Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል አንቢያ   አንቀጽ:
وَمِنَ ٱلشَّيَٰطِينِ مَن يَغُوصُونَ لَهُۥ وَيَعۡمَلُونَ عَمَلٗا دُونَ ذَٰلِكَۖ وَكُنَّا لَهُمۡ حَٰفِظِينَ
Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
۞ وَأَيُّوبَ إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَسَّنِيَ ٱلضُّرُّ وَأَنتَ أَرۡحَمُ ٱلرَّٰحِمِينَ
Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَٱسۡتَجَبۡنَا لَهُۥ فَكَشَفۡنَا مَا بِهِۦ مِن ضُرّٖۖ وَءَاتَيۡنَٰهُ أَهۡلَهُۥ وَمِثۡلَهُم مَّعَهُمۡ رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِنَا وَذِكۡرَىٰ لِلۡعَٰبِدِينَ
Tondimelaki ye mpe tolongolelaki ye mpasi oyo azalaki na yango, mpe tozongiselaki ye libota lia ye mbala mibale ngolu kowuta epai na biso, mpe bokundoli тропа babondeli.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِدۡرِيسَ وَذَا ٱلۡكِفۡلِۖ كُلّٞ مِّنَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Mpe Ismâîl na Idrîs na Dzul-kifl bango banso bazalaki bakangi mitema,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَأَدۡخَلۡنَٰهُمۡ فِي رَحۡمَتِنَآۖ إِنَّهُم مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَذَا ٱلنُّونِ إِذ ذَّهَبَ مُغَٰضِبٗا فَظَنَّ أَن لَّن نَّقۡدِرَ عَلَيۡهِ فَنَادَىٰ فِي ٱلظُّلُمَٰتِ أَن لَّآ إِلَٰهَ إِلَّآ أَنتَ سُبۡحَٰنَكَ إِنِّي كُنتُ مِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَٱسۡتَجَبۡنَا لَهُۥ وَنَجَّيۡنَٰهُ مِنَ ٱلۡغَمِّۚ وَكَذَٰلِكَ نُـۨجِي ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Tondimelaki ye mpe tobikisaki ye na kolela naye. Lolenge wana nde tosalisaka bandimi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَزَكَرِيَّآ إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥ رَبِّ لَا تَذَرۡنِي فَرۡدٗا وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلۡوَٰرِثِينَ
Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَٱسۡتَجَبۡنَا لَهُۥ وَوَهَبۡنَا لَهُۥ يَحۡيَىٰ وَأَصۡلَحۡنَا لَهُۥ زَوۡجَهُۥٓۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ يُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡخَيۡرَٰتِ وَيَدۡعُونَنَا رَغَبٗا وَرَهَبٗاۖ وَكَانُواْ لَنَا خَٰشِعِينَ
Tondimelaki ye mpe topesaki ye Yahya, mpe tobikisaki mwasi naye (na ekomba). Ya soló, bazalaki kowelela тропа kosala bolamu, bazalaki kobondela biso na bolingo mpe na kobanga mpe bazalaki komikitisa liboso na biso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል አንቢያ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት