَٰٓئِكَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
69. Lolenge moko na baye bazalaki liboso lia bino, bazalaki makasi mingi koleka bino ezala na misolo, mpe bana mingi koleka bino. Basepelaki na bomengo oyo bakitanaki na mokili. Bino mpe bozali kosepela na oyo ya bino, lolenge bato ya liboso basepelaki, (kokitana), mpe bazali kosuanisa na bosôló te lolenge bato ya liboso basuanisaki na bosôló te, bango basili kobebisa misala mia bango o kati ya mokili mpe o mokolo mwa suka, mpe bango nde bazangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ يَأۡتِهِمۡ نَبَأُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ قَوۡمِ نُوحٖ وَعَادٖ وَثَمُودَ وَقَوۡمِ إِبۡرَٰهِيمَ وَأَصۡحَٰبِ مَدۡيَنَ وَٱلۡمُؤۡتَفِكَٰتِۚ أَتَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِۖ فَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
70. Boye eyelaki bango te sango ya baye baleka o liboso lia bango bato ba Nûh, na bato ya aad, na Thamúd, na bato ya Ibrâhîm na bato ya madiyanat, na baye tobalusaki (o kati ya bato ya Loth)? Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, Allah azalaki te тропа kobuba bango, kasi bango moko nde bamibubaki.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتُ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضٖۚ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَيُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَيُطِيعُونَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓۚ أُوْلَٰٓئِكَ سَيَرۡحَمُهُمُ ٱللَّهُۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
71. Mpe bandimi ya mibali mpe ya basi, bango na bango bazali balingami. Bazali kotinda na bolamu mpe bazali kopekisa mabe. Mpe bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali kotosa Allah na motindami waye. Baye wana nde Allah akoyokelaka mawa, ya soló, Allah azali na bokasi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَا وَمَسَٰكِنَ طَيِّبَةٗ فِي جَنَّٰتِ عَدۡنٖۚ وَرِضۡوَٰنٞ مِّنَ ٱللَّهِ أَكۡبَرُۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
72. Allah alaki bandimi ya mibali mpe ya basi, Iola, eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela o kati na yango, mpe bivandeli bilamu o lola ya edeni. Mpe bosepeli bonene bokowutaka epai ya Allah. Wana nde elonga enene.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ جَٰهِدِ ٱلۡكُفَّارَ وَٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱغۡلُظۡ عَلَيۡهِمۡۚ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
73. Eh ntoma! Bundisa bato ya bilongi mibale na bapagano, mpe kozala na mawa epai na bango te. Mpe esika na bango bikozalaka nde na lifelo, mpe bozongi ya mabe nini wana!
Arabic explanations of the Qur’an:
يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ مَا قَالُواْ وَلَقَدۡ قَالُواْ كَلِمَةَ ٱلۡكُفۡرِ وَكَفَرُواْ بَعۡدَ إِسۡلَٰمِهِمۡ وَهَمُّواْ بِمَا لَمۡ يَنَالُواْۚ وَمَا نَقَمُوٓاْ إِلَّآ أَنۡ أَغۡنَىٰهُمُ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ مِن فَضۡلِهِۦۚ فَإِن يَتُوبُواْ يَكُ خَيۡرٗا لَّهُمۡۖ وَإِن يَتَوَلَّوۡاْ يُعَذِّبۡهُمُ ٱللَّهُ عَذَابًا أَلِيمٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۚ وَمَا لَهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ
74. Bazali kolapa na Allah été basali eloko te, mpe basilaki solo koloba liloba lia bopagano, mpe babwaki kondima na bango bazongeli bopagano, mpe bakokisaki te na maye bakanaki (koboma ntoma), mpe bazali na nkanda te sé epai ya Allah na motindami naye, kowuta na maye Allah, na motindami naye bapesaki bango bozui mpe soki batubeli ekozala malamu тропа bango, kaši soki baboyi bapesi mikongo, Allah akopesa bango etumbu ya makasi, o kati ya mokili na o mokolo mwa suka. Mpe bakozuaka mobateli te mpe mosungi te na mokili.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ وَمِنۡهُم مَّنۡ عَٰهَدَ ٱللَّهَ لَئِنۡ ءَاتَىٰنَا مِن فَضۡلِهِۦ لَنَصَّدَّقَنَّ وَلَنَكُونَنَّ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
75. Mpe basusu o kati na bango bazuaki elaka na Allah, (balobi) soki tozui bolamu bwa Allah, tokopesa makabo, mpe tokozala o kati ya basali bolamu.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلَمَّآ ءَاتَىٰهُم مِّن فَضۡلِهِۦ بَخِلُواْ بِهِۦ وَتَوَلَّواْ وَّهُم مُّعۡرِضُونَ
76. Мре tango apeși bango bolamu bwaye, bakangi maboko тропа yango, mpe baboyi bapesi mikongo, balandi nzela mosusu.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَعۡقَبَهُمۡ نِفَاقٗا فِي قُلُوبِهِمۡ إِلَىٰ يَوۡمِ يَلۡقَوۡنَهُۥ بِمَآ أَخۡلَفُواْ ٱللَّهَ مَا وَعَدُوهُ وَبِمَا كَانُواْ يَكۡذِبُونَ
77. Mpe bazui etumbu o kati na mitema mia bango kino mokolo mwa bokutani, тропа maye bazangaki kotosa, mpe тропа maye balaki Allah, mpe na maye bazalaki kokosa.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ سِرَّهُمۡ وَنَجۡوَىٰهُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ عَلَّٰمُ ٱلۡغُيُوبِ
78. Bazali koyeba te été Allah ayebi sekele na bango mpe ayebi masolo na bango ya kobombama mpe Allah azali moyebi ya mabombami?
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلَّذِينَ يَلۡمِزُونَ ٱلۡمُطَّوِّعِينَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ فِي ٱلصَّدَقَٰتِ وَٱلَّذِينَ لَا يَجِدُونَ إِلَّا جُهۡدَهُمۡ فَيَسۡخَرُونَ مِنۡهُمۡ سَخِرَ ٱللَّهُ مِنۡهُمۡ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٌ
79. Baye bazali kotongo bandimi baye bazali kobanga (Allah) mpe kobimisa makabo, Mpe baye bazali kozwa токе kowuta na bokasi bwa bango. Mpe lisusu bazali kofinga bandimi baye bazali na bozui токе, mpe kotiola, Allah atioli bango, kasi bakozalaka na etumbu monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ أَوۡ لَا تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ إِن تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ سَبۡعِينَ مَرَّةٗ فَلَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
80. Osengela bango bolimbisi to te, ata soki osengeli bango bolimbisi mbala ntuku sambo, Allah akolimbisa bango te, mpo bapengwi na Allah na motindami waye. Mpe Allah akambaka babebisi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَرِحَ ٱلۡمُخَلَّفُونَ بِمَقۡعَدِهِمۡ خِلَٰفَ رَسُولِ ٱللَّهِ وَكَرِهُوٓاْ أَن يُجَٰهِدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَقَالُواْ لَا تَنفِرُواْ فِي ٱلۡحَرِّۗ قُلۡ نَارُ جَهَنَّمَ أَشَدُّ حَرّٗاۚ لَّوۡ كَانُواْ يَفۡقَهُونَ
81. Baye batikalaki sima, basepeli mpo batikali epai na bango, sima ya motindami wa Allah, baboyi kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Мре balobi: Bökende kobunda te na molunge oyo. Loba: Moto ya lifelo moleki molunge, soki bazali koyeba.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَلۡيَضۡحَكُواْ قَلِيلٗا وَلۡيَبۡكُواْ كَثِيرٗا جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
82. Baseka(1) moke mpe balela(2) mingi, lifuta lia maye bazalaki kosala.
1 Awa na mokili.
2 O kati ya etumbu ya mokolo ya suka.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن رَّجَعَكَ ٱللَّهُ إِلَىٰ طَآئِفَةٖ مِّنۡهُمۡ فَٱسۡتَـٔۡذَنُوكَ لِلۡخُرُوجِ فَقُل لَّن تَخۡرُجُواْ مَعِيَ أَبَدٗا وَلَن تُقَٰتِلُواْ مَعِيَ عَدُوًّاۖ إِنَّكُمۡ رَضِيتُم بِٱلۡقُعُودِ أَوَّلَ مَرَّةٖ فَٱقۡعُدُواْ مَعَ ٱلۡخَٰلِفِينَ
83. Soki Allah azongisi yo o ngambu ya (bato bana) mpe soki batuni yo ndingisa тропа kokende kobunda, loba: Bokobimaka na ngai te, mpe bokobundisaka banguna elongo na ngai te. Bosepelaki kotikala mbala ya yambo epai na bino, bovanda esika moko na batikali.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تُصَلِّ عَلَىٰٓ أَحَدٖ مِّنۡهُم مَّاتَ أَبَدٗا وَلَا تَقُمۡ عَلَىٰ قَبۡرِهِۦٓۖ إِنَّهُمۡ كَفَرُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَمَاتُواْ وَهُمۡ فَٰسِقُونَ
84. Mpe kosambelela te тропа bango soki moko wa bango akufi, mpe kotelema na lilita lia ye te. Mpo ya soló, bango basili kopengwa na Allah na motindami waye, mpe bakufaki bazali babebisi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تُعۡجِبۡكَ أَمۡوَٰلُهُمۡ وَأَوۡلَٰدُهُمۡۚ إِنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ أَن يُعَذِّبَهُم بِهَا فِي ٱلدُّنۡيَا وَتَزۡهَقَ أَنفُسُهُمۡ وَهُمۡ كَٰفِرُونَ
85. Bana na misolo mia bango mikamwisa yo te. Mpo ya sólo, Allah alingi nde kopesa bango etumbu тропа yango awa na mokili, mpe azua milimo mia bango bazali na bopengwi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَآ أُنزِلَتۡ سُورَةٌ أَنۡ ءَامِنُواْ بِٱللَّهِ وَجَٰهِدُواْ مَعَ رَسُولِهِ ٱسۡتَـٔۡذَنَكَ أُوْلُواْ ٱلطَّوۡلِ مِنۡهُمۡ وَقَالُواْ ذَرۡنَا نَكُن مَّعَ ٱلۡقَٰعِدِينَ
86. Мре soki mokapo moko ekiti kowuta epai ya Allah été bandima na Allah mpe babunda elongo na motindami waye, okomona baye bazali na makoki nyoso ya kobunda bazali kosenga yo nzela mpo batikala elongo na baye batikali.
Arabic explanations of the Qur’an:
رَضُواْ بِأَن يَكُونُواْ مَعَ ٱلۡخَوَالِفِ وَطُبِعَ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَفۡقَهُونَ
87. Bazali kosepela kotikala elongo na baye oyo bazwaki ndingisa ya kotikala тре mitema na bango masili kokangama mpe bazali koyeba eloko te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَٰكِنِ ٱلرَّسُولُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ جَٰهَدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱلۡخَيۡرَٰتُۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
88. Kasi motindami na baye bandimaki naye, babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango. Mpe bango nde bakozalaka na bolamu, mpe bango nde balongi.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَعَدَّ ٱللَّهُ لَهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
89. Allah asila kolengelela bango solo Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala. Bakozalaka libela o kati na yango, wana nde elonga enene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَجَآءَ ٱلۡمُعَذِّرُونَ مِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ لِيُؤۡذَنَ لَهُمۡ وَقَعَدَ ٱلَّذِينَ كَذَبُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۚ سَيُصِيبُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
90. Mpe o kati na baye bavandaka na bamboka, bayei kosenga ndingisa,(1) mpe na baye bakoselaki Allah na motindami waye batikali epai na bango. Bapengwi kati na bango bakozuaka etumbu ya makasi.
1 Mpo bakende kobunda te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّيۡسَ عَلَى ٱلضُّعَفَآءِ وَلَا عَلَى ٱلۡمَرۡضَىٰ وَلَا عَلَى ٱلَّذِينَ لَا يَجِدُونَ مَا يُنفِقُونَ حَرَجٌ إِذَا نَصَحُواْ لِلَّهِ وَرَسُولِهِۦۚ مَا عَلَى ٱلۡمُحۡسِنِينَ مِن سَبِيلٖۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
91. Kasi baye bazangi makasi ya nzoto, na bato ya bokono, na baye bazangi eloko ya kobimisa (тропа Allah) bazali na lisumu te soki bakei kobunda te, soki bazali na bosembo na mitema mia bango тропа Allah na motindami waye. Мре basali bolamu, bazali na Likebisi te тре Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا عَلَى ٱلَّذِينَ إِذَا مَآ أَتَوۡكَ لِتَحۡمِلَهُمۡ قُلۡتَ لَآ أَجِدُ مَآ أَحۡمِلُكُمۡ عَلَيۡهِ تَوَلَّواْ وَّأَعۡيُنُهُمۡ تَفِيضُ مِنَ ٱلدَّمۡعِ حَزَنًا أَلَّا يَجِدُواْ مَا يُنفِقُونَ
92. Ezali mabe te тропа baye bayelaki yo mpo opesa bango bibundeli ya komatela, olobi na bango été: Nazali na bibundeli ya komatele te тропа bino. Bazongi na kolela mayi ya miso ezali kotanga na mawa nyoso été bazui eloko te ya kobimisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ إِنَّمَا ٱلسَّبِيلُ عَلَى ٱلَّذِينَ يَسۡتَـٔۡذِنُونَكَ وَهُمۡ أَغۡنِيَآءُۚ رَضُواْ بِأَن يَكُونُواْ مَعَ ٱلۡخَوَالِفِ وَطَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
93. Kasi mabe (lisumu) ezali nde na baye bazali kosenga yo nzela ya kotikala mpe bazali na makoki nyoso ya bitumba, basepeli kotikala elongo na baye bakendeke bitumba te. Yango wana Allah abeti palata o mitema mia bango kasi bazali koyeba te.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَعۡتَذِرُونَ إِلَيۡكُمۡ إِذَا رَجَعۡتُمۡ إِلَيۡهِمۡۚ قُل لَّا تَعۡتَذِرُواْ لَن نُّؤۡمِنَ لَكُمۡ قَدۡ نَبَّأَنَا ٱللَّهُ مِنۡ أَخۡبَارِكُمۡۚ وَسَيَرَى ٱللَّهُ عَمَلَكُمۡ وَرَسُولُهُۥ ثُمَّ تُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
94. Bazali kosenga bino bolimbisi soki bozongeli bango (kowuta na bitumba). Loba: Bosenga bolimbisi te, tokoki kondimela bino te. Allah asilaki soló koyebisa biso ba sango na bino. Mpe Allah akotalaka misala та bino, na motindami waye lokola, sima bokozongaka epai ya oyo ayebaka makambo ma polele na maye mabombami mpe akoyebisaka bino maye bozalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
سَيَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَكُمۡ إِذَا ٱنقَلَبۡتُمۡ إِلَيۡهِمۡ لِتُعۡرِضُواْ عَنۡهُمۡۖ فَأَعۡرِضُواْ عَنۡهُمۡۖ إِنَّهُمۡ رِجۡسٞۖ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُ جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
95. Bakolapela bino ndayi na nkombo ya Allah na bozongi na bino été boleka epai na bango, mpo bolimbisa, bozala mosika na bango! Ya soló, bango bazali mbindo, mpe esika na bango ekozala nde o moto ya lifelo, lifuta lia maye bazalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَحۡلِفُونَ لَكُمۡ لِتَرۡضَوۡاْ عَنۡهُمۡۖ فَإِن تَرۡضَوۡاْ عَنۡهُمۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يَرۡضَىٰ عَنِ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡفَٰسِقِينَ
96. Bazali kolapela bino ndayi mpo bosepela na bango. Kasi soki bosepeli na bango, ya soló Allah asepelaka na babebisi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلۡأَعۡرَابُ أَشَدُّ كُفۡرٗا وَنِفَاقٗا وَأَجۡدَرُ أَلَّا يَعۡلَمُواْ حُدُودَ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ عَلَىٰ رَسُولِهِۦۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
97. Ba arabo,(1) bazalaki na bopagano makasi koleka, mpe kozala bato ya bilongi mibale mpe bato ya liboso ya koboya mibeko miye Allah akitisaki epai ya motindami waye. Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya.
1 Bato ya Bamboka.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مَن يَتَّخِذُ مَا يُنفِقُ مَغۡرَمٗا وَيَتَرَبَّصُ بِكُمُ ٱلدَّوَآئِرَۚ عَلَيۡهِمۡ دَآئِرَةُ ٱلسَّوۡءِۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
98. Mpe o kati ya ba arabo basusu bazali kozua maye bazali kobimisa lokola nyongo mpe bazali kozela mabe ezua bino, mabe ya makasi ekozua nde bango! Mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مَن يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَيَتَّخِذُ مَا يُنفِقُ قُرُبَٰتٍ عِندَ ٱللَّهِ وَصَلَوَٰتِ ٱلرَّسُولِۚ أَلَآ إِنَّهَا قُرۡبَةٞ لَّهُمۡۚ سَيُدۡخِلُهُمُ ٱللَّهُ فِي رَحۡمَتِهِۦٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
99. Мре lisusu о kati ya ba arabo basusu bazali kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka, mpe bazali kozua mabonza maye bazali kobimisa na nzela ya bopusani pene ya Allah, mpo été azua litomba ya mabondeli ya motindami. Ya sôló, wana mbeka тропа bango epai na Allah. Мре Allah akokotisaka bango na nsé ya ngolu naye, ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلۡأَوَّلُونَ مِنَ ٱلۡمُهَٰجِرِينَ وَٱلۡأَنصَارِ وَٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُم بِإِحۡسَٰنٖ رَّضِيَ ٱللَّهُ عَنۡهُمۡ وَرَضُواْ عَنۡهُ وَأَعَدَّ لَهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي تَحۡتَهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
100. Allah asepeli na bandimi ya liboso baye batikaki (Makkah) na baye bayambaki bango, (na Madinah) lolenge moko na basusu baye bayaki sima na bango na bolamu, bango mpe basepeli naye. Mpe abongiseli bango Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela na libela kati na yango, wana nde elonga enene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِمَّنۡ حَوۡلَكُم مِّنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مُنَٰفِقُونَۖ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡمَدِينَةِ مَرَدُواْ عَلَى ٱلنِّفَاقِ لَا تَعۡلَمُهُمۡۖ نَحۡنُ نَعۡلَمُهُمۡۚ سَنُعَذِّبُهُم مَّرَّتَيۡنِ ثُمَّ يُرَدُّونَ إِلَىٰ عَذَابٍ عَظِيمٖ
101. Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَءَاخَرُونَ ٱعۡتَرَفُواْ بِذُنُوبِهِمۡ خَلَطُواْ عَمَلٗا صَٰلِحٗا وَءَاخَرَ سَيِّئًا عَسَى ٱللَّهُ أَن يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
102. Мре basusu kati na bango bayebi masumu ma bango. Basangisi misala ya malamu na ya mabe. Mpo tango mosusu Allah akolimbisa bango. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
خُذۡ مِنۡ أَمۡوَٰلِهِمۡ صَدَقَةٗ تُطَهِّرُهُمۡ وَتُزَكِّيهِم بِهَا وَصَلِّ عَلَيۡهِمۡۖ إِنَّ صَلَوٰتَكَ سَكَنٞ لَّهُمۡۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
103. Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ هُوَ يَقۡبَلُ ٱلتَّوۡبَةَ عَنۡ عِبَادِهِۦ وَيَأۡخُذُ ٱلصَّدَقَٰتِ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
104. Boye bayebi te ete Allah nde moyambi tubela ya bawumbu naye, mpe ayambaka makabo na bango? Kasi ya soló, Allah nde mondimeli tubela atonda mawa.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقُلِ ٱعۡمَلُواْ فَسَيَرَى ٱللَّهُ عَمَلَكُمۡ وَرَسُولُهُۥ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَۖ وَسَتُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
105. Mpe loba: bosala, Allah akomona mosala na bino, mpe motindami waye lokola, na bandimi. Mpe sima bokozongisama epai ya oyo amonaka makambo ya polele na maye mabombami, mpe akoyebisaka bino тропа maye bozalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَءَاخَرُونَ مُرۡجَوۡنَ لِأَمۡرِ ٱللَّهِ إِمَّا يُعَذِّبُهُمۡ وَإِمَّا يَتُوبُ عَلَيۡهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
106. Mpe basusu bazali kozela mokano ya Allah: Apesa bango etumbu, to akoki kondimela bango, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ مَسۡجِدٗا ضِرَارٗا وَكُفۡرٗا وَتَفۡرِيقَۢا بَيۡنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَإِرۡصَادٗا لِّمَنۡ حَارَبَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ مِن قَبۡلُۚ وَلَيَحۡلِفُنَّ إِنۡ أَرَدۡنَآ إِلَّا ٱلۡحُسۡنَىٰۖ وَٱللَّهُ يَشۡهَدُ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
107. Mpe baye batongi Masdjid mpo bazua yango esika ya bonyokoli mpe bopengwi mpe тропа kokabola bandimi тре kolengele yango тропа moto oyo abundisaki Allah na motindami waye liboso. Mpe bazali kolapa été balingi eloko mosusu te sé kobongisa, kasi Allah ayebi ete ya soló bango bazali babuki lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا تَقُمۡ فِيهِ أَبَدٗاۚ لَّمَسۡجِدٌ أُسِّسَ عَلَى ٱلتَّقۡوَىٰ مِنۡ أَوَّلِ يَوۡمٍ أَحَقُّ أَن تَقُومَ فِيهِۚ فِيهِ رِجَالٞ يُحِبُّونَ أَن يَتَطَهَّرُواْۚ وَٱللَّهُ يُحِبُّ ٱلۡمُطَّهِّرِينَ
108. Kotelama o kati na yango te mpo na kosambela (masdjid). Kasi ndako esantu oyo etongama na bobangi Allah o mokolo ya ebandeli ezali malamu mpo otelema na kati. Okati na yango, mibali baye balingi komipetuama. Mpe Allah alingaka bapetolami.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَفَمَنۡ أَسَّسَ بُنۡيَٰنَهُۥ عَلَىٰ تَقۡوَىٰ مِنَ ٱللَّهِ وَرِضۡوَٰنٍ خَيۡرٌ أَم مَّنۡ أَسَّسَ بُنۡيَٰنَهُۥ عَلَىٰ شَفَا جُرُفٍ هَارٖ فَٱنۡهَارَ بِهِۦ فِي نَارِ جَهَنَّمَۗ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
109. Boye, oyo atongi ndako naye likolo ya bobangi Allah mpe esengo naye, azali malamu to ezali oyo atongi ya ye ndako pembeni ya libulu ya monene, oyo ekokweisa ye na moto ya lifelo? Mpe Allah akambaka babubi te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَا يَزَالُ بُنۡيَٰنُهُمُ ٱلَّذِي بَنَوۡاْ رِيبَةٗ فِي قُلُوبِهِمۡ إِلَّآ أَن تَقَطَّعَ قُلُوبُهُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
110. Ndako na bango batongi, ekotikala sé liziba ya koyimayima o mitema na bango kino mitema na bango mikopasuka. Mpe Allah azali wa boyebi atonda bwanya.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ إِنَّ ٱللَّهَ ٱشۡتَرَىٰ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ أَنفُسَهُمۡ وَأَمۡوَٰلَهُم بِأَنَّ لَهُمُ ٱلۡجَنَّةَۚ يُقَٰتِلُونَ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَيَقۡتُلُونَ وَيُقۡتَلُونَۖ وَعۡدًا عَلَيۡهِ حَقّٗا فِي ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَٱلۡإِنجِيلِ وَٱلۡقُرۡءَانِۚ وَمَنۡ أَوۡفَىٰ بِعَهۡدِهِۦ مِنَ ٱللَّهِۚ فَٱسۡتَبۡشِرُواْ بِبَيۡعِكُمُ ٱلَّذِي بَايَعۡتُم بِهِۦۚ وَذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
111. Ya sólo, Allah asila kosomba epai na bandimi milimo na bango na misolo mia bango mpo ete bazua lola. Bazali kobunda na nzela ya Allah, na yango ba bomaka mpe ba bomaka bango., elaka ya soló esila kokomama okati ya torah mpe indjil na kurani. Mpe nani aleki Allah nakokokisa elaka? Bosepela na mombongo na bino oyo bosali, mpe oyo wana nde elonga enene.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلتَّٰٓئِبُونَ ٱلۡعَٰبِدُونَ ٱلۡحَٰمِدُونَ ٱلسَّٰٓئِحُونَ ٱلرَّٰكِعُونَ ٱلسَّٰجِدُونَ ٱلۡأٓمِرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَٱلنَّاهُونَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَٱلۡحَٰفِظُونَ لِحُدُودِ ٱللَّهِۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
112. Bazali baye batubelaka, basambelaka, bakumisaka, bakangaka ngizi, bagumbamaka, bafukamaka, batindaka kosala bolamu mpe bapekisaka kosala mabe mpe babatelaka mibeko ya Allah. Mpe pesa nsango elamu epai na bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا كَانَ لِلنَّبِيِّ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَن يَسۡتَغۡفِرُواْ لِلۡمُشۡرِكِينَ وَلَوۡ كَانُوٓاْ أُوْلِي قُرۡبَىٰ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمۡ أَنَّهُمۡ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَحِيمِ
113. Mpe esengeli te na ntoma na bandimi kosengela bapagano bolimbisi ata soki bazali libota na bango na ntango emonisami polele ete bazali solo bato ya moto.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا كَانَ ٱسۡتِغۡفَارُ إِبۡرَٰهِيمَ لِأَبِيهِ إِلَّا عَن مَّوۡعِدَةٖ وَعَدَهَآ إِيَّاهُ فَلَمَّا تَبَيَّنَ لَهُۥٓ أَنَّهُۥ عَدُوّٞ لِّلَّهِ تَبَرَّأَ مِنۡهُۚ إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ لَأَوَّٰهٌ حَلِيمٞ
114. Mpe bolimbisi ya Ibrâhîm тропа tata naye ezalaki te sé тропа elaka eye alakaki ye, mpe ntango emonanaki ete azali monguna ya Allah, asundolaki ye. Ya sólo, Ibrâhîm azalaka moto ya komikitisa mpe motema ya ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُضِلَّ قَوۡمَۢا بَعۡدَ إِذۡ هَدَىٰهُمۡ حَتَّىٰ يُبَيِّنَ لَهُم مَّا يَتَّقُونَۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٌ
115. Mpe Allah akoki kobungisa bato te wana asili kokamba bango kino akomonisa bango eloko oyo bakoki kobanga. Ya sólo, Allah azali naboyebi likolo na biloko binso.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱللَّهَ لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۚ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ
116. Ya sôló, Allah azali na bokonzi ya likolo mpe ya nsé, apesaka bomoyi mpe liwa, mpe bozali na mobateli te mpe mosungi te sé kaka Allah.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَّقَد تَّابَ ٱللَّهُ عَلَى ٱلنَّبِيِّ وَٱلۡمُهَٰجِرِينَ وَٱلۡأَنصَارِ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُ فِي سَاعَةِ ٱلۡعُسۡرَةِ مِنۢ بَعۡدِ مَا كَادَ يَزِيغُ قُلُوبُ فَرِيقٖ مِّنۡهُمۡ ثُمَّ تَابَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّهُۥ بِهِمۡ رَءُوفٞ رَّحِيمٞ
117. Allah asili koyamba tubela ya ntoma na bato ya (makkah) mpe bato ya (madinah), bango oyo balandaki ye na ntango ya mpasi, tango etikalaki moke mitema ya basusu mitengama, mpe alimbisaki bango. Ya sólo, azalaki na bolingo mpe ngolu mingi mpo na bango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَلَى ٱلثَّلَٰثَةِ ٱلَّذِينَ خُلِّفُواْ حَتَّىٰٓ إِذَا ضَاقَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلۡأَرۡضُ بِمَا رَحُبَتۡ وَضَاقَتۡ عَلَيۡهِمۡ أَنفُسُهُمۡ وَظَنُّوٓاْ أَن لَّا مَلۡجَأَ مِنَ ٱللَّهِ إِلَّآ إِلَيۡهِ ثُمَّ تَابَ عَلَيۡهِمۡ لِيَتُوبُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
118. Mpe andimelaki bato misato oyo batikalaki na nsima kino bamonaki ete mabele ekomelaki bango moke, makambo makomelaki bango mpasi kino bakanisaki ete esika mosusu yakokimela ezali te sé epai ya Allah. Sima andimi tubela na bango mpo ete bazonga epai naye. Ya sólo, Allah azali moyambi monene ya tubela atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَكُونُواْ مَعَ ٱلصَّٰدِقِينَ
119. Eh bino bandimi! Bobanga Allah mpe bozala elongo moko na bato ya bosembo.
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا كَانَ لِأَهۡلِ ٱلۡمَدِينَةِ وَمَنۡ حَوۡلَهُم مِّنَ ٱلۡأَعۡرَابِ أَن يَتَخَلَّفُواْ عَن رَّسُولِ ٱللَّهِ وَلَا يَرۡغَبُواْ بِأَنفُسِهِمۡ عَن نَّفۡسِهِۦۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ لَا يُصِيبُهُمۡ ظَمَأٞ وَلَا نَصَبٞ وَلَا مَخۡمَصَةٞ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَلَا يَطَـُٔونَ مَوۡطِئٗا يَغِيظُ ٱلۡكُفَّارَ وَلَا يَنَالُونَ مِنۡ عَدُوّٖ نَّيۡلًا إِلَّا كُتِبَ لَهُم بِهِۦ عَمَلٞ صَٰلِحٌۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
120. Mpe esengeli te na bato ya madinah na bato ya zingazinga na yango kati ya ba arabo ete batikala sima mosika na motindami, esengeli mpe te na bango kobatela nzoto na bango koleka ya motindami. Mpo ete bakoyoka mposa ya mayi te тре bakoyoka bolembu te, bakoyoka тре nzala te na nzela ya Allah, bakoleka na mboka moko te kino bapagano batomboka, mpe elonga nyoso bakozala na yango likolo na banguna kino bakotiela bango bolamu monene. Ya soló, Allah abungisaka lifuta ya basali malamu te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا يُنفِقُونَ نَفَقَةٗ صَغِيرَةٗ وَلَا كَبِيرَةٗ وَلَا يَقۡطَعُونَ وَادِيًا إِلَّا كُتِبَ لَهُمۡ لِيَجۡزِيَهُمُ ٱللَّهُ أَحۡسَنَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
121. Mpe bakobimisa eloko moko te ya moke to ya monene, mpe bakokatisa ngomba moko te kino bakoma yango тропа bango mpo ete Allah afuta bango maye ya kitoko bazalaki kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
۞ وَمَا كَانَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ لِيَنفِرُواْ كَآفَّةٗۚ فَلَوۡلَا نَفَرَ مِن كُلِّ فِرۡقَةٖ مِّنۡهُمۡ طَآئِفَةٞ لِّيَتَفَقَّهُواْ فِي ٱلدِّينِ وَلِيُنذِرُواْ قَوۡمَهُمۡ إِذَا رَجَعُوٓاْ إِلَيۡهِمۡ لَعَلَّهُمۡ يَحۡذَرُونَ
122. Mpe esengeli te bandimi babima bango nyoso na mboka (pona koluka boyebi). Kasi esengeli na ndambu okati ya libota na libota mpo na koyekola mpe kokebisa bato na bango ntango bakozonga epai na bango mpo ete bazala na bokebi.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ قَٰتِلُواْ ٱلَّذِينَ يَلُونَكُم مِّنَ ٱلۡكُفَّارِ وَلۡيَجِدُواْ فِيكُمۡ غِلۡظَةٗۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُتَّقِينَ
123. Eh bino bandimi! Bobundisa bapengwi oyo bazali pembeni na bino mpe bozala mpete te epai na bango. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali elongo na babangi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا مَآ أُنزِلَتۡ سُورَةٞ فَمِنۡهُم مَّن يَقُولُ أَيُّكُمۡ زَادَتۡهُ هَٰذِهِۦٓ إِيمَٰنٗاۚ فَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ فَزَادَتۡهُمۡ إِيمَٰنٗا وَهُمۡ يَسۡتَبۡشِرُونَ
124. Mpe soki suratu ekiti, moko kati na bango akoloba: Nani liloba oyo ebakiseli ye kondima? Kasi, mpo na bandimi ekobakisela bango kondima mpe batondi na esengo.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ فَزَادَتۡهُمۡ رِجۡسًا إِلَىٰ رِجۡسِهِمۡ وَمَاتُواْ وَهُمۡ كَٰفِرُونَ
125. Kasi, mpo na baye mitema na bango mitondi na malali (bokono), ekobakisela bango mbindo likolo ya mbindo na bango, mpe bakokufa bazali bapagano.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَوَلَا يَرَوۡنَ أَنَّهُمۡ يُفۡتَنُونَ فِي كُلِّ عَامٖ مَّرَّةً أَوۡ مَرَّتَيۡنِ ثُمَّ لَا يَتُوبُونَ وَلَا هُمۡ يَذَّكَّرُونَ
126. Boye, bazali kornona te ete mbula na mbula bazali komekama mbala moko to mbala mibale, mpe bazali kotubela te mpe bazali kokanisa te?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا مَآ أُنزِلَتۡ سُورَةٞ نَّظَرَ بَعۡضُهُمۡ إِلَىٰ بَعۡضٍ هَلۡ يَرَىٰكُم مِّنۡ أَحَدٖ ثُمَّ ٱنصَرَفُواْۚ صَرَفَ ٱللَّهُ قُلُوبَهُم بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ
127. Mpe soki suratu ekiti bakotalana bango na bango mpe balobi: Boye moto moko azali kornona bino? Sima bakimi. Allah mpe akimisi mitema na bango mpo ete bazali bato oyo bazanga mayele.
Arabic explanations of the Qur’an:
لَقَدۡ جَآءَكُمۡ رَسُولٞ مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ عَزِيزٌ عَلَيۡهِ مَا عَنِتُّمۡ حَرِيصٌ عَلَيۡكُم بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ رَءُوفٞ رَّحِيمٞ
128. Ya soló, motindami awuti kati na bino aye тропа bino na ntina ya mpasi ya kilo makasi bozalaki na yango, azalaki koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya bandimi.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَقُلۡ حَسۡبِيَ ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُۖ وَهُوَ رَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡعَظِيمِ
129. mpe soki baboyi mpe bapesi mokongo, loba: Allah akoki na ngai, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye. Epai naye na mikabi mpe azali Nkolo ngwende ya monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: At-Tawbah
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Translations’ Index

Translation of the meanings of the Noble Qur’an into the Lingala language, translated by Zakaria Muhammad Balngogo.

close