Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል-ማኢዳህ   አንቀጽ:
وَمَا لَنَا لَا نُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَمَا جَآءَنَا مِنَ ٱلۡحَقِّ وَنَطۡمَعُ أَن يُدۡخِلَنَا رَبُّنَا مَعَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلصَّٰلِحِينَ
84. Mpona nini te ete tondima na Allah mpe na oyo eyeli biso ya bosembo mpe tolikia ete Nkolo na biso akotisa biso okati ya bato ya malamu?
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَأَثَٰبَهُمُ ٱللَّهُ بِمَا قَالُواْ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
85. Mpe Allah afuti bango na maye balobaki lola eye ezali koleka na nsé na yango mingala libela kati na yango. Mpe wana ezali litomba lia babongisi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَحِيمِ
86. Kasi mpona ba oyo bapengwa mpe babuki lokuta na mikapo mia biso, bango bato ya moto ya djahim.(1)
1 Moto ya lifelo.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُحَرِّمُواْ طَيِّبَٰتِ مَآ أَحَلَّ ٱللَّهُ لَكُمۡ وَلَا تَعۡتَدُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُعۡتَدِينَ
87. Eh bino bandimi! Bopekisa te biloko ya malamu biye Allah apesi bino, mpe bolekisa ndelo te mpamba te Allah Alingaka balekisi ndelo te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَكُلُواْ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ حَلَٰلٗا طَيِّبٗاۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ ٱلَّذِيٓ أَنتُم بِهِۦ مُؤۡمِنُونَ
88. Mpe bolia maye Allah Apesaki bino ya kitoko, Mpe elingisami. Mpe bobanga Allah oyo bolobi ete bondimi naye.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
لَا يُؤَاخِذُكُمُ ٱللَّهُ بِٱللَّغۡوِ فِيٓ أَيۡمَٰنِكُمۡ وَلَٰكِن يُؤَاخِذُكُم بِمَا عَقَّدتُّمُ ٱلۡأَيۡمَٰنَۖ فَكَفَّٰرَتُهُۥٓ إِطۡعَامُ عَشَرَةِ مَسَٰكِينَ مِنۡ أَوۡسَطِ مَا تُطۡعِمُونَ أَهۡلِيكُمۡ أَوۡ كِسۡوَتُهُمۡ أَوۡ تَحۡرِيرُ رَقَبَةٖۖ فَمَن لَّمۡ يَجِدۡ فَصِيَامُ ثَلَٰثَةِ أَيَّامٖۚ ذَٰلِكَ كَفَّٰرَةُ أَيۡمَٰنِكُمۡ إِذَا حَلَفۡتُمۡۚ وَٱحۡفَظُوٓاْ أَيۡمَٰنَكُمۡۚ كَذَٰلِكَ يُبَيِّنُ ٱللَّهُ لَكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
89. Allah akopesa bino etumbu te nakolapa na bino oyo ebimaka na balolemu na bino. Kasi akopesa bino etumbu na kolapa oyo ewuti na mitema na bino, tubela na yango ezali koleisa babola zomi lolenge boleisaka mabota na bino, to mpe kolatisa bango, to mpe kokangola mowumbu. Oyo akozua makoki wana te, esengeli naye akanga ngizi mikolo misato. Wana nde tubela ya kolapa na bino na tango bosili kolapa, kasi bobatela bakolapa na bino. Na boye nde Allah azali kolimbola bino mikapo naye, mpo botondo ye.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡخَمۡرُ وَٱلۡمَيۡسِرُ وَٱلۡأَنصَابُ وَٱلۡأَزۡلَٰمُ رِجۡسٞ مِّنۡ عَمَلِ ٱلشَّيۡطَٰنِ فَٱجۡتَنِبُوهُ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
90. Eh bino Bandimi! Ya sôló, masanga, mpe masano ya mayele mabe, na mabanga mpe makonga mibongisami na tango ya bopagano, manso wana mazali mbindo kowuta na mosala ya satana, bozala mosika na yango mpo ete bolonga.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል-ማኢዳህ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት