Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Adh-Dhāriyāt   Ayah:
۞ قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
31. (Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini?
Arabic explanations of the Qur’an:
قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمٖ مُّجۡرِمِينَ
32. Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِنُرۡسِلَ عَلَيۡهِمۡ حِجَارَةٗ مِّن طِينٖ
33. Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَ لِلۡمُسۡرِفِينَ
34. Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَخۡرَجۡنَا مَن كَانَ فِيهَا مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
35. Мре tobimisaki bandimi okati na bango.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَمَا وَجَدۡنَا فِيهَا غَيۡرَ بَيۡتٖ مِّنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
36. Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَتَرَكۡنَا فِيهَآ ءَايَةٗ لِّلَّذِينَ يَخَافُونَ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
37. Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَفِي مُوسَىٰٓ إِذۡ أَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٖ
38. (Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَتَوَلَّىٰ بِرُكۡنِهِۦ وَقَالَ سَٰحِرٌ أَوۡ مَجۡنُونٞ
39. Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَأَخَذۡنَٰهُ وَجُنُودَهُۥ فَنَبَذۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡيَمِّ وَهُوَ مُلِيمٞ
40. Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَفِي عَادٍ إِذۡ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمُ ٱلرِّيحَ ٱلۡعَقِيمَ
41. Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)
Arabic explanations of the Qur’an:
مَا تَذَرُ مِن شَيۡءٍ أَتَتۡ عَلَيۡهِ إِلَّا جَعَلَتۡهُ كَٱلرَّمِيمِ
42. Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَفِي ثَمُودَ إِذۡ قِيلَ لَهُمۡ تَمَتَّعُواْ حَتَّىٰ حِينٖ
43. Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَعَتَوۡاْ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَهُمۡ يَنظُرُونَ
44. Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ مِن قِيَامٖ وَمَا كَانُواْ مُنتَصِرِينَ
45. Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَوۡمَ نُوحٖ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
46. Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلسَّمَآءَ بَنَيۡنَٰهَا بِأَيۡيْدٖ وَإِنَّا لَمُوسِعُونَ
47. Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلۡأَرۡضَ فَرَشۡنَٰهَا فَنِعۡمَ ٱلۡمَٰهِدُونَ
48. Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando,
Arabic explanations of the Qur’an:
وَمِن كُلِّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَا زَوۡجَيۡنِ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
49. Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَفِرُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
50. Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَا تَجۡعَلُواْ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
51. Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Adh-Dhāriyāt
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close