Check out the new design

Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Al-Baqara   Versículo:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱلَّذِينَ هَادُواْ وَٱلنَّصَٰرَىٰ وَٱلصَّٰبِـِٔينَ مَنۡ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَلَهُمۡ أَجۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
62. Ya sôló, baye bandima mpe baye bamikomisi bayuda mpe baklisto na baswâbi-îna(1) oyo akondima na Allah mpe na mokolo mwa suka mpe asali misala ya malamu, bakofutama epai ya Nkolo wa bango, mpe bakozala na bobangi te, mpe mawa te.
1 Baswâbi-îna: Bazali bayuda te mpe baklisto te, kasi bazali ba sangisi Allah.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِيثَٰقَكُمۡ وَرَفَعۡنَا فَوۡقَكُمُ ٱلطُّورَ خُذُواْ مَآ ءَاتَيۡنَٰكُم بِقُوَّةٖ وَٱذۡكُرُواْ مَا فِيهِ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
63. Mpe bokanisa mikano miye tozuelaki bino, mpe totombolaki likolo na bino ngomba, bosimba maye topesi bino makasi mpe bokanisa maye mazali na kati na yango mpo ete bozala na bobangi (ya Allah).
Las Exégesis Árabes:
ثُمَّ تَوَلَّيۡتُم مِّنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَۖ فَلَوۡلَا فَضۡلُ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَرَحۡمَتُهُۥ لَكُنتُم مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
64. Sima bopesaki yango mokongo, mpe soki ezalaki bolamu ya Allah likolo ya bino mpe mawa naye te, nde bolingaki bozala na molongo ya bazangi.
Las Exégesis Árabes:
وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلَّذِينَ ٱعۡتَدَوۡاْ مِنكُمۡ فِي ٱلسَّبۡتِ فَقُلۡنَا لَهُمۡ كُونُواْ قِرَدَةً خَٰسِـِٔينَ
65. Mpe ya sôló boyebaki baye oyo balekisaki ndelo na kati ya bino mpona mokolo mwa mposo, mpe tolobaki na bango: bozala bamakako biloko bizangi ntina.
Las Exégesis Árabes:
فَجَعَلۡنَٰهَا نَكَٰلٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهَا وَمَا خَلۡفَهَا وَمَوۡعِظَةٗ لِّلۡمُتَّقِينَ
66. Mpe totiaki yango ezala ndakisa mpona bingumba biye bizalaki zingazinga na yango mpe ezalaki toli mpona babangi.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ قَالَ مُوسَىٰ لِقَوۡمِهِۦٓ إِنَّ ٱللَّهَ يَأۡمُرُكُمۡ أَن تَذۡبَحُواْ بَقَرَةٗۖ قَالُوٓاْ أَتَتَّخِذُنَا هُزُوٗاۖ قَالَ أَعُوذُ بِٱللَّهِ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
67. Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye: Ya sôló, Allah apesi na bino mobeko ete: Boboma ngombe. Balobaki: yo ozali kozua biso na maseki? (Mûssa) alobaki ete: Na mibateli epai ya Allah mpo ete nazala te na molongo ya bazoba.
Las Exégesis Árabes:
قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا هِيَۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ لَّا فَارِضٞ وَلَا بِكۡرٌ عَوَانُۢ بَيۡنَ ذَٰلِكَۖ فَٱفۡعَلُواْ مَا تُؤۡمَرُونَ
68. Balobaki: Sengela biso Nkolo nayo alakisa biso ngombe wana ezali ndenge nini. (Mûssa) alobi: Ya sôló ye Nkolo alobi: Ya sôló ngombe wana ezali mobange te mpe elenge te, ezali na kati kati ya wana. Mpe bosala maye botindami.
Las Exégesis Árabes:
قَالُواْ ٱدۡعُ لَنَا رَبَّكَ يُبَيِّن لَّنَا مَا لَوۡنُهَاۚ قَالَ إِنَّهُۥ يَقُولُ إِنَّهَا بَقَرَةٞ صَفۡرَآءُ فَاقِعٞ لَّوۡنُهَا تَسُرُّ ٱلنَّٰظِرِينَ
69. Balobaki: Sengela biso Nkolo wa yo alakisa biso polele langi na yango ezali nini. (Mûssa) alobaki: Ya sôló ye Nkolo na bino alobi: Ya sôló ngombe wana ezali na langi ya mosaka ya makasi(1) esepelisa bato tango bakomona yango.
1 Mayi ya mosaka.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Al-Baqara
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo - Índice de traducciones

Tradúzcala Zakaria Mohamed Balangugo.

Cerrar