Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আলে ইমৰাণ   আয়াত:
يَوۡمَ تَجِدُ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا عَمِلَتۡ مِنۡ خَيۡرٖ مُّحۡضَرٗا وَمَا عَمِلَتۡ مِن سُوٓءٖ تَوَدُّ لَوۡ أَنَّ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَهُۥٓ أَمَدَۢا بَعِيدٗاۗ وَيُحَذِّرُكُمُ ٱللَّهُ نَفۡسَهُۥۗ وَٱللَّهُ رَءُوفُۢ بِٱلۡعِبَادِ
30. Mokolo molimo nyonso ekozua makambo ya malamu maye esalaki. Mazali komonana na maye manso esalaki ya mabe, akolikia ata sókó ezalaka kati ya oyo na oyo kuna ndelo ya mosika, mpe Allah azali kokebisa bino mpona ye moko mpe Allah atondi na ngolu mpona bawumbu naye.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُلۡ إِن كُنتُمۡ تُحِبُّونَ ٱللَّهَ فَٱتَّبِعُونِي يُحۡبِبۡكُمُ ٱللَّهُ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡ ذُنُوبَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
31. Loba ete: Soki bolingi Allah, bolanda ngai.(1) Allah akolinga bino mpe akolimbisa masumu ma bino. mpe Allah azali molimbisi moyoki mawa.
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
قُلۡ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَۖ فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡكَٰفِرِينَ
32. Loba ete: Botosa Allah na motindami naye, mpe soki bapesi mokongo, ya sôló Allah alingaka bapengwi te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
۞ إِنَّ ٱللَّهَ ٱصۡطَفَىٰٓ ءَادَمَ وَنُوحٗا وَءَالَ إِبۡرَٰهِيمَ وَءَالَ عِمۡرَٰنَ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
33. Ya sôló, Allah aponaki Âdam, mpe Nûh, mpe libota ya Ibrâhîm mpe libota ya Imrân, likolo ya mokili.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ذُرِّيَّةَۢ بَعۡضُهَا مِنۢ بَعۡضٖۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
34. Bakitani na bakitani kati na bango, mpe Allah azali moyoki atonda boyebi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِذۡ قَالَتِ ٱمۡرَأَتُ عِمۡرَٰنَ رَبِّ إِنِّي نَذَرۡتُ لَكَ مَا فِي بَطۡنِي مُحَرَّرٗا فَتَقَبَّلۡ مِنِّيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
35. Kanisa tango mwasi ya Imrân alobaki ete: Eh Nkolo! Ya sôló ngai nalaki yo mokumba eye ezali na libumu na ngai. Mpe nabonzeli yo ye na bonsomi nyoso mpo ete azala mosali nayo, eh Nkolo! Ndima kolela na ngai, ya sôló ozali moyoki otonda boyebi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَلَمَّا وَضَعَتۡهَا قَالَتۡ رَبِّ إِنِّي وَضَعۡتُهَآ أُنثَىٰ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا وَضَعَتۡ وَلَيۡسَ ٱلذَّكَرُ كَٱلۡأُنثَىٰۖ وَإِنِّي سَمَّيۡتُهَا مَرۡيَمَ وَإِنِّيٓ أُعِيذُهَا بِكَ وَذُرِّيَّتَهَا مِنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ ٱلرَّجِيمِ
36. Mpe tango abotaki ye, alobaki ete: Eh Nkolo! Naboti ye mwana mwasi. Mpe Allah ayebaki mbotama wana, kasi mwana mwasi azali lokola mwana mobali te. Na yango napesi ye nkombo ya Maryam, mpe ngai ya sôló nati ye na libota naye, na nsé ya libateli nayo likolo na satana oyo alakelama mabe.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَتَقَبَّلَهَا رَبُّهَا بِقَبُولٍ حَسَنٖ وَأَنۢبَتَهَا نَبَاتًا حَسَنٗا وَكَفَّلَهَا زَكَرِيَّاۖ كُلَّمَا دَخَلَ عَلَيۡهَا زَكَرِيَّا ٱلۡمِحۡرَابَ وَجَدَ عِندَهَا رِزۡقٗاۖ قَالَ يَٰمَرۡيَمُ أَنَّىٰ لَكِ هَٰذَاۖ قَالَتۡ هُوَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۖ إِنَّ ٱللَّهَ يَرۡزُقُ مَن يَشَآءُ بِغَيۡرِ حِسَابٍ
37. Nkolo naye andimelaki ye na bondimeli ya malamu mpe akolisi ye kokola ya malamu. Mpe apesaki ye, na Zakariya mpo ete abokolo ye. Na tango inso Zakariya azalaki kokota na mihrâb(1) epai naye (Maryam) akokuta ye na bilei. Mpe akotuna ye eh Maryam! Ozui bilei biye wapi? Akozongisa eyano ete: Ewuti epai na Allah. Ya sôló, Allah apesaka bozui na moto oyo ye alingi na motango te.
1 Esika oyo ye Maryam azalaki ко fanda pona mabondeli.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আলে ইমৰাণ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