Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Al'waki'ah   Aya:
يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ
17. Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela,
Tafsiran larabci:
بِأَكۡوَابٖ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٖ مِّن مَّعِينٖ
18. Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli).
Tafsiran larabci:
لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ
19. (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te.
Tafsiran larabci:
وَفَٰكِهَةٖ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ
20. Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka,
Tafsiran larabci:
وَلَحۡمِ طَيۡرٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ
21. Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi.
Tafsiran larabci:
وَحُورٌ عِينٞ
22. Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala,
Tafsiran larabci:
كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ
23. Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga,
Tafsiran larabci:
جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
24. Lifuta тропа maye basalaki.
Tafsiran larabci:
لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا تَأۡثِيمًا
25. Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te.
Tafsiran larabci:
إِلَّا قِيلٗا سَلَٰمٗا سَلَٰمٗا
26. Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia.
Tafsiran larabci:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ
27. Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali!
Tafsiran larabci:
فِي سِدۡرٖ مَّخۡضُودٖ
28. Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr,
Tafsiran larabci:
وَطَلۡحٖ مَّنضُودٖ
29. Na banzete ya makemba na bitabe,
Tafsiran larabci:
وَظِلّٖ مَّمۡدُودٖ
30. Na nsé ya malili ya monene,
Tafsiran larabci:
وَمَآءٖ مَّسۡكُوبٖ
31. (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela,
Tafsiran larabci:
وَفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ
32. Mpe bambuma ebele,
Tafsiran larabci:
لَّا مَقۡطُوعَةٖ وَلَا مَمۡنُوعَةٖ
33. Babuki yango te mpe epekisami te.
Tafsiran larabci:
وَفُرُشٖ مَّرۡفُوعَةٍ
34. O likolo lia bambeto ya likolo.
Tafsiran larabci:
إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءٗ
35. Biso nde tokelaki bango na bokeli,
Tafsiran larabci:
فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا
36. Mpe tosalaki bango bayebi mibali te,
Tafsiran larabci:
عُرُبًا أَتۡرَابٗا
37. Bazali bambula ndenge moko.
Tafsiran larabci:
لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
38. Mpona bato ya loboko ya mobali.
Tafsiran larabci:
ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
39. Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso,
Tafsiran larabci:
وَثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
40. Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka.
Tafsiran larabci:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ
41. Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana!
Tafsiran larabci:
فِي سَمُومٖ وَحَمِيمٖ
42. Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka,
Tafsiran larabci:
وَظِلّٖ مِّن يَحۡمُومٖ
43. Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo,
Tafsiran larabci:
لَّا بَارِدٖ وَلَا كَرِيمٍ
44. (kati na yango) malili te mpe kitoko te.
Tafsiran larabci:
إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ
45. Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko.
Tafsiran larabci:
وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ
46. Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi.
Tafsiran larabci:
وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
47. (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu?
Tafsiran larabci:
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
48. Na bankoko ya biso ya yambo?
Tafsiran larabci:
قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ
49. Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka,
Tafsiran larabci:
لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
50. Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani.
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Al'waki'ah
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa