ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: سوره ملك   آیه:

Al-Mulk (BOKONZI)

تَبَٰرَكَ ٱلَّذِي بِيَدِهِ ٱلۡمُلۡكُ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
1. Apambolama ye oyo azali na bokonzi na maboko naye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso.
تفسیرهای عربی:
ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡمَوۡتَ وَٱلۡحَيَوٰةَ لِيَبۡلُوَكُمۡ أَيُّكُمۡ أَحۡسَنُ عَمَلٗاۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡغَفُورُ
2. Ye nde akela liwa mpe bomoyi mpo ameka bino mpe atala nani kati na bino akosala malamu koleka. Mpe azali wa bokasi atonda bolimbisi.
تفسیرهای عربی:
ٱلَّذِي خَلَقَ سَبۡعَ سَمَٰوَٰتٖ طِبَاقٗاۖ مَّا تَرَىٰ فِي خَلۡقِ ٱلرَّحۡمَٰنِ مِن تَفَٰوُتٖۖ فَٱرۡجِعِ ٱلۡبَصَرَ هَلۡ تَرَىٰ مِن فُطُورٖ
3. Ye nde akeli mapata sambo ya komatelama, boye okomona eloko ya mabe na kati ya bokeli ya Ar-Rahmân(1) te. Zongisa miso тропа kotala lisusu, okomona sé kitoko.
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
تفسیرهای عربی:
ثُمَّ ٱرۡجِعِ ٱلۡبَصَرَ كَرَّتَيۡنِ يَنقَلِبۡ إِلَيۡكَ ٱلۡبَصَرُ خَاسِئٗا وَهُوَ حَسِيرٞ
4. Sima tala lisusu mbala mibale, kotala nayo ekozongela yo na nsoni mpe ezangi bokasi.
تفسیرهای عربی:
وَلَقَدۡ زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِمَصَٰبِيحَ وَجَعَلۡنَٰهَا رُجُومٗا لِّلشَّيَٰطِينِۖ وَأَعۡتَدۡنَا لَهُمۡ عَذَابَ ٱلسَّعِيرِ
5. Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo.
تفسیرهای عربی:
وَلِلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
6. Mpe тропа baye bapengwa na Nkolo wa bango. Bakozuaka etumbu ya lifelo, mpe bozongi nini ya mabe wana!
تفسیرهای عربی:
إِذَآ أُلۡقُواْ فِيهَا سَمِعُواْ لَهَا شَهِيقٗا وَهِيَ تَفُورُ
7. Tango bakobwakama na kati, bakoyoka yango ezali kotoka, mpe bazali koganga.
تفسیرهای عربی:
تَكَادُ تَمَيَّزُ مِنَ ٱلۡغَيۡظِۖ كُلَّمَآ أُلۡقِيَ فِيهَا فَوۡجٞ سَأَلَهُمۡ خَزَنَتُهَآ أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ نَذِيرٞ
8. Moto wana ezali kokabola bango, tango nyoso soki bakobwaka bamosusu, bakengeli (ya lifelo) bazali kotuna bango: Boye mokebisi ayelaki bino te?
تفسیرهای عربی:
قَالُواْ بَلَىٰ قَدۡ جَآءَنَا نَذِيرٞ فَكَذَّبۡنَا وَقُلۡنَا مَا نَزَّلَ ٱللَّهُ مِن شَيۡءٍ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا فِي ضَلَٰلٖ كَبِيرٖ
9. Bakolobaka: Iyo. Mokebisi ayelaki biso kasi toboyaki kondimela ye mpe tolobaki: Allah akitisa eloko te, bozali sé na libungi linene.
تفسیرهای عربی:
وَقَالُواْ لَوۡ كُنَّا نَسۡمَعُ أَوۡ نَعۡقِلُ مَا كُنَّا فِيٓ أَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
10. Mpe bakolobaka: Soki toyokaka mpe tokanisaka (malamu) tolingaki kozala okati ya bato ya lifelo ya saira te.
تفسیرهای عربی:
فَٱعۡتَرَفُواْ بِذَنۢبِهِمۡ فَسُحۡقٗا لِّأَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
11. Mpe bayebaki mabe na bango, mpe tika ete bato ya lifelo babebisama.
تفسیرهای عربی:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَخۡشَوۡنَ رَبَّهُم بِٱلۡغَيۡبِ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٞ كَبِيرٞ
12. Ya soló, baye bazali kobanga Nkolo na bango nakobombama bakozuaka lifuta linene.
تفسیرهای عربی:
وَأَسِرُّواْ قَوۡلَكُمۡ أَوِ ٱجۡهَرُواْ بِهِۦٓۖ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
13. Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)
تفسیرهای عربی:
أَلَا يَعۡلَمُ مَنۡ خَلَقَ وَهُوَ ٱللَّطِيفُ ٱلۡخَبِيرُ
14. Boye ayebi te baye akela mpe azali malamu atonda basango?
تفسیرهای عربی:
هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ ذَلُولٗا فَٱمۡشُواْ فِي مَنَاكِبِهَا وَكُلُواْ مِن رِّزۡقِهِۦۖ وَإِلَيۡهِ ٱلنُّشُورُ
15. Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye.
تفسیرهای عربی:
ءَأَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يَخۡسِفَ بِكُمُ ٱلۡأَرۡضَ فَإِذَا هِيَ تَمُورُ
16. To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana?
تفسیرهای عربی:
أَمۡ أَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يُرۡسِلَ عَلَيۡكُمۡ حَاصِبٗاۖ فَسَتَعۡلَمُونَ كَيۡفَ نَذِيرِ
17. To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali.
تفسیرهای عربی:
وَلَقَدۡ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ
18. Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini?
تفسیرهای عربی:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلطَّيۡرِ فَوۡقَهُمۡ صَٰٓفَّٰتٖ وَيَقۡبِضۡنَۚ مَا يُمۡسِكُهُنَّ إِلَّا ٱلرَّحۡمَٰنُۚ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءِۭ بَصِيرٌ
19. Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân(1). Ya soló, ye amonaka biloko binso.
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
تفسیرهای عربی:
أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي هُوَ جُندٞ لَّكُمۡ يَنصُرُكُم مِّن دُونِ ٱلرَّحۡمَٰنِۚ إِنِ ٱلۡكَٰفِرُونَ إِلَّا فِي غُرُورٍ
20. Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi.
تفسیرهای عربی:
أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي يَرۡزُقُكُمۡ إِنۡ أَمۡسَكَ رِزۡقَهُۥۚ بَل لَّجُّواْ فِي عُتُوّٖ وَنُفُورٍ
21. Mpe nani mosusu akoki koleisa bino soki akangi bozui naye? Kasi bazali sé kosala miso makasi kati na mabe mpe koboya.
تفسیرهای عربی:
أَفَمَن يَمۡشِي مُكِبًّا عَلَىٰ وَجۡهِهِۦٓ أَهۡدَىٰٓ أَمَّن يَمۡشِي سَوِيًّا عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
22. Boye oyo azali kotambola elongi na nsé akambami koleka oyo azali kotambola alima na nzela ya semba?
تفسیرهای عربی:
قُلۡ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنشَأَكُمۡ وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَۚ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ
23. Loba: Ye nde akela bino mpe atiela bino bomoni na boyoki mpe mitema, baye bazali kotondo bazali moke.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ هُوَ ٱلَّذِي ذَرَأَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
24. Loba: Ye nde atia bino okati ya mabele, mpe epai naye bokosanganaka.
تفسیرهای عربی:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
25. Mpe bazali koloba: Elaka ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló?
تفسیرهای عربی:
قُلۡ إِنَّمَا ٱلۡعِلۡمُ عِندَ ٱللَّهِ وَإِنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
26. Loba: Boyebi bwa yango ezali nde epai ya Allah, ya soló nazali mokebisi ya polele.
تفسیرهای عربی:
فَلَمَّا رَأَوۡهُ زُلۡفَةٗ سِيٓـَٔتۡ وُجُوهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَقِيلَ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تَدَّعُونَ
27. Mpe tango bakomona (etumbu) pene na bango, bilongi ya bapagano bikokoma mawa mawa, bakoyebisa bango été: Oyo nde bozalaki kosenga.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَهۡلَكَنِيَ ٱللَّهُ وَمَن مَّعِيَ أَوۡ رَحِمَنَا فَمَن يُجِيرُ ٱلۡكَٰفِرِينَ مِنۡ عَذَابٍ أَلِيمٖ
28. Loba: Bomoni boni soki Allah abomi ngai na baye bazali elongo na ngai to alimbisi biso, nani akosungaka bapengwi na etumbu ya makasi?
1 Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ هُوَ ٱلرَّحۡمَٰنُ ءَامَنَّا بِهِۦ وَعَلَيۡهِ تَوَكَّلۡنَاۖ فَسَتَعۡلَمُونَ مَنۡ هُوَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
29. Loba: Ye azali Ar-Rahmân(1), tondimi naye mpe epai naye nde tomipesi. Mpe bokoyebaka nani azali na nzela ya libungi ya polele.
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
تفسیرهای عربی:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَصۡبَحَ مَآؤُكُمۡ غَوۡرٗا فَمَن يَأۡتِيكُم بِمَآءٖ مَّعِينِۭ
30. Loba: Bomoni boni soki mayi na bino ekomi mosika na nsé ya mabele, nani mosusu akopesa bino mayi kowuta na libulu?
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: سوره ملك
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا - لیست ترجمه ها

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بستن