Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ዩሱፍ   አንቀጽ:
فَلَمَّآ أَن جَآءَ ٱلۡبَشِيرُ أَلۡقَىٰهُ عَلَىٰ وَجۡهِهِۦ فَٱرۡتَدَّ بَصِيرٗاۖ قَالَ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ إِنِّيٓ أَعۡلَمُ مِنَ ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
96. Мре tango momemi sango malamu akomaki, abwakaki simisi na elongi naye mpe miso naye efungwamaki. Mpe alobaki na bana été: Boye nayebisaki bino te ete ya soló, Allah apeși ngai boyebi boye bozali na yango te?
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالُواْ يَٰٓأَبَانَا ٱسۡتَغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَآ إِنَّا كُنَّا خَٰطِـِٔينَ
97. Balobi: Oh tata wa biso! Sengela biso tubela na masumu та biso, ya soló, tosalaki mabe.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ سَوۡفَ أَسۡتَغۡفِرُ لَكُمۡ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
98. Alobi: Nakosengelaka bino bolimbisi epai ya Nkolo wa ngai, ya sólo, ye azali molimbisi atonda ngolu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَلَمَّا دَخَلُواْ عَلَىٰ يُوسُفَ ءَاوَىٰٓ إِلَيۡهِ أَبَوَيۡهِ وَقَالَ ٱدۡخُلُواْ مِصۡرَ إِن شَآءَ ٱللَّهُ ءَامِنِينَ
99. Mpe tango bakotaki epai ya Yûsuf akendeki koyamba baboti naye (tata na mama), mpe alobaki: Bokota na ezipito na kimia nyoso mpe na bolingo ya Allah.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَرَفَعَ أَبَوَيۡهِ عَلَى ٱلۡعَرۡشِ وَخَرُّواْ لَهُۥ سُجَّدٗاۖ وَقَالَ يَٰٓأَبَتِ هَٰذَا تَأۡوِيلُ رُءۡيَٰيَ مِن قَبۡلُ قَدۡ جَعَلَهَا رَبِّي حَقّٗاۖ وَقَدۡ أَحۡسَنَ بِيٓ إِذۡ أَخۡرَجَنِي مِنَ ٱلسِّجۡنِ وَجَآءَ بِكُم مِّنَ ٱلۡبَدۡوِ مِنۢ بَعۡدِ أَن نَّزَغَ ٱلشَّيۡطَٰنُ بَيۡنِي وَبَيۡنَ إِخۡوَتِيٓۚ إِنَّ رَبِّي لَطِيفٞ لِّمَا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
100. Mpe amatisaki baboti naye likolo ya kiti ya bokonzi, mpe sima bafukamelaki ye. Mpe alobaki: Oh tata na ngai! Oyo ezali ndimbola ya ndoto na ngai nalotaka kala, Allah asili kokokisa yango na bosôló. Mpe asalelaki ngai bolamu ebele sima ya kobimisa ngai na boloko. Mpe abimisi bino kowuta na zamba sima oyo satana akotaki o kati na ngai na bandeko na ngai. Ya soló, Nkolo wa ngai azali malamu na nyoso alingi. Ya sólo, ye azali moyebi atonda bwanya.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
۞ رَبِّ قَدۡ ءَاتَيۡتَنِي مِنَ ٱلۡمُلۡكِ وَعَلَّمۡتَنِي مِن تَأۡوِيلِ ٱلۡأَحَادِيثِۚ فَاطِرَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ أَنتَ وَلِيِّۦ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۖ تَوَفَّنِي مُسۡلِمٗا وَأَلۡحِقۡنِي بِٱلصَّٰلِحِينَ
101. Oh Nkolo! Osilaki kopesa ngai bokonzi, mpe otangisaki ngai koyeba ndimbola ya bandoto, yonde mokeli wa likolo na mabele, yonde ozali molongisi wa ngai o kati ya mokili mpe na mokolo mwa suka, boma ngai mizilima, tia ngai elongo na bato malamu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ذَٰلِكَ مِنۡ أَنۢبَآءِ ٱلۡغَيۡبِ نُوحِيهِ إِلَيۡكَۖ وَمَا كُنتَ لَدَيۡهِمۡ إِذۡ أَجۡمَعُوٓاْ أَمۡرَهُمۡ وَهُمۡ يَمۡكُرُونَ
102. Wana ezali basango oyo eyebani te tozali koyebisa nayo, mpe ozalaki te na bango elongo tango basanganaki тропа kosala likita na bango, mpe bazalaki kondima тропа kosala likita. (lia mabe)
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَمَآ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ وَلَوۡ حَرَصۡتَ بِمُؤۡمِنِينَ
103. Kasi ebele ya bato bazali kondima te ata soki ozali kotelemela bango.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ዩሱፍ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ።

መዝጋት