Check out the new design

ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: حُجُرات   آیه:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱجۡتَنِبُواْ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلظَّنِّ إِنَّ بَعۡضَ ٱلظَّنِّ إِثۡمٞۖ وَلَا تَجَسَّسُواْ وَلَا يَغۡتَب بَّعۡضُكُم بَعۡضًاۚ أَيُحِبُّ أَحَدُكُمۡ أَن يَأۡكُلَ لَحۡمَ أَخِيهِ مَيۡتٗا فَكَرِهۡتُمُوهُۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ تَوَّابٞ رَّحِيمٞ
Oh bino bandimi! Tika ete bomitia mingi penza mosika ya kokanisela, mpamba te kokanisela mosusu makanisi ezali masumu, bomilandana te na koyeba basekele ya baninga, mpe botongana te, moko kati na bino akolinga kolia mosuni ya ndeko naye akufa? Bokosepela na yango te, kasi bobanga Allah. Ya soló, Allah ayambaka tubela atonda ngolu.
تفسیرهای عربی:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّا خَلَقۡنَٰكُم مِّن ذَكَرٖ وَأُنثَىٰ وَجَعَلۡنَٰكُمۡ شُعُوبٗا وَقَبَآئِلَ لِتَعَارَفُوٓاْۚ إِنَّ أَكۡرَمَكُمۡ عِندَ ٱللَّهِ أَتۡقَىٰكُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ خَبِيرٞ
Oh bino bato! Ya sólo, tokelaki bino kowuta na mobali mpe mwasi, mpe tokesenisi bino bamboka mpe bikolo mpo ete boyebana. Ya sólo, moto ya lokumu koleka kati na bino azali oyo azali kobanga Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda basango.
تفسیرهای عربی:
۞ قَالَتِ ٱلۡأَعۡرَابُ ءَامَنَّاۖ قُل لَّمۡ تُؤۡمِنُواْ وَلَٰكِن قُولُوٓاْ أَسۡلَمۡنَا وَلَمَّا يَدۡخُلِ ٱلۡإِيمَٰنُ فِي قُلُوبِكُمۡۖ وَإِن تُطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ لَا يَلِتۡكُم مِّنۡ أَعۡمَٰلِكُمۡ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
Bato baye bafandaka na bamboka balobi: Tondimi, loba ete: Naino bondimi te, kasi boloba ete: Tobongoli mitema, mpamba te, naino bondimi bofandeli bino na mitema te, mpe soki botosi Allah na motindami waye, akokutola eloko moko te na misala na bino. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
تفسیرهای عربی:
إِنَّمَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِۦ ثُمَّ لَمۡ يَرۡتَابُواْ وَجَٰهَدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلصَّٰدِقُونَ
Ya soló, bandimi nde baye bandimi na Allah na motindami naye, sima bazali kotia tembe te, mpe bazali kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Bango nde (bato) ya bosembo.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ أَتُعَلِّمُونَ ٱللَّهَ بِدِينِكُمۡ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
Loba: Boye nde bokotangisa Allah lingomba lia bino mpe Allah ayebi maye mazali o likolo mpe o nsé? Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso.
تفسیرهای عربی:
يَمُنُّونَ عَلَيۡكَ أَنۡ أَسۡلَمُواْۖ قُل لَّا تَمُنُّواْ عَلَيَّ إِسۡلَٰمَكُمۖ بَلِ ٱللَّهُ يَمُنُّ عَلَيۡكُمۡ أَنۡ هَدَىٰكُمۡ لِلۡإِيمَٰنِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Bazali kolobela yo mpo na islamu na bango ete babongoli mitema, loba: Bolobela ngai islamu na bino te, kasi Allah nde akolobela islam na bino na ndenge akambi bino na bondimi, soki ya soló bozali na bosembo.
تفسیرهای عربی:
إِنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ غَيۡبَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
Ya soló, Allah ayebi manso maye mabombami na likolo mpe na nsé, mpe Allah azali kornona oyo bozali kosala.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: حُجُرات
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو - لیست ترجمه ها

ترجمه‌ى زکریا محمد بالنگوگو.

بستن