Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Hadīd   Ayah:
لَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا رُسُلَنَا بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَأَنزَلۡنَا مَعَهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمِيزَانَ لِيَقُومَ ٱلنَّاسُ بِٱلۡقِسۡطِۖ وَأَنزَلۡنَا ٱلۡحَدِيدَ فِيهِ بَأۡسٞ شَدِيدٞ وَمَنَٰفِعُ لِلنَّاسِ وَلِيَعۡلَمَ ٱللَّهُ مَن يَنصُرُهُۥ وَرُسُلَهُۥ بِٱلۡغَيۡبِۚ إِنَّ ٱللَّهَ قَوِيٌّ عَزِيزٞ
25. Tosilaka kotinda batindami na biso na bilembetele, mpe tokitiselaki bango buku na emekelo mpo bato basalela bosembo, mpe tokitisaki libende ezala na makasi mingi, mpe mpo esalisa bato, mpo ete Allah ayeba nani oyo akosunga ye, na batindami naye na (lolenge) ya kobombama. Ya sólo Allah azali na bokasi atonda nguya.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحٗا وَإِبۡرَٰهِيمَ وَجَعَلۡنَا فِي ذُرِّيَّتِهِمَا ٱلنُّبُوَّةَ وَٱلۡكِتَٰبَۖ فَمِنۡهُم مُّهۡتَدٖۖ وَكَثِيرٞ مِّنۡهُمۡ فَٰسِقُونَ
26. Mpe tosilaki kotinda Núh na Ibrâhîm, mpe totiaki na bakitani na bango bontoma na buku, kati na bango basusu bakambami, mpe ebele na bango bazali mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ قَفَّيۡنَا عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِم بِرُسُلِنَا وَقَفَّيۡنَا بِعِيسَى ٱبۡنِ مَرۡيَمَ وَءَاتَيۡنَٰهُ ٱلۡإِنجِيلَۖ وَجَعَلۡنَا فِي قُلُوبِ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُ رَأۡفَةٗ وَرَحۡمَةٗۚ وَرَهۡبَانِيَّةً ٱبۡتَدَعُوهَا مَا كَتَبۡنَٰهَا عَلَيۡهِمۡ إِلَّا ٱبۡتِغَآءَ رِضۡوَٰنِ ٱللَّهِ فَمَا رَعَوۡهَا حَقَّ رِعَايَتِهَاۖ فَـَٔاتَيۡنَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنۡهُمۡ أَجۡرَهُمۡۖ وَكَثِيرٞ مِّنۡهُمۡ فَٰسِقُونَ
27. Mpe tolandisaki sima na bango batindami na biso, mpe tolandisaki Issa mwana ya Maryam mpe topesaki ye indjil mpe totiaki boboto mpe ngolu o mitema ya baye balandaki ye. Kasi kimupe oyo bazalaki na yango na sima, totindaki bango kosala yango te, kasi baluka nde bosepeli ya Allah, mpe basalelaki yango te ndenge esengelaki, na yango, topesaki baye bandimi kati na bango lifuta na bango. Kasi ebele na bango bazali mabe.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَءَامِنُواْ بِرَسُولِهِۦ يُؤۡتِكُمۡ كِفۡلَيۡنِ مِن رَّحۡمَتِهِۦ وَيَجۡعَل لَّكُمۡ نُورٗا تَمۡشُونَ بِهِۦ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
28. Eh bino bandimi! Bobanga Allah, mpe bondima na motindami naye, akopesa bino mbano mibale ya ngolu naye, mpe akotiela bino bongengi ete botambola na yango, mpe akolimbisa bino. Mpo ete Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Arabic explanations of the Qur’an:
لِّئَلَّا يَعۡلَمَ أَهۡلُ ٱلۡكِتَٰبِ أَلَّا يَقۡدِرُونَ عَلَىٰ شَيۡءٖ مِّن فَضۡلِ ٱللَّهِ وَأَنَّ ٱلۡفَضۡلَ بِيَدِ ٱللَّهِ يُؤۡتِيهِ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
29. Wana ezali mpo baye bazua buku liboso bayeba été: Bazali na makoki moko te likolo ya ngrásia ya Allah, mpo ete ya soló, bolamu ezali nde na maboko ya Allah, apesaka yango na moto oyo alingi. Mpe Allah atonda bolamu koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Hadīd
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close