Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore nagge   Aaya:
۞ وَإِن كُنتُمۡ عَلَىٰ سَفَرٖ وَلَمۡ تَجِدُواْ كَاتِبٗا فَرِهَٰنٞ مَّقۡبُوضَةٞۖ فَإِنۡ أَمِنَ بَعۡضُكُم بَعۡضٗا فَلۡيُؤَدِّ ٱلَّذِي ٱؤۡتُمِنَ أَمَٰنَتَهُۥ وَلۡيَتَّقِ ٱللَّهَ رَبَّهُۥۗ وَلَا تَكۡتُمُواْ ٱلشَّهَٰدَةَۚ وَمَن يَكۡتُمۡهَا فَإِنَّهُۥٓ ءَاثِمٞ قَلۡبُهُۥۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ عَلِيمٞ
283. Mpe soki bozali na mobembo, mpe bozui moto te mpona kokoma nyongo, mozui nyongo akosimbisa nkolo mbongo mwa eloko (eye ekofandisa ye na kimia). Soki mpe boyokani bino na bino na lolenge ya malamu, moto azali na nyongo esengeli naye kofuta mobimba na ndenge azuaki (adefaki). Mpe abanga Allah Nkolo naye, mpe bobomba litatoli te moto oyo akobomba yango ya sôló motema naye ezali na bokono ya lisumu. Mpe Allah ayebi maye manso bozali kosala.
Faccirooji aarabeeji:
لِّلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَإِن تُبۡدُواْ مَا فِيٓ أَنفُسِكُمۡ أَوۡ تُخۡفُوهُ يُحَاسِبۡكُم بِهِ ٱللَّهُۖ فَيَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُ وَيُعَذِّبُ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
284. Nyoso ezali o likolo mpe o nsé ezali ya Allah. Nyoso oyo bozali kobimisa polele ya mitema mia bino to bozali kobomba yango, Allah akotunaka bino. Mpe akolimbisa na oyo alingi, mpe akopesa etumbu na oyo alingi. Mpe Allah azali na bokoki na biloko binso.
Faccirooji aarabeeji:
ءَامَنَ ٱلرَّسُولُ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡهِ مِن رَّبِّهِۦ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَۚ كُلٌّ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَمَلَٰٓئِكَتِهِۦ وَكُتُبِهِۦ وَرُسُلِهِۦ لَا نُفَرِّقُ بَيۡنَ أَحَدٖ مِّن رُّسُلِهِۦۚ وَقَالُواْ سَمِعۡنَا وَأَطَعۡنَاۖ غُفۡرَانَكَ رَبَّنَا وَإِلَيۡكَ ٱلۡمَصِيرُ
285. Motindami andimi na maye makiteli ye kowuta epai na Nkolo naye, na bandimi mpe lokola; bango banso bandimi na Allah, na ba anzelu naye, na babuku bia ye, na batindami naye, to kotia bokeseni te okati ya moko kati ya bantindami naye. Mpe balobi ete: Toyoki mpe totosi. Eh Nkolo wa biso! Tosengi nayo olimbisa biso. Mpe epai nayo nde tokozonga.
Faccirooji aarabeeji:
لَا يُكَلِّفُ ٱللَّهُ نَفۡسًا إِلَّا وُسۡعَهَاۚ لَهَا مَا كَسَبَتۡ وَعَلَيۡهَا مَا ٱكۡتَسَبَتۡۗ رَبَّنَا لَا تُؤَاخِذۡنَآ إِن نَّسِينَآ أَوۡ أَخۡطَأۡنَاۚ رَبَّنَا وَلَا تَحۡمِلۡ عَلَيۡنَآ إِصۡرٗا كَمَا حَمَلۡتَهُۥ عَلَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِنَاۚ رَبَّنَا وَلَا تُحَمِّلۡنَا مَا لَا طَاقَةَ لَنَا بِهِۦۖ وَٱعۡفُ عَنَّا وَٱغۡفِرۡ لَنَا وَٱرۡحَمۡنَآۚ أَنتَ مَوۡلَىٰنَا فَٱنصُرۡنَا عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
286. Allah apesaka moto mokumba sé oyo ekoki naye. Akofutamaka na maye asalaki, mpe akofutama na mabe maye asalaki. Eh Nkolo! kopesa biso etumbu te soki tobosani to mpe lisumu tosali yango na libaku. Eh Nkolo! Komemisa biso mokumba te ndenge o memisaki baye baleka liboso na biso. Eh Nkolo! Komemisa mpe biso te mokumba moye moleki biso kilo. Longola mabe mabiso limbisa biso, mpe yokela biso mawa. Ozali mobateli na biso, pesa biso elonga likolo na bapagano.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore nagge
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude