Check out the new design

ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ * - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಅತ್ತೌಬ   ಶ್ಲೋಕ:
وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلۡأَوَّلُونَ مِنَ ٱلۡمُهَٰجِرِينَ وَٱلۡأَنصَارِ وَٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوهُم بِإِحۡسَٰنٖ رَّضِيَ ٱللَّهُ عَنۡهُمۡ وَرَضُواْ عَنۡهُ وَأَعَدَّ لَهُمۡ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي تَحۡتَهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
100. Allah asepeli na bandimi ya liboso baye batikaki (Makkah) na baye bayambaki bango, (na Madinah) lolenge moko na basusu baye bayaki sima na bango na bolamu, bango mpe basepeli naye. Mpe abongiseli bango Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka libela na libela kati na yango, wana nde elonga enene.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَمِمَّنۡ حَوۡلَكُم مِّنَ ٱلۡأَعۡرَابِ مُنَٰفِقُونَۖ وَمِنۡ أَهۡلِ ٱلۡمَدِينَةِ مَرَدُواْ عَلَى ٱلنِّفَاقِ لَا تَعۡلَمُهُمۡۖ نَحۡنُ نَعۡلَمُهُمۡۚ سَنُعَذِّبُهُم مَّرَّتَيۡنِ ثُمَّ يُرَدُّونَ إِلَىٰ عَذَابٍ عَظِيمٖ
101. Mpe ezali na basusu bazali pembeni na bino bato ya bilongi mibale, mpe na ndambu ya bato ya mboka Madinah, balendi na bokono ya kozala bato ya bilongi mibale, (yo ntoma) oyebi bango te, kasi biso nde toyebi bango. Tokopesaka bango etumbu mbala mibale, sima bakozuaka etumbu ya monene.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَءَاخَرُونَ ٱعۡتَرَفُواْ بِذُنُوبِهِمۡ خَلَطُواْ عَمَلٗا صَٰلِحٗا وَءَاخَرَ سَيِّئًا عَسَى ٱللَّهُ أَن يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ
102. Мре basusu kati na bango bayebi masumu ma bango. Basangisi misala ya malamu na ya mabe. Mpo tango mosusu Allah akolimbisa bango. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
خُذۡ مِنۡ أَمۡوَٰلِهِمۡ صَدَقَةٗ تُطَهِّرُهُمۡ وَتُزَكِّيهِم بِهَا وَصَلِّ عَلَيۡهِمۡۖ إِنَّ صَلَوٰتَكَ سَكَنٞ لَّهُمۡۗ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
103. Zúa okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. Sima osengela bango, pamba te libondeli nayo ekofandisa bango na kimia. Ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
أَلَمۡ يَعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ هُوَ يَقۡبَلُ ٱلتَّوۡبَةَ عَنۡ عِبَادِهِۦ وَيَأۡخُذُ ٱلصَّدَقَٰتِ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلتَّوَّابُ ٱلرَّحِيمُ
104. Boye bayebi te ete Allah nde moyambi tubela ya bawumbu naye, mpe ayambaka makabo na bango? Kasi ya soló, Allah nde mondimeli tubela atonda mawa.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَقُلِ ٱعۡمَلُواْ فَسَيَرَى ٱللَّهُ عَمَلَكُمۡ وَرَسُولُهُۥ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَۖ وَسَتُرَدُّونَ إِلَىٰ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ فَيُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
105. Mpe loba: bosala, Allah akomona mosala na bino, mpe motindami waye lokola, na bandimi. Mpe sima bokozongisama epai ya oyo amonaka makambo ya polele na maye mabombami, mpe akoyebisaka bino тропа maye bozalaki kosala.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَءَاخَرُونَ مُرۡجَوۡنَ لِأَمۡرِ ٱللَّهِ إِمَّا يُعَذِّبُهُمۡ وَإِمَّا يَتُوبُ عَلَيۡهِمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
106. Mpe basusu bazali kozela mokano ya Allah: Apesa bango etumbu, to akoki kondimela bango, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
 
ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಅತ್ತೌಬ
ಅಧ್ಯಾಯಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ ಪುಟ ಸಂಖ್ಯೆ
 
ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

ಅನುವಾದ - ಝಕರಿಯಾ ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ.

ಮುಚ್ಚಿ