Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore koreeji imraan   Aaya:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
109. Mpe manso mazali olikolo mpe na nsé mazali ya Allah. Mpe Epai na Allah Makambo manso makozongisama.
Faccirooji aarabeeji:
كُنتُمۡ خَيۡرَ أُمَّةٍ أُخۡرِجَتۡ لِلنَّاسِ تَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَتَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَتُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِۗ وَلَوۡ ءَامَنَ أَهۡلُ ٱلۡكِتَٰبِ لَكَانَ خَيۡرٗا لَّهُمۚ مِّنۡهُمُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَأَكۡثَرُهُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
110. Bino bozali umma(2) ya malamu oyo ebimisamaki okati ya bato: Mpamba te botindaka bato basala malamu, mpe bopekisaka bato kosala mabe mpe bondimi na Allah. Kasi soki Baye Bazwa Buku bandimaka, nde ezalaki malamu mpona bango. Moke kati na bango bazali bandimi, kasi ebele nde bazali bato mabe.
2 Umma: Awa elakisi lisanga ya bato. Bótala mpe suratu Al-Baqarah 128.
Faccirooji aarabeeji:
لَن يَضُرُّوكُمۡ إِلَّآ أَذٗىۖ وَإِن يُقَٰتِلُوكُمۡ يُوَلُّوكُمُ ٱلۡأَدۡبَارَ ثُمَّ لَا يُنصَرُونَ
111. Bakokoka te komonisa bino mpasi ya minene, sé ya mikemike. Mpe soki babundisi bino, suka suka bakopesa mokongo mpe bakokima, mpe bakosalisama te.
Faccirooji aarabeeji:
ضُرِبَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلذِّلَّةُ أَيۡنَ مَا ثُقِفُوٓاْ إِلَّا بِحَبۡلٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَحَبۡلٖ مِّنَ ٱلنَّاسِ وَبَآءُو بِغَضَبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَضُرِبَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلۡمَسۡكَنَةُۚ ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَانُواْ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلۡأَنۢبِيَآءَ بِغَيۡرِ حَقّٖۚ ذَٰلِكَ بِمَا عَصَواْ وَّكَانُواْ يَعۡتَدُونَ
112. Bisika binso bazuamaki, babetamaki mpe bakitisamaki, sé soki ezali boyokani kowuta epai na Allah mpe boyokani kowuta epai na Bato. Nkanda ya Allah ezali likolo na bango, mpe bampasi na bampasi, mpo ete baboyaki kondima na mikapo mia Allah mpe bazali koboma ba ntoma mpamba. Mpo ete bazangaki botosi mpe bazalaki kolutisa ndelo.
Faccirooji aarabeeji:
۞ لَيۡسُواْ سَوَآءٗۗ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ أُمَّةٞ قَآئِمَةٞ يَتۡلُونَ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ ءَانَآءَ ٱلَّيۡلِ وَهُمۡ يَسۡجُدُونَ
113. Bazali nyoso ndenge moko te. Na kati na baye bazwa buku, ezali na umma(1) moko etelemaka na butu mpona kotanga buku ya Allah, mpe bazali kofukamela ye.
1 Umma: Awa ezali lisanga, bótala suratu Al-Baqarah mokapo 128.
Faccirooji aarabeeji:
يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَيَأۡمُرُونَ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَيُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡخَيۡرَٰتِۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
114. Bandimaka na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe batindaka kosala malamu mpe bapekisaka kosala mabe, mpe bazalaka na lombango mpona kosala misala ya malamu. Bango wana nde bazali elongo moko na bato ya malamu.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَا يَفۡعَلُواْ مِنۡ خَيۡرٖ فَلَن يُكۡفَرُوهُۗ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلۡمُتَّقِينَ
115. Mpe maye manso ya malamu bakosala makoboyama te, mpe Allah ayebi babangi.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore koreeji imraan
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude