Check out the new design

Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Al-Shu'araa   Versículo:
كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطٍ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
160. Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami,
Las Exégesis Árabes:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ لُوطٌ أَلَا تَتَّقُونَ
161. Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
Las Exégesis Árabes:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
162. Nazali motindami malamu тропа bino.
Las Exégesis Árabes:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
163. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
Las Exégesis Árabes:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
164. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
Las Exégesis Árabes:
أَتَأۡتُونَ ٱلذُّكۡرَانَ مِنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ
165. Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili?
Las Exégesis Árabes:
وَتَذَرُونَ مَا خَلَقَ لَكُمۡ رَبُّكُم مِّنۡ أَزۡوَٰجِكُمۚ بَلۡ أَنتُمۡ قَوۡمٌ عَادُونَ
166. Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)
Las Exégesis Árabes:
قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰلُوطُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُخۡرَجِينَ
167. Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)
Las Exégesis Árabes:
قَالَ إِنِّي لِعَمَلِكُم مِّنَ ٱلۡقَالِينَ
168. Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala.
Las Exégesis Árabes:
رَبِّ نَجِّنِي وَأَهۡلِي مِمَّا يَعۡمَلُونَ
169. Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala.
Las Exégesis Árabes:
فَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
170. Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso,
Las Exégesis Árabes:
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
171. Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu.
Las Exégesis Árabes:
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
172. Sima, tobomaki basusu baye batikalaki.
Las Exégesis Árabes:
وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِم مَّطَرٗاۖ فَسَآءَ مَطَرُ ٱلۡمُنذَرِينَ
173. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki?
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
174. Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
Las Exégesis Árabes:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
175. Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
176. Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami,
Las Exégesis Árabes:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ شُعَيۡبٌ أَلَا تَتَّقُونَ
177. Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
Las Exégesis Árabes:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
178. Nazali motindami malamu epai na bino.
Las Exégesis Árabes:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
179. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
Las Exégesis Árabes:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
180. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
Las Exégesis Árabes:
۞ أَوۡفُواْ ٱلۡكَيۡلَ وَلَا تَكُونُواْ مِنَ ٱلۡمُخۡسِرِينَ
181. Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te.
Las Exégesis Árabes:
وَزِنُواْ بِٱلۡقِسۡطَاسِ ٱلۡمُسۡتَقِيمِ
182. Mpe botondisa emekelo na bosembo.
Las Exégesis Árabes:
وَلَا تَبۡخَسُواْ ٱلنَّاسَ أَشۡيَآءَهُمۡ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
183. Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te).
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Al-Shu'araa
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo - Índice de traducciones

Tradúzcala Zakaria Mohamed Balangugo.

Cerrar