Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore Maryam   Aaya:

Maryam

كٓهيعٓصٓ
Kâf, hâ, yâ, ain, sôd.[1]
[1] Bótala Al-Baqarah mokapo: 1.
Faccirooji aarabeeji:
ذِكۡرُ رَحۡمَتِ رَبِّكَ عَبۡدَهُۥ زَكَرِيَّآ
Ezali bokundoli bwa ngolu ya Nkolo wayo epai ya mowumbu wa ye Zakariya.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥ نِدَآءً خَفِيّٗا
Tango azali kobelela Nkolo wa ye na kobatama.
Faccirooji aarabeeji:
قَالَ رَبِّ إِنِّي وَهَنَ ٱلۡعَظۡمُ مِنِّي وَٱشۡتَعَلَ ٱلرَّأۡسُ شَيۡبٗا وَلَمۡ أَكُنۢ بِدُعَآئِكَ رَبِّ شَقِيّٗا
Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Mikuwa mia ngai milembi, mpe suki ya pembe ezingi moto mwa ngai, na yango, ata ngonga moko te nazangaka kozua soki na beleli yo.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِنِّي خِفۡتُ ٱلۡمَوَٰلِيَ مِن وَرَآءِي وَكَانَتِ ٱمۡرَأَتِي عَاقِرٗا فَهَبۡ لِي مِن لَّدُنكَ وَلِيّٗا
Мре nazali kobanga (ezaleli) ya bakitani na ngai sima na ngai, mpe mwasi wa ngai abotaka te, pesa ngai mokitani awuta epai nayo,
Faccirooji aarabeeji:
يَرِثُنِي وَيَرِثُ مِنۡ ءَالِ يَعۡقُوبَۖ وَٱجۡعَلۡهُ رَبِّ رَضِيّٗا
Oyó akokitana ngai mpe kokitana libota lia Ya’qúb, mpe tika été osepela naye oh Nkolo!
Faccirooji aarabeeji:
يَٰزَكَرِيَّآ إِنَّا نُبَشِّرُكَ بِغُلَٰمٍ ٱسۡمُهُۥ يَحۡيَىٰ لَمۡ نَجۡعَل لَّهُۥ مِن قَبۡلُ سَمِيّٗا
Eh Zakariya! Tozali kopesa yo sango elamu ya mwana mobali, nkombo naye ekozala Yahya totiya liboso naye nkombo ena te. (ndoi te)
Faccirooji aarabeeji:
قَالَ رَبِّ أَنَّىٰ يَكُونُ لِي غُلَٰمٞ وَكَانَتِ ٱمۡرَأَتِي عَاقِرٗا وَقَدۡ بَلَغۡتُ مِنَ ٱلۡكِبَرِ عِتِيّٗا
Мре (Zakariya) alobi: Oh Nkolo wa ngai! Ndenge nini nakozala na mwana ya mobali mpe mwasi wa ngai abotaka te, mpe bopaka bosili kozua ngai?
Faccirooji aarabeeji:
قَالَ كَذَٰلِكَ قَالَ رَبُّكَ هُوَ عَلَيَّ هَيِّنٞ وَقَدۡ خَلَقۡتُكَ مِن قَبۡلُ وَلَمۡ تَكُ شَيۡـٔٗا
Ayanoli ye; ndenge Nkolo wayo alobi nde ekozala. Wana ezali pași te тропа ngai, mpe nakelaki yo liboso ozalaki eloko te.
Faccirooji aarabeeji:
قَالَ رَبِّ ٱجۡعَل لِّيٓ ءَايَةٗۖ قَالَ ءَايَتُكَ أَلَّا تُكَلِّمَ ٱلنَّاسَ ثَلَٰثَ لَيَالٖ سَوِيّٗا
Alobi: (Zakariya) Oh Nkolo wa ngai! Lakisa ngai elembo, (tiyela ngai elembo) (Allah) alobi: Elembo nayo, kolobisa bato te babutu[1] misato milandani.
[1] Babutu mpe mikolo.
Faccirooji aarabeeji:
فَخَرَجَ عَلَىٰ قَوۡمِهِۦ مِنَ ٱلۡمِحۡرَابِ فَأَوۡحَىٰٓ إِلَيۡهِمۡ أَن سَبِّحُواْ بُكۡرَةٗ وَعَشِيّٗا
Mpe abimeli bato naye kowuta na esika ya losambo, mpe ayebisi bango na maboko ete: Bosambela tongo mpe pokwa.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore Maryam
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude