Check out the new design

Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Hud   Versículo:
إِن نَّقُولُ إِلَّا ٱعۡتَرَىٰكَ بَعۡضُ ءَالِهَتِنَا بِسُوٓءٖۗ قَالَ إِنِّيٓ أُشۡهِدُ ٱللَّهَ وَٱشۡهَدُوٓاْ أَنِّي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُشۡرِكُونَ
Biso tokoloba sé été: Moko kati na ba nzambe na biso asili kosala yo mabe, alobaki na bango ete: Ya soló, ngai nazui Allah nzeneneke wa ngai, bino mpe bozala nzeneneke été ngai nawangani mpe nazali mosika na bikeko na bino na maye bozali kosangisa (Allah).
Las Exégesis Árabes:
مِن دُونِهِۦۖ فَكِيدُونِي جَمِيعٗا ثُمَّ لَا تُنظِرُونِ
Soki ye te (kotika Allah), bosalela ngai likita bino banso (na banzambe na bino), mpe bozelisa ngai te.
Las Exégesis Árabes:
إِنِّي تَوَكَّلۡتُ عَلَى ٱللَّهِ رَبِّي وَرَبِّكُمۚ مَّا مِن دَآبَّةٍ إِلَّا هُوَ ءَاخِذُۢ بِنَاصِيَتِهَآۚ إِنَّ رَبِّي عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
Ya sólo, natie elikia na ngai epai ya Allah Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino. Eloko moko te ekoki kozala na esika na yango sé ayeba yango (mpe azala na bokoki тропа yango). Ya sólo Nkolo wa ngai azali na nzela ya semba.
Las Exégesis Árabes:
فَإِن تَوَلَّوۡاْ فَقَدۡ أَبۡلَغۡتُكُم مَّآ أُرۡسِلۡتُ بِهِۦٓ إِلَيۡكُمۡۚ وَيَسۡتَخۡلِفُ رَبِّي قَوۡمًا غَيۡرَكُمۡ وَلَا تَضُرُّونَهُۥ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ رَبِّي عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٍ حَفِيظٞ
Mpe soki boboyi, ya sólo, ngai našili kokomisa maye natindamaki na yango epai na bino. Mpe Nkolo wa ngai akolongola bino mpe akoya na bato ya malamu na esika na bino, mpe bokosala ye eloko moko te. Ya sólo, Nkolo wa ngai azali mobateli ya biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
وَلَمَّا جَآءَ أَمۡرُنَا نَجَّيۡنَا هُودٗا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مَعَهُۥ بِرَحۡمَةٖ مِّنَّا وَنَجَّيۡنَٰهُم مِّنۡ عَذَابٍ غَلِيظٖ
Mpe tango mitindo mia biso miyaki, tobikisaki Hûd na baye bandimaki elongo naye, na mawa та biso, mpe tobikisaki bango na etumbu ya ekasi.
Las Exégesis Árabes:
وَتِلۡكَ عَادٞۖ جَحَدُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ وَعَصَوۡاْ رُسُلَهُۥ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَمۡرَ كُلِّ جَبَّارٍ عَنِيدٖ
Mpe wana nde bato ya aad (etuka ya mboka ya ntoma Hûd) baye babundisaki bilembo bia Nkolo wa bango, mpe bazangaki kotosa batindami ba bango, mpe balandaki likambo lia lolendo mpe mabe.
Las Exégesis Árabes:
وَأُتۡبِعُواْ فِي هَٰذِهِ ٱلدُّنۡيَا لَعۡنَةٗ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ أَلَآ إِنَّ عَادٗا كَفَرُواْ رَبَّهُمۡۗ أَلَا بُعۡدٗا لِّعَادٖ قَوۡمِ هُودٖ
Mpe botutu elandaki bango awa nanse mpe kino o mokolo mwa suka ekozala lokola, ya sôló ba aad bapengwaki penza na Nkolo wa bango, kasi ba aad bazala mosika (babebisama) bato ya Hûd?
Las Exégesis Árabes:
۞ وَإِلَىٰ ثَمُودَ أَخَاهُمۡ صَٰلِحٗاۚ قَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مَا لَكُم مِّنۡ إِلَٰهٍ غَيۡرُهُۥۖ هُوَ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ وَٱسۡتَعۡمَرَكُمۡ فِيهَا فَٱسۡتَغۡفِرُوهُ ثُمَّ تُوبُوٓاْ إِلَيۡهِۚ إِنَّ رَبِّي قَرِيبٞ مُّجِيبٞ
Mpe (totindaki) epai ya bato ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih. Alobaki: Oh bato bangai! Bobondela Allah. Bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosóló sé ye. Ye nde akela bino kowuta na mabele, mpe akomisi bino ebele o kati na yango. Bosenga ye bolimbisi, sima botubela epai naye. Ya soló, Nkolo wa ngai azalaka pene тропа koyanola. (ba mbela)
Las Exégesis Árabes:
قَالُواْ يَٰصَٰلِحُ قَدۡ كُنتَ فِينَا مَرۡجُوّٗا قَبۡلَ هَٰذَآۖ أَتَنۡهَىٰنَآ أَن نَّعۡبُدَ مَا يَعۡبُدُ ءَابَآؤُنَا وَإِنَّنَا لَفِي شَكّٖ مِّمَّا تَدۡعُونَآ إِلَيۡهِ مُرِيبٖ
Balobaki: Eh Swâlih! Yo ozalaki elikia na biso liboso. Okomi kopekisa biso tobondela banzambe ya bankoko na biso? Ya sólo penza, tozali na tembe mingi тропа maye ozali kobenga biso na yango.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Hud
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo - Índice de traducciones

Tradúzcala Zakaria Mohamed Balangugo.

Cerrar