የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - ሊንጋላ ትርጉም * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሱረቱ አል ቡሩጅ   አንቀጽ:

Al-Burûdj (MINZOTO)

وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡبُرُوجِ
1. (Na lapi) na mapata eye etonda minzoto!
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡمَوۡعُودِ
2. Mpe na lapi na mokolo ya elaka!
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَشَاهِدٖ وَمَشۡهُودٖ
3. Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
قُتِلَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأُخۡدُودِ
4. Babomaki bato ya nsé ya ngomba,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلنَّارِ ذَاتِ ٱلۡوَقُودِ
5. Na moto etonda bankoni,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِذۡ هُمۡ عَلَيۡهَا قُعُودٞ
6. Mpe bango bazingaki yango yakofanda,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَهُمۡ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ شُهُودٞ
7. Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَمَا نَقَمُواْ مِنۡهُمۡ إِلَّآ أَن يُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ
8. Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٌ
9. Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ فَتَنُواْ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَتُوبُواْ فَلَهُمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَ وَلَهُمۡ عَذَابُ ٱلۡحَرِيقِ
10. Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ جَنَّٰتٞ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡكَبِيرُ
11. Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّ بَطۡشَ رَبِّكَ لَشَدِيدٌ
12. Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِنَّهُۥ هُوَ يُبۡدِئُ وَيُعِيدُ
13. Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli).
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَهُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلۡوَدُودُ
14. Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
ذُو ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡمَجِيدُ
15. Nkolo ya ngwende ya lokumu,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فَعَّالٞ لِّمَا يُرِيدُ
16. Asalaka maye alingi.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡجُنُودِ
17. Ekomelaki yo te sango ya mapinga,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فِرۡعَوۡنَ وَثَمُودَ
18. Ya Falo na Thamúd?
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي تَكۡذِيبٖ
19. Kasi bapagano bazali sé koboya kondima.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَٱللَّهُ مِن وَرَآئِهِم مُّحِيطُۢ
20. Nzoka nde Allah azingi bango.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
بَلۡ هُوَ قُرۡءَانٞ مَّجِيدٞ
21. Kasi yango ezali kurani ya lokumu,
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
فِي لَوۡحٖ مَّحۡفُوظِۭ
22. Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሱረቱ አል ቡሩጅ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - ሊንጋላ ትርጉም - የትርጉሞች ማዉጫ

የተከበረው ቁርአን ሊንጋላ መልዕክተ ትርጉም፤ ተርጓሚ ዘከርያ ሙሓመድ ባሊንጎንጎ

መዝጋት