የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - ሊንጋላ ትርጉም * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሱረቱ አት ተህሪም   አንቀጽ:

At-Tahrîm (BOPEKISAMI)

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ لِمَ تُحَرِّمُ مَآ أَحَلَّ ٱللَّهُ لَكَۖ تَبۡتَغِي مَرۡضَاتَ أَزۡوَٰجِكَۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
1. Eh ntoma! Mpona nini na bosepelisi basi nayo ozali komipekisa na maye Allah apesi yo ndingisa. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قَدۡ فَرَضَ ٱللَّهُ لَكُمۡ تَحِلَّةَ أَيۡمَٰنِكُمۡۚ وَٱللَّهُ مَوۡلَىٰكُمۡۖ وَهُوَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡحَكِيمُ
2. Allah asila kokomela bino ya soló komisikola mpona kolapa na bino. Allah nde mokonzi na bino mpe azali moyebi atonda bwanya.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَإِذۡ أَسَرَّ ٱلنَّبِيُّ إِلَىٰ بَعۡضِ أَزۡوَٰجِهِۦ حَدِيثٗا فَلَمَّا نَبَّأَتۡ بِهِۦ وَأَظۡهَرَهُ ٱللَّهُ عَلَيۡهِ عَرَّفَ بَعۡضَهُۥ وَأَعۡرَضَ عَنۢ بَعۡضٖۖ فَلَمَّا نَبَّأَهَا بِهِۦ قَالَتۡ مَنۡ أَنۢبَأَكَ هَٰذَاۖ قَالَ نَبَّأَنِيَ ٱلۡعَلِيمُ ٱلۡخَبِيرُ
3. Tango ntoma apesaki sekele na moko kati na basi naye mpe abimisi sekele wana, Allah ayebisaki ntoma naye likambo yango, mosusu mpe ayebisi ye te, mpe tango ntoma atunaki ye (mwasi naye) akamwaki mpe alobaki: Nani ayebisi yo yango? Ntoma azongiselaki ye ete: Ezali oyo atonda boyebi na basango nyoso nde ayebisi ngai.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِن تَتُوبَآ إِلَى ٱللَّهِ فَقَدۡ صَغَتۡ قُلُوبُكُمَاۖ وَإِن تَظَٰهَرَا عَلَيۡهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ هُوَ مَوۡلَىٰهُ وَجِبۡرِيلُ وَصَٰلِحُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَۖ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ بَعۡدَ ذَٰلِكَ ظَهِيرٌ
4. Soki botubeli epai ya Allah, mitema na bino mipetuami, kasi soki bosalisani likolo naye, boyeba ete ya solo Allah azali mobateli naye, mpe anzelu Djibril lokola elongo na bandimi ya malamu, Mpe na sima ba anzelu bakosunga ye.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
عَسَىٰ رَبُّهُۥٓ إِن طَلَّقَكُنَّ أَن يُبۡدِلَهُۥٓ أَزۡوَٰجًا خَيۡرٗا مِّنكُنَّ مُسۡلِمَٰتٖ مُّؤۡمِنَٰتٖ قَٰنِتَٰتٖ تَٰٓئِبَٰتٍ عَٰبِدَٰتٖ سَٰٓئِحَٰتٖ ثَيِّبَٰتٖ وَأَبۡكَارٗا
5. Soki atiki bino, Nkolo naye akobalisa ye basi ya malamu koleka bino, bamisokia, bandimi, bazali na botosi, batubelaka, baye bazali kosambela, bakangi ya ngizi, baye babala liboso, mpe bangondo (baye bayebi mibali te) te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ قُوٓاْ أَنفُسَكُمۡ وَأَهۡلِيكُمۡ نَارٗا وَقُودُهَا ٱلنَّاسُ وَٱلۡحِجَارَةُ عَلَيۡهَا مَلَٰٓئِكَةٌ غِلَاظٞ شِدَادٞ لَّا يَعۡصُونَ ٱللَّهَ مَآ أَمَرَهُمۡ وَيَفۡعَلُونَ مَا يُؤۡمَرُونَ
6. Oh bino bandimi! Bobatela milimo na bino mpe mabota na bino na moto oyo bankoni na yango bikozala bato na mabanga, bakengeli na yango ezali ba anzelu ya makasi, bazangisaka Allah botosi te na oyo atindi bango kosala, kasi bakokisaka nde oyo atindi bango kosala.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَا تَعۡتَذِرُواْ ٱلۡيَوۡمَۖ إِنَّمَا تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
7. Eh bino bapengwi! lelo bakolimbisa bino te, ya soló bokofutama kolandana na maye bosalaki.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ تُوبُوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ تَوۡبَةٗ نَّصُوحًا عَسَىٰ رَبُّكُمۡ أَن يُكَفِّرَ عَنكُمۡ سَيِّـَٔاتِكُمۡ وَيُدۡخِلَكُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ يَوۡمَ لَا يُخۡزِي ٱللَّهُ ٱلنَّبِيَّ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥۖ نُورُهُمۡ يَسۡعَىٰ بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَبِأَيۡمَٰنِهِمۡ يَقُولُونَ رَبَّنَآ أَتۡمِمۡ لَنَا نُورَنَا وَٱغۡفِرۡ لَنَآۖ إِنَّكَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
8. Oh bino bandimi! Botubela tubela ya bosóló epai ya Allah, Allah akoki kolimbisa masumu na bino, mpe akokotisa bino na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, mokolo oyo Allah akotiya mabe mosika na ntoma na baye bandimaki elongo naye, bongengi na bango ekotambola liboso na bango mpe na ngambo ya mobali mpe bakolobaka: Nkolo kokisela biso bongengi mpe limbisa biso, ya soló ozali na bokoki ya biloko nyoso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ جَٰهِدِ ٱلۡكُفَّارَ وَٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱغۡلُظۡ عَلَيۡهِمۡۚ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
9. Eh ntoma! Bundisa bapengwi na bato ya bilongi mibale mpe kozala mpete epai na bango te, mpe esika na bango ekozalaka nde lifelo, mpe esika nini ya bozongi ya mabe wana!
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱمۡرَأَتَ نُوحٖ وَٱمۡرَأَتَ لُوطٖۖ كَانَتَا تَحۡتَ عَبۡدَيۡنِ مِنۡ عِبَادِنَا صَٰلِحَيۡنِ فَخَانَتَاهُمَا فَلَمۡ يُغۡنِيَا عَنۡهُمَا مِنَ ٱللَّهِ شَيۡـٔٗا وَقِيلَ ٱدۡخُلَا ٱلنَّارَ مَعَ ٱلدَّٰخِلِينَ
10. Allah abeti ndakisa ya bapengwi (mibale) mwasi ya Núh na mwasi ya Loth bazalaki na nsé ya maboko ya bawumbu na biso mibale, kasi nyoso mibale baboyaki kondima mpe basalaki bango mabe, kasi mabe na bango elongisaki bango te epai na Allah, mpe bayebisaki na bango mibale ete: Bokota na moto na baye bakokota.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا لِّلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱمۡرَأَتَ فِرۡعَوۡنَ إِذۡ قَالَتۡ رَبِّ ٱبۡنِ لِي عِندَكَ بَيۡتٗا فِي ٱلۡجَنَّةِ وَنَجِّنِي مِن فِرۡعَوۡنَ وَعَمَلِهِۦ وَنَجِّنِي مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
11. Mpe Allah abeti ndakisa тропа baye bandimi, mwasi ya falo tango alobaki: Nkolo, tongela ngai ndako na lola ezala pene nayo, mpe longisa ngai na mabe ya falo na misala mia ye, mpe longisa ngai na bato mabe.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَمَرۡيَمَ ٱبۡنَتَ عِمۡرَٰنَ ٱلَّتِيٓ أَحۡصَنَتۡ فَرۡجَهَا فَنَفَخۡنَا فِيهِ مِن رُّوحِنَا وَصَدَّقَتۡ بِكَلِمَٰتِ رَبِّهَا وَكُتُبِهِۦ وَكَانَتۡ مِنَ ٱلۡقَٰنِتِينَ
12. (Lolenge moko) na Maryam mwana ya imrân ya mwasi oyo abatelaki nzoto naye, mpe tofulaki mopepe ya molimo kati (naye), mpe andimaki liloba lia Nkolo naye mpe babuku naye, mpe azalaki okati ya batosi Allah.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሱረቱ አት ተህሪም
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - ሊንጋላ ትርጉም - የትርጉሞች ማዉጫ

የተከበረው ቁርአን ሊንጋላ መልዕክተ ትርጉም፤ ተርጓሚ ዘከርያ ሙሓመድ ባሊንጎንጎ

መዝጋት