Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Al'sajadah   Aya:
وَلَنُذِيقَنَّهُم مِّنَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَدۡنَىٰ دُونَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَكۡبَرِ لَعَلَّهُمۡ يَرۡجِعُونَ
21. Mpe ya soló, tokomekisa bango etumbu ya moke awa na mokili, yambo ya etumbu ya monene mpo tango mosusu bakozonga. (o nzela ya semba)
Tafsiran larabci:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّن ذُكِّرَ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِۦ ثُمَّ أَعۡرَضَ عَنۡهَآۚ إِنَّا مِنَ ٱلۡمُجۡرِمِينَ مُنتَقِمُونَ
22. Mpe nani azali mabe penza koleka moto oyo soki mikapo mia Nkolo wa ye mizali kotangema sima apesi yango mokongo? Ya solo, tokozua batomboki (lolenge bazalaki kosala).
Tafsiran larabci:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ فَلَا تَكُن فِي مِرۡيَةٖ مِّن لِّقَآئِهِۦۖ وَجَعَلۡنَٰهُ هُدٗى لِّبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
23. Mpe topesaki Mûssa buku, mpe kozala na tembe te тропа bokutani na ye,(1) mpe totiyaki ye azala mokambi ya bana ya isalayele.
1 Ye: Yo Muhammad kozala na tembe te тропа bokutani nayo na Mûssa o eleko ya mobembo nayo ya butu.
Tafsiran larabci:
وَجَعَلۡنَا مِنۡهُمۡ أَئِمَّةٗ يَهۡدُونَ بِأَمۡرِنَا لَمَّا صَبَرُواْۖ وَكَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يُوقِنُونَ
24. Mpe totiyaki bakambi kati na bango, ete bakamba na mitindo mia biso, mpo ete bakangaki mitema mpe bandimaki na mikapo mia biso.
Tafsiran larabci:
إِنَّ رَبَّكَ هُوَ يَفۡصِلُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
25. Ya soló, Nkolo wayo nde akokataka o kati kati na bango o mokolo mwa suka na maye bazalaki na bokabwani.
Tafsiran larabci:
أَوَلَمۡ يَهۡدِ لَهُمۡ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ يَمۡشُونَ فِي مَسَٰكِنِهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٍۚ أَفَلَا يَسۡمَعُونَ
26. Boye bamoni te ete tobomaki ebele ya bato baleka liboso bazali kotambola na bandako na bango? Ya soló wana ezali bilembo. Boye тропа nini bayokaka te?
Tafsiran larabci:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا نَسُوقُ ٱلۡمَآءَ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡجُرُزِ فَنُخۡرِجُ بِهِۦ زَرۡعٗا تَأۡكُلُ مِنۡهُ أَنۡعَٰمُهُمۡ وَأَنفُسُهُمۡۚ أَفَلَا يُبۡصِرُونَ
27. Boye bazali koyeba te, tozali kotindika mayi na mabele oyo ekauka, mpe tobimisi na yango milona miye bazali kolia yango bango moko na bibwele na bango? Boye bazali kornona te?
Tafsiran larabci:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡفَتۡحُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
28. Mpe bazali koloba: Elonga ekozala tango nini soki bozali na bosölo?
Tafsiran larabci:
قُلۡ يَوۡمَ ٱلۡفَتۡحِ لَا يَنفَعُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِيمَٰنُهُمۡ وَلَا هُمۡ يُنظَرُونَ
29. Loba: Mokolo mwa elonga mokosalisaka bapengwi te na bondimi bwa bango, mpe bakotikelaka bango tango te.
Tafsiran larabci:
فَأَعۡرِضۡ عَنۡهُمۡ وَٱنتَظِرۡ إِنَّهُم مُّنتَظِرُونَ
30. Zala na bango mosika, mpe zela, ya sólo bango mpe bazali kozela.
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Al'sajadah
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa