Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Al'insan   Aya:
عَيۡنٗا يَشۡرَبُ بِهَا عِبَادُ ٱللَّهِ يُفَجِّرُونَهَا تَفۡجِيرٗا
6. Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu.
Tafsiran larabci:
يُوفُونَ بِٱلنَّذۡرِ وَيَخَافُونَ يَوۡمٗا كَانَ شَرُّهُۥ مُسۡتَطِيرٗا
7. Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso.
Tafsiran larabci:
وَيُطۡعِمُونَ ٱلطَّعَامَ عَلَىٰ حُبِّهِۦ مِسۡكِينٗا وَيَتِيمٗا وَأَسِيرًا
8. Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango).
Tafsiran larabci:
إِنَّمَا نُطۡعِمُكُمۡ لِوَجۡهِ ٱللَّهِ لَا نُرِيدُ مِنكُمۡ جَزَآءٗ وَلَا شُكُورًا
9. Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te.
Tafsiran larabci:
إِنَّا نَخَافُ مِن رَّبِّنَا يَوۡمًا عَبُوسٗا قَمۡطَرِيرٗا
10. Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka.
Tafsiran larabci:
فَوَقَىٰهُمُ ٱللَّهُ شَرَّ ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمِ وَلَقَّىٰهُمۡ نَضۡرَةٗ وَسُرُورٗا
11. Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo.
Tafsiran larabci:
وَجَزَىٰهُم بِمَا صَبَرُواْ جَنَّةٗ وَحَرِيرٗا
12. Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala.
Tafsiran larabci:
مُّتَّكِـِٔينَ فِيهَا عَلَى ٱلۡأَرَآئِكِۖ لَا يَرَوۡنَ فِيهَا شَمۡسٗا وَلَا زَمۡهَرِيرٗا
13. Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te.
Tafsiran larabci:
وَدَانِيَةً عَلَيۡهِمۡ ظِلَٰلُهَا وَذُلِّلَتۡ قُطُوفُهَا تَذۡلِيلٗا
14. Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka.
Tafsiran larabci:
وَيُطَافُ عَلَيۡهِم بِـَٔانِيَةٖ مِّن فِضَّةٖ وَأَكۡوَابٖ كَانَتۡ قَوَارِيرَا۠
15. Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela,
Tafsiran larabci:
قَوَارِيرَاْ مِن فِضَّةٖ قَدَّرُوهَا تَقۡدِيرٗا
16. Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа.
Tafsiran larabci:
وَيُسۡقَوۡنَ فِيهَا كَأۡسٗا كَانَ مِزَاجُهَا زَنجَبِيلًا
17. Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi,
Tafsiran larabci:
عَيۡنٗا فِيهَا تُسَمَّىٰ سَلۡسَبِيلٗا
18. Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati.
Tafsiran larabci:
۞ وَيَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ إِذَا رَأَيۡتَهُمۡ حَسِبۡتَهُمۡ لُؤۡلُؤٗا مَّنثُورٗا
19. Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani.
Tafsiran larabci:
وَإِذَا رَأَيۡتَ ثَمَّ رَأَيۡتَ نَعِيمٗا وَمُلۡكٗا كَبِيرًا
20. Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene.
Tafsiran larabci:
عَٰلِيَهُمۡ ثِيَابُ سُندُسٍ خُضۡرٞ وَإِسۡتَبۡرَقٞۖ وَحُلُّوٓاْ أَسَاوِرَ مِن فِضَّةٖ وَسَقَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ شَرَابٗا طَهُورًا
21. Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto.
Tafsiran larabci:
إِنَّ هَٰذَا كَانَ لَكُمۡ جَزَآءٗ وَكَانَ سَعۡيُكُم مَّشۡكُورًا
22. Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama.
Tafsiran larabci:
إِنَّا نَحۡنُ نَزَّلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡقُرۡءَانَ تَنزِيلٗا
23. Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu.
Tafsiran larabci:
فَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ وَلَا تُطِعۡ مِنۡهُمۡ ءَاثِمًا أَوۡ كَفُورٗا
24. Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango.
Tafsiran larabci:
وَٱذۡكُرِ ٱسۡمَ رَبِّكَ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلٗا
25. Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa.
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Al'insan
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa