Check out the new design

Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu * - Mealler fihristi

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Anlam tercümesi Sure: Sûretu't-Tahrîm   Ayet:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ تُوبُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ تَوۡبَةٗ نَّصُوحًا عَسَىٰ رَبُّكُمۡ أَن يُكَفِّرَ عَنكُمۡ سَيِّـَٔاتِكُمۡ وَيُدۡخِلَكُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ يَوۡمَ لَا يُخۡزِي ٱللَّهُ ٱلنَّبِيَّ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥۖ نُورُهُمۡ يَسۡعَىٰ بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَبِأَيۡمَٰنِهِمۡ يَقُولُونَ رَبَّنَآ أَتۡمِمۡ لَنَا نُورَنَا وَٱغۡفِرۡ لَنَآۖ إِنَّكَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
Oh bino bandimi! Botubela tubela ya bosóló epai ya Allah, Allah akoki kolimbisa masumu na bino, mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mokolo oyo Allah akotiya mabe mosika na ntoma na baye bandimaki elongo naye, bongengi na bango ekotambola liboso na bango mpe na ngambo ya mobali mpe bakolobaka: Nkolo kokisela biso bongengi mpe limbisa biso, ya soló ozali na bokoki ya biloko nyoso.
Arapça tefsirler:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ جَٰهِدِ ٱلۡكُفَّارَ وَٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱغۡلُظۡ عَلَيۡهِمۡۚ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
Eh ntoma! Bundisa bapengwi na bato ya bilongi mibale mpe kozala mpete epai na bango te, mpe esika na bango ekozalaka nde lifelo, mpe esika nini ya bozongi ya mabe wana!
Arapça tefsirler:
ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱمۡرَأَتَ نُوحٖ وَٱمۡرَأَتَ لُوطٖۖ كَانَتَا تَحۡتَ عَبۡدَيۡنِ مِنۡ عِبَادِنَا صَٰلِحَيۡنِ فَخَانَتَاهُمَا فَلَمۡ يُغۡنِيَا عَنۡهُمَا مِنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗا وَقِيلَ ٱدۡخُلَا ٱلنَّارَ مَعَ ٱلدَّٰخِلِينَ
Allah abeti ndakisa ya bapengwi (mibale) mwasi ya Núh na mwasi ya Loth bazalaki na nsé ya maboko ya bawumbu na biso mibale, kasi nyoso mibale baboyaki kondima mpe basalaki bango mabe, kasi mabe na bango elongisaki bango te epai na Allah, mpe bayebisaki na bango mibale ete: Bokota na moto na baye bakokota.
Arapça tefsirler:
وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱمۡرَأَتَ فِرۡعَوۡنَ إِذۡ قَالَتۡ رَبِّ ٱبۡنِ لِي عِندَكَ بَيۡتٗا فِي ٱلۡجَنَّةِ وَنَجِّنِي مِن فِرۡعَوۡنَ وَعَمَلِهِۦ وَنَجِّنِي مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe Allah abeti ndakisa тропа baye bandimi, mwasi ya falo tango alobaki: Nkolo, tongela ngai ndako na lola ezala pene nayo, mpe longisa ngai na mabe ya falo na misala mia ye, mpe longisa ngai na bato mabe.
Arapça tefsirler:
وَمَرۡيَمَ ٱبۡنَتَ عِمۡرَٰنَ ٱلَّتِيٓ أَحۡصَنَتۡ فَرۡجَهَا فَنَفَخۡنَا فِيهِ مِن رُّوحِنَا وَصَدَّقَتۡ بِكَلِمَٰتِ رَبِّهَا وَكُتُبِهِۦ وَكَانَتۡ مِنَ ٱلۡقَٰنِتِينَ
(Lolenge moko) na Maryam mwana ya imrân ya mwasi oyo abatelaki nzoto naye, mpe tofulaki mopepe ya molimo kati (naye), mpe andimaki liloba lia Nkolo naye mpe babuku naye, mpe azalaki okati ya batosi Allah.
Arapça tefsirler:
 
Anlam tercümesi Sure: Sûretu't-Tahrîm
Surelerin fihristi Sayfa numarası
 
Kur'an-ı Kerim meal tercümesi - Lingala Tercüme - Muhammed Bangugu - Mealler fihristi

Zekeriyya Muhammad Bangugu tarafından tercüme edilmiştir.

Kapat