Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል ሒጅር   አንቀጽ:
قَالَ يَٰٓإِبۡلِيسُ مَا لَكَ أَلَّا تَكُونَ مَعَ ٱلسَّٰجِدِينَ
32. Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te?
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ لَمۡ أَكُن لِّأَسۡجُدَ لِبَشَرٍ خَلَقۡتَهُۥ مِن صَلۡصَٰلٖ مِّنۡ حَمَإٖ مَّسۡنُونٖ
33. Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ فَٱخۡرُجۡ مِنۡهَا فَإِنَّكَ رَجِيمٞ
34. Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَإِنَّ عَلَيۡكَ ٱللَّعۡنَةَ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلدِّينِ
35. Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ رَبِّ فَأَنظِرۡنِيٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
36. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ فَإِنَّكَ مِنَ ٱلۡمُنظَرِينَ
37. Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡوَقۡتِ ٱلۡمَعۡلُومِ
38. Kino mokolo ya ngonga eye eyebani.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ رَبِّ بِمَآ أَغۡوَيۡتَنِي لَأُزَيِّنَنَّ لَهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَأُغۡوِيَنَّهُمۡ أَجۡمَعِينَ
39. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِلَّا عِبَادَكَ مِنۡهُمُ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
40. Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَالَ هَٰذَا صِرَٰطٌ عَلَيَّ مُسۡتَقِيمٌ
41. (Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ عِبَادِي لَيۡسَ لَكَ عَلَيۡهِمۡ سُلۡطَٰنٌ إِلَّا مَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡغَاوِينَ
42. Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمَوۡعِدُهُمۡ أَجۡمَعِينَ
43. Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
لَهَا سَبۡعَةُ أَبۡوَٰبٖ لِّكُلِّ بَابٖ مِّنۡهُمۡ جُزۡءٞ مَّقۡسُومٌ
44. Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٍ
45. Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱدۡخُلُوهَا بِسَلَٰمٍ ءَامِنِينَ
46. Bokota na kati na yango na kimia nyoso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَنَزَعۡنَا مَا فِي صُدُورِهِم مِّنۡ غِلٍّ إِخۡوَٰنًا عَلَىٰ سُرُرٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
47. Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
لَا يَمَسُّهُمۡ فِيهَا نَصَبٞ وَمَا هُم مِّنۡهَا بِمُخۡرَجِينَ
48. Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
۞ نَبِّئۡ عِبَادِيٓ أَنِّيٓ أَنَا ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
49. Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَأَنَّ عَذَابِي هُوَ ٱلۡعَذَابُ ٱلۡأَلِيمُ
50. Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَنَبِّئۡهُمۡ عَن ضَيۡفِ إِبۡرَٰهِيمَ
51. Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል ሒጅር
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት