Check out the new design

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoo tuubabuya   Aaya:
وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلۡأَوَّلُونَ مِنَ ٱلۡمُهَٰجِرِينَ وَٱلۡأَنصَارِ وَٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُم بِإِحۡسَٰنٖ رَّضِيَ ٱللَّهُ عَنۡهُمۡ وَرَضُواْ عَنۡهُ وَأَعَدَّ لَهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي تَحۡتَهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Allah asepeli na bandimi ya liboso baye batikaki (Makkah) na baye bayambaki bango, (na Madinah) lolenge moko na basusu baye bayaki sima na bango na bolamu, bango mpe basepeli naye. Mpe abongiseli bango Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela na libela kati na yango, wana nde elonga enene.
Faccirooji aarabeeji:
وَمِمَّنۡ حَوۡلَكُم مِّنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مُنَٰفِقُونَۖ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡمَدِينَةِ مَرَدُواْ عَلَى ٱلنِّفَاقِ لَا تَعۡلَمُهُمۡۖ نَحۡنُ نَعۡلَمُهُمۡۚ سَنُعَذِّبُهُم مَّرَّتَيۡنِ ثُمَّ يُرَدُّونَ إِلَىٰ عَذَابٍ عَظِيمٖ
Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene.
Faccirooji aarabeeji:
وَءَاخَرُونَ ٱعۡتَرَفُواْ بِذُنُوبِهِمۡ خَلَطُواْ عَمَلٗا صَٰلِحٗا وَءَاخَرَ سَيِّئًا عَسَى ٱللَّهُ أَن يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
Мре basusu kati na bango bayebi masumu ma bango. Basangisi misala ya malamu na ya mabe. Mpo tango mosusu Allah akolimbisa bango. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Faccirooji aarabeeji:
خُذۡ مِنۡ أَمۡوَٰلِهِمۡ صَدَقَةٗ تُطَهِّرُهُمۡ وَتُزَكِّيهِم بِهَا وَصَلِّ عَلَيۡهِمۡۖ إِنَّ صَلَوٰتَكَ سَكَنٞ لَّهُمۡۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.
Faccirooji aarabeeji:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ هُوَ يَقۡبَلُ ٱلتَّوۡبَةَ عَنۡ عِبَادِهِۦ وَيَأۡخُذُ ٱلصَّدَقَٰتِ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
Boye bayebi te ete Allah nde moyambi tubela ya bawumbu naye, mpe ayambaka makabo na bango? Kasi ya soló, Allah nde mondimeli tubela atonda mawa.
Faccirooji aarabeeji:
وَقُلِ ٱعۡمَلُواْ فَسَيَرَى ٱللَّهُ عَمَلَكُمۡ وَرَسُولُهُۥ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَۖ وَسَتُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mpe loba: bosala, Allah akomona mosala na bino, mpe motindami waye lokola, na bandimi. Mpe sima bokozongisama epai ya oyo amonaka makambo ya polele na maye mabombami, mpe akoyebisaka bino тропа maye bozalaki kosala.
Faccirooji aarabeeji:
وَءَاخَرُونَ مُرۡجَوۡنَ لِأَمۡرِ ٱللَّهِ إِمَّا يُعَذِّبُهُمۡ وَإِمَّا يَتُوبُ عَلَيۡهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
Mpe basusu bazali kozela mokano ya Allah: Apesa bango etumbu, to akoki kondimela bango, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoo tuubabuya
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo - Tippudi firooji ɗii

Firo pastiiwo - Sakariya Muhammad Banna Ngugu.

Uddude