Traducción de los significados del Sagrado Corán - الترجمة اللينغالا * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Sura Al-Ahzaab   Versículo:

Al-Ahzâb (MAKITA)

يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ ٱتَّقِ ٱللَّهَ وَلَا تُطِعِ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقِينَۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلِيمًا حَكِيمٗا
1. Oh ntoma! Banga Allah kaši kotosa bapengwi te na bato ya bilongi mibale. Ya sôló, Allah azali moyebi atonda bwanya.
Las Exégesis Árabes:
وَٱتَّبِعۡ مَا يُوحَىٰٓ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٗا
2. Landa maye makitelaki yo kowuta epai ya Nkolo wa yo. Ya sólo, Allah azali na nsango ya maye bozali kosala.
Las Exégesis Árabes:
وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ وَكِيلٗا
3. Mpe mipesa na Allah, Allah akoki тропа kobatela yo.
Las Exégesis Árabes:
مَّا جَعَلَ ٱللَّهُ لِرَجُلٖ مِّن قَلۡبَيۡنِ فِي جَوۡفِهِۦۚ وَمَا جَعَلَ أَزۡوَٰجَكُمُ ٱلَّٰٓـِٔي تُظَٰهِرُونَ مِنۡهُنَّ أُمَّهَٰتِكُمۡۚ وَمَا جَعَلَ أَدۡعِيَآءَكُمۡ أَبۡنَآءَكُمۡۚ ذَٰلِكُمۡ قَوۡلُكُم بِأَفۡوَٰهِكُمۡۖ وَٱللَّهُ يَقُولُ ٱلۡحَقَّ وَهُوَ يَهۡدِي ٱلسَّبِيلَ
4. Allah atiyelaki moto mitema mibale te nakati naye. Mpe alukaki te kokokisa bamama ba bino na basi na bino na nzela ya zwihâr,(1) te mpe bana oyo bozali kobokolo bazali bana na bino te, oyo ezali liloba ezali kobima na minoko na bino, Allah nde azali koloba bosembo mpe azali kokamba na nzela.
1 Zwihâr: Elakisi: Koloba na muasi nayo ete okomi lelo lokola mokongo ya mama na mgai.
Las Exégesis Árabes:
ٱدۡعُوهُمۡ لِأٓبَآئِهِمۡ هُوَ أَقۡسَطُ عِندَ ٱللَّهِۚ فَإِن لَّمۡ تَعۡلَمُوٓاْ ءَابَآءَهُمۡ فَإِخۡوَٰنُكُمۡ فِي ٱلدِّينِ وَمَوَٰلِيكُمۡۚ وَلَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٞ فِيمَآ أَخۡطَأۡتُم بِهِۦ وَلَٰكِن مَّا تَعَمَّدَتۡ قُلُوبُكُمۡۚ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمًا
5. Bobenga bango na bankombo ya batata na bango, wana nde ezali bosembo epai ya Allah.Kaši soki boyebi batata na bango te, bozua bango bandeko na bino ya lingomba to mpe baninga na bino. Na yango bozali na lisumu te тропа mabe oyo bosali yango na libaku, kasi bokozala na lisumu na oyo mitema na bino etindi bino kosala. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
ٱلنَّبِيُّ أَوۡلَىٰ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ مِنۡ أَنفُسِهِمۡۖ وَأَزۡوَٰجُهُۥٓ أُمَّهَٰتُهُمۡۗ وَأُوْلُواْ ٱلۡأَرۡحَامِ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلَىٰ بِبَعۡضٖ فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُهَٰجِرِينَ إِلَّآ أَن تَفۡعَلُوٓاْ إِلَىٰٓ أَوۡلِيَآئِكُم مَّعۡرُوفٗاۚ كَانَ ذَٰلِكَ فِي ٱلۡكِتَٰبِ مَسۡطُورٗا
6. Ntoma azali na lokumu likolo ya bandimi koleka banzoto na bango moko, mpe basi naye bazali bamama na bango, mpe bondeko ya makila ezali makasi koleka bondeko ya lingomba na bapaya тропа bokitani ya mowei engebene na mokanda ya Allah, kasi ezali malamu ete botikela bandeko na bino ya lingomba malako na lolenge ya malamu. Boye nde esilaki kokomama na mokanda.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ أَخَذۡنَا مِنَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ مِيثَٰقَهُمۡ وَمِنكَ وَمِن نُّوحٖ وَإِبۡرَٰهِيمَ وَمُوسَىٰ وَعِيسَى ٱبۡنِ مَرۡيَمَۖ وَأَخَذۡنَا مِنۡهُم مِّيثَٰقًا غَلِيظٗا
7. Mpe tango tozuaki malako na bantoma, nayo mpe lokola, mpe Nûh, mpe Ibrâhîm, na Mûssa, mpe Issa mwana ya Maryam, tozuaki na bango mpenza elako ya makasi.
Las Exégesis Árabes:
لِّيَسۡـَٔلَ ٱلصَّٰدِقِينَ عَن صِدۡقِهِمۡۚ وَأَعَدَّ لِلۡكَٰفِرِينَ عَذَابًا أَلِيمٗا
8. Mpo ete (Allah) atuna bato ya bosembo тропа bosôló na bango. Mpe alengeli тропа bapagano etumbu ya makasi.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَةَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ إِذۡ جَآءَتۡكُمۡ جُنُودٞ فَأَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ رِيحٗا وَجُنُودٗا لَّمۡ تَرَوۡهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرًا
9. Oh bino bandimi! Bokanisa bolamu ya Allah epai na bino, tango mapinga (ya banguna) bayelaki bino, mpe totindelaki bango mopepe ya makasi mpe mapinga biye bomonaki bango te, mpe Allah azali kornona maye bozali kosala.
Las Exégesis Árabes:
إِذۡ جَآءُوكُم مِّن فَوۡقِكُمۡ وَمِنۡ أَسۡفَلَ مِنكُمۡ وَإِذۡ زَاغَتِ ٱلۡأَبۡصَٰرُ وَبَلَغَتِ ٱلۡقُلُوبُ ٱلۡحَنَاجِرَ وَتَظُنُّونَ بِٱللَّهِ ٱلظُّنُونَا۠
10. Tango bayelaki bino na likolo mpe na nsé, (bipai na bipai) mpe miso na bino mabulunganaki, mpe mitema mikomaki tii na mingongo, mpe bokaniselaki Allah makanisi nyoso.
Las Exégesis Árabes:
هُنَالِكَ ٱبۡتُلِيَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَزُلۡزِلُواْ زِلۡزَالٗا شَدِيدٗا
11. Kuna bandimi bamekamaki mpenza mpe babangisamaki makasi.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ يَقُولُ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ مَّا وَعَدَنَا ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥٓ إِلَّا غُرُورٗا
12. Mpe tango bato ya bilongi mibale na baye mitema mia bango mizali na bokono balobaki ete: Allah na motindami waye balakaki biso te sé lokuta.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ قَالَت طَّآئِفَةٞ مِّنۡهُمۡ يَٰٓأَهۡلَ يَثۡرِبَ لَا مُقَامَ لَكُمۡ فَٱرۡجِعُواْۚ وَيَسۡتَـٔۡذِنُ فَرِيقٞ مِّنۡهُمُ ٱلنَّبِيَّ يَقُولُونَ إِنَّ بُيُوتَنَا عَوۡرَةٞ وَمَا هِيَ بِعَوۡرَةٍۖ إِن يُرِيدُونَ إِلَّا فِرَارٗا
13. Mpe tango bato misusu balobaki ete: Oh bato ya yatsrib!(1) botelema te kasi bozonga nde sima, (epai na bino) mpe basusu kati na bango bakomaki kosenga ntoma balobi ete: Ya soló, bandako na biso bizali polele, nzoka nde ezalaki bongo te kasi balingaki nde kokima.
1 Yatsrib: Elakisi: Kombo ya Madinah ya kala.
Las Exégesis Árabes:
وَلَوۡ دُخِلَتۡ عَلَيۡهِم مِّنۡ أَقۡطَارِهَا ثُمَّ سُئِلُواْ ٱلۡفِتۡنَةَ لَأٓتَوۡهَا وَمَا تَلَبَّثُواْ بِهَآ إِلَّا يَسِيرٗا
14. Мре soki banguna bazuaka nzela ya kokotela bango na ekuke ya mboka mpe baloba na bango ete: Bopengwa sima ya kondima na bino, balingaki basala yango na lombango mpe balingaki bazela ata токе te.
Las Exégesis Árabes:
وَلَقَدۡ كَانُواْ عَٰهَدُواْ ٱللَّهَ مِن قَبۡلُ لَا يُوَلُّونَ ٱلۡأَدۡبَٰرَۚ وَكَانَ عَهۡدُ ٱللَّهِ مَسۡـُٔولٗا
15. Nzoka nde basilaki kozua elaka na Allah ete bakokima te. Kasi elaka ya Allah ekotunama.
Las Exégesis Árabes:
قُل لَّن يَنفَعَكُمُ ٱلۡفِرَارُ إِن فَرَرۡتُم مِّنَ ٱلۡمَوۡتِ أَوِ ٱلۡقَتۡلِ وَإِذٗا لَّا تُمَتَّعُونَ إِلَّا قَلِيلٗا
16. Loba: Kokima ekosalisa bino na eloko te, soki bozali kokima liwa to mpe mpasi ya kobunda, kasi bokosepela na bomoi ya nsé bobele tango ya токе.
Las Exégesis Árabes:
قُلۡ مَن ذَا ٱلَّذِي يَعۡصِمُكُم مِّنَ ٱللَّهِ إِنۡ أَرَادَ بِكُمۡ سُوٓءًا أَوۡ أَرَادَ بِكُمۡ رَحۡمَةٗۚ وَلَا يَجِدُونَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا
17. Loba: Nani akobatela bino soki Allah alingi mabe ezua bino too soki alingi ngolu naye ezua bino nani akopekisa yango? Mpe bakozua mokonzi mpe mosungi mosusu te na esika ya Allah.
Las Exégesis Árabes:
۞ قَدۡ يَعۡلَمُ ٱللَّهُ ٱلۡمُعَوِّقِينَ مِنكُمۡ وَٱلۡقَآئِلِينَ لِإِخۡوَٰنِهِمۡ هَلُمَّ إِلَيۡنَاۖ وَلَا يَأۡتُونَ ٱلۡبَأۡسَ إِلَّا قَلِيلًا
18. Allah ayebi ba oyo kati na bino bazali koluka mabe, mpe ba oyo bazali koloba na bandeko ba bango ete: Boya epai na biso, nzoka nde bango moko bazali kotelema makasi тропа bitumba sé tango ya токе.
Las Exégesis Árabes:
أَشِحَّةً عَلَيۡكُمۡۖ فَإِذَا جَآءَ ٱلۡخَوۡفُ رَأَيۡتَهُمۡ يَنظُرُونَ إِلَيۡكَ تَدُورُ أَعۡيُنُهُمۡ كَٱلَّذِي يُغۡشَىٰ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡمَوۡتِۖ فَإِذَا ذَهَبَ ٱلۡخَوۡفُ سَلَقُوكُم بِأَلۡسِنَةٍ حِدَادٍ أَشِحَّةً عَلَى ٱلۡخَيۡرِۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَمۡ يُؤۡمِنُواْ فَأَحۡبَطَ ٱللَّهُ أَعۡمَٰلَهُمۡۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٗا
19. Bazali koboya maye bozali kosala, mpe soki kobanga eyeli bango, okomona bazali kotala yo mpe bakomi kobalusa miso na bango lokola oyo liwa lizingi ye. Mpe soki kobanga esili, bafingi bino na monoko ya makasi oyo bozali koyoka te, lokola balingi kosala bolamu, bango bazali bandimi te, Allah asila kobebisa misala mia bango, mpe wana ezali pete тропа Allah.
Las Exégesis Árabes:
يَحۡسَبُونَ ٱلۡأَحۡزَابَ لَمۡ يَذۡهَبُواْۖ وَإِن يَأۡتِ ٱلۡأَحۡزَابُ يَوَدُّواْ لَوۡ أَنَّهُم بَادُونَ فِي ٱلۡأَعۡرَابِ يَسۡـَٔلُونَ عَنۡ أَنۢبَآئِكُمۡۖ وَلَوۡ كَانُواْ فِيكُم مَّا قَٰتَلُوٓاْ إِلَّا قَلِيلٗا
20. Bakanisaki ete makita ya banguna ezongaki naino te, nzoka nde soki bayelaka bango lisusu, balingaki коропа kozala baleki nzela baye bawuti na mboka ya zamba, mpo babanda kotuna basango na bino, ata soki bazalaki na kati na bino, balingaki mpe kobunda makasi te.
Las Exégesis Árabes:
لَّقَدۡ كَانَ لَكُمۡ فِي رَسُولِ ٱللَّهِ أُسۡوَةٌ حَسَنَةٞ لِّمَن كَانَ يَرۡجُواْ ٱللَّهَ وَٱلۡيَوۡمَ ٱلۡأٓخِرَ وَذَكَرَ ٱللَّهَ كَثِيرٗا
21. Na yango, bozali na ndakisa ya malamu ya kolanda epai ya ntoma, wana ezali тропа baye bazali kolikia na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe bazali kokanisa bokumisi Allah mingi.
Las Exégesis Árabes:
وَلَمَّا رَءَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلۡأَحۡزَابَ قَالُواْ هَٰذَا مَا وَعَدَنَا ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَصَدَقَ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥۚ وَمَا زَادَهُمۡ إِلَّآ إِيمَٰنٗا وَتَسۡلِيمٗا
22. Mpe tango bandimi bamonaki (banguna na) makita (na bango) balobaki ete: Oyo nde elaka Allah na motindami waye balakaki biso, mpe Allah na motindami waye balobaki bosóló, mpe ebakiselaki bango kondima mpe botosi.
Las Exégesis Árabes:
مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ رِجَالٞ صَدَقُواْ مَا عَٰهَدُواْ ٱللَّهَ عَلَيۡهِۖ فَمِنۡهُم مَّن قَضَىٰ نَحۡبَهُۥ وَمِنۡهُم مَّن يَنتَظِرُۖ وَمَا بَدَّلُواْ تَبۡدِيلٗا
23. O kati ya bandimi, ezali na mibali ya bosembo, baye bakokisaki elaka na bango epai ya Allah. Basusu kati na bango mokano ya liwa ekomeli bango, basusu bazali kozela mpe oyo ya bango, kasi babongolaki te.
Las Exégesis Árabes:
لِّيَجۡزِيَ ٱللَّهُ ٱلصَّٰدِقِينَ بِصِدۡقِهِمۡ وَيُعَذِّبَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ إِن شَآءَ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
24. Mpo Allah afuta baye bazali koloba solo na bosôló bwa bango, mpe apesa etumbu na bato ya bilongi mibale soki alingi, to akolimbisa bango. Ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
وَرَدَّ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِغَيۡظِهِمۡ لَمۡ يَنَالُواْ خَيۡرٗاۚ وَكَفَى ٱللَّهُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱلۡقِتَالَۚ وَكَانَ ٱللَّهُ قَوِيًّا عَزِيزٗا
25. Mpe Allah azongisaki mabe na bango (bapengwi), mpe bazuaki litomba moko te. Kasi Allah akoki na bandimi na bitumba (mpe asalisaka bango), mpe Allah azali makasi atonda nguya.
Las Exégesis Árabes:
وَأَنزَلَ ٱلَّذِينَ ظَٰهَرُوهُم مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مِن صَيَاصِيهِمۡ وَقَذَفَ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلرُّعۡبَ فَرِيقٗا تَقۡتُلُونَ وَتَأۡسِرُونَ فَرِيقٗا
26. Mpe Allah, akitisaki basungi na bango ya bayuda okati na bandako na bango, kasi bazuaki bolamu te kati ya bato babuku mpe akotisaki bobangi ya makasi kati na mitema mia bango, bobomaki basusu kati na bango, mpe basusu bokangaki na boloko.
Las Exégesis Árabes:
وَأَوۡرَثَكُمۡ أَرۡضَهُمۡ وَدِيَٰرَهُمۡ وَأَمۡوَٰلَهُمۡ وَأَرۡضٗا لَّمۡ تَطَـُٔوهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٗا
27. Mpe akitanisaki bino mabele na bango, bandako na bomengo na bango, mpe mabele mosusu oyo naino bonyati yango te, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ قُل لِّأَزۡوَٰجِكَ إِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتَهَا فَتَعَالَيۡنَ أُمَتِّعۡكُنَّ وَأُسَرِّحۡكُنَّ سَرَاحٗا جَمِيلٗا
28. Eh ntoma! Loba na basi nayo: Soki bolingi bomoyi ya mokili na bisengo bia yango, boya napesa bino yango mpe nakabwana na bino na lolenge ya malamu.
Las Exégesis Árabes:
وَإِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَٱلدَّارَ ٱلۡأٓخِرَةَ فَإِنَّ ٱللَّهَ أَعَدَّ لِلۡمُحۡسِنَٰتِ مِنكُنَّ أَجۡرًا عَظِيمٗا
29. Kasi soki bolingi Allah na motindami waye, na efandelo ya mokolo ya suka, ya soló Allah abombeli babongisi kati na bino (basi) lifuta linene.
Las Exégesis Árabes:
يَٰنِسَآءَ ٱلنَّبِيِّ مَن يَأۡتِ مِنكُنَّ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖ يُضَٰعَفۡ لَهَا ٱلۡعَذَابُ ضِعۡفَيۡنِۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٗا
30. Eh basi ya ntoma! Oyó kati na bino akoya na mabe oyo ezali polele na bilembo bimonani, tokobakisela ye etumbu mbala mibale. Mpe wana ezali pete тропа Allah.
Las Exégesis Árabes:
۞ وَمَن يَقۡنُتۡ مِنكُنَّ لِلَّهِ وَرَسُولِهِۦ وَتَعۡمَلۡ صَٰلِحٗا نُّؤۡتِهَآ أَجۡرَهَا مَرَّتَيۡنِ وَأَعۡتَدۡنَا لَهَا رِزۡقٗا كَرِيمٗا
31. Mpe oyo akotosa Allah na motindami waye kati na bino, mpe asali bolamu, tokofuta ye mbala mibale, mpe tokobombela ye bozui ya kitoko.
Las Exégesis Árabes:
يَٰنِسَآءَ ٱلنَّبِيِّ لَسۡتُنَّ كَأَحَدٖ مِّنَ ٱلنِّسَآءِ إِنِ ٱتَّقَيۡتُنَّۚ فَلَا تَخۡضَعۡنَ بِٱلۡقَوۡلِ فَيَطۡمَعَ ٱلَّذِي فِي قَلۡبِهِۦ مَرَضٞ وَقُلۡنَ قَوۡلٗا مَّعۡرُوفٗا
32. Oh! Bino basi ya ntoma. Bokokani na moko te kati ya basi soki bozali babangi (Allah) mpe soki bozali kosolola, bomimonisa mingi te na maloba kitoko; noki te oyo azali na bokono na motema naye alula bino te, kasi boloba maloba ya malamu mpe ya kitoko.
Las Exégesis Árabes:
وَقَرۡنَ فِي بُيُوتِكُنَّ وَلَا تَبَرَّجۡنَ تَبَرُّجَ ٱلۡجَٰهِلِيَّةِ ٱلۡأُولَىٰۖ وَأَقِمۡنَ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتِينَ ٱلزَّكَوٰةَ وَأَطِعۡنَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓۚ إِنَّمَا يُرِيدُ ٱللَّهُ لِيُذۡهِبَ عَنكُمُ ٱلرِّجۡسَ أَهۡلَ ٱلۡبَيۡتِ وَيُطَهِّرَكُمۡ تَطۡهِيرٗا
33. Bovanda na bandako na bino mpe bomitika nzoto polele te na lolenge ya boyinga ya kala, mpe botelemisa losambo mpe bopesa zakat(1), mpe botosa Allah na motindami waye. Ya soló Allah alingi kotiya bino mosika na mbindo, Oh bato ya ndako (ya ntoma)! Mpo apetola bino bopetoli bolamu.
1 Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 45.
Las Exégesis Árabes:
وَٱذۡكُرۡنَ مَا يُتۡلَىٰ فِي بُيُوتِكُنَّ مِنۡ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ وَٱلۡحِكۡمَةِۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ لَطِيفًا خَبِيرًا
34. Mpe bokanisaka mikapo mia Allah na bwanya miye mizali kotangama na bandako na bino. Ya sólo, Allah azali boboto atonda basango.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلۡمُسۡلِمِينَ وَٱلۡمُسۡلِمَٰتِ وَٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ وَٱلۡقَٰنِتِينَ وَٱلۡقَٰنِتَٰتِ وَٱلصَّٰدِقِينَ وَٱلصَّٰدِقَٰتِ وَٱلصَّٰبِرِينَ وَٱلصَّٰبِرَٰتِ وَٱلۡخَٰشِعِينَ وَٱلۡخَٰشِعَٰتِ وَٱلۡمُتَصَدِّقِينَ وَٱلۡمُتَصَدِّقَٰتِ وَٱلصَّٰٓئِمِينَ وَٱلصَّٰٓئِمَٰتِ وَٱلۡحَٰفِظِينَ فُرُوجَهُمۡ وَٱلۡحَٰفِظَٰتِ وَٱلذَّٰكِرِينَ ٱللَّهَ كَثِيرٗا وَٱلذَّٰكِرَٰتِ أَعَدَّ ٱللَّهُ لَهُم مَّغۡفِرَةٗ وَأَجۡرًا عَظِيمٗا
35. Ya sólo, bamizilima ya mibali na ya basi, bandimi ya mibali mpe basi, batosi ya mibali mpe ya basi, mibali ya bosembo mpe ya basi, bakangi mitema ya mibali mpe ya basi, mpe babangi Allah ya mibali mpe ya basi, bapesi mabonza ya mibali mpe ya basi, bakangi ya ngizi ya mibali mpe ya basi, babateli nzoto ya mibali mpe ya basi, bakundoli ya Allah mingi ya mibali mpe ya basi, ya sólo Allah alengeli тропа bango bolimbisi mpe lifuta linene.
Las Exégesis Árabes:
وَمَا كَانَ لِمُؤۡمِنٖ وَلَا مُؤۡمِنَةٍ إِذَا قَضَى ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥٓ أَمۡرًا أَن يَكُونَ لَهُمُ ٱلۡخِيَرَةُ مِنۡ أَمۡرِهِمۡۗ وَمَن يَعۡصِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَقَدۡ ضَلَّ ضَلَٰلٗا مُّبِينٗا
36. Mpe ezali te na mondimi ya mobali na ya mwasi, soki Allah na motindami waye batindi likambo, bapona lisusu (bango moko) lolenge ya kosala yango, oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, asili kobunga libunga ya polele.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذۡ تَقُولُ لِلَّذِيٓ أَنۡعَمَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِ وَأَنۡعَمۡتَ عَلَيۡهِ أَمۡسِكۡ عَلَيۡكَ زَوۡجَكَ وَٱتَّقِ ٱللَّهَ وَتُخۡفِي فِي نَفۡسِكَ مَا ٱللَّهُ مُبۡدِيهِ وَتَخۡشَى ٱلنَّاسَ وَٱللَّهُ أَحَقُّ أَن تَخۡشَىٰهُۖ فَلَمَّا قَضَىٰ زَيۡدٞ مِّنۡهَا وَطَرٗا زَوَّجۡنَٰكَهَا لِكَيۡ لَا يَكُونَ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ حَرَجٞ فِيٓ أَزۡوَٰجِ أَدۡعِيَآئِهِمۡ إِذَا قَضَوۡاْ مِنۡهُنَّ وَطَرٗاۚ وَكَانَ أَمۡرُ ٱللَّهِ مَفۡعُولٗا
37. Mpe tango ozalaki koloba na moto oyo Allah apesaki ye bolamu, yo mpe lokola osalaki ye bolamu, ozali koloba naye ete: Fanda na mwasi wayo mpe banga Allah, mpe ozalaki kobomba na motema nayo likambo oyo Allah alingaki ete elobama, mpe ozalaki kobanga bato; nzoka nde esengeli nayo kobanga Allah koleka, mpe tango Zaíd asilisaki bamposa naye na (mwasi ona) tobalisaki yo ye, тропа komonisa na bandimi ete: Kobala basi ya bana oyo babokoli ezali mabe te, soki basilisi bamposa na bango, na yango mibeko ya Allah esengeli ekokisama.
Las Exégesis Árabes:
مَّا كَانَ عَلَى ٱلنَّبِيِّ مِنۡ حَرَجٖ فِيمَا فَرَضَ ٱللَّهُ لَهُۥۖ سُنَّةَ ٱللَّهِ فِي ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلُۚ وَكَانَ أَمۡرُ ٱللَّهِ قَدَرٗا مَّقۡدُورًا
38. Ntoma azali na lisumu moko te тропа mokano oyo Allah atieli ye, wana ezali mobeko ya Allah uta kala na baye baleka liboso, mokano ya Allah esesngeli ekokisama.
Las Exégesis Árabes:
ٱلَّذِينَ يُبَلِّغُونَ رِسَٰلَٰتِ ٱللَّهِ وَيَخۡشَوۡنَهُۥ وَلَا يَخۡشَوۡنَ أَحَدًا إِلَّا ٱللَّهَۗ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ حَسِيبٗا
39. Baye bazali kokomisa etinda ya Allah, mpe bazali kobanga ye, kasi bazali kobanga moto moko te bobele Allah (ye mei), Allah nde akoki тропа kofuta.
Las Exégesis Árabes:
مَّا كَانَ مُحَمَّدٌ أَبَآ أَحَدٖ مِّن رِّجَالِكُمۡ وَلَٰكِن رَّسُولَ ٱللَّهِ وَخَاتَمَ ٱلنَّبِيِّـۧنَۗ وَكَانَ ٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٗا
40. Muhammad azalaki tata wa moto moko te kati ya mihali na bino, kasi azali nde motindami wa Allah mpe mosukisi wa bantoma, mpe Allah ayebi manso.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ ذِكۡرٗا كَثِيرٗا
41. Eh bino baye bondima! Bokumisa Allah lokumu ya mingi.
Las Exégesis Árabes:
وَسَبِّحُوهُ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلًا
42. Мре bosanzola ye tongo na pokwa.
Las Exégesis Árabes:
هُوَ ٱلَّذِي يُصَلِّي عَلَيۡكُمۡ وَمَلَٰٓئِكَتُهُۥ لِيُخۡرِجَكُم مِّنَ ٱلظُّلُمَٰتِ إِلَى ٱلنُّورِۚ وَكَانَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ رَحِيمٗا
43. Ye nde azali kosambela тропа bino(1) ye na ba anzelu naye mpo ete abimisa bino na molili atia bino na bongengi. Mpe azali na ngolu mpenza тропа bandimi.
1 Kosambela тропа bino: Losambo ya Allah elakisi: Koyokela bino "Mawa" mpe ya ba anzelu ezali nde kosengela bino "Bolimbisi".
Las Exégesis Árabes:
تَحِيَّتُهُمۡ يَوۡمَ يَلۡقَوۡنَهُۥ سَلَٰمٞۚ وَأَعَدَّ لَهُمۡ أَجۡرٗا كَرِيمٗا
44. Mbote na bango mokolo bakokutana naye ekozalaka nde boboto, mpe abombeli bango lifuta lilamu.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ شَٰهِدٗا وَمُبَشِّرٗا وَنَذِيرٗا
45. Eh ntoma! Ya soló, totindaki yo mpo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi.
Las Exégesis Árabes:
وَدَاعِيًا إِلَى ٱللَّهِ بِإِذۡنِهِۦ وَسِرَاجٗا مُّنِيرٗا
46. Mpe mobengi (bato) na nzela ya Allah na ndingisa naye moko, mpe ozala lokola mwinda ya bongengi.
Las Exégesis Árabes:
وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ بِأَنَّ لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ فَضۡلٗا كَبِيرٗا
47. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi, ete ya sólo, bakozua ngolu monene ya Allah.
Las Exégesis Árabes:
وَلَا تُطِعِ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَدَعۡ أَذَىٰهُمۡ وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ وَكِيلٗا
48. Kaši kotosa bapengwi na bato ya bilongi mibale te, mpe kolanda mabe na bango te, тре mipesa epai na Allah. Allah nde akoki lokola mobateli malamu. (тропа bato banso)
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا نَكَحۡتُمُ ٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ ثُمَّ طَلَّقۡتُمُوهُنَّ مِن قَبۡلِ أَن تَمَسُّوهُنَّ فَمَا لَكُمۡ عَلَيۡهِنَّ مِنۡ عِدَّةٖ تَعۡتَدُّونَهَاۖ فَمَتِّعُوهُنَّ وَسَرِّحُوهُنَّ سَرَاحٗا جَمِيلٗا
49. Eh bino bandimi! Soki bobali bandimi ya basi mpe bokabuani na bango yambo bosangana na bango bozali na mikolo ya kotanga te тропа bango ya kozela, bosalisa bango na bozui mpe bokabwana na bango na ndenge ya malamu.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ إِنَّآ أَحۡلَلۡنَا لَكَ أَزۡوَٰجَكَ ٱلَّٰتِيٓ ءَاتَيۡتَ أُجُورَهُنَّ وَمَا مَلَكَتۡ يَمِينُكَ مِمَّآ أَفَآءَ ٱللَّهُ عَلَيۡكَ وَبَنَاتِ عَمِّكَ وَبَنَاتِ عَمَّٰتِكَ وَبَنَاتِ خَالِكَ وَبَنَاتِ خَٰلَٰتِكَ ٱلَّٰتِي هَاجَرۡنَ مَعَكَ وَٱمۡرَأَةٗ مُّؤۡمِنَةً إِن وَهَبَتۡ نَفۡسَهَا لِلنَّبِيِّ إِنۡ أَرَادَ ٱلنَّبِيُّ أَن يَسۡتَنكِحَهَا خَالِصَةٗ لَّكَ مِن دُونِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَۗ قَدۡ عَلِمۡنَا مَا فَرَضۡنَا عَلَيۡهِمۡ فِيٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ وَمَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ لِكَيۡلَا يَكُونَ عَلَيۡكَ حَرَجٞۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
50. Oh ntoma! Ya soló topesi yo ndingisa ya basi oyo obali bango na mbongo nayo, na ba oyo ozuaki bango bawumbu na bitumba, tolingiseli yo mpe lokola bana basi ya tata kulutu to tata leki nayo, mpe bana basi ya batata mwasi nayo, mpe bana basi ya noko nayo, mpe bana basi ya bamama leki to mama kulutu nayo, baye bakendeki nayo elongo (na madinah), mpe mondimi ya mwasi oyo akomikaba тропа ntoma, soki ntoma akozala na mposa ya kobala ye, wana endimami тропа ntoma ye moko, kasi epai ya bandimi te. Ya soló, toyebi lotomo nini tosilaki kotiela bango, na ba oyo bazuaki bango na bowumbu, mpo ete bazua yo ntoma na mabe te. Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
۞ تُرۡجِي مَن تَشَآءُ مِنۡهُنَّ وَتُـٔۡوِيٓ إِلَيۡكَ مَن تَشَآءُۖ وَمَنِ ٱبۡتَغَيۡتَ مِمَّنۡ عَزَلۡتَ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكَۚ ذَٰلِكَ أَدۡنَىٰٓ أَن تَقَرَّ أَعۡيُنُهُنَّ وَلَا يَحۡزَنَّ وَيَرۡضَيۡنَ بِمَآ ءَاتَيۡتَهُنَّ كُلُّهُنَّۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا فِي قُلُوبِكُمۡۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَلِيمٗا
51. Okoki kozelisa oyo olingi kati na bango, mpe kovanda na oyo olingi, mpe bamona yango mabe te, soki obengi moko kati na ba oyo otiaki pembeni, wana ezali malamu тропа kosepelisa bango, mpo banyokuama te, mpe basepela na oyo opesi bango banso, kasi Allah ayebi manso maye mazali o mitema mia bino, mpe Allah azali moyebi atondo boboto.
Las Exégesis Árabes:
لَّا يَحِلُّ لَكَ ٱلنِّسَآءُ مِنۢ بَعۡدُ وَلَآ أَن تَبَدَّلَ بِهِنَّ مِنۡ أَزۡوَٰجٖ وَلَوۡ أَعۡجَبَكَ حُسۡنُهُنَّ إِلَّا مَا مَلَكَتۡ يَمِينُكَۗ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ رَّقِيبٗا
52. Esengeli nayo te kobala lisusu basi misusu na sima ya ba oyo, to тре kolongola basusu тропа kotia basusu, ata kitoko na bango ezali kokamuisa yo, longola sé bawumbu nayo. Mpe Allah azali mokengeli ya biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَدۡخُلُواْ بُيُوتَ ٱلنَّبِيِّ إِلَّآ أَن يُؤۡذَنَ لَكُمۡ إِلَىٰ طَعَامٍ غَيۡرَ نَٰظِرِينَ إِنَىٰهُ وَلَٰكِنۡ إِذَا دُعِيتُمۡ فَٱدۡخُلُواْ فَإِذَا طَعِمۡتُمۡ فَٱنتَشِرُواْ وَلَا مُسۡتَـٔۡنِسِينَ لِحَدِيثٍۚ إِنَّ ذَٰلِكُمۡ كَانَ يُؤۡذِي ٱلنَّبِيَّ فَيَسۡتَحۡيِۦ مِنكُمۡۖ وَٱللَّهُ لَا يَسۡتَحۡيِۦ مِنَ ٱلۡحَقِّۚ وَإِذَا سَأَلۡتُمُوهُنَّ مَتَٰعٗا فَسۡـَٔلُوهُنَّ مِن وَرَآءِ حِجَابٖۚ ذَٰلِكُمۡ أَطۡهَرُ لِقُلُوبِكُمۡ وَقُلُوبِهِنَّۚ وَمَا كَانَ لَكُمۡ أَن تُؤۡذُواْ رَسُولَ ٱللَّهِ وَلَآ أَن تَنكِحُوٓاْ أَزۡوَٰجَهُۥ مِنۢ بَعۡدِهِۦٓ أَبَدًاۚ إِنَّ ذَٰلِكُمۡ كَانَ عِندَ ٱللَّهِ عَظِيمًا
53. Eh bino bandimi! Bokota na ndako ya ntoma te sé soki babengi bino тропа kólia, bokota liboso te тропа kozela bilia, kasi soki babengi bino, bokota mbala moko тропа kólia, тре soki bosilisi kólia bopanzana, kasi boluka te kozala bai libota тропа kofandela masolo, pamba te yango ezali konyokola ntoma, mpe azali koyoka nsoni тропа koyebisa bino, kasi Allah ayokaka nsoni na bosembo te, mpe soki bozali kosenga basi naye biloko, esengeli bozala ya kobatama. Wana ezali kopetola mitema mia bino mpe mitema mia bango, bino te nde bosengeli konyokolo motindami wa Allah, mpe elingisami na bino te kobala basi naye sima ya liwa naye. Mpamba te ya soló, yango ezali mabe ya monene epai ya Allah.
Las Exégesis Árabes:
إِن تُبۡدُواْ شَيۡـًٔا أَوۡ تُخۡفُوهُ فَإِنَّ ٱللَّهَ كَانَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٗا
54. Oyo bozali komonisa polele na oyo bozali kobomba yango, ya solo Allah azali moyebi wa biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
لَّا جُنَاحَ عَلَيۡهِنَّ فِيٓ ءَابَآئِهِنَّ وَلَآ أَبۡنَآئِهِنَّ وَلَآ إِخۡوَٰنِهِنَّ وَلَآ أَبۡنَآءِ إِخۡوَٰنِهِنَّ وَلَآ أَبۡنَآءِ أَخَوَٰتِهِنَّ وَلَا نِسَآئِهِنَّ وَلَا مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُنَّۗ وَٱتَّقِينَ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدًا
55. Epekisami na bango te kofanda na batata na bamama na bango, mpe na bana na bango to bandeko na bango, to bana ya bandeko na bango ya basi na ya mibali, to baninga na bango basi, to bawumbu na bango, mpe babanga Allah. Mpamba te, ya sólo Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱللَّهَ وَمَلَٰٓئِكَتَهُۥ يُصَلُّونَ عَلَى ٱلنَّبِيِّۚ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ صَلُّواْ عَلَيۡهِ وَسَلِّمُواْ تَسۡلِيمًا
56. Ya sólo, Allah na ba anzelu naye basambelaka тропа ntoma(1) Oh! Bino baye bondima, bosambela тропа ye mpe bopesa mbote ya boboto.
1 Bótala na suratu oyo Mokapo: 43.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ لَعَنَهُمُ ٱللَّهُ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَأَعَدَّ لَهُمۡ عَذَابٗا مُّهِينٗا
57. Ya soló, baye bazali komonisa Allah na ntoma waye pasi, Allah akopesa bango botutu awa na nsé mpe o mokolo mwa suka, mpe abombeli bango etumbu ya nsoni.
Las Exégesis Árabes:
وَٱلَّذِينَ يُؤۡذُونَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ بِغَيۡرِ مَا ٱكۡتَسَبُواْ فَقَدِ ٱحۡتَمَلُواْ بُهۡتَٰنٗا وَإِثۡمٗا مُّبِينٗا
58. Mpe baye bazali kotungisa bandimi ya mibali mpe ya basi, тропа maye basali te, basili komema lisumu linene.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ قُل لِّأَزۡوَٰجِكَ وَبَنَاتِكَ وَنِسَآءِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ يُدۡنِينَ عَلَيۡهِنَّ مِن جَلَٰبِيبِهِنَّۚ ذَٰلِكَ أَدۡنَىٰٓ أَن يُعۡرَفۡنَ فَلَا يُؤۡذَيۡنَۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
59. Eh ntoma! Loba na basi nayo mpe na bana nayo ya basi, na basi ya bandimi ete: Bakitisa mpe balata kitambala na bango ya monene, (banda na motu ekita tii na bantolo na bango), wana ezali mpo ete bayebana mpo batungisama te, ya solo, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
۞ لَّئِن لَّمۡ يَنتَهِ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ وَٱلۡمُرۡجِفُونَ فِي ٱلۡمَدِينَةِ لَنُغۡرِيَنَّكَ بِهِمۡ ثُمَّ لَا يُجَاوِرُونَكَ فِيهَآ إِلَّا قَلِيلٗا
60. Soki bato ya bilongi mibale ya Madinah na baye bazali na bokono kati na mitema mia bango na bato ya mobulu, (ya batomboki) batiki te, tokotinda yo obundisa bango, na sima bakowumela pembeni nayo te sé токе.
