Check out the new design

Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. * - Tərcumənin mündəricatı

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Mənaların tərcüməsi Surə: ət-Tovbə   Ayə:
يَحۡلِفُونَ بِٱللَّهِ لَكُمۡ لِيُرۡضُوكُمۡ وَٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥٓ أَحَقُّ أَن يُرۡضُوهُ إِن كَانُواْ مُؤۡمِنِينَ
62. Bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kosepelisa bino, kasi Allah na motindami waye nde esengeli basepelisa soki bazali bandimi ya solo.
Ərəbcə təfsirlər:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّهُۥ مَن يُحَادِدِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَأَنَّ لَهُۥ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدٗا فِيهَاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡخِزۡيُ ٱلۡعَظِيمُ
63. Boye boyebi te ete ya sólo, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo ye akozalaka na móto mwa lifelo, libela kati na yango? Wana nde ekozala etumbu ya monene.
Ərəbcə təfsirlər:
يَحۡذَرُ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ أَن تُنَزَّلَ عَلَيۡهِمۡ سُورَةٞ تُنَبِّئُهُم بِمَا فِي قُلُوبِهِمۡۚ قُلِ ٱسۡتَهۡزِءُوٓاْ إِنَّ ٱللَّهَ مُخۡرِجٞ مَّا تَحۡذَرُونَ
64. Bazali kobanga bato ya bilongi mibale été suratu ekitela bango, mpo ekundola makambo maye mazali o mitema mia bango. Loba: Bosala litio, ya soló, Allah nde mobimisi ya maye bozali kobangela.
Ərəbcə təfsirlər:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُمۡ لَيَقُولُنَّ إِنَّمَا كُنَّا نَخُوضُ وَنَلۡعَبُۚ قُلۡ أَبِٱللَّهِ وَءَايَٰتِهِۦ وَرَسُولِهِۦ كُنتُمۡ تَسۡتَهۡزِءُونَ
65. Mpe soki otuni bango, bakolobaka: Ya sólo, tozali nde kosolola mpe kosakana. Loba: Boye Allah, na mikapo mia ye, mpe na motindami waye bozali kotiola?
Ərəbcə təfsirlər:
لَا تَعۡتَذِرُواْ قَدۡ كَفَرۡتُم بَعۡدَ إِيمَٰنِكُمۡۚ إِن نَّعۡفُ عَن طَآئِفَةٖ مِّنكُمۡ نُعَذِّبۡ طَآئِفَةَۢ بِأَنَّهُمۡ كَانُواْ مُجۡرِمِينَ
66. Bokolimbisama te, bosilaki ya sólo, kopengwa o sima ya bondimi bwa bino, soki tolimbisi basusu kati na bino, tokopesa etumbu na basusu. Ya sólo, bango bazalaki batomboki.
Ərəbcə təfsirlər:
ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتُ بَعۡضُهُم مِّنۢ بَعۡضٖۚ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡمُنكَرِ وَيَنۡهَوۡنَ عَنِ ٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَقۡبِضُونَ أَيۡدِيَهُمۡۚ نَسُواْ ٱللَّهَ فَنَسِيَهُمۡۚ إِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ هُمُ ٱلۡفَٰسِقُونَ
67. Basi mpe mibali ya bilongi mibale bango na bango, bazali kotinda na mabe, mpe bazali kopekisa bolamu. Mpe bazali kokanga maboko na bango тропа kosala bolamu, babosani Allah, mpe atiki bango. Ya sólo, bango bazali babebisi.
Ərəbcə təfsirlər:
وَعَدَ ٱللَّهُ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡكُفَّارَ نَارَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ هِيَ حَسۡبُهُمۡۚ وَلَعَنَهُمُ ٱللَّهُۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ مُّقِيمٞ
68. Allah alaki basi mpe mibali ya bilongi mibale, na bapengwi, bakozalaka libela o móto ya lifelo, wana ekoki na bango. Mpe Allah alakeli bango botutu, mpe bakozalaka na etumbu ya suka te.
Ərəbcə təfsirlər:
 
Mənaların tərcüməsi Surə: ət-Tovbə
Surələrin mündəricatı Səhifənin rəqəmi
 
Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. - Tərcumənin mündəricatı

Tərcümə edən: Zəkəriyyə Muhəmməd Banğuğu.

Bağlamaq