Check out the new design

Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. * - Tərcumənin mündəricatı

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Mənaların tərcüməsi Surə: ət-Tovbə   Ayə:
رَضُواْ بِأَن يَكُونُواْ مَعَ ٱلۡخَوَالِفِ وَطُبِعَ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَفۡقَهُونَ
Bazali kosepela kotikala elongo na baye oyo bazwaki ndingisa ya kotikala тре mitema na bango masili kokangama mpe bazali koyeba eloko te.
Ərəbcə təfsirlər:
لَٰكِنِ ٱلرَّسُولُ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ جَٰهَدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡۚ وَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱلۡخَيۡرَٰتُۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
Kasi motindami na baye bandimaki naye, babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango. Mpe bango nde bakozalaka na bolamu, mpe bango nde balongi.
Ərəbcə təfsirlər:
أَعَدَّ ٱللَّهُ لَهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Allah asila kolengelela bango solo Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala. Bakozalaka libela o kati na yango, wana nde elonga enene.
Ərəbcə təfsirlər:
وَجَآءَ ٱلۡمُعَذِّرُونَ مِنَ ٱلۡأَعۡرَابِ لِيُؤۡذَنَ لَهُمۡ وَقَعَدَ ٱلَّذِينَ كَذَبُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۚ سَيُصِيبُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنۡهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Mpe o kati na baye bavandaka na bamboka, bayei kosenga ndingisa,[1] mpe na baye bakoselaki Allah na motindami waye batikali epai na bango. Bapengwi kati na bango bakozuaka etumbu ya makasi.
[1] Mpo bakende kobunda te.
Ərəbcə təfsirlər:
لَّيۡسَ عَلَى ٱلضُّعَفَآءِ وَلَا عَلَى ٱلۡمَرۡضَىٰ وَلَا عَلَى ٱلَّذِينَ لَا يَجِدُونَ مَا يُنفِقُونَ حَرَجٌ إِذَا نَصَحُواْ لِلَّهِ وَرَسُولِهِۦۚ مَا عَلَى ٱلۡمُحۡسِنِينَ مِن سَبِيلٖۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Kasi baye bazangi makasi ya nzoto, na bato ya bokono, na baye bazangi eloko ya kobimisa (тропа Allah) bazali na lisumu te soki bakei kobunda te, soki bazali na bosembo na mitema mia bango тропа Allah na motindami waye. Мре basali bolamu, bazali na Likebisi te тре Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Ərəbcə təfsirlər:
وَلَا عَلَى ٱلَّذِينَ إِذَا مَآ أَتَوۡكَ لِتَحۡمِلَهُمۡ قُلۡتَ لَآ أَجِدُ مَآ أَحۡمِلُكُمۡ عَلَيۡهِ تَوَلَّواْ وَّأَعۡيُنُهُمۡ تَفِيضُ مِنَ ٱلدَّمۡعِ حَزَنًا أَلَّا يَجِدُواْ مَا يُنفِقُونَ
Ezali mabe te тропа baye bayelaki yo mpo opesa bango bibundeli ya komatela, olobi na bango été: Nazali na bibundeli ya komatele te тропа bino. Bazongi na kolela mayi ya miso ezali kotanga na mawa nyoso été bazui eloko te ya kobimisa.
Ərəbcə təfsirlər:
۞ إِنَّمَا ٱلسَّبِيلُ عَلَى ٱلَّذِينَ يَسۡتَـٔۡذِنُونَكَ وَهُمۡ أَغۡنِيَآءُۚ رَضُواْ بِأَن يَكُونُواْ مَعَ ٱلۡخَوَالِفِ وَطَبَعَ ٱللَّهُ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
Kasi mabe (lisumu) ezali nde na baye bazali kosenga yo nzela ya kotikala mpe bazali na makoki nyoso ya bitumba, basepeli kotikala elongo na baye bakendeke bitumba te. Yango wana Allah abeti palata o mitema mia bango kasi bazali koyeba te.
Ərəbcə təfsirlər:
 
Mənaların tərcüməsi Surə: ət-Tovbə
Surələrin mündəricatı Səhifənin rəqəmi
 
Qurani Kərimin mənaca tərcüməsi - Lingala dilinə tərcümə- Məhəmməd Banğuğu. - Tərcumənin mündəricatı

Tərcümə edən: Zəkəriyyə Muhəmməd Banğuğu.

Bağlamaq