Traducción de los significados del Sagrado Corán - الترجمة اللينغالا * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Sura Fussilat   Versículo:

Fusswilat (MIKAPO MILIMBOLAMA)

حمٓ
1. Hâ, mîm(1).
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Las Exégesis Árabes:
تَنزِيلٞ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
2. Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
كِتَٰبٞ فُصِّلَتۡ ءَايَٰتُهُۥ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا لِّقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
3. Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba.
Las Exégesis Árabes:
بَشِيرٗا وَنَذِيرٗا فَأَعۡرَضَ أَكۡثَرُهُمۡ فَهُمۡ لَا يَسۡمَعُونَ
4. (Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te.
Las Exégesis Árabes:
وَقَالُواْ قُلُوبُنَا فِيٓ أَكِنَّةٖ مِّمَّا تَدۡعُونَآ إِلَيۡهِ وَفِيٓ ءَاذَانِنَا وَقۡرٞ وَمِنۢ بَيۡنِنَا وَبَيۡنِكَ حِجَابٞ فَٱعۡمَلۡ إِنَّنَا عَٰمِلُونَ
5. Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso.
Las Exégesis Árabes:
قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُوحَىٰٓ إِلَيَّ أَنَّمَآ إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَٱسۡتَقِيمُوٓاْ إِلَيۡهِ وَٱسۡتَغۡفِرُوهُۗ وَوَيۡلٞ لِّلۡمُشۡرِكِينَ
6. Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah),
Las Exégesis Árabes:
ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ
7. Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونٖ
8. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te.
Las Exégesis Árabes:
۞ قُلۡ أَئِنَّكُمۡ لَتَكۡفُرُونَ بِٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَرۡضَ فِي يَوۡمَيۡنِ وَتَجۡعَلُونَ لَهُۥٓ أَندَادٗاۚ ذَٰلِكَ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
9. Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili.
Las Exégesis Árabes:
وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِيَ مِن فَوۡقِهَا وَبَٰرَكَ فِيهَا وَقَدَّرَ فِيهَآ أَقۡوَٰتَهَا فِيٓ أَرۡبَعَةِ أَيَّامٖ سَوَآءٗ لِّلسَّآئِلِينَ
10. Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo.
Las Exégesis Árabes:
ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰٓ إِلَى ٱلسَّمَآءِ وَهِيَ دُخَانٞ فَقَالَ لَهَا وَلِلۡأَرۡضِ ٱئۡتِيَا طَوۡعًا أَوۡ كَرۡهٗا قَالَتَآ أَتَيۡنَا طَآئِعِينَ
11. Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso.
Las Exégesis Árabes:
فَقَضَىٰهُنَّ سَبۡعَ سَمَٰوَاتٖ فِي يَوۡمَيۡنِ وَأَوۡحَىٰ فِي كُلِّ سَمَآءٍ أَمۡرَهَاۚ وَزَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِمَصَٰبِيحَ وَحِفۡظٗاۚ ذَٰلِكَ تَقۡدِيرُ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡعَلِيمِ
12. Mpe akokisi bokeli likolo sambo okati ya mikolo mibale mpe abongisi makambo ya likolo moko na moko, mpe apesi likolo ya pene bozenga ya bongengi mpe bobatelami, wana mitindo ya oyo azali na nguya atonda boyebi.
Las Exégesis Árabes:
فَإِنۡ أَعۡرَضُواْ فَقُلۡ أَنذَرۡتُكُمۡ صَٰعِقَةٗ مِّثۡلَ صَٰعِقَةِ عَادٖ وَثَمُودَ
13. Soki baboyi loba (na bango): Nakebisaki bino etumbu oyo ekoboma, lokola oyo ezuaki bato ya Aad na Thamûd.
Las Exégesis Árabes:
إِذۡ جَآءَتۡهُمُ ٱلرُّسُلُ مِنۢ بَيۡنِ أَيۡدِيهِمۡ وَمِنۡ خَلۡفِهِمۡ أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۖ قَالُواْ لَوۡ شَآءَ رَبُّنَا لَأَنزَلَ مَلَٰٓئِكَةٗ فَإِنَّا بِمَآ أُرۡسِلۡتُم بِهِۦ كَٰفِرُونَ
14. Tango batindami na bango baydaki bango kowuta na bango moko liboso na sima, (balobaki na bango) ete: Bobondela sé bobde Allah, balobaki ete: Soki Nkolo na biso alingaki nde akitiselaki biso ba anzelu, na yango biso topengwi na maye botindami na yango.
Las Exégesis Árabes:
فَأَمَّا عَادٞ فَٱسۡتَكۡبَرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّ وَقَالُواْ مَنۡ أَشَدُّ مِنَّا قُوَّةًۖ أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّ ٱللَّهَ ٱلَّذِي خَلَقَهُمۡ هُوَ أَشَدُّ مِنۡهُمۡ قُوَّةٗۖ وَكَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَجۡحَدُونَ
15. Kasi тропа ba aad, basalaki lolendo na mokili kasi bosembo te, mpe balobaki etemani aleki biso na makasi? Boye bazali kornona te ete Allah oyo akeli bango ye nde aleki bango na makasi? Mpe bazalaki kowangana bilembo bia biso.
Las Exégesis Árabes:
فَأَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ رِيحٗا صَرۡصَرٗا فِيٓ أَيَّامٖ نَّحِسَاتٖ لِّنُذِيقَهُمۡ عَذَابَ ٱلۡخِزۡيِ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَخۡزَىٰۖ وَهُمۡ لَا يُنصَرُونَ
16. Mpe topesaki bango etumbu ya mopepe ya makasi mpe ya malili, mikolo mina mizalaki mabe mpo tomekisa bango etumbu yakokitisama, kati ya bomoyi ya mokili, mpe etumbu ya mokolo ya suka ekoleka lisusu makasi, mpe bakosungamaka te.
Las Exégesis Árabes:
وَأَمَّا ثَمُودُ فَهَدَيۡنَٰهُمۡ فَٱسۡتَحَبُّواْ ٱلۡعَمَىٰ عَلَى ٱلۡهُدَىٰ فَأَخَذَتۡهُمۡ صَٰعِقَةُ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡهُونِ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
17. Kasi тропа ba Thamüd, tokambaki bango, kasi basepelaki nde na molili o esika ya bokambami, nkake ya etumbu makasi ezuaki bango тропа ntina ya maye bazalaki kosala.
Las Exégesis Árabes:
وَنَجَّيۡنَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
18. Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe baye bazalaki na bobangi.
Las Exégesis Árabes:
وَيَوۡمَ يُحۡشَرُ أَعۡدَآءُ ٱللَّهِ إِلَى ٱلنَّارِ فَهُمۡ يُوزَعُونَ
19. Мре mokolo oyo banguna ya Allah bakosangisama ebele тропа kokende na moto, тре bokotindikama okati na yango.
Las Exégesis Árabes:
حَتَّىٰٓ إِذَا مَا جَآءُوهَا شَهِدَ عَلَيۡهِمۡ سَمۡعُهُمۡ وَأَبۡصَٰرُهُمۡ وَجُلُودُهُم بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
20. Kino bakokoma na kati, matoyi na bango na miso na bango na loposo na bango, mikozala nzeneneke likolo na bango тропа maye bazalaki kosala.
Las Exégesis Árabes:
وَقَالُواْ لِجُلُودِهِمۡ لِمَ شَهِدتُّمۡ عَلَيۡنَاۖ قَالُوٓاْ أَنطَقَنَا ٱللَّهُ ٱلَّذِيٓ أَنطَقَ كُلَّ شَيۡءٖۚ وَهُوَ خَلَقَكُمۡ أَوَّلَ مَرَّةٖ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
21. Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama.
Las Exégesis Árabes:
وَمَا كُنتُمۡ تَسۡتَتِرُونَ أَن يَشۡهَدَ عَلَيۡكُمۡ سَمۡعُكُمۡ وَلَآ أَبۡصَٰرُكُمۡ وَلَا جُلُودُكُمۡ وَلَٰكِن ظَنَنتُمۡ أَنَّ ٱللَّهَ لَا يَعۡلَمُ كَثِيرٗا مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
22. Mpe bokokaki te komibomba na matoyi mpe miso mpe loposo na bino ete balobela mabe na bino te, kasi bokanisaki nde ete: Allah ayebi te ebele ya maye bozalaki kosala.
Las Exégesis Árabes:
وَذَٰلِكُمۡ ظَنُّكُمُ ٱلَّذِي ظَنَنتُم بِرَبِّكُمۡ أَرۡدَىٰكُمۡ فَأَصۡبَحۡتُم مِّنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
23. Makanisi та bino maye bokanisaki mpona Nkolo wa bino ebomisi bino, yango ekotisi bino na molongo ya bazangi.
Las Exégesis Árabes:
فَإِن يَصۡبِرُواْ فَٱلنَّارُ مَثۡوٗى لَّهُمۡۖ وَإِن يَسۡتَعۡتِبُواْ فَمَا هُم مِّنَ ٱلۡمُعۡتَبِينَ
24. Ata soki bakangi motema, sé bobele moto nde ekozala efandelo na bango, mpe soki baluki kosenga bolimbisi ekondimama te.
Las Exégesis Árabes:
۞ وَقَيَّضۡنَا لَهُمۡ قُرَنَآءَ فَزَيَّنُواْ لَهُم مَّا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُمۡ وَحَقَّ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقَوۡلُ فِيٓ أُمَمٖ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهِم مِّنَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ خَٰسِرِينَ
25. Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi.
Las Exégesis Árabes:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَا تَسۡمَعُواْ لِهَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ وَٱلۡغَوۡاْ فِيهِ لَعَلَّكُمۡ تَغۡلِبُونَ
26. Mpe bapengwi balobi: Boyoka kurani eye te, bosalela yango makelele (tango ezali kotangama) mpo bolonga yango.
Las Exégesis Árabes:
فَلَنُذِيقَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ عَذَابٗا شَدِيدٗا وَلَنَجۡزِيَنَّهُمۡ أَسۡوَأَ ٱلَّذِي كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
27. Ya sólo, tokomekisaka bapengwi etumbu ya makasi, mpe tokofutaka bango mabe koleka тропа maye bazalaki kosala.
Las Exégesis Árabes:
ذَٰلِكَ جَزَآءُ أَعۡدَآءِ ٱللَّهِ ٱلنَّارُۖ لَهُمۡ فِيهَا دَارُ ٱلۡخُلۡدِ جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ بِـَٔايَٰتِنَا يَجۡحَدُونَ
28. Wana nde lifuta ya banguna ya Allah ekozalaka moto, bakovandaka kati na yango libela, lifuta lia etumbu тропа ndenge baboyaki kondima na mikapo mia biso.
Las Exégesis Árabes:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ رَبَّنَآ أَرِنَا ٱلَّذَيۡنِ أَضَلَّانَا مِنَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ نَجۡعَلۡهُمَا تَحۡتَ أَقۡدَامِنَا لِيَكُونَا مِنَ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
29. Mpe bapengwi bakolobaka: Nkolo; lakisa biso baye babungisaki biso kati ya bilima na bato, mpo totia bango na nsé ya makolo na biso, mpo bazala bato ya nsé na biso koleka. (okati ya moto)
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلَّذِينَ قَالُواْ رَبُّنَا ٱللَّهُ ثُمَّ ٱسۡتَقَٰمُواْ تَتَنَزَّلُ عَلَيۡهِمُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ أَلَّا تَخَافُواْ وَلَا تَحۡزَنُواْ وَأَبۡشِرُواْ بِٱلۡجَنَّةِ ٱلَّتِي كُنتُمۡ تُوعَدُونَ
30. Ya soló, baye bazali koloba ete: Nkolo na biso nde Allah, sima bamisembolami, ba anzelu bazali kokitela bango ete: Bobanga te mpe bomitungisa te, kasi bozua sango elamu ya Iola eye balakaki bino.
Las Exégesis Árabes:
نَحۡنُ أَوۡلِيَآؤُكُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِۖ وَلَكُمۡ فِيهَا مَا تَشۡتَهِيٓ أَنفُسُكُمۡ وَلَكُمۡ فِيهَا مَا تَدَّعُونَ
31. Tozali babateli na bino awa na mokili na mokolo mwa suka lokola, bokozuaka maye bokolingaka na maye bokosengaka.
Las Exégesis Árabes:
نُزُلٗا مِّنۡ غَفُورٖ رَّحِيمٖ
32. O esika ya boyambi epai ya molimbisi atonda ngolu.
Las Exégesis Árabes:
وَمَنۡ أَحۡسَنُ قَوۡلٗا مِّمَّن دَعَآ إِلَى ٱللَّهِ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا وَقَالَ إِنَّنِي مِنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
33. Nani azali na liloba kitoko koleka moto oyo azali kobenga bato epai na Allah, mpe asali mosala ya malamu, mpe alobi ete: Ya sólo, ngai nazali okati ya bamizilima.
Las Exégesis Árabes:
وَلَا تَسۡتَوِي ٱلۡحَسَنَةُ وَلَا ٱلسَّيِّئَةُۚ ٱدۡفَعۡ بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُ فَإِذَا ٱلَّذِي بَيۡنَكَ وَبَيۡنَهُۥ عَدَٰوَةٞ كَأَنَّهُۥ وَلِيٌّ حَمِيمٞ
34. Mpe kosala bolamu na kosala mabe ezali ndenge moko te. Longola mabe na ndenge ya malamu, mpe oyo azalaki monguna nayo, akokoma moninga nayo ya makasi.
Las Exégesis Árabes:
وَمَا يُلَقَّىٰهَآ إِلَّا ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَمَا يُلَقَّىٰهَآ إِلَّا ذُو حَظٍّ عَظِيمٖ
35. Mpe likabo ya boye epesamaki te sé na bakangi mitema, mpe epesamaka sé na oyo atonda ngrásia.
Las Exégesis Árabes:
وَإِمَّا يَنزَغَنَّكَ مِنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ نَزۡغٞ فَٱسۡتَعِذۡ بِٱللَّهِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
36. Mpe soki satana abandi kotungisa yo, senga libateli epai na Allah, mpo ete azali moyoki atonda boyebi.
Las Exégesis Árabes:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِ ٱلَّيۡلُ وَٱلنَّهَارُ وَٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُۚ لَا تَسۡجُدُواْ لِلشَّمۡسِ وَلَا لِلۡقَمَرِ وَٱسۡجُدُواْۤ لِلَّهِۤ ٱلَّذِي خَلَقَهُنَّ إِن كُنتُمۡ إِيَّاهُ تَعۡبُدُونَ
37. Мре okati ya bilembo bia ye (Allah), ezali butu na mokolo, moyi na sanza, bogumbamela moyi na sanza te, kasi bogumbamela Allah oyo akela yango, soki ya soló, bozali kobondela ye.
Las Exégesis Árabes:
فَإِنِ ٱسۡتَكۡبَرُواْ فَٱلَّذِينَ عِندَ رَبِّكَ يُسَبِّحُونَ لَهُۥ بِٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَهُمۡ لَا يَسۡـَٔمُونَ۩
38. Mpe soki basali lolendo,kasi baye bazali pembeni ya Nkolo nayo, bakumisaka ye butu na moyi mpe bazali kolemba te.
Las Exégesis Árabes:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦٓ أَنَّكَ تَرَى ٱلۡأَرۡضَ خَٰشِعَةٗ فَإِذَآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡهَا ٱلۡمَآءَ ٱهۡتَزَّتۡ وَرَبَتۡۚ إِنَّ ٱلَّذِيٓ أَحۡيَاهَا لَمُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰٓۚ إِنَّهُۥ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
39. O kati na bilembo bia ye, ozali kornona mabele ekawuki na botosi mpe bobangi, mpe tango tokitisaka mayi likolo na yango, etombwamaka mpe ekomi monene. Ya sólo oyo apesi yango bomoi, ye nde akosekwisa bawa. Ya sólo, azali na bokoki likolo ya biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يُلۡحِدُونَ فِيٓ ءَايَٰتِنَا لَا يَخۡفَوۡنَ عَلَيۡنَآۗ أَفَمَن يُلۡقَىٰ فِي ٱلنَّارِ خَيۡرٌ أَم مَّن يَأۡتِيٓ ءَامِنٗا يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۚ ٱعۡمَلُواْ مَا شِئۡتُمۡ إِنَّهُۥ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٌ
40. Ya sólo, baye bazali kobebisa ndimbola ya mikapo mia biso, bakokoka kokima biso te. Boye, moto oyo akobwakama na moto azali malamu koleka oyo akoyakaka na kimia o mokolo ya suka? Bosala maye bolingi, ya sólo, amonaka maye bozali kosala.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِٱلذِّكۡرِ لَمَّا جَآءَهُمۡۖ وَإِنَّهُۥ لَكِتَٰبٌ عَزِيزٞ
41. Ya sólo, baye bapengwa na bokundoli (kurani) tango eyelaki bango, mpe ya sólo yango ezali buku ya lokumu.
Las Exégesis Árabes:
لَّا يَأۡتِيهِ ٱلۡبَٰطِلُ مِنۢ بَيۡنِ يَدَيۡهِ وَلَا مِنۡ خَلۡفِهِۦۖ تَنزِيلٞ مِّنۡ حَكِيمٍ حَمِيدٖ
42. Mabe ezuaka yango sikoyo te(1), to sima na yango te, ewuti epai ya oyo azali bwanya atonda lokumu.
1 Mabe ezuaka yango te: Elingi koloba: Mbeba ezuaka yango te, ezala liboso to sima
Las Exégesis Árabes:
مَّا يُقَالُ لَكَ إِلَّا مَا قَدۡ قِيلَ لِلرُّسُلِ مِن قَبۡلِكَۚ إِنَّ رَبَّكَ لَذُو مَغۡفِرَةٖ وَذُو عِقَابٍ أَلِيمٖ
43. Oyo ezali kolobama ezali sé oyo esila kolobama na batindami liboso nayo. Ya soló, Nkolo nayo atonda bolimbisi mpe azali makasi na kopesa etumbu.
na yango.
Las Exégesis Árabes:
وَلَوۡ جَعَلۡنَٰهُ قُرۡءَانًا أَعۡجَمِيّٗا لَّقَالُواْ لَوۡلَا فُصِّلَتۡ ءَايَٰتُهُۥٓۖ ءَا۬عۡجَمِيّٞ وَعَرَبِيّٞۗ قُلۡ هُوَ لِلَّذِينَ ءَامَنُواْ هُدٗى وَشِفَآءٞۚ وَٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ فِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٞ وَهُوَ عَلَيۡهِمۡ عَمًىۚ أُوْلَٰٓئِكَ يُنَادَوۡنَ مِن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ
44. Mpe soki totiaka kurani oyo na lokota mosusu (ya arabo te), balingaki koloba ete: Mpona nini balimboli mikapo na yango polele te? Nini? Kurani na lokota ya bapaya (motindami) arabo? Loba: Yango ezali bokambi mpe libiki mpona bandimi, kasi baye bandimi te matoyi na bango makangami mpe miso na bango mazipami. Bango wana nde bakobengama о esika ya mosika.
Las Exégesis Árabes:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ فَٱخۡتُلِفَ فِيهِۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡۚ وَإِنَّهُمۡ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُ مُرِيبٖ
45. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, sima bokeseni ekotaki. Mpe soki mpona liloba ya Nkolo nayo te oyo esilaki kolobama, nde likambo esili kokatama kati na bango. Mpe bazali sé na tembe.
Las Exégesis Árabes:
مَّنۡ عَمِلَ صَٰلِحٗا فَلِنَفۡسِهِۦۖ وَمَنۡ أَسَآءَ فَعَلَيۡهَاۗ وَمَا رَبُّكَ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ
46. Oyo akosala malamu, ezali mpona ye moko, mpe oyo akobebisa ezali sé mpona ye moko. Kasi Nkolo wayo abubaka kati kati ya bawumbu naye te.
Las Exégesis Árabes:
۞ إِلَيۡهِ يُرَدُّ عِلۡمُ ٱلسَّاعَةِۚ وَمَا تَخۡرُجُ مِن ثَمَرَٰتٖ مِّنۡ أَكۡمَامِهَا وَمَا تَحۡمِلُ مِنۡ أُنثَىٰ وَلَا تَضَعُ إِلَّا بِعِلۡمِهِۦۚ وَيَوۡمَ يُنَادِيهِمۡ أَيۡنَ شُرَكَآءِي قَالُوٓاْ ءَاذَنَّٰكَ مَا مِنَّا مِن شَهِيدٖ
47. Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda.
Las Exégesis Árabes:
وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَدۡعُونَ مِن قَبۡلُۖ وَظَنُّواْ مَا لَهُم مِّن مَّحِيصٖ
48. Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te.
Las Exégesis Árabes:
لَّا يَسۡـَٔمُ ٱلۡإِنسَٰنُ مِن دُعَآءِ ٱلۡخَيۡرِ وَإِن مَّسَّهُ ٱلشَّرُّ فَيَـُٔوسٞ قَنُوطٞ
49. Moto atikaka kosenga bolamu te, mpe soki mabe ezui ye alongoli elikia.
Las Exégesis Árabes:
وَلَئِنۡ أَذَقۡنَٰهُ رَحۡمَةٗ مِّنَّا مِنۢ بَعۡدِ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُ لَيَقُولَنَّ هَٰذَا لِي وَمَآ أَظُنُّ ٱلسَّاعَةَ قَآئِمَةٗ وَلَئِن رُّجِعۡتُ إِلَىٰ رَبِّيٓ إِنَّ لِي عِندَهُۥ لَلۡحُسۡنَىٰۚ فَلَنُنَبِّئَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِمَا عَمِلُواْ وَلَنُذِيقَنَّهُم مِّنۡ عَذَابٍ غَلِيظٖ
50. Mpe soki topesi ye bolamu na biso o sima ya mpasi azalaki na yango, alobi: Oyo ezali na mayele na ngai, mpe nandimi te ete mokolo ya suka ezali, mpe soki bazongisi ngai epai na Nkolo na ngai, nakozua sé oyo ya ngai ya kitoko. Mpe тропа baye bapengwa tokopesa bango sango ya maye bazalaki kosala, mpe tokomekisa bango etumbu ya makasi.
Las Exégesis Árabes:
وَإِذَآ أَنۡعَمۡنَا عَلَى ٱلۡإِنسَٰنِ أَعۡرَضَ وَنَـَٔا بِجَانِبِهِۦ وَإِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ فَذُو دُعَآءٍ عَرِيضٖ
51. Мре tango topesaka moto bolamu, akimaka mosika, mpe soki mabe ezui ye akomi kosenga makasi.
Las Exégesis Árabes:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كَانَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ ثُمَّ كَفَرۡتُم بِهِۦ مَنۡ أَضَلُّ مِمَّنۡ هُوَ فِي شِقَاقِۭ بَعِيدٖ
52. Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano?
Las Exégesis Árabes:
سَنُرِيهِمۡ ءَايَٰتِنَا فِي ٱلۡأٓفَاقِ وَفِيٓ أَنفُسِهِمۡ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَهُمۡ أَنَّهُ ٱلۡحَقُّۗ أَوَلَمۡ يَكۡفِ بِرَبِّكَ أَنَّهُۥ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٌ
53. Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso.
Las Exégesis Árabes:
أَلَآ إِنَّهُمۡ فِي مِرۡيَةٖ مِّن لِّقَآءِ رَبِّهِمۡۗ أَلَآ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءٖ مُّحِيطُۢ
54. Bazali na tembe тропа bokutani na Nkolo wa bango. Ya sólo ye azingi biloko binso.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Sura Fussilat
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - الترجمة اللينغالا - Índice de traducciones

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

Cerrar