Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Al'nisaa   Aya:
فَبِمَا نَقۡضِهِم مِّيثَٰقَهُمۡ وَكُفۡرِهِم بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَقَتۡلِهِمُ ٱلۡأَنۢبِيَآءَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَقَوۡلِهِمۡ قُلُوبُنَا غُلۡفُۢۚ بَلۡ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَيۡهَا بِكُفۡرِهِمۡ فَلَا يُؤۡمِنُونَ إِلَّا قَلِيلٗا
155. Mpe na ntina ete tolakeli bango mabe mpona kozanga botosi na elaka na bango, mpe mpona bopagano na bango ya koboya kondima na emoniseli ya Allah, mpe mpona bizaleli na bango ya koboma ba ntoma na ntina te, mpe na maloba na bango: Mitema mia biso mikangama, kasi Allah nde abeteli yango mpalata mpona bopagano na bango, bakondimaka te sé bato moke kati na bango.
Tafsiran larabci:
وَبِكُفۡرِهِمۡ وَقَوۡلِهِمۡ عَلَىٰ مَرۡيَمَ بُهۡتَٰنًا عَظِيمٗا
156. Mpe na bopengwi na bango na maloba na bango ya mabe koleka likolo ya Maryam.
Tafsiran larabci:
وَقَوۡلِهِمۡ إِنَّا قَتَلۡنَا ٱلۡمَسِيحَ عِيسَى ٱبۡنَ مَرۡيَمَ رَسُولَ ٱللَّهِ وَمَا قَتَلُوهُ وَمَا صَلَبُوهُ وَلَٰكِن شُبِّهَ لَهُمۡۚ وَإِنَّ ٱلَّذِينَ ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُۚ مَا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٍ إِلَّا ٱتِّبَاعَ ٱلظَّنِّۚ وَمَا قَتَلُوهُ يَقِينَۢا
157. Mpe na maloba na bango: Ya sôló biso tobomi Issa masiya mwana na Maryam motindami ya Allah, kasi babomaki ye te, mpe babakaki ye te, nzoka nde eyelaki bango elongi lokola ye, mpe ba oyo bakabwanaki mpona ye batikalaki na kati na koyimayima, bazali na boyebi na likambo yango mpenza te sé makanisi, kasi ya sôló mpenza babomaki ye te.
Tafsiran larabci:
بَل رَّفَعَهُ ٱللَّهُ إِلَيۡهِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمٗا
158. Kasi Allah amatisaki ye (Issa) epai naye, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya.
Tafsiran larabci:
وَإِن مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ إِلَّا لَيُؤۡمِنَنَّ بِهِۦ قَبۡلَ مَوۡتِهِۦۖ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَكُونُ عَلَيۡهِمۡ شَهِيدٗا
159. Moko te kati ya baye bazua buku sé akondima naye liboso ete akufa, mpe mokolo ya suka akozala nzeneneke likolo na bango.
Tafsiran larabci:
فَبِظُلۡمٖ مِّنَ ٱلَّذِينَ هَادُواْ حَرَّمۡنَا عَلَيۡهِمۡ طَيِّبَٰتٍ أُحِلَّتۡ لَهُمۡ وَبِصَدِّهِمۡ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ كَثِيرٗا
160. Mpona mabe ya baye bamibenga bayuda topekisaki bango bilei ya malamu biye bilingisamaki mpona bango, mpe mpo ete bango bazalaki kopekisa mingi nzela Allah.
Tafsiran larabci:
وَأَخۡذِهِمُ ٱلرِّبَوٰاْ وَقَدۡ نُهُواْ عَنۡهُ وَأَكۡلِهِمۡ أَمۡوَٰلَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡبَٰطِلِۚ وَأَعۡتَدۡنَا لِلۡكَٰفِرِينَ مِنۡهُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا
161. Mpe bazali kozua ekotama, na bango basilaki kopekisama na yango mpe kolia misolo ya bato na lokuta, mpe tolengeli bapagano kati na bango etumbu ya makasi.
Tafsiran larabci:
لَّٰكِنِ ٱلرَّٰسِخُونَ فِي ٱلۡعِلۡمِ مِنۡهُمۡ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ يُؤۡمِنُونَ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلِكَۚ وَٱلۡمُقِيمِينَ ٱلصَّلَوٰةَۚ وَٱلۡمُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ أُوْلَٰٓئِكَ سَنُؤۡتِيهِمۡ أَجۡرًا عَظِيمًا
162. Kasi baye batonda mayele kati na bango na bandimi bazali kondima na maye ekiti epai nayo na maye makiti liboso nayo, mpe baye batelemisaka losambo, mpe bapesaka zakat, mpe bandimaka na Allah na mokolo ya suka, bango wana nde tokopesa bango lifuta ya monene.
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Al'nisaa
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa