ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: سوره معارج   آیه:

Al-Ma’ârij (BA NZELA YAKOMATA MPE KOKITA)

سَأَلَ سَآئِلُۢ بِعَذَابٖ وَاقِعٖ
1. Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te.
تفسیرهای عربی:
لِّلۡكَٰفِرِينَ لَيۡسَ لَهُۥ دَافِعٞ
2. Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi.
تفسیرهای عربی:
مِّنَ ٱللَّهِ ذِي ٱلۡمَعَارِجِ
3. Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali.
تفسیرهای عربی:
تَعۡرُجُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَٱلرُّوحُ إِلَيۡهِ فِي يَوۡمٖ كَانَ مِقۡدَارُهُۥ خَمۡسِينَ أَلۡفَ سَنَةٖ
4. Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano.
تفسیرهای عربی:
فَٱصۡبِرۡ صَبۡرٗا جَمِيلًا
5. Zela bozeli ya malamu.
تفسیرهای عربی:
إِنَّهُمۡ يَرَوۡنَهُۥ بَعِيدٗا
6. (Bapengwi) bazali kornona yango mosika,
تفسیرهای عربی:
وَنَرَىٰهُ قَرِيبٗا
7. Kasi tozali kornona yango pembeni.
تفسیرهای عربی:
يَوۡمَ تَكُونُ ٱلسَّمَآءُ كَٱلۡمُهۡلِ
8. Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta,
تفسیرهای عربی:
وَتَكُونُ ٱلۡجِبَالُ كَٱلۡعِهۡنِ
9. Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika.
تفسیرهای عربی:
وَلَا يَسۡـَٔلُ حَمِيمٌ حَمِيمٗا
10. Molingami akotuna moninga te,
تفسیرهای عربی:
يُبَصَّرُونَهُمۡۚ يَوَدُّ ٱلۡمُجۡرِمُ لَوۡ يَفۡتَدِي مِنۡ عَذَابِ يَوۡمِئِذِۭ بِبَنِيهِ
11. Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana.
تفسیرهای عربی:
وَصَٰحِبَتِهِۦ وَأَخِيهِ
12. To mwasi, to ndeko naye ya mobali.
تفسیرهای عربی:
وَفَصِيلَتِهِ ٱلَّتِي تُـٔۡوِيهِ
13. (Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye.
تفسیرهای عربی:
وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا ثُمَّ يُنجِيهِ
14. Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye.
تفسیرهای عربی:
كَلَّآۖ إِنَّهَا لَظَىٰ
15. Eloko te, ezali nde moto.
تفسیرهای عربی:
نَزَّاعَةٗ لِّلشَّوَىٰ
16. Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi,
تفسیرهای عربی:
تَدۡعُواْ مَنۡ أَدۡبَرَ وَتَوَلَّىٰ
17. Moto ekobengaka baye baboyaki kondima.
تفسیرهای عربی:
وَجَمَعَ فَأَوۡعَىٰٓ
18. (Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana.
تفسیرهای عربی:
۞ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ خُلِقَ هَلُوعًا
19. Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia.
تفسیرهای عربی:
إِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ جَزُوعٗا
20. Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi,
تفسیرهای عربی:
وَإِذَا مَسَّهُ ٱلۡخَيۡرُ مَنُوعًا
21. Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango.
تفسیرهای عربی:
إِلَّا ٱلۡمُصَلِّينَ
22. Longola sé baye bazali kotelemisa losambo,
تفسیرهای عربی:
ٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ دَآئِمُونَ
23. Baye bakangami na losambo na bango libela;
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ فِيٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ حَقّٞ مَّعۡلُومٞ
24. Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango,
تفسیرهای عربی:
لِّلسَّآئِلِ وَٱلۡمَحۡرُومِ
25. Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi;
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ يُصَدِّقُونَ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
26. Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka;
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ هُم مِّنۡ عَذَابِ رَبِّهِم مُّشۡفِقُونَ
27. Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango;
تفسیرهای عربی:
إِنَّ عَذَابَ رَبِّهِمۡ غَيۡرُ مَأۡمُونٖ
28. Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te,
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِفُرُوجِهِمۡ حَٰفِظُونَ
29. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango,
تفسیرهای عربی:
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَإِنَّهُمۡ غَيۡرُ مَلُومِينَ
30. Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango,
تفسیرهای عربی:
فَمَنِ ٱبۡتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡعَادُونَ
31. Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo,
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِأَمَٰنَٰتِهِمۡ وَعَهۡدِهِمۡ رَٰعُونَ
32. Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani;
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ هُم بِشَهَٰدَٰتِهِمۡ قَآئِمُونَ
33. Mpe baye bazali kotatola sé bosóló,
تفسیرهای عربی:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَاتِهِمۡ يُحَافِظُونَ
34. Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango.
تفسیرهای عربی:
أُوْلَٰٓئِكَ فِي جَنَّٰتٖ مُّكۡرَمُونَ
35. Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola.
تفسیرهای عربی:
فَمَالِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ قِبَلَكَ مُهۡطِعِينَ
36. Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi,
تفسیرهای عربی:
عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ عِزِينَ
37. Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana?
تفسیرهای عربی:
أَيَطۡمَعُ كُلُّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ أَن يُدۡخَلَ جَنَّةَ نَعِيمٖ
38. Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo?
تفسیرهای عربی:
كَلَّآۖ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّمَّا يَعۡلَمُونَ
39. Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi.
تفسیرهای عربی:
فَلَآ أُقۡسِمُ بِرَبِّ ٱلۡمَشَٰرِقِ وَٱلۡمَغَٰرِبِ إِنَّا لَقَٰدِرُونَ
40. Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki,
تفسیرهای عربی:
عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ خَيۡرٗا مِّنۡهُمۡ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ
41. Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te.
تفسیرهای عربی:
فَذَرۡهُمۡ يَخُوضُواْ وَيَلۡعَبُواْ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
42. Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango.
تفسیرهای عربی:
يَوۡمَ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ سِرَاعٗا كَأَنَّهُمۡ إِلَىٰ نُصُبٖ يُوفِضُونَ
43. Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami;
تفسیرهای عربی:
خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٞۚ ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلَّذِي كَانُواْ يُوعَدُونَ
44. Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango.
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: سوره معارج
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - الترجمة اللينغالا - لیست ترجمه ها

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بستن