Check out the new design

Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu * - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Fassarar Ma'anoni Sura: Al'najm   Aya:
وَأَنَّهُۥ خَلَقَ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰ
Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali,
Tafsiran larabci:
مِن نُّطۡفَةٍ إِذَا تُمۡنَىٰ
Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango .
Tafsiran larabci:
وَأَنَّ عَلَيۡهِ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰ
Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye.
Tafsiran larabci:
وَأَنَّهُۥ هُوَ أَغۡنَىٰ وَأَقۡنَىٰ
Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola.
Tafsiran larabci:
وَأَنَّهُۥ هُوَ رَبُّ ٱلشِّعۡرَىٰ
Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ[1].
[1] Ach-chi’rá: Ezali: Monzoto oyo bazalaki kokumisa na boyinga Allah nde akela yango.
Tafsiran larabci:
وَأَنَّهُۥٓ أَهۡلَكَ عَادًا ٱلۡأُولَىٰ
Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad,
Tafsiran larabci:
وَثَمُودَاْ فَمَآ أَبۡقَىٰ
Na Thamûd, moko atikala te.
Tafsiran larabci:
وَقَوۡمَ نُوحٖ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ هُمۡ أَظۡلَمَ وَأَطۡغَىٰ
Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo.
Tafsiran larabci:
وَٱلۡمُؤۡتَفِكَةَ أَهۡوَىٰ
Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth),
Tafsiran larabci:
فَغَشَّىٰهَا مَا غَشَّىٰ
Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi.
Tafsiran larabci:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكَ تَتَمَارَىٰ
Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe?
Tafsiran larabci:
هَٰذَا نَذِيرٞ مِّنَ ٱلنُّذُرِ ٱلۡأُولَىٰٓ
Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo.
Tafsiran larabci:
أَزِفَتِ ٱلۡأٓزِفَةُ
Ngonga esili kobeleme.
Tafsiran larabci:
لَيۡسَ لَهَا مِن دُونِ ٱللَّهِ كَاشِفَةٌ
Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah.
Tafsiran larabci:
أَفَمِنۡ هَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ تَعۡجَبُونَ
Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani)
Tafsiran larabci:
وَتَضۡحَكُونَ وَلَا تَبۡكُونَ
Mpe bozali koseka na esika ya kolela?
Tafsiran larabci:
وَأَنتُمۡ سَٰمِدُونَ
Kasi bozali sé kosakana?
Tafsiran larabci:
فَٱسۡجُدُواْۤ لِلَّهِۤ وَٱعۡبُدُواْ۩
Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye).
Tafsiran larabci:
 
Fassarar Ma'anoni Sura: Al'najm
Teburin Jerin Sunayen Surori Lambar shafi
 
Fassarar Ma'anonin Alqura'ni - Fassara da harshan Lingala - Muhammad Balingugu - Teburin Bayani kan wasu Fassarori

wanda Zakariyya Muhammad Balingugu ya fassarasu.

Rufewa