Check out the new design

قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو * - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: جۇمۇئە   ئايەت:

Al-Jumu’a

يُسَبِّحُ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ ٱلۡمَلِكِ ٱلۡقُدُّوسِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ
Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mokonzi, mosantu, wa nguya atonda bwanya.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
هُوَ ٱلَّذِي بَعَثَ فِي ٱلۡأُمِّيِّـۧنَ رَسُولٗا مِّنۡهُمۡ يَتۡلُواْ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِهِۦ وَيُزَكِّيهِمۡ وَيُعَلِّمُهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحِكۡمَةَ وَإِن كَانُواْ مِن قَبۡلُ لَفِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
Ye nde atindaki o libota ya baye batanga te motindami kowuta na libota na bango moko, mpo atangela bango mikapo mia ye, mpe mpo apetola bango, mpe atangisa bango buku mpe bwanya, ata bazalaki liboso kati na libunga ya polele.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَءَاخَرِينَ مِنۡهُمۡ لَمَّا يَلۡحَقُواْ بِهِمۡۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Mpe basusu kati na bango baye bakutanaki na bango te, bakoya sima naye, (Allah) azali wa nguya atonda ngolu.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
ذَٰلِكَ فَضۡلُ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
Wana ezali bolamu oyo Allah apesaka na oyo alingi. Mpe AllAh azali Nkolo bolamu bonene[1].
[1] Himar: bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 259.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
مَثَلُ ٱلَّذِينَ حُمِّلُواْ ٱلتَّوۡرَىٰةَ ثُمَّ لَمۡ يَحۡمِلُوهَا كَمَثَلِ ٱلۡحِمَارِ يَحۡمِلُ أَسۡفَارَۢاۚ بِئۡسَ مَثَلُ ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Ndakisa ya baye bapesamaki torah mpe basaleli yango te, bazali lokola Himar[1] oyo amemi babuku, ndakisa mabe ya lolenge nini wana ya baye baboya kondima na mikapo mia Allah. Mpe Allah akambaka babubi te.
[1] Himar: bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 259.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ هَادُوٓاْ إِن زَعَمۡتُمۡ أَنَّكُمۡ أَوۡلِيَآءُ لِلَّهِ مِن دُونِ ٱلنَّاسِ فَتَمَنَّوُاْ ٱلۡمَوۡتَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Loba: Oh bino baye bozali kosalela kiyuda! Soki bozali kokanisa été bolingami na AllaH koleka bato basusu, bomisenga liwa soki ya soló bozali na bosembo.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
وَلَا يَتَمَنَّوۡنَهُۥٓ أَبَدَۢا بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيهِمۡۚ وَٱللَّهُ عَلِيمُۢ بِٱلظَّٰلِمِينَ
Kasi bakokoka komisenga yango soki шоке te, тропа maye ya mabe basalaka. Kasi (Allah) ayebi malamu babubi. (bato mabe)
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
قُلۡ إِنَّ ٱلۡمَوۡتَ ٱلَّذِي تَفِرُّونَ مِنۡهُ فَإِنَّهُۥ مُلَٰقِيكُمۡۖ ثُمَّ تُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Loba: Ya sólo, liwa oyo bozali kokima bokokutana na yango, sima bokozongisama epai ya oyo ayebi maye mabombami na maye mazali polele. Akoyebisa bino sango ya maye bozalaki kosala.
ئەرەپچە تەپسىرلەر:
 
مەنالار تەرجىمىسى سۈرە: جۇمۇئە
سۈرە مۇندەرىجىسى بەت نومۇرى
 
قۇرئان كەرىم مەنىلىرىنىڭ تەرجىمىسى - لىينگالاچە تەرجىمىسى - مۇھەممەد بالىنغوغو - تەرجىمىلەر مۇندەرىجىسى

زەكەرىيا مۇھەممەد بالىنغوغو تەرجىمىسى.

تاقاش