Check out the new design

Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Al-An'aam   Versículo:
قُلۡ أَيُّ شَيۡءٍ أَكۡبَرُ شَهَٰدَةٗۖ قُلِ ٱللَّهُۖ شَهِيدُۢ بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡۚ وَأُوحِيَ إِلَيَّ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ لِأُنذِرَكُم بِهِۦ وَمَنۢ بَلَغَۚ أَئِنَّكُمۡ لَتَشۡهَدُونَ أَنَّ مَعَ ٱللَّهِ ءَالِهَةً أُخۡرَىٰۚ قُل لَّآ أَشۡهَدُۚ قُلۡ إِنَّمَا هُوَ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ وَإِنَّنِي بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُشۡرِكُونَ
19. Loba: Eloko nini ezali monene koleka litatoli? Loba: Allah, azali nzeneneke kati na ngai na bino, mpe bakitiseli ngai kurani oyo mpo ete nakebisa bino na yango na bato banso ekokomela bango. Boye, bino bozali kotatola ete ezali na ba nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Nakotatola te. Loba: Azali solo Nzambe moko, mpe nazali mosika na maye bozali kosangisa ye na yango.
Las Exégesis Árabes:
ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يَعۡرِفُونَهُۥ كَمَا يَعۡرِفُونَ أَبۡنَآءَهُمُۘ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
20. Baye topesaki bango buku bayebi ye (Muhammad) ndenge bayebi bana na bango, baye bamizangisi bango moko, bango nde bandimaka te.
Las Exégesis Árabes:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِـَٔايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلظَّٰلِمُونَ
21. Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta mpe azali koboya mikapo mia ye? Ya soló, babubi bakolonga te.
Las Exégesis Árabes:
وَيَوۡمَ نَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا ثُمَّ نَقُولُ لِلَّذِينَ أَشۡرَكُوٓاْ أَيۡنَ شُرَكَآؤُكُمُ ٱلَّذِينَ كُنتُمۡ تَزۡعُمُونَ
22. Mpe mokolo oyo tokosangisa bango banso sima tokoloba na baye bazalaki kosangisa: Wapi basangisi na bino bozalaki kotutela tolo?
Las Exégesis Árabes:
ثُمَّ لَمۡ تَكُن فِتۡنَتُهُمۡ إِلَّآ أَن قَالُواْ وَٱللَّهِ رَبِّنَا مَا كُنَّا مُشۡرِكِينَ
23. Na masumu na bango, etikalaki te sé baloba ete: Nakombo ya Allah, Nkolo wa biso tozalaki basangisi te.
Las Exégesis Árabes:
ٱنظُرۡ كَيۡفَ كَذَبُواْ عَلَىٰٓ أَنفُسِهِمۡۚ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
24. Tala ndenge bakosi milimo na bango moko, mpe esundoli banga maye bazalaki kosangisa (na Allah).
Las Exégesis Árabes:
وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُ إِلَيۡكَۖ وَجَعَلۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ أَكِنَّةً أَن يَفۡقَهُوهُ وَفِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٗاۚ وَإِن يَرَوۡاْ كُلَّ ءَايَةٖ لَّا يُؤۡمِنُواْ بِهَاۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءُوكَ يُجَٰدِلُونَكَ يَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
25. Mpe okati na bango basusu bazali koyokamela yo, mpe tozipaki mitema na bango mpo ete bayeba yango te(1) mpe matoyi na bango makangami. Mpe elembo nyoso bakomona yango bakondima na yango te. Kino bakoya epai nayo mpo na kosuanisa yo, bapengwi bazali koloba ete: Oyó ezali sé masapo ya bato ya kala.
1 Kurani.
Las Exégesis Árabes:
وَهُمۡ يَنۡهَوۡنَ عَنۡهُ وَيَنۡـَٔوۡنَ عَنۡهُۖ وَإِن يُهۡلِكُونَ إِلَّآ أَنفُسَهُمۡ وَمَا يَشۡعُرُونَ
26. Mpe bazali kopekisa bato bapusana pembeni naye mpe bango moko bazali komipekisa. Nzoka nde bazali komiboma kasi bazali koyeba te.
Las Exégesis Árabes:
وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ وُقِفُواْ عَلَى ٱلنَّارِ فَقَالُواْ يَٰلَيۡتَنَا نُرَدُّ وَلَا نُكَذِّبَ بِـَٔايَٰتِ رَبِّنَا وَنَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
27. Mpe soki omona, ntango bakotelemisa bango liboso ya lifelo bakoloba ete: Eh biso mpasi! Tozonga lisusu na mokili tokoboya mikapo mia Nkolo na biso te, mpe tokozala okati ya bandimi.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Al-An'aam
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo - Índice de traducciones

Tradúzcala Zakaria Mohamed Balangugo.

Cerrar