Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ኣሊ-ኢምራን   አንቀጽ:
وَمَآ أَصَٰبَكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡتَقَى ٱلۡجَمۡعَانِ فَبِإِذۡنِ ٱللَّهِ وَلِيَعۡلَمَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
166. Mpe oyo ezuaki bino mokolo mampinga mibale makutanaki na ndingisa ya Allah, mpo ayeba banani bazali bandimi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَلِيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ نَافَقُواْۚ وَقِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ قَٰتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَوِ ٱدۡفَعُواْۖ قَالُواْ لَوۡ نَعۡلَمُ قِتَالٗا لَّٱتَّبَعۡنَٰكُمۡۗ هُمۡ لِلۡكُفۡرِ يَوۡمَئِذٍ أَقۡرَبُ مِنۡهُمۡ لِلۡإِيمَٰنِۚ يَقُولُونَ بِأَفۡوَٰهِهِم مَّا لَيۡسَ فِي قُلُوبِهِمۡۚ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يَكۡتُمُونَ
167. Mpe ayeba bato ya bilongi mibale, mpe babengami ete; boya kobunda na nzela ya Allah, to mpe bobengana monguna, balobi ete: Soki toyebaki ete bitumba bizali ya sôló, nde tolandaki bino te. Mokolo wana bazalaki pembeni ya bopengwi mosika na boyambi, bazali koloba na minoko na bango maye mazali o mitema mia bango te. Mpe Allah, nde ayebi na bolamu bonso maye bazali kobomba.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِينَ قَالُواْ لِإِخۡوَٰنِهِمۡ وَقَعَدُواْ لَوۡ أَطَاعُونَا مَا قُتِلُواْۗ قُلۡ فَٱدۡرَءُواْ عَنۡ أَنفُسِكُمُ ٱلۡمَوۡتَ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
168. Baye batikalaki na bandako na bango mpe balobaki na bandeko na bango ete: Soki batosaki biso nde babomamaki te. Loba ete: Bolongola liwa ezala mosika na bino soki ya sôló bozali bato ya bosembo.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَلَا تَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ أَمۡوَٰتَۢاۚ بَلۡ أَحۡيَآءٌ عِندَ رَبِّهِمۡ يُرۡزَقُونَ
169. Mpe bokanisa te ete: Baye babomami na nzela ya Allah bazali bibembe, kasi bazali nde na bomoyi pembeni na Nkolo wa bango. Batondi na bomengo.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَرِحِينَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ وَيَسۡتَبۡشِرُونَ بِٱلَّذِينَ لَمۡ يَلۡحَقُواْ بِهِم مِّنۡ خَلۡفِهِمۡ أَلَّا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
170. Basepeli na bolamu oyo Allah asali bango, mpe bazali na esengo na mitema mpona baninga na bango batikali na sima nakopesa bango sango elamu ete; babanga te mpe bayimayima te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
۞ يَسۡتَبۡشِرُونَ بِنِعۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَفَضۡلٖ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَا يُضِيعُ أَجۡرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
171. Bazali na Esengo na bolamu ya Allah mpe na lokumu naye, mpe ya sôló, Allah akobungisa te mbano ya bandimi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِينَ ٱسۡتَجَابُواْ لِلَّهِ وَٱلرَّسُولِ مِنۢ بَعۡدِ مَآ أَصَابَهُمُ ٱلۡقَرۡحُۚ لِلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ مِنۡهُمۡ وَٱتَّقَوۡاْ أَجۡرٌ عَظِيمٌ
172. Baye bayanolaki na mbela ya Allah na ya motindami sima ya bango kozoka ba mpota. Kasi mpona ba oyo basalaki malamu kati na bango, mpe babangi (Allah), bakozala na lifuta linene.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِينَ قَالَ لَهُمُ ٱلنَّاسُ إِنَّ ٱلنَّاسَ قَدۡ جَمَعُواْ لَكُمۡ فَٱخۡشَوۡهُمۡ فَزَادَهُمۡ إِيمَٰنٗا وَقَالُواْ حَسۡبُنَا ٱللَّهُ وَنِعۡمَ ٱلۡوَكِيلُ
173. Baye bato balobaki na bango ete: Ya sôló, bato basili kosangana mpona kosala bino mabe bobanga bango, mpe ebakiselaki bango bondimi mpe balobaki: Allah akoki na biso, mpe oyo nde mobateli ya malamu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ኣሊ-ኢምራን
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎንጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ።

መዝጋት