Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាន់នីសាក   អាយ៉ាត់:
فَبِمَا نَقۡضِهِم مِّيثَٰقَهُمۡ وَكُفۡرِهِم بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَقَتۡلِهِمُ ٱلۡأَنۢبِيَآءَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَقَوۡلِهِمۡ قُلُوبُنَا غُلۡفُۢۚ بَلۡ طَبَعَ ٱللَّهُ عَلَيۡهَا بِكُفۡرِهِمۡ فَلَا يُؤۡمِنُونَ إِلَّا قَلِيلٗا
Mpe na ntina ete tolakeli bango mabe mpona kozanga botosi na elaka na bango, mpe mpona bopagano na bango ya koboya kondima na emoniseli ya Allah, mpe mpona bizaleli na bango ya koboma ba ntoma na ntina te, mpe na maloba na bango: Mitema mia biso mikangama, kasi Allah nde abeteli yango mpalata mpona bopagano na bango, bakondimaka te sé bato moke kati na bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَبِكُفۡرِهِمۡ وَقَوۡلِهِمۡ عَلَىٰ مَرۡيَمَ بُهۡتَٰنًا عَظِيمٗا
Mpe na bopengwi na bango na maloba na bango ya mabe koleka likolo ya Maryam.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَوۡلِهِمۡ إِنَّا قَتَلۡنَا ٱلۡمَسِيحَ عِيسَى ٱبۡنَ مَرۡيَمَ رَسُولَ ٱللَّهِ وَمَا قَتَلُوهُ وَمَا صَلَبُوهُ وَلَٰكِن شُبِّهَ لَهُمۡۚ وَإِنَّ ٱلَّذِينَ ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُۚ مَا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٍ إِلَّا ٱتِّبَاعَ ٱلظَّنِّۚ وَمَا قَتَلُوهُ يَقِينَۢا
Mpe na maloba na bango: Ya sôló biso tobomi Issa masiya mwana na Maryam motindami ya Allah, kasi babomaki ye te, mpe babakaki ye te, nzoka nde eyelaki bango elongi lokola ye, mpe ba oyo bakabwanaki mpona ye batikalaki na kati na koyimayima, bazali na boyebi na likambo yango mpenza te sé makanisi, kasi ya sôló mpenza babomaki ye te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
بَل رَّفَعَهُ ٱللَّهُ إِلَيۡهِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمٗا
Kasi Allah amatisaki ye (Issa) epai naye, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِن مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ إِلَّا لَيُؤۡمِنَنَّ بِهِۦ قَبۡلَ مَوۡتِهِۦۖ وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَكُونُ عَلَيۡهِمۡ شَهِيدٗا
Moko te kati ya baye bazua buku sé akondima naye liboso ete akufa, mpe mokolo ya suka akozala nzeneneke likolo na bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَبِظُلۡمٖ مِّنَ ٱلَّذِينَ هَادُواْ حَرَّمۡنَا عَلَيۡهِمۡ طَيِّبَٰتٍ أُحِلَّتۡ لَهُمۡ وَبِصَدِّهِمۡ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ كَثِيرٗا
Mpona mabe ya baye bamibenga bayuda topekisaki bango bilei ya malamu biye bilingisamaki mpona bango, mpe mpo ete bango bazalaki kopekisa mingi nzela Allah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَخۡذِهِمُ ٱلرِّبَوٰاْ وَقَدۡ نُهُواْ عَنۡهُ وَأَكۡلِهِمۡ أَمۡوَٰلَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡبَٰطِلِۚ وَأَعۡتَدۡنَا لِلۡكَٰفِرِينَ مِنۡهُمۡ عَذَابًا أَلِيمٗا
Mpe bazali kozua ekotama, na bango basilaki kopekisama na yango mpe kolia misolo ya bato na lokuta, mpe tolengeli bapagano kati na bango etumbu ya makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَّٰكِنِ ٱلرَّٰسِخُونَ فِي ٱلۡعِلۡمِ مِنۡهُمۡ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ يُؤۡمِنُونَ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ وَمَآ أُنزِلَ مِن قَبۡلِكَۚ وَٱلۡمُقِيمِينَ ٱلصَّلَوٰةَۚ وَٱلۡمُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ أُوْلَٰٓئِكَ سَنُؤۡتِيهِمۡ أَجۡرًا عَظِيمًا
Kasi baye batonda mayele kati na bango na bandimi bazali kondima na maye ekiti epai nayo na maye makiti liboso nayo, mpe baye batelemisaka losambo, mpe bapesaka zakat, mpe bandimaka na Allah na mokolo ya suka, bango wana nde tokopesa bango lifuta ya monene.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាន់នីសាក
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