Check out the new design

Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo * - Índice de traducciones

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traducción de significados Capítulo: Al-A'raaf   Versículo:
وَلَقَدۡ جِئۡنَٰهُم بِكِتَٰبٖ فَصَّلۡنَٰهُ عَلَىٰ عِلۡمٍ هُدٗى وَرَحۡمَةٗ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
52. Toyelaki bango buku eye tolimbolaki yango, na boyebi bonso тропа bokambi mpe ngolu тропа bato baye bazali kondima.
Las Exégesis Árabes:
هَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا تَأۡوِيلَهُۥۚ يَوۡمَ يَأۡتِي تَأۡوِيلُهُۥ يَقُولُ ٱلَّذِينَ نَسُوهُ مِن قَبۡلُ قَدۡ جَآءَتۡ رُسُلُ رَبِّنَا بِٱلۡحَقِّ فَهَل لَّنَا مِن شُفَعَآءَ فَيَشۡفَعُواْ لَنَآ أَوۡ نُرَدُّ فَنَعۡمَلَ غَيۡرَ ٱلَّذِي كُنَّا نَعۡمَلُۚ قَدۡ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
53. Boye bazali kozela sé etumbu naye? Mokolo moye etumbu naye ekoyaka, baye babosanaki liboso bakolobaka: Batindami ya Nkolo wa biso bayaki na bosôló, boye na mokolo mwa lelo tozali na basungi baye bakosungaka biso? To, tozongisama na mokili tosala maye tozalaki kosala liboso te! Basilaki komizangisa bango moko, mpe maye bazalaki kosala ya mabe ebungisaki bango.
Las Exégesis Árabes:
إِنَّ رَبَّكُمُ ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ يُغۡشِي ٱلَّيۡلَ ٱلنَّهَارَ يَطۡلُبُهُۥ حَثِيثٗا وَٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ وَٱلنُّجُومَ مُسَخَّرَٰتِۭ بِأَمۡرِهِۦٓۗ أَلَا لَهُ ٱلۡخَلۡقُ وَٱلۡأَمۡرُۗ تَبَارَكَ ٱللَّهُ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
54. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba sima atombuami likolo na ngwende. Azali kozipa butu na mokolo. Azali kolandisa yango mpe ezali kotelema te, (akeli) moyi na sanza, na minzoto, minso mizali kotambola na botosi mitindo mia ye. Boye, bokeli na mibeko minso mizali mia ye te? Nkembo na Allah Nkolo wa molongo.
Las Exégesis Árabes:
ٱدۡعُواْ رَبَّكُمۡ تَضَرُّعٗا وَخُفۡيَةًۚ إِنَّهُۥ لَا يُحِبُّ ٱلۡمُعۡتَدِينَ
55. Bobondela Nkolo wa bino na limemya nyoso mpe na bobombami. Ya sólo, ye alingaka te balekisi ndelo.
Las Exégesis Árabes:
وَلَا تُفۡسِدُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ بَعۡدَ إِصۡلَٰحِهَا وَٱدۡعُوهُ خَوۡفٗا وَطَمَعًاۚ إِنَّ رَحۡمَتَ ٱللَّهِ قَرِيبٞ مِّنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
56. Mpe bobebisa te kati na mokili o sima ya kobongisama na yango. Bobenga ye na bobangi mpe na elikya, ya sólo, ngolu ya Allah ezali pene pene тропа babongisi.
Las Exégesis Árabes:
وَهُوَ ٱلَّذِي يُرۡسِلُ ٱلرِّيَٰحَ بُشۡرَۢا بَيۡنَ يَدَيۡ رَحۡمَتِهِۦۖ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَقَلَّتۡ سَحَابٗا ثِقَالٗا سُقۡنَٰهُ لِبَلَدٖ مَّيِّتٖ فَأَنزَلۡنَا بِهِ ٱلۡمَآءَ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦ مِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِۚ كَذَٰلِكَ نُخۡرِجُ ٱلۡمَوۡتَىٰ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
57. Mpe ye nde azali kotinda mopepe na sango elamu eye ezali epai naye kino mopepe ekomi londende ya kilo, tozali kosopa yango na mboka eye ekawuka (makufa) mpe tozali kokitisela yango mayi mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya lolenge inso. Ndenge wana nde tokobimisaka bawei, mpo bokoka kokanisa.
Las Exégesis Árabes:
 
Traducción de significados Capítulo: Al-A'raaf
Índice de Capítulos Número de página
 
Traducción de los significados del Sagrado Corán - Traducción al lingala- Muhammad Balangogo - Índice de traducciones

Tradúzcala Zakaria Mohamed Balangugo.

Cerrar