Las Exégesis Árabes:
مَّلۡعُونِينَۖ أَيۡنَمَا ثُقِفُوٓاْ أُخِذُواْ وَقُتِّلُواْ تَقۡتِيلٗا
61. Bazali na botutu, bisika binso bakozuama, bakokangama mpe bakobomama na mawa te.
Las Exégesis Árabes:
سُنَّةَ ٱللَّهِ فِي ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلُۖ وَلَن تَجِدَ لِسُنَّةِ ٱللَّهِ تَبۡدِيلٗا
62. Wana ezali mobeko moye Allah atiya epai ya baye baleka liboso, mpe okokutaka mbonguana na mobeko mwa Allah te.
Las Exégesis Árabes:
يَسۡـَٔلُكَ ٱلنَّاسُ عَنِ ٱلسَّاعَةِۖ قُلۡ إِنَّمَا عِلۡمُهَا عِندَ ٱللَّهِۚ وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّ ٱلسَّاعَةَ تَكُونُ قَرِيبًا
63. Bato bazali kotuna yo тропа tango (tango ya bosambisami o mokolo ya suka), loba: Allah nde azali na boyebi na yango, mpe nini ekolakisa yo tango mosusu ngonga ezali pembeni?
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱللَّهَ لَعَنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَأَعَدَّ لَهُمۡ سَعِيرًا
64. Ya soló, Allah asila kopesa botutu na bapengwi, тре abombeli bango etumbu ya lifelo.
Las Exégesis Árabes:
خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۖ لَّا يَجِدُونَ وَلِيّٗا وَلَا نَصِيرٗا
65. Libela kati na yango, bakozuaka mosungi to mosalisi te.
Las Exégesis Árabes:
يَوۡمَ تُقَلَّبُ وُجُوهُهُمۡ فِي ٱلنَّارِ يَقُولُونَ يَٰلَيۡتَنَآ أَطَعۡنَا ٱللَّهَ وَأَطَعۡنَا ٱلرَّسُولَا۠
66. Mokolo bilongi na bango bikobalusama o kati ya lifelo bakoloba ete: Eh mawa na biso! Soki totosaki Allah тре totosaki motindami.
Las Exégesis Árabes:
وَقَالُواْ رَبَّنَآ إِنَّآ أَطَعۡنَا سَادَتَنَا وَكُبَرَآءَنَا فَأَضَلُّونَا ٱلسَّبِيلَا۠
67. Mpe bakolobaka: Nkolo wa biso ya sólo totosaki nde bakonzi na biso na bamikolo na biso, mpe bango nde babungisi biso nzela.
Las Exégesis Árabes:
رَبَّنَآ ءَاتِهِمۡ ضِعۡفَيۡنِ مِنَ ٱلۡعَذَابِ وَٱلۡعَنۡهُمۡ لَعۡنٗا كَبِيرٗا
68. Nkolo wa biso, pesa bango etumbu mbala mibale, mpe pesa bango botutu ya monene.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ ءَاذَوۡاْ مُوسَىٰ فَبَرَّأَهُ ٱللَّهُ مِمَّا قَالُواْۚ وَكَانَ عِندَ ٱللَّهِ وَجِيهٗا
69. Oh bino bandimi! Bozala te lokola ba oyo banyokolaki Mûssa, kasi Allah alongolaki ye na mabe na bango, mpe azalaki na lokumu na miso ya Allah.
Las Exégesis Árabes:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَقُولُواْ قَوۡلٗا سَدِيدٗا
70. Oh bino baye bondima! Bobanga Allah тре boloba liloba ya kitoko lia semba.
Las Exégesis Árabes:
يُصۡلِحۡ لَكُمۡ أَعۡمَٰلَكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡ ذُنُوبَكُمۡۗ وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَقَدۡ فَازَ فَوۡزًا عَظِيمًا
71. Akobongisela bino misala, na bino mpe akolimbisa masumu na bino. Мре oyo akotosa Allah na motindami waye, asili kolonga elonga enene.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّا عَرَضۡنَا ٱلۡأَمَانَةَ عَلَى ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَٱلۡجِبَالِ فَأَبَيۡنَ أَن يَحۡمِلۡنَهَا وَأَشۡفَقۡنَ مِنۡهَا وَحَمَلَهَا ٱلۡإِنسَٰنُۖ إِنَّهُۥ كَانَ ظَلُومٗا جَهُولٗا
72. Ya soló, topesaki mokumba(1) na likolo mpe na nsé mpe na bangomba, kasi baboyaki komema yango na kobanga, kasi moto amemaki yango. Nzoka nde azalaka na bosembo te, mpe boyebi te.
1 Mokumba: Elakisi: Kobondela Allah ye moko, kotika mabe kosala bolamu.
Las Exégesis Árabes:
لِّيُعَذِّبَ ٱللَّهُ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ وَٱلۡمُنَٰفِقَٰتِ وَٱلۡمُشۡرِكِينَ وَٱلۡمُشۡرِكَٰتِ وَيَتُوبَ ٱللَّهُ عَلَى ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمَۢا
73. Mpo Allah apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi, mpe bapengwi ya mibali mpe ya basi, mpe Allah akondima tubela ya bandimi ya mibali mpe ya basi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Sura Al-Ahzaab
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - الترجمة اللينغالا - Índice de traducciones

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

Cerrar