Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አልን ኑር   አንቀጽ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ جَآءُو بِٱلۡإِفۡكِ عُصۡبَةٞ مِّنكُمۡۚ لَا تَحۡسَبُوهُ شَرّٗا لَّكُمۖ بَلۡ هُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۚ لِكُلِّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُم مَّا ٱكۡتَسَبَ مِنَ ٱلۡإِثۡمِۚ وَٱلَّذِي تَوَلَّىٰ كِبۡرَهُۥ مِنۡهُمۡ لَهُۥ عَذَابٌ عَظِيمٞ
11. Ya soló baye bay aki na lokuta (kopanza yango kati na mboka) ezali lisanga ya bato kati na bino, bomona yango mabe te kasi ezali malamu тропа bino, moko na moko kati na bango azui lisumu naye, kasi oyo kati na bango azui eteni ya monene, akozua etumbu ya monene.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
لَّوۡلَآ إِذۡ سَمِعۡتُمُوهُ ظَنَّ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتُ بِأَنفُسِهِمۡ خَيۡرٗا وَقَالُواْ هَٰذَآ إِفۡكٞ مُّبِينٞ
12. Mpona nini te tango boyokaki yango,(1) bandimi ya mibali na ya basi esengeli bakanisa malamu kati na bango, mpe baloba: Oyo ezali lokuta ya polele.
1 Boyokaki yango: Lokuta oyo bakoselaki Aïcha mama ya bandimi (Allah asepela naye) ete asalaki ekobo.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
لَّوۡلَا جَآءُو عَلَيۡهِ بِأَرۡبَعَةِ شُهَدَآءَۚ فَإِذۡ لَمۡ يَأۡتُواْ بِٱلشُّهَدَآءِ فَأُوْلَٰٓئِكَ عِندَ ٱللَّهِ هُمُ ٱلۡكَٰذِبُونَ
13. Mpona nini bamemaki te mpona yango banzeneneke minei? Kasi soki bamemi banzeneneke te, baye wana epai ya Allah bazali bato ya lokuta.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ لَمَسَّكُمۡ فِي مَآ أَفَضۡتُمۡ فِيهِ عَذَابٌ عَظِيمٌ
14. Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te o kati na mokili mpe o mokolo ya suka, etumbu makasi elingaki kozua bino mpona maye bosala.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِذۡ تَلَقَّوۡنَهُۥ بِأَلۡسِنَتِكُمۡ وَتَقُولُونَ بِأَفۡوَاهِكُم مَّا لَيۡسَ لَكُم بِهِۦ عِلۡمٞ وَتَحۡسَبُونَهُۥ هَيِّنٗا وَهُوَ عِندَ ٱللَّهِ عَظِيمٞ
15. Tango bino moko bozali kobota yango na balolemo na bino mpe bozali koloba yango na minoko na bino oyo bozali na boyebi na yango te mpe bozali kornona yango шоке, kasi yango epai ya Allah ezali monene.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَلَوۡلَآ إِذۡ سَمِعۡتُمُوهُ قُلۡتُم مَّا يَكُونُ لَنَآ أَن نَّتَكَلَّمَ بِهَٰذَا سُبۡحَٰنَكَ هَٰذَا بُهۡتَٰنٌ عَظِيمٞ
16. Mpe тропа nini tango boyokaki yango, bolobaki te ete tokoki kolobela yango te. Lokumu nayo (Allah) oyo ezali lokuta monene.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَعِظُكُمُ ٱللَّهُ أَن تَعُودُواْ لِمِثۡلِهِۦٓ أَبَدًا إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
17. Allah azali koteya bino mpo bozongela lisusu makambo ya ndenge oyo te, soki bozali bandimi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَيُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمُ ٱلۡأٓيَٰتِۚ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
18. Mpe Allah alimboleli bino mikapo polele. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُحِبُّونَ أَن تَشِيعَ ٱلۡفَٰحِشَةُ فِي ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
19. Ya soló, baye balingaka sé kopanza mabe o kati ya bandimi, bakozalaka na etumbu ya makasi awa na mokili mpe na mokolo mwa suka. Mpe Allah ayebi kasi bino boyebi te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ وَأَنَّ ٱللَّهَ رَءُوفٞ رَّحِيمٞ
20. Mpe soki bolamu na ngolu ya Allah ezalaka likolo na bino te, ya sólo Allah azali wa ngolu atonda mawa.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አልን ኑር
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት