1. Eh bino baye bondimi! Bokokisa mikanu miye bozwi. Endimami na bino ebuele ya an’âm(1) biye bozali kobokolo longola sé biye bapekisi bino koboma o ntango ya kobulisama.(2) Ya sôló Allah akataka makambo na ndenge alingi.
1 Bótala na mokapo ya Al-Imrân: 14.
2 Kobulisama kozua mokano, na kolata elamba ya pembe na tango ya mobembo esanto na Makkah.
2. Eh bino bandimi! botiola bilembo ya Allah te, mpe ba sanza esantu te, ndenge moko na bibwele (mpona mbeka na makkah), ndenge moko mpe na bilembo bitiami likolo ya bibwele mpe na ba oyo bazali kokende na ndako esantu baye bayei koluka bolamu ya Nkolo na bango mpe esengo naye, soki bobimi na kobulisama bosala bokila (soki bozali na bosenga na yango). Kimonguna na motema mabe epekisa bino te kokata makambo na bosembo likolo na bato baye bapekisaki bino kokota na ndako esantu.(1) Mpe bosalisana na bolamu mpe na bobangi (Allah), kasi na mabe na bonguna te. Mpe bobanga Allah, ya sôló, Allah azali mopesi etumbu ya makasi.
3. Epekisami likolo na bino (kolia) nyama oyo ekufi yango moko, mpe makila, mpe mosuni ya ngulu, mpe oyo babomi na nkombo ya Allah te, mpe oyo ekufi na kokamola kingo, mpe oyo babeti yango (na nzete to libanga), mpe oyo ekwei kowuta likolo, mpe oyo ba bundi na maseke na bango kino liwa, mpe oyo ba nyama ya mino balei, longola sé bokuti yango naino ekufi te, mpe bokati yango kingo, mpe oyo ekatami mpona bikeko, mpe kobendana na makonga mpona koyeba mambi na bino ya mabombami, nyoso wana ezali mabe. Boyeba ete lelo bapagano bazangi elikia na lingomba na bino, na yango bobanga bango te kasi bobanga nde ngai. Lelo nakokisi lingomba na bino, mpe natondisi bolamu na ngai likolo na bino, mpe naponeli bino lingomba na nkombo ya islam (komisokia). Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia bilei biye bipekisami na likanisi ya kosumuka te, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa.
4. Bazali kotuna yo mpona maye elingisami mpo na bango. Loba na bango ete: Elingisami mpo na bino bilei ya malamu, mpe bibwele bozali na yango na maboko (lokola ba mbwa) ya bokila, botangisa bango lolenge ya kokanga nyama lolenge Allah alakisaki bino. Soki bakangeli bino nyama, botanga nkombo ya Allah likolo na yango yambo ya kolia, mpe bobanga Allah, mpamba te ya sôló, azali na lombango mpona kofuta mbano.
5. Lelo bozali na ndingisa ya kolia bilei ya malamu, mpe bozali na ndingisa ya kolia bilei ya baye bazuaki buku, bango mpe bazali na ndingisa ya kolia bilei na bino. Mpe lisusu bozali na ndingisa ya kobala basi ya malamu kati na bandimi, mpe basi ya malamu kati ya baye bazuaki buku liboso na bino, soki bopesi bango misolo na bango ya libala na lolenge ya malamu, kasi na potopoto ya ekobo te, kasi oyo akopengwa na bondimi, ye wana mosala naye esili kobebisama, mpe o mokolo ya suka akozala elongo na bazangi.
6. Eh bino bandimi! Soki botelemi mpo na kosambela, bosukola bilongi na bino mpe na maboko ma bino tii na matonga, mpe bopangusa mitu na bino, mpe bosukola makolo ma bino tii na matonga, mpe sókó bozali na djanaba(1) bomipetola. Mpe sókó bozali na bokono to na mobembo to moko wa bino awuti na zongo to sókó bosangani na basi ba bino, soki bozwi mayi ya kosukola te, bomipetola na zelo ya peto, bopangusa bilongi bia bino na maboko ma bino kowuta na yango. Allah alingi kosalela bino mpasi te. Kasi alingi kopetola bino, akokiseli bino bolamu bwaye, mpo ete bokoka kotondo (ye).
7. Bokanisa bolamu ya Allah oyo asalelaki bino, mpe elaka naye bozuaki tango bolobaki ete: Toyoki mpe totosi. Na yango bobanga Allah, mpamba te ya sôló, Allah ayebi maye manso mabombami o mitema.
8. Eh bino ba oyo bondima! Bozala na bosembo mpo na kosalela Allah, banzeneneke ya semba, kibonguna ya bato epekisa bino te nakosala bosembo, na yango bosala bosembo, yango ezali pembeni na bobangi. Mpe bobanga Allah, ya sôló, Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
11. Eh bino bandimi! Bokanisa bolamu ya Allah epai na bino, tango bato bazuaki mokano mpo na kosala bino mabe. Allah alingaki te mabe wana ezua bino, mpe bobanga Allah, mpe epai na Allah bandimi bamipesaka.
12. Mpe Allah asilaki kozwa elaka na bana ya Isalayele, mpe totindelaki bango bakambi zomi na mibale. Mpe Allah alobi na bango ete: Ya sôló ngai nazali elongo na bino; soki botelemisi losambo mpe bopesi zakat,(1) mpe bondimi nabatindami na ngai mpe bosalisi bango mpe bopesi Allah nyongo ya malamu; nakolimbisa mabe na bino, mpe nakokotisa bino lola eye ezali koleka na nsé na yango mingala. Oyo akopengwa sima na yango kati na bino, asili kobunga nzela ya semba.
1 Zakat: Bótala na suratu Al-Baqarah: mikapo 43, 83, 110 177, 277, Pe na suratu An-Nisá: 77.
13. Na yango, mpo na kozanga na bango botosi malako, topesaki bango botutu, mpe totiaki mitema mia bango mizala makasi. Bazali kobongola maloba na lolenge mosusu, mpe babosani eteni ya malendisi maye bayebisaki bango (Mûssa).okomona tango inso kati na bango bizaleli mpe makanisi ya mabe, sé moke kati na bango. Limbisa bango mpe bosana, ya sôló, Allah alingaka babongisi.
14. Mpe ba oyo bazali koloba: Tozali baklisto tozuaki elaka na bango, babosanaki misusu na maye toyebisaki na bango. Mpe totiaki kati kati na bango bonguna mpe koyinana kino mokolo ya suka, mpe Allah akoyebisa bango maye manso basalaki.
15. Eh bino baye bozua buku! (bayuda na baklisto), ya sôló, motindami na biso asili koyela bino, mpona kolimbola bino ebele ya makambo maye bobombaki kati na buku. Mpe alimbisa bino na misusu: ya sôló, bongengi esili koyela bino na buku ya polele kowuta epai ya Allah.
16. Buku oyo Allah azali kokamba na yango, baye balandi bosepeli naye banzela ya kimia. Mpe azali kobimisa bango na molili kotia bango na mwinda na ndingisa naye, mpe kokamba bango na nzela ya semba.
17. Ya sôló, basıli kozala bapengui baye balobaka ete: Issa mwana ya Maryam ye nde Allah, loba ete: Nani akokoka kosala Allah eloko, soki alingi aboma Masia mwana ya Maryam, na mama naye, na bato nyoso bazali na mokili? Bokonzi ya likolo na ya nsé ezali ya Allah, na maye mazwani kati kati nayango. Azali kokela nyoso alingi, mpe Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
18. Mpe bayuda na baklisto balobi ete: Tozali bana ya Allah mpe balingami naye, loba: Mpona nini azali kopesa bino etumbu na masumu na bino? Kasi bozali lokola bato banso ndenge akela. Alimbisaka na oyo alingi mpe apesaka etumbu na oyo alingi. Bokonzi ya likolo na ya nsé mpe maye mazuami kati kati na yango mazali ya Allah. Mpe epai naye nde bozongi ezali.
19. Eh bino bato ya buku! Ya sôló, motindami na biso asili koyela bino mpo na kolimbolela bino, o sima ya bokatani na boyei ya batindami, mpo boloba te ete: Mopesi sango ya malamu mpe mokebisi ata moko ayelaki biso te. Mokebisi na mopesi sango ya malamu asila koyela bino. Mpe Allah azali na bokoki mpo na biloko binso.
20. Mpe ntango Mûssa alobaki na bato naye: eh bato na ngai! Bokanisa bolamu ya Allah oyo asalelaki bino, atieli bino ba ntoma, mpe atiaki bino ba nkumu, mpe apesa bino oyo apesa bato ya mokili te.(1)
22. Balobaki: Eh Mûssa! Ya sôló, kati na yango ezali na bato ya makasi. Mpe ya sôló biso, tokokota yango te kino babima wana. Soki babimi nde biso tokoti.
26. (Allah) alobi ete: Ya sôló, bazali lisusu na ndingisa te ya kozua mboka oyo kino mbula ntuku minei mikoka, wapi epai bakotelengana na mokili. Komona mpasi te na motema mpona bato mabe.
27. Mpe betela bango lisapo na bosembo lia bana mibale ya Âdam: ntango bafungolaki kopesa mbeka (likabo) moko ba ndimelaki ye, mosusu bandimeli ye te (oyo bandimelaki ye te) alobi (na mosusu wana): na koboma yo mpeza (ndeko naye) alobi: Ya sôló, (Allah) andimelaka baye babangaka.
32. Yango wana tokomelaki bana ya isalayele ete, oyo akoboma molimo mosusu, to asali mbeba kati na mokili azali lokola abomi bato banso, mpe oyo akobikisa yango, azali lokola abikisi bato banso. Mpe ya sôló batindami na biso basilaki koyela bino bilembo na mikapo. Na sima ebele ya bato kati na bango bazali kobebisa kati ya mokili mpe kolutisa ndelo.
33. Ya sôló, bato oyo bazali kobundisa Allah na motindami wa ye mpe bazali kotia mobulu awa na nsé, lifuta na bango ezali ete: Baboma bango to babakama (na nzete) to mpe bakata maboko na bango ya mibali mpe makolo na bango ya mwasi, to mpe babengana bango na mboka. Wana ezali bokitisami awa na mokili mpe na mokolo ya suka bakozala na etumbu ya monene.
36. Ya sôló, baye bapengwa soki ezalaki ete bomengo nyoso ezali na nsé ezali ya bango, mpe babakisa mosusu lokola yango, ete bakangolama na yango na etumbu mokolo ya suka, bakondimela bango yango te mpe bako zala na etumbu makasi.
38. Moyibi ya mobali na moyibi ya mwasi, bokata maboko na bango mibale mpona maye basalaki. Mpe ezala lokola etumbu kowuta epaï ya Allah. Mpe Allah azali na nguya atonda bwanya.
40. Boye, oyebi te ete ya sôló, bokonzi bwa likolo na nsé bozali ya Allah? Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe alimbisaka na oyo alingi? Mpe Allah azali na bokoki mpo ya biloko binso.
41. Eh! Motindami! Baye bazali kowela kokweya na bopagano, bapesa yo mpasi te. Bazali lisanga ya baye balobaka ete: Tondimi na balolemu na bango kasi na mitema na bango te, lolenge moko na bayuda, bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ndenge moko bazali kotia matoyi na koyoka lokuta ya bato misusu oyo bayaki epai nayo te. Bazali kobalola liloba na esika na yango, mpe balobaka ete: Soki bapesi likambo oyo bozua, mpe soki bapesi bino te bokeba. Moto oyo Allah alingi komeka ye okosalisa ye na eloko moko te epai na Allah. Ba oyo wana nde Allah alingi kopetola mitema mia bango te. Bakokitisama awa na nsé mpe bakozua etumbu monene o mokolo ya suka.
43. Mpe ndenge nini bazali kotuna yo osambisa bango mpe bazali na torah kati na yango ezali na mobeko mwa Allah? Mpe na sima na yango babwaki bosambisi bwa yo, bato wana bazali bandimi te.
44. Ya sôló, tokitisaki torah o kati na yango ezali na bokambi mpe polé, buku oyo bantoma baye batosaki (Allah) na banganga ya mayele bazalaki kokata na yango makambo ya bayuda na mokumba oyo bapesamaki ya kobatela buku ya Allah. Mpe bazalaki banzeneneke na yango. (bamonaki yango) na yango, bobanga bato te kasi bobanga nde ngai, mpe boteka mikapo mia ngai na ntalo ya moke te. Mpe bato oyo bakokata makambo na buku ya Allah te, bango nde bazali bapagano.
45. Mpe tokomelaki bango okati na yango (buku) ete: Molimo ekofutama na molimo, liso na liso zolo na zolo, litoi na litoi, lino na lino, mpe oyo akozokisa bakozokisa ye lolenge azokisi, kasi na moto oyo akolimbisa, ezali malamu mpe tubela mpo naye. Kasi baye bakokata makambo te na maye Allah akitisi, bango wana nde bazali babubi.
46. Mpe na sima na bango, totindaki Issa mwana ya Maryam ete andima na maye mazalaki liboso naye maye mazali okati ya torah. Mpe topesaki ye Indjil okati na yango bokambi mpe bongengi ezali kondima na maye mazalaki liboso na yango kowuta na torah, yango ezali bokambi mpe malendisi mpona baye bazali na bobangi.(1)
47. Mpe bato ya Indjil, bakata makambo na maye Allah akitisaki o kati na yango. Mpe baye bakokata makambo na maye Allah akitisaki te bango nde babebisi.
48. Mpe tokitiselaki yo(1) buku(2) na bosôló, ezali kondima na maye mazalaki liboso kati na babuku mpe mobateli likolo na yango. Kata makambo kati na bango na maye Allah akitisi. Kasi kolanda mposa na bango te mpona kotika bosôló oyo eyeli yo, lisanga na lisanga totia mibeko mpe nzela ya kolanda. Soki Allah alingaki mbele atiaki bino umma(3) moko, kasi ezali mpo ameka bino lisanga nini ekosala malamu. Bowelana mpona kosala bolamu. Epai na Allah nde bozongi na bino banso, mpe akoyebisa bino na ntina ya maye bozalaki na bokeseni na yango.
49. Mpe kata makambo kati kati na bango na maye Allah akitisi, kasi kolanda bamposa na bango te, mpe keba na bango mpo ete bakomeka yo na ndambu ya maye Allah akitisi epai nayo. Mpe soki bapesi mokongo, yeba ete ya sôló Allah alingi kopesa bango etumbu na ndambu ya masumu na bango. Mpe ya sôló ebele ya bato bazali nde babebisi.
51. Eh! Bino bandimi! Bozua bayuda na baklisto baninga te, bazali baninga bango na bango. Oyo okati na bino akozua bango baninga, ayeba ete asili kokoma moto na bango. Mpamba te Allah akambaka bato ya mabe te.
52. Kasi, okomona baye bazali na bokono o mitema mia bango, bakokende na lombango epai na bango, bazali koloba ete: Tozali kobanga mpo basala biso mabe te. Nzoka nde, Allah tango mosusu akoya na elonga to makambo mosusu kowuta epai naye na sima, bakotikala na mpasi na makanisi ya mabe oyo babombi na kati ya mitema na bango.
53. Mpe bandimi bakolobaka ete: Ba oyo nde ya sôló baye balapaki ndayi na bokasi bonso na nkombo ya Allah bazali na bino elongo? Misala mia bango mibebisami mpe bakomi bazangi.
54. Eh bino bandimi! Oyo okati na bino akotika lingomba naye, ayeba ete Allah akoyakaka na bato mosusu, ye alingi bango, bango mpe balingi ye, bakozala malamu na bandimi, makasi mpe mawa te likolo ya bapagano. Bakobunda na nzela ya Allah mpe bakobangaka te ete balobela bango (to basuanisa bango). Wana ezali bolamu ya Allah. Apesaka yango moto ye alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka mpe moyebi ya manso.
55. Ya sôló, Allah nde azali mosungi na bino na motindami naye, ndenge moko na bandimi baye batelemisaka losambo mpe bafutaka zakat mpe bagumbamelaka (Allah).
57. Eh bino bandimi! Baye bazali kozua lingomba na bino na liseki mpe kotiola yango kati na baye bazua buku liboso na bino, bozua bango na bapagano baninga te, mpe bobanga Allah soki ya sôló bozali bandimi.
59. Loba: Eh bino baye bozua buku liboso na biso! Bozali koyina biso sé mpo ete tondimi na Allah mpe na maye makiti epai na biso mpe na maye makitaki liboso? Ya sôló ebele kati na bino bozali babebisi.
60. Loba: Bolingi nayebisa bino lifuta na yango ya mabe koleka epai na Allah? Ezali oyo Allah alakeli botutu mpe asilikeli ye, mpe abalolaki basusu kati na bango ba makako na ba ngulu, mpe babondelaki tarut(1). Ba oyo wana nde bazali na esika ya mabe mpe babungi nzela.
61. Mpe soki bayei epai na bino, balobi: Tondimi, nzoka nde bakotaki epai na bino na bopagano, mpe babimi sé na yango, mpe Allah ayebi mpenza maye bazali kobomba.
62. Mpe okomona ebele na bango bazali kosala na lombango mpo na kosala mbeba mpe bonguna na kolia misolo ya mabe, wana ezali mabe na maye bazali kosala.
64. Mpe bayuda balobi ete: Loboko ya Allah ezali ya kokangama. Tika maboko na bango nde makangama, mpe bazali na elakeli mabe na ntina ya liloba na bango oyo. Nzoka nde maboko naye (Allah) mazali ya kofungwama. Akabaka bozui naye ndenge alingi. Ebele kati na bango bazali kokola sé kokola na botomboki. Mpe bopagano na ntina ya oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo. Mpe totiaki kati na bango koyinana mpe na kosuana kino mokolo ya suka. Tango nyoso bazali kopelisa moto mpona bitumba, Allah azali koboma yango. Mpe bazali kotia bobebisi awa na mokili, kasi Allah alingaka babebisi te.
66. Mpe soki basalelaki torah na Indjil na maye makitelaki bango kowuta epai na Nkolo wa bango, mbele bazuaki bilei kowuta na likolo mpe na nsé ya makolo na bango. Kati na bango ezali na umma(1) oyo batambolaka na bosembo, kasi ebele na bango bazali na misala ya mabe.
67. Eh yo motindami! Komisa sango eye ekiteli yo epai ya Nkolo nayo, soki osali yango te, yeba ete okomisi etinda naye te. Allah nde akobatela yo okati ya bato. Mpamba te ya sôló, Allah akambaka bapagano te.
68. Loba: Eh bino bato ya buku! Bokozala na eloko te kino bosalela torah na Indjil na maye manso makitelaki bino kowuta epai ya Nkolo na bino. Mpe ya sôló, ebele kati na bango bazali kokola sé kokola na bopengwi mpe botomboki na ntina ya oyo ekiteli yo kowuta epaï ya Nkolo nayo. Kasi komitungisama te mpona bato bapengwa.
69. Ya sôló, baye bandimi, mpe bayuda na ba swâbi-ûna(1) mpe baklisto, oyo akondima kati na bango na Allah mpe na mokolo ya suka mpe asali mosala ya malamu, bazala na bobangi te, bazala na mpasi mpe te na mitema na bango.
1 Swâbi-ûna: Bótala yango na suratu Al-Baqarah: 62.
71. Bakanisaki ete bakomekama te na etumbu ya Allah. Na sima miso mpe matoyi na bango makangamaki. Na sima Allah alimbisaki bango, sima lisusu ebele kati na bango bakangamaki miso mpe matoyi. Kasi Allah azalaki komona maye bazali kosala.
72. Ya sôló, basili kopengwa baye bazali koloba ete: Masiya (Issa) mwana ya Maryam azali Allah. Mpe masiya (Issa) alobaki na bana ya isalayele ete: Bobondela Allah Nkolo na ngai mpe Nkolo na bino. Ya sôló, oyo akosangisa Allah, Allah asili kopimela ye paladizo (lola) mpe esika naye ekozala móto. Mpe bato mabe bakozua lisungi te.
73. Basili kopengwa baye bazali koloba ete: Ya sôló, Allah azali moko ya ba nzambe misato, nzoka nde Nzambe mosusu Azali te sé Nzambe moko (Allah). Sókó batiki te maye bazali koloba, etumbu ya makasi ekozua bapengwi kati na bango.
75. Masiya mwana ya Maryam azali sé motindami, batindami ebele balekaki liboso naye,(1) mpe mama naye azalaki mwasi ya bosembo. Ye na mwana naye bazalaki kolia bilei. Tala ndenge nini tozalaki kolimbolela bango bilembo, lisusu tala ndenge nini bazali kopesa mokongo na koboya.
76. Loba: Bozali kobondela biloko bisusu, botiki kobondela Allah, biloko biye bikosala bino mabe te mpe bolamu te, wana Allah nde moyoki atonda boyebi?
77. Loba: Eh bino baye bozua buku! Bolekisa ndelo na lingomba na bino te sé bosembo, mpe bolanda te mposa ya baye basilaki kobunga liboso mpe babungisaki ebele ya bato mpe bango bamibungisi nzela.
78. Baye bapengwa kati na bana ya isalayele, balakelamaki mabe na lolemu ya Dâwud mpe Issa mwana ya Maryam, mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo.
80. Okomona ebele kati na bango bazali kozwa bapangano baninga. Milimo mia bango mibongiseli bango mabe na ntina ete Allah asilikelaki bango, mpe okati na etumbu nde bakozala seko na seko.
81. Mpe soki bandimaki na Allah mpe na ntoma mpe na maye makitaki epai naye, balingaki te kokamata bango balingami (to balongani). Kasi ebele kati na bango bazali nde babebisi.
82. Ya sôló, okokuta bayuda na basambeli ya bikeko bazali na bonguna makasi likolo ya bandimi, kasi okokuta ete baye balobaka sôló tozali ba klisto bazalaki pembeni mpona kolinga bandimi, mpo ete na kati na bango ezali na basângò mpe banganga mayele(1) mpo ete bazalaka na lolendo te.
83. Mpe na ntango bakoyoka na maye makitaki epai ya motindami, okomona miso na bango matondi na pizoli mpona bosôló oyo bayebi, mpe bakolobaka: Nkolo wa biso tondimi, tia biso elongo na batatoli.
89. Allah akopesa bino etumbu te nakolapa na bino oyo ebimaka na balolemu na bino. Kasi akopesa bino etumbu na kolapa oyo ewuti na mitema na bino, tubela na yango ezali koleisa babola zomi lolenge boleisaka mabota na bino, to mpe kolatisa bango, to mpe kokangola mowumbu. Oyo akozua makoki wana te, esengeli naye akanga ngizi mikolo misato. Wana nde tubela ya kolapa na bino na tango bosili kolapa, kasi bobatela bakolapa na bino. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo botondo ye.
90. Eh bino Bandimi! Ya sôló, masanga, mpe masano ya mayele mabe, na mabanga mpe makonga mibongisami na tango ya bopagano, manso wana mazali mbindo kowuta na mosala ya satana, bozala mosika na yango mpo ete bolonga.
91. Ya sôló, satana alingi kotia kati na bino koyinana mpe kosuana kowuta na masanga mpe masano ya mabe, mpe apekisa bino losambo mpe bokanisi Allah, boye bokotika yango?
92. Mpe botosa Allah mpe botosa motindami mpe bokeba! Mpe soki bopesi mikongo, mpe boyeba ete ya sôló, motindami na biso azali na eloko mosusu te sé akomisa sango ya polele.
94. Eh bino bandimi! Allah akomeka bino na bokila, banyama bokoboma na maboko na bino mpe na makonga (to mandoki) na bino, mpo ete Allah ayeba nani kati na bino azali kobanga Allah na kobombana, oyo kati na bino akolekisa ndelo sima likambo oyo akozala na etumbu ya makasi.
95. Eh bino bandimi! Bosala bokila te na tango ya kobulisama.(1) Oyo akoboma nyama na tango wana na nko, lifuta naye ekozala apesa nyama ya bomoyi ndenge moko lokola oyo ye abomaki, bato mibale ya bosembo mpe ya mayele kati na bino bakata makambo yango, ekozala mbeka ekoma na ndako esantu ya Makkah mpona koleisa babola na yango, to mpe tubela ete aleisa babola to mpe lisusu akanga ngizi na mikolo mikoki na motuya ya nyama wana, na bongo mpo ayeba mpe ayoka ntina na lisumu naye. Allah asili kolimbisa oyo eleki, kasi oyo akozongela yango, Allah akopesa ye etumbu, Allah azali na nguya, azali na bokonzi nyoso ya kopesa etumbu.
96. Bozui ndingisa ya kosala moluka na ebale mpe bolia belei na yango, bisengo mpona bino mpe mpo na bato ya mobembo. Kasi bozali na ndingisa te mpona kosala bokila na mokili kino bokolongwa na kati ya kobulisama. Mpe bobanga Allah oyo epai naye nde bokosangisama.
97. Allah atiaki ka’aba ezala ndako esantu, ezala esika ya bosangani ya bato banso. Atiaki sanza esantu, mpe.mabonza, mpe bilembo wana ezali mpo boyeba ete Allah ayebi manso mazali o likolo mpe na nsé, mpe ya sôló Allah azali moyebi ya manso.
100. Loba: Mabe na malamu ezali ndenge moko te ata soki mabe ezali kokamwisa mpona ebele na yango, eh bino bato ya mayele! Bobanga Allah mpo ete bokoka kolonga.
101. Eh bino bandimi! Botuna mituna te ya biloko ebele oyo soki bapesi bino ndimbola na yango ekopesa bino kpokoso. Mpe soki botuni yango na tango oyo kurani ezali kokita, bokozua ndimbola. Allah alimbisi yango, Allah azali molimbisi atonda boboto.
103. Allah atiaki mobeko te mpona bahir, na saaiba,(1) mpe te na wasuiila, na haami(2) mpe te, sé bapagano nde bazali kobukela Allah lokuta, mpe ebele kati na bango bazanga mayele.
1 Bahir: Ezali nâqat: (chamelle) oyo eboti mbala ebele, sima bakati litoyi naye: Saaibat: Ezali nâqat (chamelle) oyo soki akomi na mbula moko boye, bakotika yango тропа bikeko na bango.
2 Wasuiila: Ezali nâqat (chamelle) oyo eboti mapasa ya basi kaka. Haami: Ezali (chameau) oyo ebimeli oyo ya mwasi na mbalakata mbala zomi.
104. Mpe soki bayebisi bango ete: Boya epai ya maye Allah akitisi, mpe epai ya motindami, bakoloba ete: ekoki biso maye tokutaki epai ya batata na biso, ata soki batata na bango bayebaki eloko te mpe bazalaki na nzela ya semba te!?
105. Eh! Bino bandimi! Bobatela milimo na bino. Soki bokambami na nzela ya semba, mabe moko te ekozua bino epai na moto oyo asila kobunga, epai na Allah nde bino banso bokozonga, na sima akopesa bino sango ya maye bozalaki kosala.
106. Eh bino bandimi! Soki liwa ekomeli moko kati na bino, bokozua banzeneneke mibale ya bosembo kati na bino bandimi mpona kotikela bango malako, to mpe bokozua banzeneneke misusu mibale kati ya bapagano, soki bozalaki na mobembo na mokili mpe liwa ekuti bino. Bokotelemisa bango na sima ya losombo, mpe balapa na kombo ya Allah soki bozali na koyimayima (batatola ete): Tokoteka malako naye te mpe tokobomba malako ya Allah te ata ezalaki ya moto ya libota na biso. Soki tosali bongo, ya sôló, tokozala basumuki.
107. Mpe soki eyebani ete ba nzeneneke mibale wana basali masumu, basusu mibale batelema na esika na bango, baye bazali na bokoki kati na bango, mpe bakolapa na Allah ete kolapa na biso ezali ya sôló koleka ya bango, mpe tokobebisa te, soki te tokozala kati na babubi.
108. Wana ezali makoki malamu ya kolakisa bango ete bamema malako na lolenge elongobani, to mpe babanga ete bandaye eboyama na sima ya bandaye na bango na yango! Bobanga Allah mpe boyoka, Allah akambaka bato ya mabe te.
