Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: An-Nahl   Ayah:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ أَشۡرَكُواْ لَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا عَبَدۡنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖ نَّحۡنُ وَلَآ ءَابَآؤُنَا وَلَا حَرَّمۡنَا مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖۚ كَذَٰلِكَ فَعَلَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ فَهَلۡ عَلَى ٱلرُّسُلِ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
35. Pe baye bazali kosangisa (Allah) balobi été: Soki Allah alingaki nde tobondelaki eloko mosusu te sé ye, ezala biso na batata na biso, nde topekisaki mpe eloko na esika naye te, lolenge wana nde baye balekaki liboso na bango bazalaki kosala, nde тропа batindami ezali sé kokomisa sango polele te?
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ بَعَثۡنَا فِي كُلِّ أُمَّةٖ رَّسُولًا أَنِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ وَٱجۡتَنِبُواْ ٱلطَّٰغُوتَۖ فَمِنۡهُم مَّنۡ هَدَى ٱللَّهُ وَمِنۡهُم مَّنۡ حَقَّتۡ عَلَيۡهِ ٱلضَّلَٰلَةُۚ فَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
36. Мре tosilaki kotinda na umma(1) nyonso motindami, mpo ayebisa bato naye été: Babondela Allah mpe bozala mosika na motomboki(2), kati na bango Allah akambaki, mpe kati na bango basusu libungi ekokisamaki likolo na bango. Botambola o kati ya mokili bótala ndenge esukela baye baboyaki kondima.
1 Umma: Elakisi: Etuka, bótala lisusu na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
2 Motomboki: Ezali eloko to moto nionso bazali kobondela ye mpe asepeli na mabondeli wana, mpe asepeli balanda ye na batosa ye na esika ya Allah, elingi mpe lisusu koloba: Kosambisa na mibeko oyo ezali ya Allah te mpe ya motindami naye te, bótala na suratu Al-Mâ-idah: Mokapo: 60, An-Nisá: 51, 60, 76, mpe Al-Baqarah: 256, 257.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِن تَحۡرِصۡ عَلَىٰ هُدَىٰهُمۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي مَن يُضِلُّۖ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
37. Ata ozali kosala ndenge nyoso mpo bakambama, ya soló, Allah akambaka baye babunga te mpe bakozua moto ya kosalisa mpe kolongisa bango te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَأَقۡسَمُواْ بِٱللَّهِ جَهۡدَ أَيۡمَٰنِهِمۡ لَا يَبۡعَثُ ٱللَّهُ مَن يَمُوتُۚ بَلَىٰ وَعۡدًا عَلَيۡهِ حَقّٗا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
38. Mpe bazali kolapa na nkombo ya Allah polele été: Allah akosekwisa bawa te. Nzoka nde wana ezali elaka ya bosôló epai naye, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِيُبَيِّنَ لَهُمُ ٱلَّذِي يَخۡتَلِفُونَ فِيهِ وَلِيَعۡلَمَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ كَانُواْ كَٰذِبِينَ
39. Mpo alimbola тропа bango maye bakokesene na yango, тре bapengwi bayeba ete ya sólo, bango bazalaki kokosa.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّمَا قَوۡلُنَا لِشَيۡءٍ إِذَآ أَرَدۡنَٰهُ أَن نَّقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
40. Ya sólo, tango tolingaka eloko, tokolobaka sé liloba moko: Zala; mpe ezalisami.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ هَاجَرُواْ فِي ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا ظُلِمُواْ لَنُبَوِّئَنَّهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗۖ وَلَأَجۡرُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
41. Мре baye batikaki (makkah) bakei na (madinah) na tango eye basilaki kobubama, tokofandisa bango na mokili ya bomoi ya kitoko. Kasi lifuta ya lola ezali monene soki bayebaki.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
42. Baye bakangaki mitema mpe batiaki elikia epai ya Nkolo wa bango.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: An-Nahl
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close