Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore al-araaf   Aaya:
۞ قَالَ ٱلۡمَلَأُ ٱلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ لَنُخۡرِجَنَّكَ يَٰشُعَيۡبُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَكَ مِن قَرۡيَتِنَآ أَوۡ لَتَعُودُنَّ فِي مِلَّتِنَاۚ قَالَ أَوَلَوۡ كُنَّا كَٰرِهِينَ
88. Mpe bankumu baye basalaki lolendo o kati ya bato naye balobi: Tokobimisa yo na baye bandimi elongo nayo yâ Shuaîb na mboka na biso to bozonga na lingomba lia biso, alobi: (bomanyola) ata soki toyini yango?
Faccirooji aarabeeji:
قَدِ ٱفۡتَرَيۡنَا عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا إِنۡ عُدۡنَا فِي مِلَّتِكُم بَعۡدَ إِذۡ نَجَّىٰنَا ٱللَّهُ مِنۡهَاۚ وَمَا يَكُونُ لَنَآ أَن نَّعُودَ فِيهَآ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُ رَبُّنَاۚ وَسِعَ رَبُّنَا كُلَّ شَيۡءٍ عِلۡمًاۚ عَلَى ٱللَّهِ تَوَكَّلۡنَاۚ رَبَّنَا ٱفۡتَحۡ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَ قَوۡمِنَا بِٱلۡحَقِّ وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلۡفَٰتِحِينَ
89. Soki solo tosali bongo, tosili kobukela Allah lokuta osima ya kobikisa biso na yango. Esengeli na biso te kozongela yango, sé na bolingi bwa Allah Nkolo wa biso, Nkolo wa biso azali na boyebi na biloko binso, tomipesi na Allah. Oh Nkolo wa biso! Kata okati na biso na bosôló, mpo yo nde ozali mokati malamu wa bazuzi.
Faccirooji aarabeeji:
وَقَالَ ٱلۡمَلَأُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ لَئِنِ ٱتَّبَعۡتُمۡ شُعَيۡبًا إِنَّكُمۡ إِذٗا لَّخَٰسِرُونَ
90. Mpe bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobi: Soki bolandi Shuaîb, solo bokozanga.
Faccirooji aarabeeji:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلرَّجۡفَةُ فَأَصۡبَحُواْ فِي دَارِهِمۡ جَٰثِمِينَ
91. Mpe koningana ya mabele ezuaki bango (bwa etumbu), mpe bakomaki bibembe o bandako bia bango.
Faccirooji aarabeeji:
ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ شُعَيۡبٗا كَأَن لَّمۡ يَغۡنَوۡاْ فِيهَاۚ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ شُعَيۡبٗا كَانُواْ هُمُ ٱلۡخَٰسِرِينَ
92. Baye bazuaki Shuaîb na lokuta balimuaki lokola bazalaki na mokili te, baye bazuaki Shuaîb na lokuta bazalaki bazangi.
Faccirooji aarabeeji:
فَتَوَلَّىٰ عَنۡهُمۡ وَقَالَ يَٰقَوۡمِ لَقَدۡ أَبۡلَغۡتُكُمۡ رِسَٰلَٰتِ رَبِّي وَنَصَحۡتُ لَكُمۡۖ فَكَيۡفَ ءَاسَىٰ عَلَىٰ قَوۡمٖ كَٰفِرِينَ
93. Mpe apesaki bango mokongo mpe alobi: Oh bato ba ngai! Ya soló, nakomiselaki bino maloba mwa Nkolo wa ngai. Mpe napesaki bino toli, ndenge nini nakoyokela bapengwi mawa?
Faccirooji aarabeeji:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا فِي قَرۡيَةٖ مِّن نَّبِيٍّ إِلَّآ أَخَذۡنَآ أَهۡلَهَا بِٱلۡبَأۡسَآءِ وَٱلضَّرَّآءِ لَعَلَّهُمۡ يَضَّرَّعُونَ
94. Mpe totindaki ntoma o kati ya mboka moko te sé tozuaki bato na yango, na ba mpasi ya nzala mpe na bokono mpo ete basenga bolimbisi.
Faccirooji aarabeeji:
ثُمَّ بَدَّلۡنَا مَكَانَ ٱلسَّيِّئَةِ ٱلۡحَسَنَةَ حَتَّىٰ عَفَواْ وَّقَالُواْ قَدۡ مَسَّ ءَابَآءَنَا ٱلضَّرَّآءُ وَٱلسَّرَّآءُ فَأَخَذۡنَٰهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
95. Mpe sima tobongolaki makambo ya mabe na bango na oyo ya malamu, kino bomengo na bango ekomaki ebele mpe balobi: Ya soló, pasi na mikakatano mizuaki bankoko ba biso, mpe tosimbaki bango mbalakaka kasi bazalaki koyeba te.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore al-araaf
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude