Check out the new design

Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. * - Tərcumənin mündəricatı

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Mənaların tərcüməsi Surə: əz-Zumər   Ayə:
وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِ فَصَعِقَ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا مَن شَآءَ ٱللَّهُۖ ثُمَّ نُفِخَ فِيهِ أُخۡرَىٰ فَإِذَا هُمۡ قِيَامٞ يَنظُرُونَ
Mpe bakobeta kelelo, mpe baye banso bazali na likolo mpe na nsé bakokufa, longola sé oyo Allah akolinga, sima babeti lisusu kelelo, nde bato banso basekwi bazali kotala.
Ərəbcə təfsirlər:
وَأَشۡرَقَتِ ٱلۡأَرۡضُ بِنُورِ رَبِّهَا وَوُضِعَ ٱلۡكِتَٰبُ وَجِاْيٓءَ بِٱلنَّبِيِّـۧنَ وَٱلشُّهَدَآءِ وَقُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡحَقِّ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
Mpe mabele makotondaka na bongengi bwa Nkolo na yango, mpe bakotiyaka buku (ya misala nyoso oyo moto asalaki), mpe bakoyaka na bantoma na banzeneneke, mpe bakokataka kati kati na bango na bosôló, mpe bango bakobubamaka te.
Ərəbcə təfsirlər:
وَوُفِّيَتۡ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا عَمِلَتۡ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِمَا يَفۡعَلُونَ
Mpe molimo (moto) nyoso akozuaka sé mbano ya maye asalaki, mpe (Allah) ayebi malamu koleka maye bazalaki kosala.
Ərəbcə təfsirlər:
وَسِيقَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِلَىٰ جَهَنَّمَ زُمَرًاۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوهَا فُتِحَتۡ أَبۡوَٰبُهَا وَقَالَ لَهُمۡ خَزَنَتُهَآ أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ رُسُلٞ مِّنكُمۡ يَتۡلُونَ عَلَيۡكُمۡ ءَايَٰتِ رَبِّكُمۡ وَيُنذِرُونَكُمۡ لِقَآءَ يَوۡمِكُمۡ هَٰذَاۚ قَالُواْ بَلَىٰ وَلَٰكِنۡ حَقَّتۡ كَلِمَةُ ٱلۡعَذَابِ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe тропа baye bapengwaki, bakomema bango lisanga okati na lifelo, soki bakomi, bizipeli na yango bikofungwama, mpe bakengeli na yango bakoloba na bango: Boye bayelaki bino batindami (na bakebisi) kowuta na bino moko te mpo batangela bino mikapo mia Nkolo wa bino mpe bakebisa bino тропа elaka ya mokolo mwa bino ya lelo? Bakoyanolaka: Iyo; kasi ya soló elaka ya etumbu ekokisami likolo ya bapengwi.
Ərəbcə təfsirlər:
قِيلَ ٱدۡخُلُوٓاْ أَبۡوَٰبَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ فَبِئۡسَ مَثۡوَى ٱلۡمُتَكَبِّرِينَ
Bakoyebisaka bango: Bokota na minoko ya moto, bokozala libela okati na yango, esika kani ya mabe wana тропа bato ya lolendo!
Ərəbcə təfsirlər:
وَسِيقَ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ رَبَّهُمۡ إِلَى ٱلۡجَنَّةِ زُمَرًاۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوهَا وَفُتِحَتۡ أَبۡوَٰبُهَا وَقَالَ لَهُمۡ خَزَنَتُهَا سَلَٰمٌ عَلَيۡكُمۡ طِبۡتُمۡ فَٱدۡخُلُوهَا خَٰلِدِينَ
Mpe bakomema baye babangaki Nkolo wa bango lisanga okati ya lola, soki bakomi, bakofungolelaka bango bizipeli bia yango, mpe bakengeli na yango bakolobaka na bango: Kimia ezala likolo na bino, bozalaki malamu, bokota mpe bovanda libela kati na yango.
Ərəbcə təfsirlər:
وَقَالُواْ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي صَدَقَنَا وَعۡدَهُۥ وَأَوۡرَثَنَا ٱلۡأَرۡضَ نَتَبَوَّأُ مِنَ ٱلۡجَنَّةِ حَيۡثُ نَشَآءُۖ فَنِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ
Мре bakolobaka: Matondo na Allah oyo akokiseli biso elaka, mpe akitanisi biso mabele (ya Iola), ya soló tokovandaka na Iola esika nyoso tokolinga. Ya solo lifuta lia babongisi lileki kitoko.
Ərəbcə təfsirlər:
 
Mənaların tərcüməsi Surə: əz-Zumər
Surələrin mündəricatı Səhifənin rəqəmi
 
Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. - Tərcumənin mündəricatı

Tərcümə edən: Zəkəriyyə Muhəmməd Banğuğu.

Bağlamaq