Check out the new design

Übersetzung der Bedeutungen von dem heiligen Quran - Die Lingala-Übersetzung - Muhammad Balngogo * - Übersetzungen

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Übersetzung der Bedeutungen Surah / Kapitel: Qāf   Vers:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ وَنَعۡلَمُ مَا تُوَسۡوِسُ بِهِۦ نَفۡسُهُۥۖ وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنۡ حَبۡلِ ٱلۡوَرِيدِ
16. Мре ya soló, tokelaki moto, mpe toyebi eloko nini oyo etungisaka ye. Na yango biso tozali pembeni naye koleka mosisa naye ya kingo.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
إِذۡ يَتَلَقَّى ٱلۡمُتَلَقِّيَانِ عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ قَعِيدٞ
17. Tango bayambi mibale bakofanda ngambu ya (loboko) ya mobali mpe ya mwasi.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
مَّا يَلۡفِظُ مِن قَوۡلٍ إِلَّا لَدَيۡهِ رَقِيبٌ عَتِيدٞ
18. Akoloba liloba moko te kino ekozala pembeni naye oyo azali kotala mpe azali kokoma.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
وَجَآءَتۡ سَكۡرَةُ ٱلۡمَوۡتِ بِٱلۡحَقِّۖ ذَٰلِكَ مَا كُنتَ مِنۡهُ تَحِيدُ
19. Mpe molangwa ya liwa eyaki na bosembo, wana nde oyo ozalaki kokima.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِۚ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلۡوَعِيدِ
20. Mpe bakofula na kelelo. Wana nde mokolo ya elaka.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
وَجَآءَتۡ كُلُّ نَفۡسٖ مَّعَهَا سَآئِقٞ وَشَهِيدٞ
21. Mpe molimo nyoso mokoyaka na mokambi naye mpe na nzeneneke.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
لَّقَدۡ كُنتَ فِي غَفۡلَةٖ مِّنۡ هَٰذَا فَكَشَفۡنَا عَنكَ غِطَآءَكَ فَبَصَرُكَ ٱلۡيَوۡمَ حَدِيدٞ
22. Opesaki likebi na yango te, mpe tolongoli elamba oyo ezipaki yo, miso nayo lelo ekomona.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
وَقَالَ قَرِينُهُۥ هَٰذَا مَا لَدَيَّ عَتِيدٌ
23. Mpe Molingani naye akoloba: Tala oyo ezali epai na ngai, ezali pembeni.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
أَلۡقِيَا فِي جَهَنَّمَ كُلَّ كَفَّارٍ عَنِيدٖ
24. Bino mibale, bobwaka mopagano mpe motomboki okati na lifelo,
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
مَّنَّاعٖ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٖ مُّرِيبٍ
25. (Mpo azalaki) kopekisa bolamu, (тропа bawumbu ya Allah), azalaki motomboki тре moto ya tembe.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
ٱلَّذِي جَعَلَ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَأَلۡقِيَاهُ فِي ٱلۡعَذَابِ ٱلشَّدِيدِ
26. Ye nde atielaki Allah nzambe mosusu, bino mibale bobwaka ye okati ya etumbu ya makasi.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
۞ قَالَ قَرِينُهُۥ رَبَّنَا مَآ أَطۡغَيۡتُهُۥ وَلَٰكِن كَانَ فِي ضَلَٰلِۭ بَعِيدٖ
27. Moninga naye akolobaka: Nkolo ezali ngai te moto natiyaki ye azala motomboki, kasi azalaki na libunga ya mozindo.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
قَالَ لَا تَخۡتَصِمُواْ لَدَيَّ وَقَدۡ قَدَّمۡتُ إِلَيۡكُم بِٱلۡوَعِيدِ
28. (Allah) akolobaka: Bosuana liboso na ngai te, nasilaki kopesa bino elaka.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
مَا يُبَدَّلُ ٱلۡقَوۡلُ لَدَيَّ وَمَآ أَنَا۠ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ
29. (Epai nangai) liloba libongwanaka te, mpe nazali mobubi ya bawumbu te.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
يَوۡمَ نَقُولُ لِجَهَنَّمَ هَلِ ٱمۡتَلَأۡتِ وَتَقُولُ هَلۡ مِن مَّزِيدٖ
30. Mokolo moye tokolobaka na lifelo ete otondi, ekoyanolaka: Ya kobakisa ezali?
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
وَأُزۡلِفَتِ ٱلۡجَنَّةُ لِلۡمُتَّقِينَ غَيۡرَ بَعِيدٍ
31. Mpe bakopusaka lola pene ya babangi (Allah) ekozalaka mosika te.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
هَٰذَا مَا تُوعَدُونَ لِكُلِّ أَوَّابٍ حَفِيظٖ
32. Oyó nde balakaki bino, тропа (moto) oyo atubelaka mpe abatelaka mibeko.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
مَّنۡ خَشِيَ ٱلرَّحۡمَٰنَ بِٱلۡغَيۡبِ وَجَآءَ بِقَلۡبٖ مُّنِيبٍ
33. Oyo azalaki kobanga Ar- Rahmán, ata azali kornona ye te, mpe ayei na motema ya kotubela.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
ٱدۡخُلُوهَا بِسَلَٰمٖۖ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلۡخُلُودِ
34. Bokota na kimia okati na yango, wana nde mokolo ya seko.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
لَهُم مَّا يَشَآءُونَ فِيهَا وَلَدَيۡنَا مَزِيدٞ
35. Bakozuaka nyoso oyo bakolinga mpe pembeni na biso bazali na litomba mosusu.
Arabische Interpretationen von dem heiligen Quran:
 
Übersetzung der Bedeutungen Surah / Kapitel: Qāf
Suren/ Kapiteln Liste Nummer der Seite
 
Übersetzung der Bedeutungen von dem heiligen Quran - Die Lingala-Übersetzung - Muhammad Balngogo - Übersetzungen

Übersetzt von Zakariya Muhammad B ??

Schließen