109. (Kanisa) Mokolo oyo Allah akosangisa batindami banso mpe akoloba na bango ete: Eyano nini bato bapesaki bino? Batindami bakoloba ete: Biso tozali na boyebi wana te. Mpamba te ya sôló, yo nde moyebi ya mabombami.
110. Mpe tango Allah akoloba:Eh Issa mwana ya Maryam! Kanisa bolamu na ngai likolo nayo mpe likolo ya mama nayo, tango natondisaki yo na molimo mosantu; olobaki na bato mokolo obotamaki, mpe na tango okolaki, kanisa tango natangisaki yo buku mpe bwanya, mpe natangisa yo torah lolenge moko na Indjil. Kanisa tango ozalaki kozua mabele ya potopoto osali yango lokola ndeke mpe ofuli na kati na ndingisa na ngai mpe ekomi ndeke. Mpe lisusu na ndingisa na ngai ozalaki kobikisa bato ya maba mpe bato bakufa miso wuta mbotama na bango. Kanisa lisusu tango ozalaki kosekwisa bawa na ndingisa na ngai. Mpe kanisa tango nabatelaki yo na tango bana ya isalayele balingaki kosala yo mabe wana osilaki koyela bango bilembo bia polele, mpe bapengwi kati na bango balobaki ete: Oyo ezali sé bondoki ya polele.
114. Issa mwana ya Maryam alobaki ete: Eh! Allah Nkolo wa biso! Kitisela biso mesa kowuta na likolo, ezala eyenga mpona biso ya liboso mpe ya suka, mpe ezala elembo kowuta epai nayo. Leisa biso; mpamba te ozali moleisi ya malamu koleka.
115. Allah alobi ete: Ya sôló, nazali kokitisela bino yango. Kasi, oyo akopengwa na sima na kati na bino, nakopesa ye etumbu oyo naino napesa moto moko te na mokili.
116. Mpe (kanisa) tango Allah akoloba na Issa mwana ya Maryam ete: Yo nde olobaki na bato ete: Bozua ngai na mama na ngai ba nzambe mibale na esika ya Allah? (Issa) Akoloba ete: Nkembo mpe lokumu nayo! Esengeli na ngai te na loba maye nazali na yango ndingisa te!? Soki nalobaki yango, osilaki koyeba. Mpo oyebi maye mazali okati na ngai, kasi nayebi te maye mazali okati nayo. Mpo ya sôló, yo nde ozali na boyebi ya mabombami.
117. Nalobelaki bango sé oyo otindaki ngai na yango ete: Bobondela Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Mpe nazalaki nzeneneke likolo na bango tango nazalaki na bango elongo. Kasi wuta osilaki komatisa ngai epai nayo, yo nde otikali mokengeli likolo na bango. Mpo ete ozali nzeneneke likolo ya biloko binso.
119. Allah akoloba ete: Lelo ezali mokolo moye bato ya bosembo bakozua litomba ya bosembo na bango. Bakozala okati ya lola wapi epai mingala mizali kotiola, libela ókati na yango. Allah asepeli na bango, bango mpe basepeli na Allah. Wana nde elonga ya monene.
Contents of the translations can be downloaded and re-published, with the following terms and conditions:
1. No modification, addition, or deletion of the content.
2. Clearly referring to the publisher and the source (QuranEnc.com).
3. Mentioning the version number when re-publishing the translation.
4. Keeping the transcript information inside the document.
5. Notifying the source (QuranEnc.com) of any note on the translation.
6. Updating the translation according to the latest version issued from the source (QuranEnc.com).
7. Inappropriate advertisements must not be included when displaying translations of the meanings of the Noble Quran.
Suchergebnisse:
API specs
Endpoints:
Sura translation
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/sura/{translation_key}/{sura_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified sura (by its number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114)
Returns:
json object containing array of objects, each object contains the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/aya/{translation_key}/{sura_number}/{aya_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified aya (by its number sura_number and aya_number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114) aya_number: [1-...] (Aya number in the sura)
Returns:
json object containing the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".