Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore yimooɓe   Aaya:
قَالَ وَمَا عِلۡمِي بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
112. Alobi: Nayebi te maye bazali kosala.
Faccirooji aarabeeji:
إِنۡ حِسَابُهُمۡ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّيۖ لَوۡ تَشۡعُرُونَ
113. Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
114. Nazali oyo abenganaka bandimi te.
Faccirooji aarabeeji:
إِنۡ أَنَا۠ إِلَّا نَذِيرٞ مُّبِينٞ
115. Kasi nazali sé mokebisi ya polele.
Faccirooji aarabeeji:
قَالُواْ لَئِن لَّمۡ تَنتَهِ يَٰنُوحُ لَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمَرۡجُومِينَ
116. Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga.
Faccirooji aarabeeji:
قَالَ رَبِّ إِنَّ قَوۡمِي كَذَّبُونِ
117. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te,
Faccirooji aarabeeji:
فَٱفۡتَحۡ بَيۡنِي وَبَيۡنَهُمۡ فَتۡحٗا وَنَجِّنِي وَمَن مَّعِيَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
118. Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi.
Faccirooji aarabeeji:
فَأَنجَيۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِي ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
119. Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda.
Faccirooji aarabeeji:
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا بَعۡدُ ٱلۡبَاقِينَ
120. Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi).
Faccirooji aarabeeji:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
121. Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
122. Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
Faccirooji aarabeeji:
كَذَّبَتۡ عَادٌ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
123. Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ هُودٌ أَلَا تَتَّقُونَ
124. Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te?
Faccirooji aarabeeji:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
125. Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino.
Faccirooji aarabeeji:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
126. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
127. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
Faccirooji aarabeeji:
أَتَبۡنُونَ بِكُلِّ رِيعٍ ءَايَةٗ تَعۡبَثُونَ
128. Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa?
Faccirooji aarabeeji:
وَتَتَّخِذُونَ مَصَانِعَ لَعَلَّكُمۡ تَخۡلُدُونَ
129. Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili?
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذَا بَطَشۡتُم بَطَشۡتُمۡ جَبَّارِينَ
130. Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi.
Faccirooji aarabeeji:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
131. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱتَّقُواْ ٱلَّذِيٓ أَمَدَّكُم بِمَا تَعۡلَمُونَ
132. Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi,
Faccirooji aarabeeji:
أَمَدَّكُم بِأَنۡعَٰمٖ وَبَنِينَ
133. Oyo apesi bino banyama na bana,
Faccirooji aarabeeji:
وَجَنَّٰتٖ وَعُيُونٍ
134. Mpe bilanga na miluka.
Faccirooji aarabeeji:
إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
135. Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka.
Faccirooji aarabeeji:
قَالُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡنَآ أَوَعَظۡتَ أَمۡ لَمۡ تَكُن مِّنَ ٱلۡوَٰعِظِينَ
136. Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore yimooɓe
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude