Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል-አዕራፍ   አንቀጽ:
وَنَادَىٰٓ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ أَن قَدۡ وَجَدۡنَا مَا وَعَدَنَا رَبُّنَا حَقّٗا فَهَلۡ وَجَدتُّم مَّا وَعَدَ رَبُّكُمۡ حَقّٗاۖ قَالُواْ نَعَمۡۚ فَأَذَّنَ مُؤَذِّنُۢ بَيۡنَهُمۡ أَن لَّعۡنَةُ ٱللَّهِ عَلَى ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe bato ya lola bakobengaka bato ya lifelo; ya soló, tozui maye Nkolo wa biso alakaki biso na bosembo, boye bino mpe bozui maye Nkolo wa bino alakaki bino na bosembo? Bakolobaka; iyo; mpe mobeleli akobelelaka kati na bango ete; botutu bwa Allah bozala o likolo lia babubi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِينَ يَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ وَيَبۡغُونَهَا عِوَجٗا وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ كَٰفِرُونَ
Baye bazali kokanga nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli, mpe bango bandimaka na mokolo mwa suka te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَبَيۡنَهُمَا حِجَابٞۚ وَعَلَى ٱلۡأَعۡرَافِ رِجَالٞ يَعۡرِفُونَ كُلَّۢا بِسِيمَىٰهُمۡۚ وَنَادَوۡاْ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ أَن سَلَٰمٌ عَلَيۡكُمۡۚ لَمۡ يَدۡخُلُوهَا وَهُمۡ يَطۡمَعُونَ
Mpe okati ya bango babale ekozala na ndelo (efelo), mpe likolo lia A’ráf,[1] ezali na mibali bakoyebaka bato banso na bilembo bia bango, mpe bakobenga bato ba lola ete; kimiya ya (Allah) ezala likolo lia bino, mpe bakoti yango na’íno te na bango bazali na posa ya kokota.
[1] Efelo (ndelo) oyo ekaboli lola na lifelo.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
۞ وَإِذَا صُرِفَتۡ أَبۡصَٰرُهُمۡ تِلۡقَآءَ أَصۡحَٰبِ ٱلنَّارِ قَالُواْ رَبَّنَا لَا تَجۡعَلۡنَا مَعَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe tango miso ma bango ekotala epai ya bato ya moto, mpe bakolobaka: Eh Nkolo wa biso! kotiya biso esika moko te na babubi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَنَادَىٰٓ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأَعۡرَافِ رِجَالٗا يَعۡرِفُونَهُم بِسِيمَىٰهُمۡ قَالُواْ مَآ أَغۡنَىٰ عَنكُمۡ جَمۡعُكُمۡ وَمَا كُنتُمۡ تَسۡتَكۡبِرُونَ
Мре bato ya A’râf bakobengaka mibali misusu baye bayebaki bango na bilembo bia bango. Bakolobaka: Maye bobombaka mia misolo na maye bozalaki kosala lolendo esungi bino na eloko te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
أَهَٰٓؤُلَآءِ ٱلَّذِينَ أَقۡسَمۡتُمۡ لَا يَنَالُهُمُ ٱللَّهُ بِرَحۡمَةٍۚ ٱدۡخُلُواْ ٱلۡجَنَّةَ لَا خَوۡفٌ عَلَيۡكُمۡ وَلَآ أَنتُمۡ تَحۡزَنُونَ
Boye nde ba oyo bozalaki kolapa ete bolamu bwa Allah bokozua bango te? Bokota o lola bokozala na bobangi te mpe bokozala na mawa te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَنَادَىٰٓ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ أَنۡ أَفِيضُواْ عَلَيۡنَا مِنَ ٱلۡمَآءِ أَوۡ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُۚ قَالُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ حَرَّمَهُمَا عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe bato ya moto bakobenga bato ya lola, bopesa biso mwa mayi to mpe maye oyo Allah apesi bino. Bakolobaka: Ya soló Allah apekisi yango nyoso mabale тропа bapengwi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ دِينَهُمۡ لَهۡوٗا وَلَعِبٗا وَغَرَّتۡهُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَاۚ فَٱلۡيَوۡمَ نَنسَىٰهُمۡ كَمَا نَسُواْ لِقَآءَ يَوۡمِهِمۡ هَٰذَا وَمَا كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَجۡحَدُونَ
Baye bazuaki lingomba lia bango na liseki mpe na lisano, тре mokili mwa nsé mokosaki bango. Mokolo mwa lelo tobosani[1] bango lolenge babosanaki bokutani bwa mokolo mwa bango moye, mpe mpo bazalaki kotiya tembe na bilembo bia biso.
[1] Elingi koloba: Totiki bango bazwa etumbu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: አል-አዕራፍ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት