ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: سوره فاطر   آیه:

Fâtwir (MOKELI)

ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ فَاطِرِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ جَاعِلِ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ رُسُلًا أُوْلِيٓ أَجۡنِحَةٖ مَّثۡنَىٰ وَثُلَٰثَ وَرُبَٰعَۚ يَزِيدُ فِي ٱلۡخَلۡقِ مَا يَشَآءُۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
1. Matondo na Allah mokeli wa likolo na nsé, asali ba anzelu bazala batindami mpe apesi bango mapapu mibale, misato, to mpe minei, abakisaka na ekelamu lolenge alingi. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
تفسیرهای عربی:
مَّا يَفۡتَحِ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ مِن رَّحۡمَةٖ فَلَا مُمۡسِكَ لَهَاۖ وَمَا يُمۡسِكۡ فَلَا مُرۡسِلَ لَهُۥ مِنۢ بَعۡدِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
2. Oyo Allah afungoli bato тропа ngolu naye, moto ya kokanga yango azali te, mpe oyo akangi, moto ya kofungola yango sima azali te, mpe azali wa ngolu atonda bwanya.
تفسیرهای عربی:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡۚ هَلۡ مِنۡ خَٰلِقٍ غَيۡرُ ٱللَّهِ يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ
3. Oh bino bato! Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, boye bozali na mokeli mosusu elongo na Allah oyo azali koleisa bino olikolo kino na nsé? Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te bobele ye, na yango тропа nini bozali kopesa bosembo mokongo?
تفسیرهای عربی:
وَإِن يُكَذِّبُوكَ فَقَدۡ كُذِّبَتۡ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِكَۚ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
4. Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama.
تفسیرهای عربی:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۖ فَلَا تَغُرَّنَّكُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا وَلَا يَغُرَّنَّكُم بِٱللَّهِ ٱلۡغَرُورُ
5. Eh bino bato! Ya soló, elaka ya Allah ezali ya lokuta te, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (satana) mokosi monene akosa binoтропа Allah te.
تفسیرهای عربی:
إِنَّ ٱلشَّيۡطَٰنَ لَكُمۡ عَدُوّٞ فَٱتَّخِذُوهُ عَدُوًّاۚ إِنَّمَا يَدۡعُواْ حِزۡبَهُۥ لِيَكُونُواْ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
6. Ya sólo, satana azali monguna na bino, bozua ye mpe monguna. Ya sólo, azali kobenga bato naye sé mpo bazala balongani ya moto ya lifelo.
تفسیرهای عربی:
ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۖ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٞ كَبِيرٌ
7. Baye bapengwa bakozala na etumbu ya makasi, kasi baye bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, bakozua bolimbisi mpe lifuta linene.
تفسیرهای عربی:
أَفَمَن زُيِّنَ لَهُۥ سُوٓءُ عَمَلِهِۦ فَرَءَاهُ حَسَنٗاۖ فَإِنَّ ٱللَّهَ يُضِلُّ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۖ فَلَا تَذۡهَبۡ نَفۡسُكَ عَلَيۡهِمۡ حَسَرَٰتٍۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا يَصۡنَعُونَ
8. Boye moto oyo babongiseli ye mosala naye ya mabe mpe azali kornona yango malamu? Ya sólo, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi, mpe konyokola molimo nayo te тропа bango. Ya sólo Allah ayebi malamu maye bazali kosala.
تفسیرهای عربی:
وَٱللَّهُ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ ٱلرِّيَٰحَ فَتُثِيرُ سَحَابٗا فَسُقۡنَٰهُ إِلَىٰ بَلَدٖ مَّيِّتٖ فَأَحۡيَيۡنَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ بَعۡدَ مَوۡتِهَاۚ كَذَٰلِكَ ٱلنُّشُورُ
9. Allah nde azali kotinda mopepe ezali kotombola londende ya mbula, mpe tonukisi yango na mboka oyo ekufa, mpe tobikisi mabele yango na mayi wana. Lolenge wana nde lisekwa likozalaka.
تفسیرهای عربی:
مَن كَانَ يُرِيدُ ٱلۡعِزَّةَ فَلِلَّهِ ٱلۡعِزَّةُ جَمِيعًاۚ إِلَيۡهِ يَصۡعَدُ ٱلۡكَلِمُ ٱلطَّيِّبُ وَٱلۡعَمَلُ ٱلصَّٰلِحُ يَرۡفَعُهُۥۚ وَٱلَّذِينَ يَمۡكُرُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞۖ وَمَكۡرُ أُوْلَٰٓئِكَ هُوَ يَبُورُ
10. Oyo azali koluka nguya, ayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah. Epai naye nde maloba kitoko ezali komata, mpe azali kotombola mosala ya malamu. Kasi baye bazali kosala likita ya mabe, bakozala na etumbu ya makasi, mpe likita na bango wana ekolonga te.
تفسیرهای عربی:
وَٱللَّهُ خَلَقَكُم مِّن تُرَابٖ ثُمَّ مِن نُّطۡفَةٖ ثُمَّ جَعَلَكُمۡ أَزۡوَٰجٗاۚ وَمَا تَحۡمِلُ مِنۡ أُنثَىٰ وَلَا تَضَعُ إِلَّا بِعِلۡمِهِۦۚ وَمَا يُعَمَّرُ مِن مُّعَمَّرٖ وَلَا يُنقَصُ مِنۡ عُمُرِهِۦٓ إِلَّا فِي كِتَٰبٍۚ إِنَّ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٞ
11. Mpe Allah nde akeli bino na mabele, sima akeli bino na mayi ya mobali, sima asali bolongani (mwasi na mobali), mwasi moko te akomema zemi to akobota sé ezala na boyebi naye (Allah), mpe mibu mikobakisama te to kokutoama te kino esilaki kokomama na buku. Ya soló, wana ezali pete тропа Allah .
تفسیرهای عربی:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡبَحۡرَانِ هَٰذَا عَذۡبٞ فُرَاتٞ سَآئِغٞ شَرَابُهُۥ وَهَٰذَا مِلۡحٌ أُجَاجٞۖ وَمِن كُلّٖ تَأۡكُلُونَ لَحۡمٗا طَرِيّٗا وَتَسۡتَخۡرِجُونَ حِلۡيَةٗ تَلۡبَسُونَهَاۖ وَتَرَى ٱلۡفُلۡكَ فِيهِ مَوَاخِرَ لِتَبۡتَغُواْ مِن فَضۡلِهِۦ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
12. Mpe bibale mibale bikokani te, oyo ezali mpiyo kitoko тропа komela, mpe oyo mosusu ezali mungwa mpe bololo, mpe na nyoso mibale bozali kolia misuni na yango, mpe okati na yango, bozali kobimisa mabanga na biloko ya bonzenga тропа kolata, mpe okomona masuwa ya monene ezali kotambola na mayi na makelele ya makasi, etondi na mikumba, bozali kotambola na yango тропа koluka bolamu ya Allah, mpo ete bozala na botondi na (ye).
تفسیرهای عربی:
يُولِجُ ٱلَّيۡلَ فِي ٱلنَّهَارِ وَيُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِي ٱلَّيۡلِ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ كُلّٞ يَجۡرِي لِأَجَلٖ مُّسَمّٗىۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡ لَهُ ٱلۡمُلۡكُۚ وَٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ مَا يَمۡلِكُونَ مِن قِطۡمِيرٍ
13. Мре azali kokotisa butu kati na mokolo mpe mokolo okati ya butu mpe akeli sanza na moyi, mpe moko na moko ezali kotambola na nzela na yango na tango na yango. Oyo nde Allah oyo azali Nkolo wa bino. Azali na bokonzi bonso, kasi baye bozali kobelela na esika naye, bazali na eloko moko te ata lokola mposo ya mbuma ya tamru.
تفسیرهای عربی:
إِن تَدۡعُوهُمۡ لَا يَسۡمَعُواْ دُعَآءَكُمۡ وَلَوۡ سَمِعُواْ مَا ٱسۡتَجَابُواْ لَكُمۡۖ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَكۡفُرُونَ بِشِرۡكِكُمۡۚ وَلَا يُنَبِّئُكَ مِثۡلُ خَبِيرٖ
14. Mpe soki bobeleli bango, bakoyoka losambo na bino te, ata soki bayoki, bakokoka koyanola bino te. Mpe o mokolo mwa suka, bakopengwa na bosangisi bwa bino, mpe moko te akopesa yo sango koleka oyo atonda basango.
تفسیرهای عربی:
۞ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ أَنتُمُ ٱلۡفُقَرَآءُ إِلَى ٱللَّهِۖ وَٱللَّهُ هُوَ ٱلۡغَنِيُّ ٱلۡحَمِيدُ
15. Eh bino bato! Bozali babola epai ya Allah, mpe Allah nde atonda bomengo mpe akumama.
تفسیرهای عربی:
إِن يَشَأۡ يُذۡهِبۡكُمۡ وَيَأۡتِ بِخَلۡقٖ جَدِيدٖ
16. Soki alingi, akolimwisa bino mpe akoya na bikelamu ya sika, (bato)
تفسیرهای عربی:
وَمَا ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ بِعَزِيزٖ
17. Mpe wana ezali makasi te epai ya Allah.
تفسیرهای عربی:
وَلَا تَزِرُ وَازِرَةٞ وِزۡرَ أُخۡرَىٰۚ وَإِن تَدۡعُ مُثۡقَلَةٌ إِلَىٰ حِمۡلِهَا لَا يُحۡمَلۡ مِنۡهُ شَيۡءٞ وَلَوۡ كَانَ ذَا قُرۡبَىٰٓۗ إِنَّمَا تُنذِرُ ٱلَّذِينَ يَخۡشَوۡنَ رَبَّهُم بِٱلۡغَيۡبِ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَۚ وَمَن تَزَكَّىٰ فَإِنَّمَا يَتَزَكَّىٰ لِنَفۡسِهِۦۚ وَإِلَى ٱللَّهِ ٱلۡمَصِيرُ
18. Mpe moto moko te akomema mokumba ya moninga, mpe soki mokumba ya masumu ya moto eleki ye kilo, akoki kobenga basalisa ye te, ekosalama te ata bato ya libota naye, kasi ozali kokebisa baye bazali kobanga Nkolo wa bango na kobombama, mpe bazali kotelemisa losambo. Mpe oyo akomipetola, ezali sé тропа ye moko, mpe bozongi ezali epai na Allah.
تفسیرهای عربی:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ
19. Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona,
تفسیرهای عربی:
وَلَا ٱلظُّلُمَٰتُ وَلَا ٱلنُّورُ
20. Mpe molili ekokani na mwinda te.
تفسیرهای عربی:
وَلَا ٱلظِّلُّ وَلَا ٱلۡحَرُورُ
21. Mpe malili ekokani na molunge te.
تفسیرهای عربی:
وَمَا يَسۡتَوِي ٱلۡأَحۡيَآءُ وَلَا ٱلۡأَمۡوَٰتُۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُسۡمِعُ مَن يَشَآءُۖ وَمَآ أَنتَ بِمُسۡمِعٖ مَّن فِي ٱلۡقُبُورِ
22. Mpe baye ya bomoyi bakokani te na baye bawa. Ya soló, Allah ayokisaka nani alingi, kasi yo (Muhammad), okoki te koyokisa baye bazali na malita.
تفسیرهای عربی:
إِنۡ أَنتَ إِلَّا نَذِيرٌ
23. Kasi, yo ozali sé mokebisi.
تفسیرهای عربی:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ بَشِيرٗا وَنَذِيرٗاۚ وَإِن مِّنۡ أُمَّةٍ إِلَّا خَلَا فِيهَا نَذِيرٞ
24. Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma(1) moko te oyo eleka sé bazua mokebisi.
1 Umma: Awa elakisi: "Etuka"; Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
تفسیرهای عربی:
وَإِن يُكَذِّبُوكَ فَقَدۡ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ جَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَبِٱلزُّبُرِ وَبِٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُنِيرِ
25. Mpe soki baboyi kondimela yo, yeba ete baye ya liboso basilaki mpe koboya batindami na bango, bayelaki bango bilembo bia polele, na makomi, na buku ya bongengi.
تفسیرهای عربی:
ثُمَّ أَخَذۡتُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۖ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ
26. Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki!
تفسیرهای عربی:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦ ثَمَرَٰتٖ مُّخۡتَلِفًا أَلۡوَٰنُهَاۚ وَمِنَ ٱلۡجِبَالِ جُدَدُۢ بِيضٞ وَحُمۡرٞ مُّخۡتَلِفٌ أَلۡوَٰنُهَا وَغَرَابِيبُ سُودٞ
27. Boye omoni te ndenge Allah azali kokitisa mayi kowuta na mapata, mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya ndenge na ndenge? Mpe okati na bangomba, banzela ya pembe mpe ya motané, na balangi ndenge na ndenge, mpe na misusu ya miyindo makasi?
تفسیرهای عربی:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ وَٱلدَّوَآبِّ وَٱلۡأَنۡعَٰمِ مُخۡتَلِفٌ أَلۡوَٰنُهُۥ كَذَٰلِكَۗ إِنَّمَا يَخۡشَى ٱللَّهَ مِنۡ عِبَادِهِ ٱلۡعُلَمَٰٓؤُاْۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ غَفُورٌ
28. Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám(1) binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi.
1 An’âm: Ezali lisanga ya baniama lokola: (Chameau), ngombe, ntaba na mèmè. Bótala na Al-Imrân mokapo: 14.
تفسیرهای عربی:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَتۡلُونَ كِتَٰبَ ٱللَّهِ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَنفَقُواْ مِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ سِرّٗا وَعَلَانِيَةٗ يَرۡجُونَ تِجَٰرَةٗ لَّن تَبُورَ
29. Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te.
تفسیرهای عربی:
لِيُوَفِّيَهُمۡ أُجُورَهُمۡ وَيَزِيدَهُم مِّن فَضۡلِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ غَفُورٞ شَكُورٞ
30. Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi.
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِيٓ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ هُوَ ٱلۡحَقُّ مُصَدِّقٗا لِّمَا بَيۡنَ يَدَيۡهِۗ إِنَّ ٱللَّهَ بِعِبَادِهِۦ لَخَبِيرُۢ بَصِيرٞ
31. Mpe oyo tokitisaki epai nayo kowuta na buku oyo ezali na bosembo, ezali kondima na maye makitaki liboso. Ya sólo, Allah azali kornona bawumbu naye mpe azali na sango na bango.
تفسیرهای عربی:
ثُمَّ أَوۡرَثۡنَا ٱلۡكِتَٰبَ ٱلَّذِينَ ٱصۡطَفَيۡنَا مِنۡ عِبَادِنَاۖ فَمِنۡهُمۡ ظَالِمٞ لِّنَفۡسِهِۦ وَمِنۡهُم مُّقۡتَصِدٞ وَمِنۡهُمۡ سَابِقُۢ بِٱلۡخَيۡرَٰتِ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَضۡلُ ٱلۡكَبِيرُ
32. Na sima tokitanisaki buku epai na ba oyo toponaki okati ya bawumbu na biso, basusu kati na bango bamisalaki mabe, mpe basusu batelemi na bosembo, mpe basusu bawelaka kosala bolamu na ndingisa ya Allah. Wana nde ezali ngrásia ya monene.
تفسیرهای عربی:
جَنَّٰتُ عَدۡنٖ يَدۡخُلُونَهَا يُحَلَّوۡنَ فِيهَا مِنۡ أَسَاوِرَ مِن ذَهَبٖ وَلُؤۡلُؤٗاۖ وَلِبَاسُهُمۡ فِيهَا حَرِيرٞ
33. Bilanga ya edeni nde bakokota, mpe bakolata ba wolo na mabanga ya talo na maboko mpe bilamba nabango ekozala ya fafala.
تفسیرهای عربی:
وَقَالُواْ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِيٓ أَذۡهَبَ عَنَّا ٱلۡحَزَنَۖ إِنَّ رَبَّنَا لَغَفُورٞ شَكُورٌ
34. Mpe bakoloba ete: Matondo na Allah, oyo alongoli biso mpasi, ya soló, Nkolo wa biso azali molimbisi atonda matondi.
تفسیرهای عربی:
ٱلَّذِيٓ أَحَلَّنَا دَارَ ٱلۡمُقَامَةِ مِن فَضۡلِهِۦ لَا يَمَسُّنَا فِيهَا نَصَبٞ وَلَا يَمَسُّنَا فِيهَا لُغُوبٞ
35. Na ngrásia naye, afandisi biso na bandako ya kimia, oyo bolembu mpe mpasi ekozua biso te.
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَهُمۡ نَارُ جَهَنَّمَ لَا يُقۡضَىٰ عَلَيۡهِمۡ فَيَمُوتُواْ وَلَا يُخَفَّفُ عَنۡهُم مِّنۡ عَذَابِهَاۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي كُلَّ كَفُورٖ
36. Kaši ba oyo bapengwa, bakozala na moto ya lifelo, bakokufa na kati te, mpe na kati kuna, etumbu na bango ekokutolama te. Na lolenge wana nde tokofuta mopagano nyoso.
تفسیرهای عربی:
وَهُمۡ يَصۡطَرِخُونَ فِيهَا رَبَّنَآ أَخۡرِجۡنَا نَعۡمَلۡ صَٰلِحًا غَيۡرَ ٱلَّذِي كُنَّا نَعۡمَلُۚ أَوَلَمۡ نُعَمِّرۡكُم مَّا يَتَذَكَّرُ فِيهِ مَن تَذَكَّرَ وَجَآءَكُمُ ٱلنَّذِيرُۖ فَذُوقُواْ فَمَا لِلظَّٰلِمِينَ مِن نَّصِيرٍ
37. Mpe kuna na kati, bakoganga na kolele ete: Oh Nkolo na biso! Bimisa biso na kati, mpo tosala malamu totikaki kosala, boye topesaki bino bomoyi molai te ete oyo akokanisa, akanisa? Mpe mokebisi ayelaki bino. Na yango bomeka etumbu, kasi bato mabe bakoki kozua lisungi te.
تفسیرهای عربی:
إِنَّ ٱللَّهَ عَٰلِمُ غَيۡبِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
38. Ya soló, Allah azali moyebi ya mabombami ya likolo na ya nsé. Ya sólo, ayebi maye manso mazali o kati ya mitema.
تفسیرهای عربی:
هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَكُمۡ خَلَٰٓئِفَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ فَمَن كَفَرَ فَعَلَيۡهِ كُفۡرُهُۥۖ وَلَا يَزِيدُ ٱلۡكَٰفِرِينَ كُفۡرُهُمۡ عِندَ رَبِّهِمۡ إِلَّا مَقۡتٗاۖ وَلَا يَزِيدُ ٱلۡكَٰفِرِينَ كُفۡرُهُمۡ إِلَّا خَسَارٗا
39. Ye nde atiaki bino bakitani na nsé. Mpe oyo akopengwa etali sé ye, mpe bapengwi na bopengwi na bango epai na Nkolo na bango ekobakisela bango sé soni, mpe ekobakisela bango sé bozangi.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ شُرَكَآءَكُمُ ٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَرُونِي مَاذَا خَلَقُواْ مِنَ ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ لَهُمۡ شِرۡكٞ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ أَمۡ ءَاتَيۡنَٰهُمۡ كِتَٰبٗا فَهُمۡ عَلَىٰ بَيِّنَتٖ مِّنۡهُۚ بَلۡ إِن يَعِدُ ٱلظَّٰلِمُونَ بَعۡضُهُم بَعۡضًا إِلَّا غُرُورًا
40. Loba: Boye bomoni banzambe na bino baye bozali kobondela na botiki Allah? Bolakisa ngai eloko nini bakela awa na nsé. To mpe bazali na mosangani o likolo? To mpe topesaki bango buku eye ezali kokamba bango? Nzoka nde bazali kopesana bango na bango elaka ya lokuta.
تفسیرهای عربی:
۞ إِنَّ ٱللَّهَ يُمۡسِكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ أَن تَزُولَاۚ وَلَئِن زَالَتَآ إِنۡ أَمۡسَكَهُمَا مِنۡ أَحَدٖ مِّنۢ بَعۡدِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ كَانَ حَلِيمًا غَفُورٗا
41. Ya sólo, Allah asimbi likolo na mabele ete elimwa te, mpe soki elimwi, moko te sima naye akotombola yango. Ya sólo azali malamu atonda bolimbisi.
تفسیرهای عربی:
وَأَقۡسَمُواْ بِٱللَّهِ جَهۡدَ أَيۡمَٰنِهِمۡ لَئِن جَآءَهُمۡ نَذِيرٞ لَّيَكُونُنَّ أَهۡدَىٰ مِنۡ إِحۡدَى ٱلۡأُمَمِۖ فَلَمَّا جَآءَهُمۡ نَذِيرٞ مَّا زَادَهُمۡ إِلَّا نُفُورًا
42. Мре bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kondima na bango ete: Soki mokebisi ayeli bango bakokambama malamu koleka mabota manso, тре tango mokebisi ayelaki bango (Muhammad), ebakiselaki bango sé bopengwi.
تفسیرهای عربی:
ٱسۡتِكۡبَارٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَكۡرَ ٱلسَّيِّيِٕۚ وَلَا يَحِيقُ ٱلۡمَكۡرُ ٱلسَّيِّئُ إِلَّا بِأَهۡلِهِۦۚ فَهَلۡ يَنظُرُونَ إِلَّا سُنَّتَ ٱلۡأَوَّلِينَۚ فَلَن تَجِدَ لِسُنَّتِ ٱللَّهِ تَبۡدِيلٗاۖ وَلَن تَجِدَ لِسُنَّتِ ٱللَّهِ تَحۡوِيلًا
43. (Batondaki sé na) lolendo na mokili тре kosala likita ya mabe. Kasi likita ya mabe ezongelaka sé baye basali yango, mpe bakomonaka eloko mosusu te sé lokola eye ezuaki bato ya liboso? Мре okokuta mbongwana na mibeko ya Allah te. Mpe okokuta kotengama te na mibeko ya Allah.
تفسیرهای عربی:
أَوَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ وَكَانُوٓاْ أَشَدَّ مِنۡهُمۡ قُوَّةٗۚ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُعۡجِزَهُۥ مِن شَيۡءٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَلِيمٗا قَدِيرٗا
44. Boye bazali kotambola na mokili te mpo bamona lolenge esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki makasi koleka, kasi ezali na eloko moko te kati na likolo na mabele oyo ekolembisa Allah. Ya soló, azali moyebi atonda nguya.
تفسیرهای عربی:
وَلَوۡ يُؤَاخِذُ ٱللَّهُ ٱلنَّاسَ بِمَا كَسَبُواْ مَا تَرَكَ عَلَىٰ ظَهۡرِهَا مِن دَآبَّةٖ وَلَٰكِن يُؤَخِّرُهُمۡ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗىۖ فَإِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ فَإِنَّ ٱللَّهَ كَانَ بِعِبَادِهِۦ بَصِيرَۢا
45. Mpe soki Allah azuaka bato na maye bazali kosala, nde ata nyama токе elingaki kotikala te, (likolo ya mabele ezala na bomoyi), kasi azali kozelisa bango kino mokano ekokoka. Mpe tango mokano ekokokisama (ekozuaka bango), ya soló Allah azali kornona malamu bawumbu naye.
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: سوره فاطر
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا - لیست ترجمه ها

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بستن